Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya misato 11–17: “Mosala ya Kokamwa mpe Likamwisi.” 2 Nefi 26–30


“Sanza ya misato 11–17: ‘Mosala ya Kokamwa mpe Likamwisi.’ 2 Nefi 26–30,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya misato 11–17. 2 Nefi 26–30,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Yesu azali kosalisa mwasi moko

Akokamba Yo na Loboko,, na Sandra Rast

Sanza ya misato 11–17: “Mosala ya Kokamwa mpe Likamwisi.”

2 Nefi 26–30

“Nasakoleli bino mpo na oyo etali mikolo ya nsuka,” Ekomaki Nefi (2 Nefi 26:14). Na maloba mosusu, azalaki kokoma mpo na oyo etali mikolo na biso. Mpe ezali na ntina ya komitungisa mpo na oyo etali maye amonaki: bato kowanganaka nguya mpe makamwisi ya Nzambe; boluli mpe bitumba etondi. Kasi likolo ya “misala ya molili” ya mikolo ya nsuka oyo (2 Nefi 26:10, 22) miye ekambama na moyini, Nefi alobelaki lisusu “mosala ya kokamwa mpe likamwisi” moye ekambami na Nzambe Ye moko (2 Nefi 27:26). Katikati ya mosala wana ekozala buku moko—buku oyo etalisi lokuta ya Satana, mpe oyo esangisi bosembo. Buku wana ezali Buku ya Mormon, mosala ya kokamwa ezali mosala ya Eklezia ya Nkolo kati na mikolo ya nsuka, mpe likamwisi ezali—ete Nzambe abengisi—biso banso, atako botau na biso, tosala elongo.

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

2 Nefi 26–27; 29–30

Nzambe alengelaki Buku ya Mormon mpo na mikolo na biso.

Na 2 Nefi 26–27, Nefi afulamaki mpenza na lisakoli ya kala ya Yisaya (tala Yisaya 29) mpe akokanisa yango na bato na ye mpe na nkoma na bango—Buku ya Mormon. Ye ayebaki na emoniseli, kutu liboso ete Buku ya Mormon ekomama mobimba, ete mokolo moko “yango ekozala na motuya mingi mpo na bana ya bato” (2 Nefi 28:2). Mpo nini Buku ya Mormon ezali motuya monene mpo na yo? Kanisa na ntina ya motuna oyo ntango ozali kotanga 2 Nephi 29–30. Misala “mosusu ya kitoko” ezali nini (2 Nefi 27:26) oyo Nzambe azali kokokisa na liloba mpe na bomoi na yo na nzela ya Buku ya Mormon?

Tala lisusu Joseph Smith—History 1:62–65.

Elilingi
elembo ya seminele

2 Nefi 26:23–33

Yesu Klisto abiangi biso banso toya epayi na Ye.

Ezali na babosolo ebele ya kitoko ya kozwa na 2 Nefi 26:23–24. Ndakisa, okoki kokanisa na ntina ya maye Yesu Klisto asalaki “mpo na litomba ya mokili”—mpe mpo na yo. Lolenge nini Ye “asangisaka bato nyonso”—mpe yo—“epayi na ye”? Nini oyoki efuli yo osala na eyano ya maloba na Ye ya bolingo?

Koba kotanga mpe koluka babosolo na ntina ya Mobikisi kati na milongo 25–33. Banza malamu mabiangi na Ye. Lolenge nini okosangisa na bokuse nsango ya Yesu Klisto epai na yo na liloba moko? Loyembo lokola “Come unto Jesus” (Hymns, no. 117) ekoki kofungola makanisi na yo na mayele mosusu.

Banza lolenge nini milongo oyo ekoki kosunga lolenge osalaka na basusu mpe kobengisa bango baya epai ya Klisto. Okoki kozwa makanisi mosusu kati ya nsango ya Mpaka D. Todd Christofferson “The Doctrine of Belonging” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2022, 53–56).

Tala lisusu 3 Nefi 18:30–32; Dallin H. Oaks, “What Has Our Savior Done for Us?,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 75–77; Gospel Topics, “Belonging in the Church of Jesus Christ,” Gospel Library.

Bobanga te mpo na kimia Mituna malamu ezwaka ntango mpo na koyanolama. Esengaka koluka, kokanisa, mpe lifuli. Ntango oyo ozali kozela mpo na kozwa biyano na motuna ekoki kozala ntango ya bule ya bomanyoli. Boya lisenginya ya kosukisa ntango oyo na lombango na kosalaka eloko mosusu songolo.

2 Nefi 28

Satana alukaka kokosa.

Mingi ya lokuta mpe mayele ya kosala ya Satana elakisami polele na 2 Nefi 28. Luka yango na kati na milongo 6, 8, 21–23, 29. Mpo na nini osengeli koyeba maye matali lokuta ya Satana? Nini okosala ntango moyini ameki kokosa yo?

