Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mibale 19–25: “O Monene Boniboni Ezali Mwango ya Nzambe na Biso.” 2 Nefi 6–10


“Sanza ya mibale 19–25: ‘O Monene Boniboni Ezali Mwango ya Nzambe na Biso.’ 2 Nefi 6–10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya mibale 19–25. 2 Nefi 6–10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2024 (2024)

Elilingi
Yesu azali kosambela na Getesemane

Bolingi na Ngai Te, Kasi ya Yo, Esalama, na Harry Anderson

Sanza ya mibale 19–25: “O Monene Boniboni Ezali Mwango ya Nzambe na Biso”

2 Nefi 6–10

Elekaki penepene mibu 40 uta libota ya Lehi batikaki Yelusaleme. Bazalaki na mboka ya sika, mosika mpenza ya Yelusaleme. Lehi akufaki, mpe bana na ye basilaki kobanda eye elingaki kokoma bikeke ya molai ya boswani na kati ya Banefi—“oyo batiaki bondimi na makebisi mpe bimoniseli ya Nzambe”—mpe Balamani, oyo batiaki te (2 Nefi 5:6). Yakobo, oyo azalaki ndeko mobali leki ya Nefi mpe sikawa oyo babulisaki lokola moteyi mpo na Banefi, alingaki bato ya boyokani bayeba ete Nzambe akobosana bango mokolo moko te, yango wana basengeli mokolo moko te kobosana Ye. Oyo ezali nsango moko biso tozali na yango mposa solo lelo (tala Doctrine Alliances 67:-16). “Tika tomikundola ye … mpo ete tobwakisama te. … Monene ezali bilaka ya Nkolo,” Yakobo asakolaki (2 Nefi 10:20–21). O ntei ya bilaka wana, moko te ezali monene koleka elaka ya “bomikabi ezanga ndelo” mpo na kolonga liwa mpe lifelo (2 Nefi 9:7). “Boye,” Yakobo asukisaki, “bosepelisa mitema na bino”! (2 Nefi 10:23).

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

2 Nefi 6–8

Nkolo atonda na boboto na bato na Ye mpe akokokisa mayokani na Ye.

Mpo na kosunga bato na ye basosola ete bazali eteni ya ndako ya Yisalaele mpe bakokaki kolikya na Nzambe mpe bilaka na Ye, Yakobo atangaki masakoli ya Yisaya, oyo ekomami na 2 Nefi 6–8. Nsango wana ezali mpo na yo mpe, mpo ete Basantu ya Mikolo ya Nsuka bazali lisusu eteni ya bato ya boyokani ya Nzambe. Ntango ozali kotanga mikapo oyo, kanisa na ntina ya mituna lokola oyo elandi:

  • Nayekoli nini mpo na oyo etali bolingo ya bosikoli ya Mobikisi mpo na ngai? Maloba to masakola nini ezali kolobela bolingo oyo mingi mingi kolobela yango malamu?

  • Nini Mobikisi apesi na bato oyo baluki Ye?

  • Nakoki kosala nini koleka mpo na “kozela” na bondimi Mobikisi mpe mapamboli elakama na Ye?

Elilingi
elembo ya seminele

2 Nefi 9:1–26

Yesu Klisto abikisi ngai uta na lsumu mpe liwa

Nzela moko ya kofandisa bososoli na yo mpo na Yesu Klisto esengeli kokanisa oyo etali maye ekokaka kokomela biso na kozanga Ye. Ntango ozali kotanga 2 Nefi 9:1–26, kanisa koyoka to kotia elembo na langi moko maye makokaki kokomela biso na kozanga Bomikabi ya Yesu Klisto. Nsima, na molongo ya nkombo to langi mosusu, okokaki koluka maye tokoki kozwa na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi. Koyekamaka na maye bozali kotanga, lolenge nini bokokaki kolimbola mpo na nini tozali na mposa ya Bomikabi ya Yesu Klisto? Nini ozwaki oyo ezali kofula yo osanzola “bwanya ya Nzambe, boboto mpe ngolu na ye”? (2 Nefi 9:8).

Na kobakisa na koteya maye Yesu Klisto uta na yango abikiselaki Ibiso, Yakobo lisusu apesaki biso makanisi etali lolenge nini Ye asalaki yango. Kanisa kokoma maye omoni na 2 Nefi 9:11–15, 20–24.

Yakobo akamwisamaki mpenza na mwango ya bosikoli ya nzambe ete alobaki makasi “O monene boniboni ezali mwango ya nzambe na biso.” Luka bokamwi na ye kati na 2 Nephi 9 (mingi mpenz ana yango ezwami kati na milongo 8–20). Oyekoli nini uta na milongo oyo na etali mwango ya Nzambe? Makambo nini esalisi yo oyoka ndambo mosusu ya maye Yakobo ayokaki? Lokola eteni ya kongumbemela mpe boyekoli na yo, kanisa koluka loyembo moko oyo ekoki koloba lolenge nini ozali koyoka etali Ye, lokola “How Great Thou Art” (Hymns, no. 86).

Tala lisusu “Where Justice, Love, and Mercy Meet,” “Jacob Teaches of the Resurrection” (videos), Gospel Library; Gospel Topics, “Atonement of Jesus Christ,” Gospel Library.

2 Nefi 9:7

Bomikabi ya Mobikisi ezangi ndelo.

