Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya minei 1–7: “Bozala ya Koyokana na Nzambe na nzela ya Bomikabi ya Klisto.” Yakobo 1–4


Sanza ya minei 1–7: “Bozala ya Koyokana na Nzambe na nzela ya Bomikabi ya Klisto.” Yakobo 1–4,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya minei 1–7. Yakobo 1–4,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
mwasi afukami na makolo ya Yesu

Alimbisami, na Greg K. Olsen. Esalelami na ndingisa ya. www.GregOlsen.com

Sanza ya minei 1–7: Bozala ya Koyokana na Nzambe na nzela ya Bomikabi ya Klisto

Yakobo 1–4

Banefi bazwaki Nefi lokola “mobateli monene na bango” (tala Yakobo 1:10). Abatelaki bango lisusu na makama ya molimo, kokebisaka bango na lisumu mpe kobengisaka bango na lombango baya epayi ya Klisto. Sikawa mosala oyo ezalaki ya Yakobo, oyo Nefi abulisamaki mpona kokoma nganganzambe mpe moteyi (tala Yakobo 1:18). Yakobo ayokaki mokumba ya sikisiki ya kokebisa baye “babandaki kosala na lisumu” ntango lisusu ya kolendisaka “molimo ezokisami” ya baoyo bazokisamaki na masumu ya basusu (tala Yakobo 2:5–9). Lolenge nini akokaki kosala yango mibale? Alingaki kolakisa bango epayi ya Yesu Klisto—mpo ete mangomba mibale esengelaki na libiki ya Mobikisi (tala Yakobo 4). Lokola nsango ya Nefi liboso na ye, litatoli ya Yakobo ezalaki libiangi ya “kozongisa boyokani na [Nzambe] na nzela ya bomikabi ya Klisto” (Yakobo 4:11

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Yakobo 1:6–8, 15–19; 2:1–11

Nazali na etinda kowuta na Nkolo.”

Mpo na Yakobo, koteya liloba ya Nzambe ezalaki “etinda kowuta na Nkolo,” yango wana asalaki na etingia mpo na “kokumisa mosala na [ye]” (Yakobo 1:17, 19). Nini maloba Yakobo alobaki elakisi epayi na yo? Kanisa na ntina ya kitalatala monene esalaka. Yango epesi yo makanisi songolo? Ntango ozali komanyola Yakobo 1:6–8, 15–19 mpe 2:1–11, kanisa na ntina ya bitinda Nkolo akoki kozala na yango mpo na yo. Oyoki nini oyo efuli yo osala mpo na “kokumisa” yango?

Tala lisusu “Whom the Lord Calls, the Lord Qualifies; na Teachings of Presidents of the Church: Thomas S. Monson (2022), 209–20; “Rise to Your Callvideo), ChurchofJesusChrist.org

Yakobo 2:12–21

“Botika te lolendo ya mitema na bino ebebisa milimo na bino!”

Banefi bazalaki na likambo etali lolendo mpe batiaki makanisi na nkita (tala Yakobo 2:13), mpe likambo wana ezalaki kaka mpo na bango te to eleko na bango. Lolenge nini monguna amatisaka bolingo ya nkita lelo? Nsima ya kotanga Yakobo 2:12–21, limbola na maloba na yo moko lolenge nini Nzambe alingi yo omona bozwi ya nkita. Loyembo lokola “Because I Have Been Given Much” (Cantique, no. 219) ekoki kopesa babomoni misusu. Nini oyoki efulami mpo na kosala na ntina ya maye ozali koyekola?

Elilingi
elembo ya seminele

Yakobo 2:22–35; 3:10–12

Nkolo asepelaka na bopeto ya nzoto.

Ntango ozali kotanga Yakobo 2:22–35; 3:10–12, nini omoni oyo esungi yo ososola mpo na nini bopeto ya nzoto ezali motuya epai ya Nzambe? Makama nini ezali ya mabe ya bokufi—ya eleko ya Yakobo mpe ya biso? Nini ezali mapamboli ya kozala na bomoi ya peto na nzoto?

Mpaka David A. Bednar ateyaki ete tozali kobika “na mokili oyo ezali kotiola ntango nyonso maye mazali bule ya bokeli” (“We Believe in Being Chaste,” Liahona, Sanza ya mitano 2013, 41–44). Lolenge nini osungaka basusu basosola mpo na nini otosaka mobeko ya bopeto ya nzoto? Esika ya malamu ya kobandela ezali bolimboli ya mibeko ya Nzambe na oyo etali mayoki ya mposa ya nzoto mpe mikangano kati na yango “Your body is sacred” na Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi (nkasa 22–29). Ozwi nini mosusu na maloba oyo ekoki kosunga yo olimbola mpo na nini ozali kobika mobeko ya bopeto ya nzoto?

Okoki kozwa biyano misusu na kati ya nsango ya Mpaka Bednar ekokani na oyo elandi to kati ya video “I Choose to Be Pure” (Gospel Library).

Lolenge nini mobeko ya Nzambe ya bopeto ya nzoto ekeseni na bansango misusu okoki kokutana na yango? Nini ezali mapamboli ya kozala na bomoi ya peto na nzoto?

Tala lisusu Gospel Topics, “Virtue,” Gospel Library; “Same-Sex Attraction” kati na “Life Help” Collection in the Gospel Library.

