Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mibale 26–Sanza ya misato 3: “Nkombo na Ye Ekobengama … Mwana Mokonzi ya Kimia.” 2 Nefi 11–19


Sanza ya mibale 26–Sanza ya misato 3: “Nkombo na Ye Ekobengama … Mwana Mokonzi ya Kimi.’ 2 Nefi 11-19,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya mibale 26–Sanza ya misato 3. 2 Nefi 11–19,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Yisaya azali kokoma na biloko ezingama

Sanza ya mibale 26–Sanza ya misato 3: “Nkombo na Ye Ekobengama … Mwana Mokonzi ya Kimia”

2 Nefi 11–19

Kokoma likolo ya bapalaki ya libende ezali pete te, mpe esika likolo ya bapalaki mike ya Nefi ezalaki moke. Na yango mpo na nini Nefi asali bokasi ya kokoma mingi mpenza ya makomi ya profeta Yisaya kati na makundoli na ye? Asalaki yango mpo ete alingaki biso, tondimela Yesu Klisto. “Molimo na ngai esepeli,” akomaki, “na kokolisaka epai ya bato na ngai bosolo ya boyei na Klisto” (2 Nefi 11:4). Nefi amonaka nini ekokomela bato na ye na nkola ekoya. Ye amonaki ete, atako mapamboli na bango ya minene, bakokoma lofundu, bato na boswani, mpe ya mokili (tala 1 Nefi 12; 15:4–6). Ye amonaka mikakatano ya lolenge moko na mikolo na biso (tala 1 Nefi 14). Makomi ya Yisaya ekebisaki kotelemela nkuna ya boye. Kasi bapesaka lisusu Nefi elikya mpo na mikolo ekoya ya nkembo —nsuka ya nkuna, bosangani ya bandimi, mpe “pole monene” mpo na bato oyo bazalaki “batambolaka na molili ” (2 Nefi 19:2). Nyonso oyo ekokoma mpamba te “mwana moko [abotamaki] ” oyo akokaki kosukisa bozangi boyokani—“Mwana Monkonzi ya Kimia” (2 Nefi 19:6).

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

Lolenge nini nakoki kososola malamu mpenza mateya ya Yisaya?

Nefi andimaki ete, “maloba ya Yisaya ezali polele te” (2 Nefi 25:4). Kasi akabolaki lisusu makanisi mpo na kosalisa biso tozwa ndimbola kati na makomi ya Yisaya:

  • Kokokanisa maloba na ye na” yo moko (2 Nefi 11:2). Mingi ya mateya ya Yisaya ezali na bandimbola mpe banzela mingi oyo ekoki kosalelama. Ndakisa, ntango ozali kotanga oyo etali bisika ya kofanda kati na 2 Nefi 14:5–6, kanisa lolenge nini milongo oyo ekokoki kosalelama mpe mpo na libota na yo. Mituna, “Nini Tata ya Lola alingi ngai nayekola?”

  • Luka bilembo ya Yesu Klisto (tala 2 Nefi 11:4). Mingi ya mateya ya Yisaya oyo etali Mobikisi epesami na nzela ya bilembo. Ndakisa, lolenge nini Mobikisi alakisami na 2 Nefi 19:2? Elembo oyo eteyi yo nini etali Ye?

  • “Luka kozala “moto ya kotondisama na molimo ya masakoli” (2 Nefi 25:4). Ntango ozali koyekola, sambela mpo na kokambama na molimo. Okoki kososola makambo nyonso na mbala ya liboso te, kasi Molimo akoki kosalisa yo oyekola maye ozali na yango mposa ya koyeba.

Okoki lisusu kozwa lisungi na kotalaka masalisi ya boyekoli kati na makomi, kobakisa makomi na nse ya lokasa, mitu ya mikapo, mpe Mokambi na Makomi. Buku of Mormon mikanda ya etelo ya likolo ya Boyambi ya Sika ezali na nsango mosusu oyo ekoki kosalisa yo oyekola oyo etali ezalela ya lisitwale ya mateya ya Yisaya.

2 Nefi 11–19

Yisaya atatolaki ya Yesu Klisto.

Lokola Yisaya asalelaki bilembo, ekoki kozala pete mpo na kobosana litatoli ya nguya ya Yesu Klisto. Mpo na Mobikisi kati na 2 Nefi 13:13; 14:4–6; 15:1–7; 16:1–7; 17:14; 18:14–15; 22:2. Milongo oyo eteyi yo nini na ntina na Ye?

Esakola kati na 2 Nefi 19:6 ezali kopesa milongo mingi ya bankombo ya Yesu Klisto. Lolenge nini Ye akokisaki misala oyo kati na bomoi na yo?

Tala lisusu Ulisses Soares, “Jesus Christ: The Caregiver of Our Soul,” LiahonaSanza ya mitano 2021, 82-84.

2 Nefi 12-13; 15

Bato ya lofundo mpe baye balinga mokili bakokitisama.

Nefi amonaki na mosika ete lofundo ekokweyisa bato na ye” (tala 1 Nefi 12:19). Yango wana ezali kokamwa te ete Nefi alingaki kokabola elongo na bato na ye makebisi ya mbala na mbala ya Yisaya mpo na lolendo. Na mikapo 12 mpe 13, luka maloba oyo Yisaya asalelaki mpo na kolimbola lofundo, lokola lokumu mpe lolendo. Na 2 Nefi 15:1–24, luka maloba ya bilembo kolimbolaka mbano ya lofundu. Nsima okoki komeka koloba na mokuse oyo otangaki na maloba na yo moko. Kanisa oyo etali lolenge nini okopona kozala na komikitisa.

