Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya minei 22–28: “Botondisami na Bolingo epai ya Nzambe mpe Bato Nyonso.” Mosiya 1–3


“Sanza ya minei 22–28: ‘Botondisami na Bolingo epai ya Nzambe mpe Bato Nyonso.’ Mosiya 1–3,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya minei 22–28. Mosiya 1–3,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Mokonzi Benyamina azali koteya bato na ye

Kozwa Mateya ya Mokonzi Benyamina, na Maria Alejandra Gil

Sanza ya minei 22–28: “Botondisami na Bolingo epai ya Nzambe mpe Bato Nyonso.”

Mosiya 1–3

Ntango oyoki liloba mokonzi,, okokaki kokanisa ntango mosusu mintole, basali mpe bangwende. Na Mosiya 1–3, okotanga na ntina ya bokeseni ya mokonzi na mokonzi. Esika ete abikela nsima ya mosala ya bato na ye, Mokonzi Benyamina “asalaki na maboko na [ye] moko” (Mosiya 2:14). Esika ete asenga basusu basalela ye, asalelaki bato na ye “na bokasi, mayele mpe makasi nyonso oyo Nkolo apesak[a] epai ya [ye]” (Mosiya 2:11). Mokonzi oyo alingaki te bato na ye bankumbamela ye; kasi, ateyaki bango bakumbamela Mokonzi ya Lola, Yesu Klisto. Mokonzi Benyamina asosolaki ete ezali “Nkolo ya bokasi bonso nde akonzaka” (Mosiya 3:5), oyo ayaki na “nse uta na lola” mpe akendaki “liboso ya bato, … mpo ete lobiko ekoka koya likolo ya bana ya bato kutu na nzela ya bondimi na nkombo na ye” (Mosiya 3:5, 9).

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Mosiya 1:1–7

“Luka [makomi] na etinga.”

Kati na milongo oyo, yeba lolenge nini makomi ya bule epambolaki bato ya Mokonzi Benyamina. Lolenge nini bomoi na yo ezali malamu koleka mpo ete ozali na makomi?

Elilingi
elembo ya seminele

Mosiya 2:10–26

Ntango nazali kosalela basusu, nazali lisusu kosalela Nzambe.

Nini okanisi Mokonzi Benyamina alingaki koloba soki otunaki ye mpo na nini asalaki na “bokasi, mayele, mpe makasi” na ye nyonso”? (Mosiya 2:11). Maniola oyo ntango ozali kotanga Mosiya 2:10–26. Nini Mokonzi Benyamina ateyaki oyo efuli yo kosalela basusu na lolenge ya motuya koleka? Ndakisa, elingi kolobela yo nini koyeba ete ntango ozali kosalela basusu, ozali lisusu kosalela Nzambe? (tala Mosiya 2:17). Luka bofuli etali lolenge nini okoki kosunga moto moko na poso oyo.

Atako ntango toyebi ete tosengeli kosalisa basusu, mbala mosusu tokutanaka na mikakatano. Lolenge mosusu ya koyekola Mosiya 2:10–26 ezali kokoma babosolo oyo Mokonzi Benyamina ateyaki oyo ekoki kosunga yo olonga mikakatano oyo ekoki koyela yo na bosungi. Mayebi nini elakisi yo ete Mokonzi Benyamina ateyaki bosolo?

Mokambi Joy D. Jones akabolaki boyebi moko ya nguya oyo ebongolaki lolenge amonaki na kosungaka basusu. Tanga na ntina na yango na “For Him” (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 50–52), mpe kanisa na ntina ya mabaku oyo ozali na yango ya kosalela basusu. Okoki kutu kotanga ndambo mpe komanyola lolenge nini nsango ya Mokambi Jones, kati na Mosiya 2:17, ekoki kolendsia lolenge osalelaka mabaku oyo. Loyembo lokola “A Poor Wayfaring Man of Grief” (Hymns, no. 29) to video lokola “The Old Shoemaker” (Gospel Library) ekoki kosunga bino okanisa na ntina ya babomoni misusu.

Tala lisusu Matai 25:40; “Faith Murray’s Story: Overcoming Adversity through Service,” “King Benjamin Teaches about Serving God” (videos), Gospel Library; JustServe.org; Gospel Topics, “Service,” Gospel Library.

Elilingi
Basi mibale bayambani

Ntango nazali kosalela basusu, nazali lisusu kosalela Nzambe.

Mosiya 2:38–41

Esengo eyaka uta na bobateli mitindo ya Nzambe.

Lolenge nini okolimbola esengo oyo eyaka uta na botosi Nzambe?; Ezali na maloba kati ya Mosiya 2:38–41 oyo ekoki kosunga yo olimbola mpo na obatelaka mitindo na Ye?

Mosiya 3:1–20

Nakoki kokoma mosantu na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Mokonzi Benyamina, lokola baprofeta nyonso, atatolaki na ntina ya Yesu Klisto mpo ete bato na ye “bakozwa bolimbisi ya masumu na bango, mpe basepela na bosepeli monene koleka mpenza” (Mosiya 3:13). Tala mwa mituna mpo na komanyola ntango ozali kotanga litatoli ya Mokonzi Benyamina na ntina ya Mobikisi na Mosiya 3:1–20:

  • Nini toyekoli uta na milongo oyo etali Mobikisi mpe etinda na Ye?

  • Nayekoli nini uta na Mosiya 3:18–19 na ntina ya nini elimboli kokoma mosantu?

  • Lolenge nini Yesu Klisto asungaki ngai nalonga lisumu, nabongola lolenge na ngai, mpe nakoma mingi lokola mosantu?

