Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mitano 13–19: “Pole … Oyo Ekoki Soki Moke Te Kokoma Molili.” Mosiya 11–17


Sanza ya mitano 13–19: ‘Pole … Oyo Ekoki Soki Moke Te Kokoma Molili.’ Mosiya 11-17,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya mitano 13–19. Mosiya 11–17,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Abinadi azali kotatola liboso ya Mokonzi Noa

Abinadi Liboso ya Mokonzi Noa, na Andrew Bosley

Sanza ya mitano 13–19: “Pole … Oyo Ekoki Soki Moke Te Kokoma Molili”

Mosiya 11–17

Bamoto minene ekoki kobanda uta na montentei moko mpamba. Abinadi azalaki bobele moto moko oyo azalaki kotatola mabe ya mokonzi ya nguya mpe ndako na ye ya basambisi na ye. Maloba na ye ebwakisamaki na bato mingi mpenza, mpe bapesaki ye etumbu ya kufa. Kasi litatoli na ye ya Yesu Klisto, oyo azali “pole … oyo ekoki soki moke te kokoma molili” (Mosiya 16:9), engengisaki eloko moko kati na elenge nganganzambe Alma. Mpe montentei wana ya mbongwana malembe malembe ekolaki lokola Alma amemaki basusu mingi na boyamboli mpe bondimi na Yesu Klisto. Ndemo ya moto oyo ebomaki Abinadi esukaki na kokufa, kasi moto ya bondimi oyo maloba na ye esalaki ekozala na bopusi ezanga nsuka likolo ya Banefi—mpe likolo ya baoyo batangaka maloba na ye lelo. Mingi na biso tokokutana mokolo moko te na oyo Abinadi akutanaki na yango mpo na matatoli na biso, kasi biso nyonso tozali na bangonga wapi kolanda Yesu Klisto ezali momekano moko ya mpiko mpe bondimi na biso. Ntango mosusu koyekola litatoli ya Abinadi ekopelisa makasi moto ya litatoli mpe mpiko kati na motema na yo mpe lokola.

Tala lisusu “Abinadi Testifies of Jesus Christ [Abinadi Atatoli Yesu Klisto]” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Elilingi
Elembo ya seminele

Mosiya 11–1317

Nakoki kobunda mpo na Yesu Klisto, ata kutu ntango nazali bobele ngai moko.

Ntango ozali koyekola Mosiya 11–13; 17, tala bililingi ya Abinadi na mwango oyo. Nini oyekoli na oyo elimboli kozala lokola nzeneneke ya Klisto? Mingimingi, okoki kotya likebi ya boyekoli na yo na biteni mpe mituna lokola oyo:

Ntango nini omiyokaki lokola otelemaki yo moko mpo na kobundela Mobikisi mpe nsango malamu na Ye? Ndenge nini Asalisaki yo omona ete azalaki elongo na yo? Ntango ozali komanyola likambo oyo, okokaki kotanga lisolo ya Elisa mpe elenge mosaleli na ye na 2 Mikonzi 6:14–17. Nini efuli yo na ntina ya lisolo oyo?

Okoki mpe koluka nkasa 31–33 ya Mpo ya Bokasi bwa Bilenge: Motambwisi mpo na Kopona mpo na koluka biteni ya maloba oyo ekopesa yo mpiko mpo na kobundela solo. To okoki kosala mpe bongo na maloba ya nzembo lokola “Sala Oyo Ezali Sembo” to “Let Us All Press On [Tokoba]” (Banzembo, nos. 237, 243).

Ndenge nini okosalela makambo oyo oyekolaki epai ya Abinadi? Video “Dare to Stand Alone” (Biblioteke ya Nsango Malamu) emonisi makambo oyo okoki kosala mpo na Klisto mpe nsango malamu na Ye. Bandakisa mosusu nini okoki kokonisa?

Tala lisusu Baloma 1:16; 2 Timote 1:7–8; “Mokapo 8: The Call for Courage,” Mateya ya Bakambi ya Eklezia : Thomas S. Monson (2022), 135–47; Gospel Topics, “Bondimi na Yesu Klisto,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Teya na Molimo “Mateya ya nguya ya nsango malamu esengaka te bobele bolengeli ya liteya kasi bolengeli na yo moko ya molimo [mpo na] oyoka mpe olanda litambwisi ya Molimo ntango ozali koteya” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 17).

Mosiya 12:19–37

Nasengeli kosalela motema na ngai mpo na kososola liloba ya Nzambe.

Banganganzambe ya Mokonzi Noa bayebaki malamu liloba ya Nzambe. Bakokaki kozongela mikapo ya makomi mpe koloba ete bateyaka mitindo. Mpe atako bongo, bomoi na bango emonanaki lokola esimbamaki te na nsango malamu ya Mobikisi. Mpo na nini ezalaki bongo?

Kanisa na ntina na yango ntango ozali kotanga Mosiya 12:19–37. Okanisi elimboli nini koloba na kosalela motema na yo mpo na kososola liloba ya Nzambe? Maloba to biteni ya maloba nini efulaka yo mpo na kosala mbongwana na lolenge ozali kopusana mpo na koyekola nsango malamu?

Mosiya 13:11–26

Mitindo ya Nzambe esengeli ekomama na motema na ngai

Kanisa naino likambo oyo Abinadi amonaki ete mitindo yango “ekomamaki te [na] mitema” ya banganganzambe (Mosiya 13:11). Eteni ya liloba oyo elimboli nini? Ntango ozali kotanga Mosiya 13:11–26, tala soki mitindo oyo ekomami na motema na yo.

Tala lisusu Yilimia 31:31–34; 2 Bakolinti 3:3.

