Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya minei 8–14: “Nkolo Asalaka elongo na Biso.” Yakobo 5–7


“Sanza ya minei 8–14: ‘Nkolo Asalaka elongo na Biso.’ Yakobo 5–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya minei 8–14: Yakobo 5–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
bato bazali kosala na bilanga ya banzete ya elaya

Lisese ya Banzete ya Elaya, na Brad Teare

Sanza ya minei 8–14: Nkolo Asalaka elongo na Biso

Yakobo 5–7

Ezali na bato mingi, mingi oyo bayoki naino te nsango malamu ya Yesu Klisto. Soki omiyoki ete monene ya mosala ya kosangisa bango kati na Eklezia ya Nkolo ezali kolekela yo, oyo Yakobo alobaki na ntina ya banzete ya elaya na Yakobo 5 ezali na bokundoli ya kozongisa elikya: Elanga ya bilaya ezali ya Nkolo. Apesi moko na moko na biso esika moke mpo na kosunga na mosala na Ye—libota na biso, zolongano na biso ya baninga, nzinganzinga na biso ya nguya. Mpe ntango mosusu moto ya yambo tosungaka na kosangisa ezali biso moko. Kasi tozali biso moko te na mosala yango, mpo ete Nkolo ya elanga ya bilaya azali kosala elongo na basali na Ye (tala Yakobo 5:72). Nzambe ayebi mpe alingaka bana na Ye, mpe akolengela nzela mpo na mokomoko na bango mpo na koyoka nsango malamu na Ye, ata kutu baoyo babwakisaki Ye na kala (tala Yakobo 4:15–18). Mpe nsima, ntango mosala esalami, banso baoyo bazalaki “molende na kosalaka elongo na [Ye] … bakozala na bosepeli elongo na [Ye] na ntina ya mbuma ya elanga na [Ye] ya bilaya” (Yakobo 5:75).

Tala lisusu “Jacob Teaches about the Gathering of Israel” (video), Gospel Library.

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Yakobo 5

Yesu Klisto azali Nkolo ya elanga ya bilaya.

Yakobo 5 ezali lisolo elongo na ndimbola ya elembo. Etalisi banzete mpe mbuma mpe basali, kasi ezali mpenza na ntina ya mikangano ya Nzambe na bato na Ye na lisolo mobimba. Na yango ntango ozali kotanga lisolo ya motuya, kanisa na ntina ya maye makambo oyo ezali kati ya lisolo ekoki ekolimbola.

Ndakisa, soki elanga ya vino elakisi mokili, mpe nzete ya elaya kolakisa Yisalaele (to baoyo basalaki mayokani na Nzambe; tala Yakobo 5:3), nini ekoki kolimbola nzete ya elaya ya zambe? Mbuma malamu mpe ya mabe ekokaki kolimbola nini? Bilembo mosusu nini omoni?

Atako Yakobo 5 eteyi na ntina ya bikolo mpe bikeke ya lisolo ya mokili, ezali lisusu na ntina na yo mpe libota na yo. Bansango nini ozwi mpo na yo moko na Yakobo 5

Ntango mosusu ya ntina, Yakobo 5 ezali na ntina ya Yesu Klisto. Luka mpo na Ye ntango ozali kotanga. Nini oyekoli na ntina na Ye, ndakisa, kati ya milongo 40–41, 46–47?

Mpo na bomoni mosusu na ntina ya Yakobo 5, tala etando na nsuka ya moango oyo.

Elilingi
elembo ya seminele

Yakobo 5:61–75

Nkolo abengisi ngai kosala elongo na Ye na elanga na Ye ya bilaya.

“Basali misusu” (Yakobo 5:70) oyo babiangamaki na elanga ya bilaya ya Nkolo ezali bato mpe lokola yo. Bosolo nini ozwi kati na Yakobo 5, mingimingi milongi 61–62 mpe 70–75, na ntina ya kosalaka kati na elanga ya bilaya ya Nkolo? Oyekoli nini etali Ye na kosalisaka na mosala na Ye?

Ntango bozali kotanga na ntina ya “mbala ya nsuka” oyo Nkolo azali kosala na elanga na Ye ya bilaya, nini molimo afuli bino mpo na kosalela Nkolo “na bokasi na bino”? (Yakobo 5:71). Ntango mosusu okoki kokanisa na ntina ya boyebi na yo moko na oyo oyokaki esengo ntango ozalaki kosalela Nkolo ya elanga ya bilaya—ndakisa, na nzela ya kokabola nsango malamu, kosalisaka kati na tempelo to kolendisaka basusu. Bokoki lisusu kotala elongo bandakisa Mpaka Gary E. Stevenson akabolaki kati ya nsango na ye “Simply Beautiful—Beautifully Simple” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2021, 47–50).

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Mbala nyonso osalaka eloko songolo oyo esungaka moto nyonso—na ngambo nyonso ya elamba—zwa mokano ya kosala mayokani na Nzambe mpe ozwela bango libatisi ya motuya mpe makuli ya tempelo, ozali kosunga bosangisi ya Yisalaele. Ezali mpenza mpasi te” (“Hope of Israel” [worldwide youth devotional, June 3, 2018], ChurchofJesusChrist.org). Banza kokomaka makanisi ya maye okoki kosala mpo na kosunga bosangisi ya Yisalaele. Uta na mokanda na yo, nini oyoki Nkolo alingi yo osala lelo na elanga na Ye ya bilaya? Engebene na molongo 75, lolenge nini Nkolo afutaka biso mpo na mosala na Ye ya elanga ya bilaya?

