Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya minei 29–Sanza ya mitano 5: “Mbongwana ya Makasi.” Mosiya 4–6


“Sanza ya minei 29–Sanza ya mitano 5: ‘Mbongwana ya Makasi.’ Mosiya 4–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo naLibota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya minei 29–Sanza ya mitano 5. Mosiya 4–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo naLibota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Mokonzi Benyamina azali koteya bato na ye

Na Mosala ya Nzambe na Yo, na Walter Rane

Sanza ya minei 29–Sanza ya mitano 5: “Mbongwana ya Makasi.”

Mosiya 4–6

Oyoka naino moto moko koloba mpe komiyoka ya kofulama mpo na kobongola bomoi na yo? Ntango mosusu okanaki, mpo na maye oyokaki, kobika na mwa bokeseni—to kutu na bokeseni mingi. Lisikulu ya Mokonzi Benyamina ezalaki lolenge ya lisikulu wana, mpe bosolo ateyaki ezalaki na lolenge ya mbano wana likolo ya bato oyo bayokaki yango. Mokonzi Benyamina akabolaki elongo na bato na ye maye anjelu moko ateyaka ye—mapamboli ya kafukafu wana ekokaki kosalama na nzela ya “makila ya bomikabi ya Klisto” (Mosiya 4:2). Mpo na nsango na ye, babongolaki emoneli na bango moko (talaMosiya 4:2), Molimo abongolaki bamposa na bango (talaMosiya 5:2), mpe basalaki mayokani na Nzambe ete bakosala ntango nyonso bolingi na Ye (talaMosiya 5:5). Oyo ezali lolenge maloba ya Mokonzi Benyamina matutaki bato na ye. Lolenge nini matutaka yo?

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Mosiya 4

Na Nzela ya Yesu Klisto, nakoki kozwa mpe kokanga bolimbisi ya masumu na ngai.

Ntango mosusu, kutu ntango omiyoki kolimbisama na masumu na yo, okokaki kobunda kobatela liyoki wana mpe kotikala na nzela ya bosembo. Mokonzi Benyamina ateyaki bato na ye lolenge nini ya kozwa nyonso mibale kozwa mpe kokanga bolimbisi ya masumu. Ntango bokoyekola mokapo 4 ya Mosiya, banza kotuna mituna lokola oyo:

Milongo 1–8.Ndelo nini na nse ya oyo Nzambe apesaka bolimbisi ya masumu na bino? Boyekoli nini na ntina na Ye kati ya milongo miye oyo efuli binoo boyambola? Lolenge nini bokoki koyeba ete boyambolaki?

Milongo 11–16.Engebeni na milongo oyo, nini eyaka na bomoi na biso soki tosali makambo malimbolami na molongo 11? Lolenge nini yo, to moto mosusu olingaka, asalaki mbongwana oyo? Kokanisa bambongwana oyo na bambongwana oyo etalisami kati ya Mosiya 3:19.

Milongo 16–30.Lolenge nini bokaboli na basusu biloko bozali na yango esungaka bino bozwa bolimbisi ya masumu na bino? Lolenge nini okoki kosalela molongo 27 na makasi na yo ya kozala lokola Boklisto?

Na ndenge nini tozali biso nyonso basengi? Engebene na milongo oyo, lolenge nini tosengeli kosalela bana nyonso ya Nzambe? (tala Mosiya 4:26). Nani azali na mposa ya lisungi na yo?

Tala lisusu Becky Craven, “Keep the Change,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 58–60.

Elilingi
elembo ya seminele

Mosiya 4:5–10

Nandimelaka mpe natiaka elikia na Nzambe.

Libiangi ya Mokonzi Benyamina ya kondimela mpe kotia elikia na Nzambe ezali motuya lelo lokola esalaki na bileko ya kala. Ntango bozali kotanga Mosiya 4:5–10, boluka babosolo na ntina ya Nzambe oyo epesi yo ntina ondimela Ye. Koma mabiangi Mokonzi Benyamina apesi kati ya molongo 10. Mpo na nini kondimela Nzambe ekomisaka yango pete mpo na kosala maye Mokonzi Benyamina abengisi?

Banza kolukaka makomi mosusu mpo na kokoma banguya ya Nzambe: Yelimia 32:17; 1 Yoane 4:8; 2 Nefi 9:17; Alma 32:22; Mormon 9:9; Etele 3:12; Malongi mpe Mayokani 19:1–3; 88:41 (tala lisusu video “Christlike Attributes,” Gospel Library). Okoki kosalela mokanda na yo na ndenge ebele mpo na kokokisa liloba lokola oyo: “Mpo nayebi ete Nzambe azali , nakoki kondimela Ye .”

Bondimeli na biso epai na Nzambe emataka ntango tosalaka elongo na Ye. Kati na Mosiya 4:1–3, nini esungaki bato ya Mokonzi Benyamina “baya koyeba bolamu ya Nzambe”? (molongo 6). Kanisa na ntina ya baboyebi oyo ozwaki na Nzambe. Boyebi oyo etei yo nini na ntina na Ye? Matambe nini ozwi (to oyo okoki kozwa) mpo na kolendisa boyambi na yo to bondimeli Nzambe?

Tala lisusu Jeffrey R. Holland, “The Grandeur of God,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2003, 70–73; Gospel Topics “God the Father,” Gospel Library; “I Know My Father Lives,” Hymns, no. 302.

Kokabolaka baboyebi ya bule. Baboyebi misusu ezali ya bule mpenza to ya moto ye moko mpo na kokabola. Ntango ozali kobengisa basusu bakabola baboyebi, kotinda bango na makasi te bakabola soki balingi te.

