Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mitano 20–26: “Tokoti kati na Boyokani elongo na Ye.” Mosiya 18–24


Sanza ya mitano 20–26: “Tokoti kati na Boyokani elongo na Ye.” Mosiya 18-24,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya mitano 20–26. Mosiya 18–24,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Bato ya Limiyi bazali kokima

Minerva Teichert (1888–1976), Bokimi ya Mokonzi Limiyi mpe Bato na Ye, 1949-1951, langi ya mafuta likolo ya isorele, 35 7/8 × 48 inches. Mize ya Ntoki ya Université ya Brigham Young, 1969.

Sanza ya mitano 20–26: Tokoti kati na Boyokani elongo na Ye

Mosiya 18–24

Lisolo ya Alma mpe bato na ye kati na Mosiah 18; 23–24 elakisi nini yango elimboli “kokota kati na etonga ya Nzambe” (Mosiah 18:8). Ntango bato ya Alma babatisamaki, basalaki boyokani elongo na Nzambe mpo na “kosalela ye mpe kobatela mitindo na ye” (Mosiya 18:10). Ntango oyo ezalaki bomipesi ya moto ye moko, esengelaki lisusu kotala lolenge nini basalisanaki moko na mosusu. Iyo, mobembo ya kozonga epayi ya Tata na Lola ezali ya moto ye moko, mpe moko te akoki kobatela mayokani na biso mpo na biso, kasi wana elingi koloba te ete tozali biso moko. Tozali na bosenga ya moko mpe mosusu. Lokola bandimi ya Eklezia ya Klisto, tosalaka boyokani ya kosalela Nzambe na kosunganaka mpe kosalisanaka moko na mosusu elongo na nzela, “komema[ka] mikumba ya moko na mosusu” (Mosiya 18:8–10). Bato ya Alma solo bazalaki na mikumba ya komema, kaka lokola tosalaka biso banso. Mpe lolenge moko Nkolo asalisaka biso “komema mikumba [na biso] na pete” (Mosiya 24:15) ezali na kopesaka biso lingomba moko ya Basantu oyo balaki kolela elongo na biso mpe kobondisa biso, kaka lokola tolaki kosala mpo na bango.

Tala lisusu “Nkolo abikisaka Bato ya Boyokani ya Alma mpe Limiyi” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Elilingi
Elembo ya seminele

Mosiya 18:1–17

Ntango nabatisami, nasali boyokani na Nzambe.

Tala na mozindo boniboni bandimi balimbolamaki na Mosiya 18 bayokaki na ntina na Yesu Klisto. Basengelaki kokutana na kobombana, na likama monene, mpo na koyekola na ntina na Ye (tala eteni 3). Mpe ntango bapesaki bango libaku ya kolakisa bomipesi na bango na nzela ya boyokani ya libatisi, “babetaki maboko na bango na esengo, mpe bagangaki ete: Oyo ezali mposa ya mitema na biso” (Mosiya 18:11).

Kotanga milongo oyo ekoki kozala libaku malamu ya komanyola boniboni mayokani na yo ezali na ntina mpo na yo. Ntango ozali koyekola Mosiya 18:8–14 mingimingi, talela mituna lokola oyo:

  • Oyekoli nini uta na milongo oyo na ntina ya bilaka osalaki na libatisi? Nzambe alakaki yo nini? (tala biteni 10, 13).

  • Lolenge nini boyokani ya kosalela Nzambe etali milende na biso ya kosalisa moko na mosusu? (tala biteni 8–9).

  • Elimboli nini epai na yo “kotelema lokola [nzeneneke] ya Nzambe”? (eteni 9).

  • Lolenge nini kobatelaka boyokani ya libatisi esungaka yo “otondisama na Molimo”? (Mosiya 18:14). Lolenge nini Molimo asungaka yo obatela boyokani na yo?