Mosiya 3:5–21

“Nkolo ya bokasi bonso … akoya na mabele kowuta na lola.”

Nguya nini ya lotiliki epesaka yo likoki ya kosala? Lolenge nini bomoi na yo ekeseni na bozangi yango? Mituna oyo ekoki kosunga yo omanyola kutu nguya monene oyo Mobikisi akoki komema na bomoi na yo.

Anjelu oyo abimelaki Mokonzi Benyamina elimboli Yesu Klisto lokola “Nkolo ya Bokasi bonso,” liloba elimboli ete Ye azali na nguya nyonso. Oyekoli nini uta na Mosiya 3:5–21 na ntina ya lolenge nini Mobikisi asalelaka nguya yango? Lolenge nini omonaki nguya ya Mobikisi na bomoi na yo mpe na babomoi ya baye bazali nzinganzinga na yo? Lolenge nini nguya na Ye epesaka yo makoki ya kosala mpe kokoma? Lolenge nini bomoi na yo ekeseni na bozangi yango?

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mosiya 2:11–18

Ntango nasaleli basusu, nazali kosalela Nzambe.

  • Lokasa ya molulu ya poso oyo ezali na motole moke oyo bana na biso bakoki kosala. Ntango mosusu bakoki kosala moko nsima ya mosusu kotelemaka na lotale to ebonga mpe kosala lokola Mokonzi Benyamina ntango ozali kokabola makambo songolo oyo Mokonzi Benyamina ateyaki bato na ye, oyo ezwami kati na Mosiya 2–3. Okoki lisusu kokabola na bango “Mokapo 12: Mokambi Benyamina” (Masolo ya Buku ya Mormon, 32–35) mpo na kopesa bango bososoli monene ya mateya ya Mokonzi Benyamina.

  • Mosiya 2:17 ekoki kozala molongo malamu mpo na bana na yo bayekola. Okoki kosunga bango babandela yango maloba ndambo na mbala moko. To okoki kokoma molongo na nse, na maloba ya makasi ebele ezangi, mpe kotuna bana na yo bazwa maloba oyo ezangi. Nsima okoki kosolola na bana na ntina ya mpo na nini Nzambe alingaka biso tosalisana moko na moko.

  • Okoki kosunga bana na yo baluka Mosiya 2:11–18 mpo na komona maye Mokonzi Benyamina asalaki mpo na kosalisa basusu. Nsima bana na yo bakoki kokoma likolo ya biteni ya nkasa ndenge bakoki kosalisa bandeko ya libota. Tia biteni ya nkasa na kati ya eloko songolo, lokola saki to kopo, mpo ete bana na yo bapona moko moko mikolo nyonso mpe kosala mosala wana mpo na moto mosusu.

Bana bazwaka litomba uta na bozongeli likambo mbala na mbala. Bobanga te na kobandelaka misala mbala na mbala, mingi mingi na bilenge bana. Bozongeli likambo mbala na mbala ekosunga bana bamikundola maye bayekoli.

Elilingi
bana bazali kolinga eteni ya elamba

Mokonzi Benyamina ateyaki ete tokoki kosalela Nzambe na kosalisaka basusu.

Mosiya 2:19–25

Nyonso ya mapamboli na ngai ewutaka na Tata na Lola.

  • Lisalisi ya Mokonzi Benyamina epai ya bato na ye efulamaki na botondi na ye ya bozindo epai ya Nzambe. Lolenge nini ekofula mayoki ya ndenge moko epai ya bana na yo? Bokoki kotanga elongo Mosiya 2:21 mpe kokoma mapamboli Tata na Lola apesaki biso. Nsima ntango mosusu bokoki kobakisa na mokanda mapamboli mosusu bana bakanisi.

  • Oyo ezali lisano bokoki kosakana mpo na kosalisa bana na yo bayeba mapamboli ya Tata na Lola. Bana bakoki koleka nzinganzinga ya elilingi ya Mobikisi ntango bazali koyemba to koyoka loyembo ya botondi (tala “Gratitude” kati ya mabakisi ya bokambi na makomi Children’s Songbook). Bokata koyemba to bokata miziki mpo na ntango moke, mpe bengisa bandeko oyo basimbi elilingi balobela na ntina ya lipamboli oyo bazali na yango botondi. Engebene na Mosiya 2:22–24, lolenge nini tokoki kolakisa ete tozali na botondi na mapamboli mpo na biso?

Mosiya 3:5–10, 19

Yesu Klisto akosunga ngai nakoma mingi lokola Ye.

  • Anjelu moko ayebisaki Mokonzi Benyamina babosolo na ntina etali bomoi mpe mosala ya Yesu Klisto. Ntango mosusu yo mpe bana na yo bokoki koluka bililingi ya milulu oyo etalisami na kati na Mosiya 3:5–10 (tala, ndakisa, Gospel Art Buku, nos. 30, 41, 42, 5759). Ntango ozali kotanga Mosiya 3:5–10, bana na yo bakoki kotombola maboko na bango likolo ntango bazali koyoka eloko songolo na kati ya milongo oyo ebimi na moko ya bililingi.

  • Bana na yo basungaka mpo na kobongisa bilei na kosalelaka elubu? Ntango mosusu okoki kosolola na ntina ya boyebi wana mpe kosalela Mosiya 3:19 mpo na kozwa “elubu” ya lolenge ya kokoma lokola Yesu Klisto. Lolenge nini Yesu Klisto asungaka biso tokoma lokola Ye?

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo na Friend magazini.

Elilingi
Mokonzi Benyamina azali koteya bato na Ye.

Lisikulu ya Mokonzi Benyamina, na Jeremy Winborg

Bimisa na lokasa