Mosiya 4:29–30

Nasengeli kotala makanisi na ngai, maloba mpe misala na ngai.

Nzambe apesaka biso te mokanda ya lisumu nyonso. Engebene na Mosiya 4:29–30, nini Asalaki na esika na yango? Manyola lolenge nini makanisi, maloba mpe misala na yo esalaka epayi na yo moko mpe basusu. Lolenge nini esalemaka na mokangano na yo na Nzambe? Lolenge nini “omitalaka [yo moko]”?

Mosiya 5:1–5

Molimo ya Nkolo akoki kosala mbongwana makasi na motema na ngai.

Ezali momesano mpo na bato koloba, “Nakoki kobongwana te. Wana ezali kaka lolenge nazali.” Na bokeseni, makambo ya bato ya Mokonzi Benyamina elakisi biso lolenge nini Molimo ya Nkolo akoki kobongola solo mitema na biso. Ntango ozali kotanga Mosiya 5:1–5, kanisa na ntina ya lolenge nini “mbongwana ya makasi” oyo ekambaka na kobongola motema ya solo eyaka—to ekoki koya—na bomoi na yo. Kanisa na ntina ya nkoma, mbongwana ya malembe malembe lokola boyebi ya “mbongwana ya makasi”. Lolenge nini baboyebi oyo esungaka yo ntango okutanaka na lisenginya?

Tala lisusu Ezekiele 36:26–27; Alma 5:14; “A Change of Heart,” “The People of King Benjamin Make a Covenant” (videos), Gospel Library.

Elilingi
Klisto azali kobikisa mwasi ya bokono

Maboko oyo Ebikisaka,, na Adam Abram

Mosiya 5:5–15

Nazwi likolo na ngaimei nkombo ya Klisto ntango nasali mayokani na Ye.

Oyekoli nini uta na Mosiya 5:7–9 na ntina ya nini yango elingi koloba kozwa likolo ya yomei nkombo ya Klisto? Nini nsambo ya elambo (tala Moroni 4–5) eteyi na ntina ya oyo? Lolenge nini bokoki kolakisa ete bino “bozali ya” Mobikisi?

Tala lisusu D. Todd Christofferson, “Why the Covenant Path,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 116–19.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mosiya 4:1–3, 10

Boyamboli ememaka esengo.

  • Mpo na koteya na ntina ya esengo ya boyamboli, ntango mosusu okoki kotika bana na yo bakangisa maboko na bango to basimba bosoto mpe bayoka nini nsima ya bosokoli yango. Nsima okoki kokokanisa yango na lolenge bato ya Mosiya 4:1–3 bayokaki yambo mpe nsima ya bolimbisi ya masumu na bango. Kabola litatoli na yo ya nguya ya Mobikisi mpo na kopetola biso na molimo.

  • Bana na yo bayebaka lolenge nini ya koyambola na mobimba mpe na bosolo mpenza? Sunga bango bamona oyo bato ya Mokonzi Benyamina bamonaki kati ya Mosiya 4:1–3, 10. Bakoki lisusu kotala “Repent, Repentance” kati ya Bokambi na Makomi. Lolenge nini Yesu Klisto akokisaka boyamboli esalama?

Mosiya 4:12–26

Nsango malamu ya Yesu Klisto efulaka ngai nasalela basusu na bolingo mpe bosembo.

  • Kosalisa basusu asalaka biso toyoka malamu. Ntango mosusu bana na bino bakoki kosolola na ntina ya ntango balingaki to basalisaki moto moko mpe lolenge nini boyebi wana esalaki ete bayoka. Bantina nini ezali oyo bato bakoki kolinga te kosalisa basusu? Nini tokoki kolobela bato mpo na kobengisa bango basalisa bato ya bosenga? Luka makanisi kati na Mosiya 4:16–26.

  • Mokonzi Benyamina ateyaki ete ntango toyaka epai ya Klisto mpe tozwaka bolimbisi ya masumu na biso, biso “totondisamaka na bolingo ya Nzambe” (Mosiya 4:12). Oyo ekambaka biso tolinga mpe tozala na bosembo epai ya basusu. Yo mpe bana na yo bokoki koluka Mosiya 4:13–16, 26 (to loyembo lokola “I’ll Walk with You,” Children’s Songbook, 140–41) mpe luka maloba oyo elimboli lolenge nini tokoki kosalisa basusu. Nsima bakoki kosala libanda makambo maye to koyema bililingi na bango mpe koyeba maloba ya moto moko mosusu. Lolenge nini tokoki kolakisa bolingo mpe bosembo na libota, na kelasi, to na eklezia?

Elilingi
elenge mwasi azali kosakana na bebe

Yesu Klisto ateyaki biso tozala na bosembo epai ya basusu.

Mosiya 5:5–15

Ntango nasali mayokani na Nzambe, nazwi likolo na ngai moko nkombo ya Klisto.

  • Bana na yo bakoki kosepela kokela babaje kolakisaka nkombo ya “Yesu Klisto” mpe kolata yango likolo ya mitema na bango (tala lokasa ya molulu ya poso oyo). Ntango bazali kosala bongo, okoki kotangela bango Mosiya 5:12 mpe solola na bango na ntina ya lolenge nini kosalaka mayokani, to bilaka, na Nzambe ezali lokola kozwaka nkombo ya Klisto “ekomama ntango nyonso kati na mitema na [bango].”

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo ya Friend magazini.

Elilingi
Klisto azali koleisa bandeke

Na Bobateli na Ye ya Ntango Nyonsona Greg K. Olsen

Bimisa na lokasa