Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mibale 12–18: “Tofandaki na bolandi ya Lolenge ya Esengo.” 2 Nefi 3–5


“Sanza ya mibale 12–18: ‘Tofandaki na bolandi ya Lolenge ya Esengo.’ 2 Nefi 3-5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya mibale 12–18. 2 Nefi 3–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Nefi mpe mwasi na ye

Sanza ya mibale 12–18: “Tofandaki na bolandi ya Lolenge ya Esengo”

2 Nefi 3–5

Kotangaka 1 Nephi, okoki kozwa makanisi ete Nefi azalaki neti monene koleka oyo azalaki na bomoi. “Monene na nzoto” na mosuni mpe molimo lokola (1 Nefi 2:16), amonanaki lokola aningisangaki ta na mimekano akutanaki na yango. To na moke oyo ezali oyo tokoki kokanisa. Ntango bondimi ya Nefi ezalaki malamu, maloba na ye ya boboto kati na 2 Nefi 4 emonisi ete kutu bato ya bondimi bamiyokaka mbala mosusu “kimobola” mpe “na pete ya kozingama” na masenginya. Awa tozali komona moto moko oyo azali komekaka, oyo alingi kozala na esengo, kasi ya ye “motema ezali kopema mpo na masumu [na ye].” Tokoki komimona kati na oyo mpe na mokano ya esengo oyo elandaka: “Nzokande, nayebi nani natielaki motema” (tala 2 Nefi 4:15–19).

Ntango Nefi mpe bato na ye bayekolaki kobika “na bolandi ya lolenge ya esengo” (2 Nefi 5:27), bayekolaki lisusu ete esengo eyaka na pete te to kozangaka bileko ya mawa. Eyaka nsuka nsuka uta na kotielaka Nkolo motema, “libanga ya bosembo [na biso]” (2 Nefi 4:35).

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

Elilingi
elembo ya seminele

2 Nefi 3:6–24

Joseph Smith aponamaki na Nzambe mpo na kozongisa nsango malamu.

Lehi akabolaki na mwana na ye ya mobali Yosefe esakola epesama na nzela ya Yosefe ya Ezipiti. Esakola yango etalaki “momoni ya boponi,” Joseph Smith ya mikolo ekoya. Nini milongo 6–24 elobi ete Joseph Smith akosala mpo na kopambola bato ya Nzambe? Kanisa lolenge nini mosala ya Joseph Smith ezali “ya motuya mpenza” mpo na yo. Okoki kozwa makanisi mosusu uta na bavideo eetali Joseph Smith kati na lisanga ya “Prophets of the Restoration” kati na Gospel Library. Kanisa etali mituna lokola oyo, mpe kanisa kokoma biyano na yo:

  • Oyebi nini etali Tata ya Lola mpe Yesu Klisto mpo na maye Joseph Smith ateyaki?

  • Lolenge nini bomoi na yo ekeseni mpo na maye Nkolo azongisaki na nzela ya Joseph Smith?

  • Nini bomoi na yo elingaki kokesena soki Bozongisi esalamakia te?

Eteni moko ya motuya ya etinda ya Joseph Smith ezalaki kobimisa Buku ya Mormon. Nini oyekoli uta na mokapo oyo etali mpo na nini Buku ya Mormon ezali motuya? Mingi mingi, okoki koluka bantina kati na milongo 7, 11–13, 18–24.

Tala lisusu Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 50:24–38 (kati na bobakisi ya Biblia); Gospel Topics, “Joseph Smith,” Gospel Library; “Praise to the Man,” Hymns, no. 27.

Elilingi
Profeta Joseph Smith

Profeta ya Nkolo, na David Lindsley

2 Nefi 4:15–35

“O Nkolo, natieli yo motema.”

Nefi alobaki akolinga “kokoma makambo ya molimo na ngai” (molongo 15). Ntango ozali kotanga maye akomaki na 2 Nefi 4:15–35, mituna yo moko, “Nini ezali makambo ya ya ngai molimo?” Banza kokoma yango, lokola ekomaki Nefi, mpe kokabola yango na bato oyo olingaka.

Kotalaka lolenge niniNefi azwaki libondi ntango amiyokaki kozingama mpe kotungisama ekoki kosalisa yo ntango ozali na mayoki ekokani. Tala kati na milongo 15–35 mpona biteni oyo emelaka yo libondi. Oyebi moto moko mosusu oyo akokaki kozwa libondi kati na biteni oyo?

Tala lisusu Ronald A. Rasband, “The Things of My Soul,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 39-41.

2 Nefi 5

Nakoki kozwa esengo kati na kotiaka nsango malamu ya Yesu Klisto na misala.

Okanisi elingi koloba nini kozala na esengo? Nefi akomaki ete bato na ye bafandaki “nsima ya lolenge ya esengo” (2 Nefi 5:27). Osengeli koluka maponi Nefi mpe bato na ye basalaki oyo esalisaki bango bazala na esengo 2 Nefi 5:6, 10–17). Nini ekoki kosalisa yo otonga bomoi ya esengo lokola bato ya Nefi?

2 Nefi 5:20–21

Botutu nini eyaki likolo ya Balamani?

