Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya misato 25–31: “Akosekwa … na Libiki na Mapapu na Ye.” Pasika


“Sanza ya misato 25–31: ‘Akosekwa … na Libiki na Mapapu na Ye.’ Pasika,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya misato 25–31. Pasika,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Klisto mosekwi elongo na Bapostolo na Ye

Klisto mpe Bapostolo,, na Del Parson.

Sanza ya misato 25–31: “Akosekwa … na Libiki na Mapapu na Ye.”

Pasika

Bapostolo ya kala bazalaki sikisiki na matatoli na bango ya Yesu Klisto mpe Bosekwi na Ye (tala Misala 4:33). Bamilio bandimelaka Yesu Klisto mpe bamekaka kolanda Ye mpo na maloba na bango oyo ekomami na Biblia. Kasi batu misusu bakokaki komituna: soki Yesu Klisto azali Mobikisi ya mokili mobimba, bongo mpo na nini batemwe oyo bamonaki Ye na miso basukisamaki na mwa motango ya bato mpe uta na etuka moko ya moke?

Buku ya Mormon ezali lokola temwe mosusu, ya kondimisa bonzeneneke ete Yesu Klisto azali Mobikisi ya mokili, “oyo amimonisaka epayi na bikolo nyonso” (lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon) mpe oyo apesaka lobiko epayi ya banso oyo bayei epayi na Ye. Lisusu, nzeneneke ya mibale oyo azali kolakisa polele maye lobiko elingi koloba. Tala ntina Nefi, Yakobo, Mormon, mpe baprofeta nyonso basalaki mpenza na “molende mpo na kokoma maloba oyo likolo ya bapalaki”—mpo na kosakola na bankola ekoya nsima ete bango mpe “bayebaki Klisto, mpe … bazalaki na elikya ya nkembo na ye ” (Yakobo 4:3–4. Eleko ya Pasika oyo, emonisi likolo ya matatoli oyo ezali na Buku ya Mormon ete nguya ya Mobikisi ezali nyonso mibale ya mokili mobimba mpe ya moto ye moko—kosikolaka mokili mobimba mpe kosikolaka yo.

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Elilingi
elembo ya seminele

Mpo na Yesu Klisto, nakosekwa.

Ezali momesano na Pasika komaniola Bosekwi ya Yesu Klisto, kasi elingi koloba nini mpenza kosekwisama? Bososoli nini Buku ya Mormon epesi biso na ntina ya bosekwi? Ntango mosusu lokola eteni ya bosepeli na yo ya Pasika okokaki kosala molongo ya bosolo na ntina ya bosekwi oyo ozwi na 2 Nefi 9:6–15, 22; Alma 11:42–45; 40:21–25; 3 Nefi 26:4–5.

Okoki lisusu kokoma lolenge nini babosolo oyo etali lisekwa esimbi misala na yo mpe lolenge ozali kobika. Ndakisa, banza lolenge nini okoki kokokisa maloba oyo: Soki nayebaki te makambo oyo … mpe Mpo ete Nayebi makambo oyo …

Loyembo lokola “Je sais qu’il vit mon Redempteur” (Cantique, no. 73) ekoki kosunga yo okanisa na ntina ya mpo na nini Lisekwa ya Mobikisi ezali motuya mpo na yo. Ntango bozali koyemba, koyoka, to kotanga loyembo, bokoki komituna bino moko, “Lolenge nini bomoi na ngai ezali ya kokesena mpo ete Yesu Klisto asekwaki?”

Mpe Gospel Library ezali na liboke ya ba video ya Pasika oyo ekoki kozala eteni moko ya ndimbola mingi ya boyekoli na bino. Ntango mosusu bokoki kotala moko to ebele ya bavideo oyo mpe komanyola maye ebakisi na bososoli na yo to bosepeli ya Lisekwa ya Mobikisi.

Tala lisusu Luka 24:36–43; Misala 24:15; 1 Bakolinti 15:12–23; Reyna I. Aburto, “The Grave Has No Victory,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 85–86; Gospel Topics, “Resurrection,” Gospel Library; “Death, Grieving, and Loss” in the “Life Help” liboke kati ya Gospel Library.

Yesu Klisto akamataki likolo na Ye moko masumu, mpasi, mpe bibosono na ngai

Biblia eteyi na polele ete Yesu Klisto amikabi mpo na masumu na biso. Buku ya Mormon ebakisi bososoli na biso ya libonza mpe mpasi ya Klisto na ndenge ya motuya. Okoki kozwa mateya mosusu oyo na Mosiya 3:7; 15:5–9; Alma 7:11–13. Nsima ya kotanga biteni ya makomi oyo, kanisa kokoma maye omoni na etando lokola moko oyo:

Mobikisi ayokaki mpasi nini?

Mpo na nini Ayokaki mpasi?

Likambo oyo elingi koloba nini mpo na ngai?

Oyo ezali lolenge mosusu ya koyekola milongo oyo: Luka nzembo oyo oyoki ekokani na bansango ezali koteya. “Makomi” mabakisi na nsuka ya buku ya banzembo ekoki kosunga. Maloba nini kati ya nzembo oyo mpe makomi nini esungi yo osepela na bomikabi ya Mobikisi na bozindo koleka?

Tala lisusu Yisaya 53; Baebele 4:14–16; Gérald Caussé, “A Living Witness of the Living Christ,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 38–40.