Oyo etangami na nse awa ezali makomi misusu oyo eboyi lokuta ya Satana. Tala lisusu soki okoki kokokanisa malongi ya solo kati ya milongo oyo na malongi ya lokuta oyo Nefi akebisi biso na 2 Nefi 28:

Tala lisusu Gary E. Stevenson, “Deceive Me Not,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2019, 93–96.

2 Nefi 28:27–3129

Nzambe azali kokoba kopesa emoniseli mpo na kokamba bana na Ye.

Lokola Basantu ya Mikolo mya Nsuka, topambolami na litondi ya liloba ya Nzambe. Mpe nsima, lokola Nefi akebisaki, tosengeli te koyoka ete, “tozali na yango ekoka!” Ntango ozali kotanga makebisi kati na 2 Nefi 28:27–31 mpe 2 Nefi 29, kanisa na ntina ya mituna lokola oyo:

  • Lolenge nini Nzambe alingi ngai nayoka mpe nayanola na liloba na Ye?

  • Mpo na nini bato ntango mosusu bazali na “nkanda” mpo na oyo etali kozwa bosolo mingi uta na Nzambe? (2 Nefi 28:28). Esila ngai koyoka lolenge oyo te? Soki bongo, lolenge nini nakoki kobongwana?

  • Oyo elingi koloba nini koyamba liloba ya Nzambe? Lolenge nini ekoki ngai kolakisa Ye ete nalingi koyamba liloba na Ye mingi koleka?

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

2 Nefi 26:23–28, 33

Yesu Klisto alingi bato banso baya epai na Ye.

  • Mpo na koteya bana na bino na ntina ya libiangi ya Mobikisi na kati ya milongo oyo, osengeli kosolola na bango na ntina ya ntango babengisaki bato na molulu ya motuya, lokola na feti ya mokolo ya mbotama. Nsima bokoki kotanga 2 Nefi 26:23–28 elongo mpe komona maye Yesu Klisto azali kobengisa biso tosala. Bana na yo bakoki lokola kokela kalati oyo ezali kobengisa moto moko aya epai ya Yesu Klisto. Lendisa bango basalela liloba uta na milongo oyo kati ya libiangi na bango.

  • Elilingi na nsuka ya liteya oyo elakisi bato uta na bisika kilikili. Ntango mosusu bana na yo bakoki kotala foto ntango ozali kotanga 2 Nefi 26: 33. Okoki kobandela liloba “Yesu abengisi banso baya epai na Ye” ntango bana na yo bazali kolakisa moto mokomoko kati na foto—mpe nsima mpo na bango moko. Lolenge nini toyaka epai ya Yesu?

  • Loyembo etali kolinga bato banso, lokola “I’ll Walk with You” (Children’s Songbook, 140–41), ekoki kosunga yo oteya nsango ya 2 Nefi 26:33.

2 Nefi 28:2; 29:7–11; 30:3–6

Buku ya Mormon ezali lipamboli.

  • Mpo na kosunga bana na yo bayoka ete Buku ya Mormon ezali “ya litomba monene” (2 Nefi 28:2), okoki kolinga mokanda moko lokola likabo mpe kotika bango baloba nini ezali na kati. Bakoki koluka ndimbola kati ya 2 Nefi 30:3–6. Yebisa bana na yo mpo na nini Buku ya Mormon ezali na litomba monene epayi na bino, mpe tika bango bakabola mayokani na bango.

  • Banza kotunaka bana na yo bakanisa oyo moninga alobi, “Nazali na mposa te ya kotanga Buku ya Mormon. Nasila kotanga Biblia.” Nini tokoki koloba epai ya moninga na biso? Botanga elongo 2 Nefi 29:7–11 mpo na koyekola mpo na nini Nzambe alingaka biso tozala na babuku mibale oyo.

2 Nefi 28:30–31

Tata na Lola ateyaka ngai moke moke.

  • Ntango mosusu okoki kokanisa mama ya likambo ya liteya moko mpo na kosalisa bana na yo basosola oyo elimboli kotanga “molongo moko na moko”? Ndakisa, bakoki kosangisa puzzle to kotonga eloko songolo ya makasi, eteni moko na mbala moko. To okoki koteya bango likambo moko ya motuya ndambo ndambo, lokola komekaka kulube to koyemaka elilingi. Okoki nsima kotanga 2 Nefi 28:30 mpe kosolola lolenge Tata na Lola ateyaka biso bosolo moko na mbala moko.

  • Likanisi mosusu ekoki kozala ya kopona liloba uta na 2 Nefi 28:30 mpe kokomaka yango moto moko nsima ya mosusu, liloba moko mbala moko. Lolenge nini yango ekokani na lolenge Nzambe apesaka biso bosolo? Mpo na nini Nzambe amonisaka bosolo epayi na biso “molongo moko na moko, motindo moko na moko, awa ndambo mpe kuna ndambo” esika ya nyonso na mbala moko? Lolenge nini tokoki kolakisa Nzambe ete tolingaka kozwa bosolo mingi uta na Ye?

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo ya Friend magazini.

Elilingi
Yesu Klisto na kati ya lisanga

Klisto na Katikatina Judith A. Mehr

Bimisa na lokasa