Yakobo 4

Nakoki kozongisa boyokani na Nzambe na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Yakobo abondelaki elongo na bato na ye mpo na “boyokani na [Nzambe] na nzela ya Bomikabi ya Klisto” (Yakobo 4:11). Ndimbola moko ya boyokani ezali kozongisa mokangano to esengo. Ntango omanyoli bomoi na yo moko, banza na ntina ya ntango oyo okokaki koyoka kozala mosika ya Tata na Lola. Lolenge nini Mobikisi asungaka yo ozongisa mokangano oyo? Toli nini okoki kozwa kati ya mokapo oyo oyo esungi yo oyokana na Nzambe? (tala milongo 4–14).

Bomoi mosusu nini ozwi uta na Matai 5:23–24? Lolenge nini Mobikisi asungaka yo oyokana na Nzambe—mpe basusu?

Tala lisusu 2 Nefi 10:24.

Yakobo 4:8–18

Nakoki kokima bokufi miso ya molimo na kofandisaka makanisi na ngai likolo ya Mobikisi.

Lokola Yakobo alukaki kokamba bato na ye na mobimba mingi epayi ya Nkolo, akebisaki bango bazala bakufi miso na molimo te mpe batiola te “maloba ya polele” ya nsango malamu (tala Yakobo 4:13–14). Engebene na Yakobo 4:8–18Tokoki kosala nini mpo na kokima bokufi miso ya molimo?

Tala lisusu Quentin L. Cook, “Looking beyond the Mark,” Ensign, sanza ya misato 2003, 40–44;

Ntango ateyaki, Mobikisi asalelaki bokokanisi ya bomoi ya mikolo nyonso. Masese ya Yesu esungaki bato bazwa bosolo ya molimo na mayebi na bango ya mikolo nyonso. Meka kosalela lolenge moko ntango ozali koteya. Ndakisa, ntango ya liteya ya Yakobo 4:8–18, okoki kotuna bayekoli soki esila bango kozala na lisu ya bososoli. Lolenge nini dokotolo atalaka bomoni na bango ya nzoto? Lolenge nini biso tokoki kotala bomoni na biso ya molimo?

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Yakobo 2:8

Nzambe abikisi molimo ezoka.

  • Mpo na kosunga bana na bino basosola lolenge nini “milimo ezoka” ekoki kobikisama, bokoki kosolola elongo lolenge nini nzoto na biso ezokisamaka mpe nini esungaka yango ebikisama. Ntango mosusu bana na bino bakoki kosolola na ntina ya ntango bazokaki mpe nini esungaki bango babika. Okoki kutu kolakisa bango bizipelo mpota to nkisi lokola eteni ya lisolo oyo. Ntango mosusu okoki kokabola elongo na bango lolenge nini Mobikisi asungaki yo ntango molimo na yo esengelaki na libiki.

Yakobo 2:17–19

Nakoki kosalisa basusu oyo bazali na bosenga ntango nazali kokabola na bango.

  • Bato misusu na eleko ya Yakobo bazalaki na bomengo makasi, kasi balingaki kokabola te oyo bazalaki na yango na basusu. Ntango ozali kotanga mateya ya Yakobo epayi na bango na Yakobo 2:17–19, okoki kopesa bana na yo bililingi to biloko mpo na kolimbola oyo ezali kati ya maloba to nkoma oyo ezali na milongo miye. Okoki kolimbola ete ozali kokabola biloko oyo na bango; ntango mosusu okoki nsima kobengisa bango bakabola biloko na yo to na basusu. Bosolola na ntina ya lolenge nini oyokaka ntango okabolaka. Nini mususu tokoki kokabola na basusu mpo na kosunga bango bayoka esengo?

  • Nsima ya kotanga elongo Yakobo 2:17, ntango mosusu bana na yo bakoki kotanga mapamboli misusu oyo Tata na Lola akabolaki na bango. Mpo na nini Ye alingaka kokabola na basusu?

Yakobo 4:6, 10–11

Nakoki kolendisa bondimi na ngai kati na Yesu Klisto.

  • Bondimi ya Yakobo kati na Klisto ezalaki makasi ekokaki koningana te. Mpo na koteya bana na yo lolenge nini ya kotonga bondimi ya boye, okoki kotuna bango na ntina ya makambo tosalaka mpo na kotonga nzoto na biso ezala makasi. Nini tokoki kosala mpo ete bondimi na biso na Yesu Klisto ezala makasi koleka? Tanga Yakobo 4:6 elongo mpo na kosunga bana bayeba maye Yakobo mpe bato na ye basalaki mpo ete bondimi na bango “eningana te.”

  • Lolenge mosusu ya sunga bana na yo basosola maye malimboli kozala ya “koningana te” na bondimi na bango ekozala kozwa nzete monene penepne mpe kosenga bato ya libota baningisa bitape moko na moko. Nsima botika bango bameka koningisa mobimbi to mama ya nzete. Mpo na nini ezali mpasi koleka koningisa mobimba? Maloba nini kati ya Yakobo 4:6, 10–11 elimboli maye tokoki kosala mpo na kosala bondimi na biso na Yesu Klisto eningana te?

    Elilingi
    nzete monene kati na elanga

    Lokola mobimbi ya nzete, bondimi na biso na Klisto ekoki kozala “sikisiki.”

  • Mpo na bokokanisi mosusu ya koteya bana na yo na ntina ya bondimi eningana te na Yesu Klisto, tala Neil L. Andersen, “Spiritual Whirlwinds” (Liahona, Sanza ya mitano 2014, 18–21; mpe video “Spiritual Whirlwinds“) to “The Wise Man and the Foolish Man” (Children’s Songbook, 281; tala lisusu Matai 7:24–27).

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo ya Friend magazini.

Elilingi
Yakobo azali kokoma likolo ya bapalaki ya wolo

Nakotinda Maloba na Bango Liboso (Yakobo Moteyi), na Elspeth Caitlin Young

Bimisa na lokasa