Na mikolo ya Nefi botutu ya Balamani ezalaki ete bango “babwakisamaki mosika na miso [ya Nkolo] … mpo na masumu na bango” (2 Nefi 5:20-21). Oyo elingi koloba ete Molimo ya Nkolo alongolamaki uta na bomoi na bango. Ntango Balamani nsima bayambaki nsango malamu ya Yesu Klisto “bolakeli mabe ya Nzambe elandaki bango lisusu te” (Alma 23:18).

Buku ya Mormon lisusu elobi ete elembo ya loposo ya moindo eyaki likolo na bango nsima ya bokabwani ya Banefi na bango. Ezalela mpe lolenge ya elembo oyo esosolami na mobimba te. Elembo yango na ebandeli ekesenisaki Balamani na Banefi. Nsima, lokola Banefi mpe Balamani moko na moko bakotaki na bileko ya nkuna mpe ya bosembo, elembo ekomaki makasi.

Baprofeta balobi na mikolo na biso ete poso moindo ezali elembo ya bozangi lipamboli ya nzambe to bolakeli mabe te. Mokambi Russell M. Nelson asakolaki: “Nayebisi bino solo ete botelemi na bino liboso ya Nzambe etali langi ya loposo na bino te. Lipamboli to bozangi lipamboli na Nzambe etali bomipesi na yo na Nzambe mpe mitindo na Ye, kasi loposo ya nzoto na yo te” (“Let God Prevail,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 94).

Lokola Nefi ateyaki, Nkolo ”akoboya moko te oyo akoya epai ya ye, moindo mpe mondele, mowumbu mpe monsomi, mobali mpe mwasi; … bango nyonso bazali lolenge moko kaka epayi ya Nzambe” (2 Nefi 26:33).

Tala lisusu “Till We All Come in the Unity of the Faith” (video), Gospel Library.

Mpo na makanisi mingi, botala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

2 Nefi 3:6–24

Joseph Smith azalaki profeta.

  • Kanisa lolenge nini bokoki koteya bana na yo etali mosala monene oyo Nzambe akokisaki na nzaela ya Joseph Smith. Mpo na kobanda, okoki kosalisa bana na yo bamona liloba “momoni” kati na 2 Nefi 3:6 mpe kolimbola ete baprofeta babiangami bamoni mpo ete Tata ya Lola asalisaka bango bamona makambo tokoki komona te. Kabola mpo na nini ozali na botondi ya kozala na momoni kokambaka Eklezia.

  • Buku Gospel Art Book ezali na bililingi mingi okoki kosalela mpo na koteya etali mosala Nzambe asalaki na nzela ya Joseph Smith (tala bililingi 89–95). Tika bana na yo bakabola maye bayebi na ntina ya bililingi yango. Mpo na nini Joseph Smith abiangami “moponami momoni”? Joseph Smith asalaki nini oyo ezali “ya motuya mpenza”? (molongo 7).

2 Nefi 4:15–355

Nalingaka “makambo ya Nkolo.”

  • Nini epesaka biso esengo? Kanisa kotanga na lisanga milongo uta na 2 Nefi 4 mpo na komona maye masepelisaki Nefi to mapesaki ye esengo (tala milongo 15–16, 20–25, 34–35). Kati na etinda na ye “The Things of My Soul,” Mpaka Ronald A. Rasband akabolaki makambo “makambo ya nkolo” nsambo oyo ezali motuya epayi na ye (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 39–41). Ntango mosusu okoki kotala lisusu molongo na ye na lisanga mpe kolobela etali “makambo Nkolo” oyo ezali motuya epayi na yo.

  • 2 Nefi 5 lisusu elimboli makambo oyo esalisaki Banefi bazala na bomoi “nsima ya lolenge ya esengo” (molongo 27). Okoki kopesa maloba to bililingi mosusu oyo ezali kolakisa makambo oyo mpe kosalisa bana na yo bakokanisa yango na milongo kati na mokapo 5. Bandakisa mosusu ebakisi libota (molongo 6),mitindo ya Nzambe (molongo 10), makomi (molongo 12), mosala (molongo 15 mpe 17), batempelo (molongo 16), mpe mabiangi ya Eklezia (molongo 26), Lolenge nini makambo oyo ememelaka biso esengoo?

2 Nefi 5:15–16

Tempelo ezali ndako ya Nkolo.

  • Ntango ozali kotanga 2 Nefi 05:15-16 epayi ya bana na yo, bakoki kosaala lokola bazali kosalisa Nefi kotonga tempelo. Okoki lisusu kolakisa bango bililingi ya bitonga ekeseni, kobakisaka tempelo. Lolenge nini batempelo ekeseni na bitonga misusu? Kabola na moko mpe mpe mosusu mpo na nini tempelo ezali motuya epayi na yo (tala lisusu “I Love to See the Temple,” Children’s Songbook, 95).

Ngonga nyonso ekoki kozala ngonga moko ya koteya. Kokanisa te koteyaka libota na yo lokola likambo moko okosala mbala moko na poso na ntango ya liteya moko ebongisami malamu. Kanisa yango lokola likambo moko osalaka na bangonga nyonso.

Mpo na makanisi mingi, botala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga zulunale.

Elilingi
Banefi bazali kotonga tempelo

Tempelo ya Nefi, na Michael T. Malm

Bimisa na lokasa