Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya minei 15–21: “Asalaki Kati na Ngai mpo na Kosala Engebene na Bolingi na Ye.” Enosa–Maloba ya Mormon


“Sanza ya minei 15–21: ‘Asalaki Kati na Ngai mpo na Kosala Engebene na Bolingi na Ye.’ Enosa–Maloba ya Mormon,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya minei 15–21. Enosa–Maloba ya Mormon,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Enosa lokola elenge mobali elongo na tata na ye, Yakobo, mpe mama na ye

Yakobo mpe Enosa, na Scott Snow

Sanza ya minei 15–21: “Asalaki Kati na Ngai mpo na Kosala Engebene na Bolingi na Ye.”

Enosa–Maloba ya Mormon

Atako Enosa akendaki bokila mpo ya koboma niama na zamba mpo na kosilisa nzala ya nzoto, asukaki na kotikala kuna mokolo mobimba mpe kino butu mpo ete ya ye “molimo eyokaki nzala.” Nzala oyo ekambaki Enosa “atombola [ya ye] mongongo likolo ete mokomaki o lola.” Alimbolaki likambo oyo lokola etumba liboso ya Nzambe (tala Enosa 1:2–4). Uta na Enosa toyekoli ete losambo ezali bokasi ya sembo ya kobendana pene ya Nzambe mpe koluka koyeba bolingi na Ye. Ntango osambeli na mokano oyo, ozali na litomba mingi ya komona, lokola emonaki Enosa, ete Nzambe ayokaka yo mpe solo abatela yo, baoyo olingaka, mpe kutu banguna na Yo (tala Enosa 1:4–17). Ntango oyebi bolingi na Ye, ozali na makoki elongobana mpo na kosala bolingi na Ye. Lokola Mormon, okoki “koyeba makambo nyonso te; kasi Nkolo ayebi makambo nyonso … ; yango wana, asali kati na [yo] mpo na kosala engebene na bolingi na ye” (Maloba ya Mormon 1:7).

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Enosa 1:1–17

Nzambe akoyoka mpe akoyanola mabondeli na ngai.

Boyebi na yo na losambo ekoki kozala makasi moke koleka ya Enosa, kasi esengeli te kozala na ntina moke. Awa ezali mwa mituna mpo na kokanisa na ntango ozali koyekola Enosa 1:1–17:

  • Maloba nini elimboli makasi ya Enosa ntango azalaki kosambela?

  • Lolenge nini nsambo ya Enosa ebongwani na milongo 4 to 11?

  • Nayekoli nini uta na Enosa oyo ekoki kosunga ngai nabongola nsambo na ngai?

Tala lisusu “Enos Prays Mightily” (video), Gospel Library; “Sweet Hour of Prayer,” Hymns, no. 142.

Kokabolaka mituna ya lisolo. Soki ozali koteya basusu, banza kotunaka mituna oyo bokosepela kosolola na esika elongobana mpo ete moto nyonso akoka komona yango. Yango esungaka bato bamanyola mituna mpe bapesa biyano efulama.

Elilingi
elembo ya seminele

Enosa 1:1–4

Nkolo akoki kosunga ngai napusa libota na ngai elanda ndakisa malamu.

Ntango mosusu ezali na bato na kati ya libota na yo oyo olingi kosunga baya epai ya Klisto, kasi ozali komitungisa soki babokasi na yo ezali kosala bokeseni. Nini okoki koyekola uta na Enosa 1:1–4 na ntina ya ndakisa ya Yakobo likolo ya mwana na ye Enosa? Ndakisa, nini liloba “kobokola mpe kokebisa engebene na Nkolo” elimboli epayi na yo? Lolenge nini okoki kobengisa nguya na Ye kati ya libota na yo?

Ntango okanisi na ntina ya libota na yo moko, banza mituna miye mpe makoki:

Mpaka Dieter F. Uchtdorf akabolaki liteya moko ya lisungi mpo na mabota na kati ya “In Praise of Those Who Save” (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2016, 77–80). Nsango na ye efuli yo na nini mpo na kosala mpe kolendisa libota na yo? (tala mingimingi eteni likomi linene “Saving Our Families”).

Tala lisusu Gospel Topics, “Family,” Gospel Library; “Home and Family—Through Small Things” (video), Gospel Library.

Enosa 1:1–18

Nakoki kozwa bolimbisi ntango nazali kosalela bondimi na Klisto.

Na ntango oyo okoki komitungisa soki masumu na yo elimbisami, atako nsima ya boyamboli masumu oyo. Mamoni nini olongi uta na liyebi ya Enosa kati na Enosa 1:1–8? Lolenge nini Enosa alakisi bondimi na ye epai na Yesu Klisto yambo mpe nsima na ye kozwa bolimbisi?

Jarom–Omni

Ntango nazali kobunda kobatela mitindo na Ye, Nzambe akopambola ngai.

Babuku oyo ya Jarom mpe Omni nyonso mibale etalisi mokangano ya boyengebene mpe bozwi nkita. Nini oyekoli uta Jarom 1:7–12; Omni 1:5–7, 12–18? Lolenge nini ndimbola ya mokili na oyo etali bozwi nkita ekeseni na ndimbola ya Nkolo? Lolenge nini Nkolo asungaka bato na Ye bazwa bozwi? (tala Alma 37:13; 48:15–16).