Mosiya 14–15

Yesu Klisto aniokwamaki mpo na ngai.

Na Mosiya 14–15, tala maloba mpe biteni ya maloba oyo ezali kolimbola Mobikisi mpe nini Ye anyokwamaki mpo na yo. Biteni nini ezali kosalisa yo kokolisa bolingo mpe botondi na yo epayi na Ye?

Mosiya 15:1–12

Lolenge nini Yesu Klisto azali nyonso mibale Tata mpe Mwana?

Abinadi ateyaki ete Nzambe Mwana—Yesu Klisto—akozala Mosikoli (tala Mosiya 15:1), kofanda na nzoto, kokoma moto mpe Nzambe (biteni 2–3). Amipesaki mobimba Ye moko na bolingi ya Nzambe Tata (biteni 5–9). Mpo na yango, Yesu Klisto azali nyonso mibale Mwana ya Nzambe mpe ntoma ya mabele abongi nie ya Nzambe Tata (tala Yoane 14:6–10).

Yesu Klisto azali lisusu Tata na lolenge ete ntango tondimi bosikoli na Ye, tokomi “nkona na ye” mpe “basangoli ya libula ya bokonzi ya Nzambe” (Mosiya 15:11–12). Oyo elingi koloba, tokomi ya kobotama lisusu na molimo na nzela na Ye (tala Mosiya 5:7).

Mpo na nini omoni ete ezali na ntina koyeba bosolo oyo etali Tata na Lola mpe Yesu Klisto? Ndenge nini litatoli ya Abinadi elendisi bondimi na yo epai na Bango?

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mosiya 11–1317

Nakoki kobunda mpo na Yesu Klisto, ata kutu ntango nazali bobele ngai moko.

  • Na ntango moko boye na bomoi na biso, biso banso tokutanaka na mpasi mpo na kosala maponi oyo ekendaka na bokeseni na bondimi na biso na Yesu Klisto. Bana na yo bakoki koyekola nini epai ya Abinadi mpo na kotelema lokola nzeneneke ya Yesu Klisto, ata ntango bato balingaka yango te? Bililingi kotambolaka lolenge ya mayemi to “Mokapo 14: Abinadi mpe Mokonzi Noa” (na Masolo ya Buku ya Mormon, 38–42) ekokaki kosalisa bango bamona na makanisi lisolo yango na Mosiya 11–13; 17. Tuna bango nini balingaka na ntina na Abinadi.

  • Bana na yo bakoki kosepela kosala biteni ya lisolo ya Abinadi. Na nsima, bakokaki kosala masano ya makambo ya solosolo mpo na komeka oyo bakoki kosala soki bato mosusu balingi ete basala likambo moko ya mabe. To bakokaki kokabola makambo oyo bakutanaki na yango ntango bazalaki na mpiko na kolandaka Yesu Klisto. Lolenge nini Abinadi alandaki Yesu Klisto? (tala Mosiya 13:2–9; 17:7–10). Mpo na nini Mokonzi Noa asalaki te oyo ayebaki ete ezali malamu? (tala Mosiya 17:11–12).

Mosiya 12:33–36; 13:11–24

Nasengeli kotosa Mitindo Zomi.

  • Banganganzambe ya Mokonzi Noa bayebaki mitindo kasi bazalaki na yango te “ekomama na mitema [na bango]” (Mosiya 13:11). Lolenge nini okosunga bana na yo bayeba mitindo mpe balinga yango? Mbala mosusu bakokaki kokoma mitindo uta Mosiya 12:33–36 mpe 13:11–24 na biteni ya lonkasa oyo ezali lokola motema. Ntango bazali kosala yango, solola na bango na ntina ya mitindo nini oyo elimboli mpe lolenge nini kolanda yango. Ndenge nini tokomi mitindo oyo na mitema na biso?

  • Okoki lisusu koyemba nzembo na ntina ya mitindo, lokola “Bomba Mitindo” (Children’s Songbook, 146–47). Mapamboli nini eyaka uta na kobombaka mitindo?

Elilingi
Tata mpe mwana mobali bazali kotanga makomi

Makomi eteyi biso mitindo ya Nzambe.

Mosiya 14; 16:4–9

Tata na Lola atindaki Yesu Klisto mpo na kokamba ngai lisusu epai na Ye.

  • Atako ezali mokapo mokuse, Mosiya 14 ezali na maloba mpe biteni ya maloba mingi oyo elimboli Yesu Klisto. Mbala mosusu yo mpe bana na yo bokokaki kolobela makambo yango ntango bozali kotanga mokapo elongo. Nsima okokaki kolobela lolenge nini ozali koyoka mpo na Mobikisi ntango ozali koyekola maloba mpe biteni ya maloba oyo.

  • Mpo na koteya na ntina na Yesu Klisto, Abinadi atangaki maloba ya mosakoli Yisaya, oyo akokanisaki biso na bampate oyo ebungaki. Mbala mosusu bana na yo bakoki koyebisa makambo oyo bakutanaki na yango ntango babungisaki eloko moko to babungaki bango moko. Bayokaki lolenge nini? Basalaki nini? Na nsima bokokaki kotanga elongo Mosiya 14:6 mpe 16:4–9. Lolenge nini tozali lokola bampate oyo ezali koyengayenga epai ya Nzambe? Lolenge nini Yesu Klisto asalisaka biso tozonga?

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya sanza oyo ya Moninga zulunale.

Elilingi
Abinadi azali kotatola liboso ya Mokonzi Noa

Elongi na Ye Engengaki na Bongengi Moko Makasi Mpenza, na Jeremy Winborg

Bimisa na lokasa