Yesu Klisto akoki kopetola mpe kosalisa kokomisa ngai mobongi nie.

Ekokaki kolobama ete Buku ya Mormon ezali mingimingi lisolo ya bato oyo babongwanaki mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto. Okoki kotanga mwa mayebi oyo kati ya Mosiya 5:1–2; 27:8–28; Alma 15:3–12; 24:7–19. Okoki kokanisa na ntina ya bandakisa mosusu mpo na koyekola. Nini omoni ete mayebi oyo ezali ya kokokana? Bokeseni nini omoni? Masolo oyo eteyi yo nini na ntina ya lolenge nini Bomikabi ya Mobikisi ekoki kobongola yo?

Tala lisusu Alma 5:6–14; 13:11–12; 19:1–16; 22:1–26; 36:16–21; Etele 12:27; Moroni 10:32–33.

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mpo ete Yesu Klisto asekwaki, nakosekwa mpe lisusu.

  • Okoki kosalela “Chapter 53: Jesus Is Crucified” mpe “Mokapo 54: Jesus Is Risen” (kati na New Testament Stories, 136–38, 139–44) koyebisa bana na bino na ntina ya lisekwa ya Yesu Klisto. To botika bana na bino babetela bino lisolo, kosalelaka bilili kati ya mikapo oyo.

  • Botali ya Mobikisi Asekwa na Bato ya amerika ezali litatoli ya motuya ya Bosekwi na Ye. Banza koyebisa bana na yo na ntina na yango, kosalelaka 3 Nefi 1117; loyembo “Easter Hosanna”; to molongo ya nsuka ya “Masolo ya Buku ya Mormon” (Children’s Songbook, 68–69, 118–19). Bolendisa bana na bino bakanisa nini ekoki kozala koyoka bampota ya Yesu (tala 3 Nefi 11:14–15) to kozala moko ya bana oyo Ye apambolaki (tala 3 Nefi 17:21). Bokabola bino na bino mayoki na ntina ya Yesu Klisto mpe Bosekwi na Ye.

  • Mpo na kosunga bana na yo bamona maye Buku ya Mormon ezali koteya na ntina ya bosekwi, okoki kobengisa bango kolakisa lokola oyebi te oloko moko na ntina na yango mpe kotuna bango balimbola yango epai na yo. Sunga bango batala na 2 Nefi 9:10–15; Alma 11:41–45; mpe Alma 40:21–23 mpo na biyano na mituna lokola oyo: Nini elakisi kozala ya kosekwa? Nani akosekwisama? Mpe lisusu bengisa bango batatola na ntina ya Bosekwi ya Mobikisi lokola eteni ya eyano na bango.

Yesu Klisto ayebi lolenge nini ya kolendisa ngai.

  • Mosiya 3:7 mpe Alma 7:11 etalisi ndambo ya maye Mobikisi akokisaki na ntina ya Bomikabi na Ye. Okoki kotanga moko ya milongo oyo na bana na yo mpe kosenga bango bayoka maloba oyo elobeli bango maye Yesu anyokwamaki mpo na biso. Nsima okoki kotanga Alma 7:12 mpo na komona mpo na nini Ye anyokwamaki bongo. Tatola ete Yesu Klisto ayokaki mpasi na biso nyonso mpe bokono mpo ete akoka kolendisa biso.

  • Bana na yo bazalaka na loyembo oyo balingaka mingi to loyembo ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye? Okoki koyemba yango elongo—to koyekola moko ya sika. Bosolola na ntina ya maloba to milongo kati ya maloba oyo eteyi bino na ntina ya bolendisi mpe kimia Mobikisi apesaka biso.

Elilingi
Klisto kosambelaka na Elanga ya Getesemane

Getesemanena Michael T. Malm

Yesu Klisto akoki kopetola ngai mpe kosunga ngai nabongwana.

  • Buku ya Mormon epesaka bandakisa ebele ya bato oyo babongwanaki mpo na Bomikabi ya Mobikisi. Ntango mosusu bana na yo bakoki kopona moko mpo na koyekola na ntina na ye, lokola Enosa (tala Enosa 1:2–8), Alma Elenge (tala Mosiya 27:8–24), to Banti-Nefi-Lehi (tala Alma 24:7–19). Lolenge nini moto oyo to lingomba babongwanaki na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto? Lolenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango?

  • Yo mpe bana na yo bokoki lisusu kokokanisa eloko moko ya peto mpe eloko moko ya bosoto mpe kosolola lolenge nini biloko ya bosoto ekomaka peto. Botanga elongo Alma 13:11–13. Nini Yesu asalaki mpo ete tokoka kopetolama uta na masumu na biso? Lolenge nini yango esalaka biso toyoka na ntina ya lisumu? Lolenge nini yango esalaka biso toyoka na ntina ya Mobikisi?

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo na Friend magazini.

Bika na bolongobani ya bokambi ya Molimo. Molimo azali moteyi ya solosolo. Ntango ozali koluka bokambami na Ye mpe kobika na bolongobani, Akopesa yo makanisi mpe mayele na ntina ya lolenge nini ya kokokisa bamposa ya bato oyo ozali koteya.

Elilingi
Klisto azali kopesa Banefi mbote

Bililingi ya Klisto elongo na Banefi, na Ben Sowards

Bimisa na lokasa