Okokaki kosala nini mpo na kososola malamu “bomikabi ezanga ndelo” ya Yesu Klisto? (2 Nefi 9:7). Ntango mosusu okokaki kotala makambo oyo ezali komonana lokola ezanga ndelo na motango—biteni ya matiti na elanga, mbuma ya mabele na libongo, to minzoto na likolo. Lolenge nini Bomikabi ya Mobikisi ezangi ndelo? Lolenge nini ezali lisusu ya moto ye moko? Maloba nini na 2 Nefi 9 esalisi yo oyoka botondi mpo na maye Mobikisi asalaki mpo na yo?

2 Nefi 9:27–54

Nakoki koya epayi ya Klisto mpe kolanda mwango ya Nzambe.

Na 2 Nephi 9, Yakobo asalelaki masakola mibale ya nguya mpe ya kokesana: “mwango etonda na boboto ya Mokeli monene” mpe “ mwango wana ya mayele mabe ya moko oyo ya mabe” (2 Nefi 9:6, 28). ntango mosusu okoki koyema nzela moko mpe kotia yango elembo Mwango ya Tata ya Lola. Nsima luka 2 Nefi 9:27-52. Luka makebisi mpe mabengisi oyo Yakobo apesaki mpo na kosalisa biso tolanda mwango oyo. Koma maye omoni mpembeni ya nzela. Lolenge nini Satana amekaka kokamba biso mosika ya mwango ya Nzambe? Oyoki nini ofulami kosala na eyano na makebisi mpe mabengisi ya Yakobo?

2 Nefi 10:20, 23–25

Libonza ya Yesu Klisto ekoki komemela ngai esengo.

Nsango ya Yakobo ezalaki moko ya bosepeli. “Nazali kolobela bino makambo oyo,” elobaki ye, “ete bokoka kosepela, mpe botombola mitu na bino libela” (2 Nefi 9:3). Ntango ozali kotanga 2 Nefi 10:20, 23–25, oyekoli nini oyo esepelisi motema na yo? Nini okosala mpo na komikundola makambo oyo ntango oyokaka kolemba nzoto?

Tala lisusu Yakobo 16:33; D. Todd Christofferson, “The Joy of the Saints,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 15–18; “Jacob Encourages the Nephites to Be Reconciled with God” (video), Gospel Library.

Mpo na makanisi mingi, botala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

2 Nefi 9:6–10, 19–24

Yesu Klisto azali Mobikisi na ngai.

  • Lolenge nini okoki kosalisa libota na yo esosola mpe eyoka ete bazali na mposa ya Mobikisi Yesu Klisto? Lokasa ya molulu ya poso oyo ekoki kosalisa. Ezali kosalela lisese ya pete ya libulu mpe emateli. Kanisa kosalela 2 Nefi 9:21–22 mpo na kosolola elongo na bana oyo etali mpo na nini ozali na botondi mpo na Yesu Klisto.

  • Moko nzela ya kosalisa bana basosola mpo na nini bazali na mposa ya Mobikisi ezali koteya bango oyo etali Bokwei. Okoki kolakisa elilingi ya Adama mpe Eva, lokola Leaving the Garden of Eden (Gospel Library), mpe elilingi ya Yesu Klisto likolo na ekulusu. Kanisa kosenga bango balimbola maye mazali kosalema na elilingi moko na moko? Lolenge nini tokokani na Adama mpe Eva? Ntango mosusu 2 Nefi 9:6–10 ekoki kosalisa bango bamona maye Yesu asalaka mpo na biso. Kanisa kobengisa bana bakabola mayoki na bango mpo na oyo etali Yesu Klisto. Loyembo lokola “I Feel My Savior’s Love” (Children’s Songbook, 74–75) ekoki kosalisa.

Teya bosolo na masolo mpe bandakisa. Zala na kondima ete masolo mpe bandakisa ozali kosalela ezali koteya bosolo. Ndakisa, ntango ozali kosalela lokasa ya molulu ya poso oyo, teya ete Yesu Klisto ayaki kati na “libulu” mpo na kosalisa biso na etape moko na moko ya nzela ntango tozali komata mpo na kobima.

2 Nefi 09:20–29, 42–43, 49

“Motema na ngai mosepeli na bosembo.”

  • Mpo na kopesa makasi na bana na yo “[basepela] na bosembo” to na esengo mobimba kotosa nkolo (2 Nefi 9:49), ntango mosusu okoki kokabola bandakisa kati na yango mwana asalaka boponi malamu to boponi mabe. Bengisa bana batelema soki boponi ememaka esengo mpe bafanda soki boponi ememaka mawa. Ntango nini toyokaki esengo mpamba te tosalaki boponi moko ya kolanda Yesu Klisto.

  • Bana na yo bazali na litomba mingi ya kosolola na bato (soki basili naino te) oyo bakanisaka ete mibeko ya nkolo azali liboma to abetela. Ntango mosusu yo mpe bana na yo bokoki kosolola mpo na ntina ya lolenge nini kolimbola mpo na nini tozalaka na esengo ya kobatela mitindo. Mpo na nini ezali motuya kotia elikya na toli ya Nzambe ata soki tozali kososola yango mombimba te? Tokoki kopesa bango makasi ya koluka kati na 2 Nefi 9:20, 28–29, 42–43 mpo na kosalisa na kokanisa oyo etali mpe kosolola na mituna oyo.

Mpo na makanisi mingi, botala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga zulunale.

Elilingi
Yesu Klisto azali kobikisa bato

Abikisaki Bato Mingi ya Bokono ya Ndenge na Ndenge,, na J. Kirk Richards

Bimisa na lokasa