Tala lisusu “Israel, Israel, God Is Calling,” Hymns, no. 7; “Old Testament Olive Vineyard” (video), Gospel Library; Gospel Topics, “Gathering Israel,” “Inviting All to Receive the Gospel of Jesus Christ,” “Participating in Temple and Family History Work,” Gospel Library.

Teya malongi Zala na boyebi ete masolo na bino elobeli bobele malongi ya ntina kati na makomi. Bokoki kosala yango na kotangaka makomi elongo mpe nsima kokabola na moko mpe mosusu babosolo oyo bozwi, lokola baboyebi ya kosalela babosolo oyo.

Yakobo 6:4–5

Nkolo akundolisaka bato na Ye na bolingo mpe mawa.

Moko ya ndimbola ya liloba bokotisi ezali kokota to kokangisama ngwi na eloko moko, na penepene, mpe kotatabana te. Lolenge nini ndimbola wana esimbaka lolenge ososolaka Yakobo 6:4–5? Na lisolo ya nzete ya elaya, lolenge nini Nkolo ya elanga ya bilaya atombolaki “loboko na ye ya mawa”? (tala, ndakisa, Yakobo 5:47, 51, 60–61, 71–72). Lolenge nini Asalaki yango mpo na yo?

Yakobo 7:1–23

Nakoki kotelema makasi ntango basusu bazali kosenginya bondimi na ngai na Yesu Klisto.

Likambo ya Banefi bakutanaki na yango na Selemi ezali mbala mingi kozonga lelo: bato bazali komeka kobebisa bondimi na Klisto. Lolenge nini Yakobo ayanolaki ntango bondimi na ye ebundisamaki? Oyekoli nini uta na biyano na ye? Nini okoki kosala sikawa na komilengela mpo na bangonga oyo bondimi na yo na Mobikisi ekomekama?

Tala lisusu Jeffrey R. Holland, “The Cost—and Blessings—of Discipleship,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2014, 6–9; “Sherem Denies Christ” (video), Gospel Library.

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Yakobo 5

Nkolo amitungisaka mpo na bato na Ye.

  • Lolenge nini okoki kokabola lisolo ya banzete ya bilaya na lolenge oyo bana na yo bakoki kososola? Lolenge moko ezali ya kosolola libanda mpo na kotala nzete mpe na bokuse kotala biteni ya ntina ya lisolo. Nini Nkolo ya elanga ya bilaya asalaka mpo na banzete na Ye? Lolenge nini tokoki kozala lokola basali kati ya lisolo mpe kosalisa basusu bayoka bolingo ya Mobikisi?

  • Yakobo akabolaki lisolo ya nzete ya bilaya mpo na kobengisa bato na ye baya epai ya Klisto. Ekoki kosalama lolenge moko mpo na bana na yo. Ntango mosusu okoki kolimbola na bokuse lisolo na milongo lokola Yakobo 5:3–4, 28–29, 47, mpe 70–72 (tala lisusu “Old Testament Olive Vineyard” [video], Gospel Library). Yo to bana na yo bokoki nsima kotanga Yakobo 5:11, 41, 47, mpe 72, kolukaka makambo oyo elakisi lolenge nini Nkolo ya elanga ya bilaya (Yesu Klisto) emitungisaki mpo na nzete. Mobikisi asalaka nini mpo na kolakisa ete Amitungisaka mpo na biso?

Yakobo 6:4–5

Tata na Lola alingaka ngai mpe akolimbisa ngai ntango nayamboli.

  • Yakobo 6:4–5 ezali na nsango ya motuya mpo na biso ntango tosalaka maponi ya mabunga. Ntango mosusu okoki kosunga bana na yo bamona yango. Maloba nini na kati ya milongo oyo epesi biso elikya na bolingo ya bosikoli ya Nzambe? Lisolo ya Mpaka Allen D. Haynie ya kokoma bosoto kati ya libulu ya potopoto, na nsango na ye “Remembering in Whom We Have Trusted” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2015, 121–22), ekoki kosunga. Lisolo oyo Yakobo 6:4–5 eteyi biso na ntina ya nini oyo tolingi kosala mpo na kobikisama kati ya bokonzi ya Nzambe?

Yakobo 7:1–23

Nakoki kotelema ngwi mpo na oyo nayebi ezali solo.

  • Lolenge nini okoki kofula bana na yo batelema ngwi mpo na bosolo lokola Yakobo asalaki? Bana na yo bakoki kotala video “Chapter 10: Jacob and Sherem” (Gospel Library) mpe kosala na nzela ya mokangano kati na Yakobo mpe Sesemi, kosalelaka Jacob 7:1–23 lokola bokambi. Lolenge nini Yakobo atelemaki mpo na oyo ayebaki kozala sembo? Bengisa bana na yo bakabola baboyebi ntango batelemi ngwi mpo na oyo ezali sembo, to kabola ya yo moko. Ntango mosusu bakoki koyemba loyembo oyo etalisi bompikiliki ya Yakobo, lokola “Stand for the Right,” Children’s Songbook, 159.

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo ya Friend magazini.

Bimisa na lokasa