Omni 1:25–26

“Boya epai na Klisto, oyo azali Mosantu ya Yisalaele.”

Libiangi “Boya epai na Klisto” emonani mbala mingi kati ya Buku ya Mormon. Na yango, moko ya bantina ya motuya ya buku ezali ya kopalanganisa libiangi oyo epai na moto nyonso. Ntango ozali kotanga Omni 1:25–26, maloba to nkoma nini omoni oyo elimboli lolenge nini ya koya epai na Klisto? Nini osalaka mpo na koya epai na Ye na mobimba mpenza?

Elilingi
Mormon azali kosangisa bapalaki ya wolo

Mormon Azali Kosangisa Bapalakina Jorge Cocco

Maloba ya Mormon 1:1–8

Nzambe akosala kati na ngai ntango nazali kolanda bokambi na Ye.

Ntina moko Nkolo afulaki Mormon mpo na kokotisa mwa bapalaki moke ya Nefi kati na Buku ya Mormon ezalaki mpo ete Nzambe ayebaki ete nkasa ya yambo 116 eye elimbolamaki ekokaki kobunga (tala Malongi mpe Mayokani 10; Basantu, volume 1, mokapo 5). Ntina nini osepeli ete Mormon alandaki likebisi ya Nkolo ya kokotisa makomi oyo (kobandaka na 1 Nefi kino na Omni)? Bantina nini Mormon apesaki mpo na kokotisa yango? (tala Maloba ya Mormon 1:3–7). Ntango nini omonaki Nzambe kosalaka kati na yo to ya basusu?

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Enosa 1:1–5

Nakoki kosolola na Tata na Lola na nzela ya losambo.

  • Lolenge nini okoki kosalisa bana na yo basala nsambo na bango ezala ntina koleka? Banza kolakisa bango elilingi ya Enosa azali kosambela; tika bango balimbola oyo bamoni. Bakoki nsima kokanga misu na bango mpe bakanisa bazali kosolola na Tata ya Lola misu na misu. Nini bakolinga kosolola? Nini Ye akolinga kolobela bango?

  • Ntango bozali kotanga na mongongo makasi Enosa 1:1–5, bana mike bakoki kokanisa lokola bazali Enosa na kosalaka bokila, kofukamaka na losambo, mpe bongo na bongo. Bana mikolo bakoki koyoka na liloba to nkoma oyo elimboli nsambo ya Enosa. Maloba oyo eyebisi biso nini na ntina ya nsambo ya Enosa? Kabola liyebi moko ntango molimo na yo “eyokaki nzala” mpe “obelelaki” epai ya Nkolo (Enos 1:4).

Elilingi
libota ezali kosambela

Lokola bana ya Nzambe, tokoki kosambela epai ya Tata na biso ya Lola.

Enosa 1:2–16

Tata na Lola ayokaka mpe ayanolaka nsambo na ngai.

  • Lolenge nini okoki kosalisa bana na yo basosola ete Tata na Lola akoyoka mpe akoyanola nsambo na bango? Banza kobengisaka bango batanga mwa makambo oyo basambelaka mbala na mbala. Nsima okoki kosunga bango bamona nini Enosa asambelelaki kati na Enosa 1:2, 9, 13–14, mpe 16 (tala lisusu “Mokapo 11: Enosa,” Masolo ya Buku Mormon, 30–31).

    Matomba nini ezalaki uta na nsambo ya Enosa? (tala milongo 6, 9, 11).

    Nini toyekoli uta boyebi ya Enosa na ntina ya lolenge nini ya kobongisa nsambo na biso?

  • Boyemba elongo loyembo na ntina ya losambo, lokola “A Child’s Prayer” (Children’s Songbook, 12–13). Ntango mosusu bana na yo bakoki kotombola maboko na bango ntango nyonso bazali koyoka liloba “kosambela” to “losambo” to liloba mosusu oyo ebandelami. Yebisa bana na yo na ntina ya banzela mosusu oyo Tata na Lola ayanolaki nsambo na yo.

Maloba ya Mormon 1:3–8

Nakoki kopambola basusu ntango nazali koyokela Molimo Mosantu.

  • Mormon alandaki bokambi ya Molimo Mosantu mpo na kokotisa mwa bapalaki ya Nefi kati ya Buku ya Mormon. Makambo manso oyo toyekoli kati ya Buku ya Mormon uta na mobu oyo eyei epai na biso mpo ete Mormon asalaki boponi ya koyokela Molimo. Lolenge nini osungaka bana na yo bayekola na ntina ya koyokelaka Molimo? Bengisa bango basala moko nsima ya mosusu kotangaka milongo uta na Words of Mormon 1:3–8. Bokoki kosolola na ntina ya maye bayekoli uta na molongo mokomoko. Nsima bana na yo bakoki:

    • Bokabola oyo bayekoli uta na masolo kati ya Buku ya Mormon na mobu oyo (bililingi uta Yaka, Landa Ngai ekoki kosunga bango bamikundola).

    • Boyemba elongo loyembo etali Molimo Mosantu, lokola “The Still Small Voice” (Children’s Songbook, 106–7).

    • Bosolola baboyebi kati na oyo bakambamaki na Molimo mpo na kosala eloko songolo oyo epambolaki moto mosusu.

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo na Friend magazini.

Elilingi
Enosa azali kosambela

Enos Azali kosambela, na Robert T. Barrett

Bimisa na lokasa