Tala lisusu “Chapter 18: Beware of PrideTeachings of Presidents of the Church: Ezra Taft Benson (2014), 229–40.

Elilingi
elembo ya seminele

2 Nefi 12:2–3

Tempelo ezali ndako ya Nkolo.

Yisaya abiangaki tempelo “ngomba ya ndako ya Nkolo” (2 Nefi 12:2). Mpo na nini ngomba ezali elembo malamu mpo na tempelo?

Lolenge nini okolimbolela moto moko mpo na nini tosengeli na batempelo? Okoki komona mwa biyano bikoki kati na 2 Nefi 12:2–3 mpe etinda ya Mokambi Russell M. Nelson “The Temple and Your Spiritual Foundation” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 93–96). Koyekamaka na maye ozali kotanga, lnini Nkolo alingi yo oyekola mpe okutana na yango kati na ndako na ye esantu? Makambo nini ozwi yo kuna?

Okoki komona mituna ta lisolo ya mokanda mpo na tempelo na nkasa 36–37 ya Mpo na Bokasi ya Bilenge: Mokambi mpo na Kosala Maponi, Kanissa kotanga moko na moko yo moko, nini motuna oyo eteyi ngai mpo na oyo etali banzela ya Nkolo? Lolenge nini yango esalisi ngai “natambola na ndenge na ye”?

Tala lisusu Gospel Topics, “Temples,” Gospel Library; “KHigh on the Mountain Top,” Hymns,, no. 5.

2 Nefi 12–19

Yesu Klisto akosangisa bato na Ye.

Atako nkuna ye amonaki, Yisaya amonaki elikya mpo na mikolo mikoya. Kanisa koyekola moko na moko ya bankoma oyo elandi. Koma bosolo moko to mingi nkoma moko na moko eteyaka oyo etali mikolo na biso: 2 Nefi 12:1–5; 14:2–6; 15:20–26; 19:2–8. Mpo na nini oyoki bankoma oyo ezali motuya mpo ete biso tososola?

Mpo na makanisi mingi, botala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Luka bandakisa. Na kati ya makomi tokoki kozwa bandakisa oyo elakisi biso lolenge nini Nkolo asalaka. Na 2 Nefi 11–19, bokokaki koluka bandakisa oyo ezali kolakisa lolenge nini Nkolo akebisaka na ntina ya lisumu mpe alimbisaka oyo bayambolaka.

Makanisi mpo na Koteya bana

2 Nefi 12:2–3

Tempelo ezali ndako ya Nkolo.

  • Yisaya alimbolaki tempelo lokola “ngomba ya ndako ya Nkolo.” Bana na bino bakoki kosepela kosala lokola komata ngomba ntango ozali kotanga 2 Nefi 12:2–3. Salisa bango bamona maloba nini kati na milongo oyo ezali kolobela mpo na nini tozali na batempelo.

  • Mpo na kolakisa maloba “tokotambola na banzela na ye” ya 2 Nefi 12:3, okoki kosala nzela na nse, kokambaka tii na elilingi ya tempelo. Ntango bana na yo bazali kotambola likolo ya Nzela yango, bakoki koloba nkombo ya makambo bakosala mpo na kotambola kati na banzela ya Nkolo.

  • Ntango mosusu bana na yo bakoki koyema elilingi yoko ya bangomei kokendaka na tempelo. Bakoki lisusu koyemba to koyoka loyembo etali tempelo, lokola “I Love to See the Temple” (Children’s Songbook, 95). Salisa bango bamona maloba kati ya loyembo oyo ezali koteya maye tempelo ezali mpe maye tosalaka kuna.

2 Nefi 11:4–7; 17:14; 19:6

Yesu Klisto azali Mobikisi na ngai.

  • Ezali na bankombo mingi ya Yesu Klisto kati na 2 Nefi 11:4–7; 17:14; 19:6. Salisa bana na yo bamonna yango mpe balobela oyo etali maye elingi koloba. Ndakisa, “Klisto” elingi koloba “mopakolami” “Emanuele” elingi koloba “Nzambe kati na biso.” Nini bankombo oyo eteyi biso na ntina ya Yesu?

  • Lakisa biteni ya video “The Christ Child” (Gospel Library) oyo ezali kolakisa bato bakeseni oyo bazali kotala Yesu mbala ya yambo. Telemisa video yango na ntango ya bolakisi oyo, mpe tuna bana na yo etali maye bato oyo bakokaki koyoka. Tolingaki koyoka nini soki tozalaki kuna? Tokoyoka lolenge nini ntango tokomona Ye lisusu?

2 Nefi 15:20 .

Satana amekaka kokosa ngai na oyo etali malamu mpe mabe.

  • Lakisai bana na yo eloko moko ya bololo to ngai, lokola eteni ya lilala ya ngai, na kati ya lokasa ya bonbon to eloko ya sukali. Botanga elongo 2 Nefi 15:20. Lolenge nini Satana amekaka kosala makambo oyo ezali mabe emonana malamu? Okoki lisusu kolakisa basegonde 90 ya liboso ya video “You Will Be Freed” (Gospel Library). Mpo na nini molobi mbisi abombaka ndobo na ye? mpo na nini Satana abombaka lisumu? Lolenge nini Yesu Klisto asalisaka biso tokima kokosama na Satana?

Mpo na makanisi mingi, botala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga zulunale.

Elilingi
Tempelo ya Panama Panama City

Tempelo ya Panama Panama City “Ndako ya Nkolo ekotiama na nsonge ya bangomba, … mpe bikolo nyonso bikosopana epayi na yango” (2 Nefi 12:2).

Bimisa na lokasa