Koyanolaka na mituna yango ekoki kokamba yo omaniola mpo na nani mayokani mpe makuli ezali ntina epai na Nzambe. Okoki kozwa bososoli na nsango ya Mpaka Gerrit W. Gong “Covenant Belonging [Kozala ya Boyokani” (Liahona, Sanza ya zomi na mitano 2019, 80–83) to nsango ya Mokambi Jean B. Bingham “Covenants with God Strengthen, Protect, and Prepare Us for Eternal Glory [Mayokani elongo na Nzambe Elendisaka, Ebatelaka, mpe Ebongisaka Biso mpo na Nkembo ya Seko]” (Liahona, Sanza ya mitano 2022, 66–69). Tozali na botondi mpo na mayokani na yo. Nini ozali kosala mpo na kobatela bilaka na yo?

Tala mpe Mito ya makambo ya Nsango Malamu, “Baptism,” Biblioteke ya Nsango Malamu; “Alma the Elder Teaches and Baptizes at the Waters of Mormon |Alma Mpaka Ateyi mpe Abatisi na Mai ya Mormon]” (video), Gospel Library.

Teya bosolo uta na makomi mpe maloba ma baprofeta ba mikolo mya nsuka. Ntango ozali koteya—mpe koyekola—mikundola ete moko ya banzela ya malamu koleka mpo na kobakisa bondimi na Klisto ezali kotya makanisi na makomi mpe maloba ya baprofeta ba mikolo mya nsuka (tala Mosiya 18:19).

Mosiya 18:17–30

Nzambe atindi bato na Ye basangana, babongisa, mpe bazala na bomoko.

Bato mosusu bamitunaka, mpo na nini tozali na mposa ya eklezia? Luka Mosiya 18:17–31, kolukaka motuya bato ya Alma bazwaki na kosangana na “eklezia ya Klisto” (Mosiya 18:17). Bokokani nini omoni na Eklezia ya Yesu Klisto na mikolo ya Alma mpe na mikolo na biso?

Lolenge nini okoki koyanola na moninga to moto ya libota oyo andimi te ete lingomba ebongisami ezali ntina? Mpo na nini ozali na botondi ya kozala ya Eklezia ya Yesu Klisto?

Kanisa nini okoki kosala mpo na kosunga bandimi ya palwasi to ya etape na yo na kozala ya “kosangana elongo na bomoko mpe na bolingo” (Mosiya 18:21).

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “The Need for a Church [Esengeli ya Eklezia],” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2021, 24–26; “Love One Another [Bolingana],” Banzembo, no. 308.

Mosiya 21–24

Nzambe akosunga ngai komema mikumba na ngai.

Bato ya Limiyi mpe bato ya Alma banso mibale bakweyaki na boombo, atako mpo na bantina ekeseni mpe makambo ekeseni. Okoki koyekola nini na kokokanisaka masolo ya bato ya Lemiyi na Mosiya 19–22 mpe bato ya Alma na Mosiya 18; 23–24? Ntango ozali kosala bongo, luka bansango oyo etiami na misala kati ya bomoi na yo. Na ndakisa, elimboli nini “kokoma na bozwi mokemoke”? (Mosiya 21:16). Ndenge nini okoki kosalela etinda yango?

Mosiya 23:21–24; 24:8–17

Nakoki kotya motema na Nkolo.

Kutu atako bayambolaka masumu na bango, Alma mpe bato na ye bamimonaki kaka na boombo. Misala na bango elakisi ete kotiaka motema na Nkolo mpe kotosaka mayokani na biso epekisaka ntango nyonso bampasi te, kasi esungaka biso tolonga yango. Ntango ozali kotanga Mosiya 23:21–24 mpe 24:8–17, koma maloba mpe makomi oyo ekoki kosunga yo oyekola kotya motema na Nzambe, atako makambo na yo ezali nini.

Tala lisusu David A. Bednar, “Bear Up Their Burdens with Ease [Bomemela Mikumba na Bango na Pete],” Liahona, Sanza ya mitano 2014, 87–90.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mosiya 18:7–17

Ntango nabatisami, nasali boyokani na Nzambe.

  • Lolenge moko ya ntina ya kosalisa bana na yo bamilengela mpo na libatisi ezali koteya bango na ntina ya boyokani oyo bakosala ntango bakobatisama. Oyo ekoki kozala pete lokola kolakisa elilingi na nsuka ya mwango ya poso oyo mpe kotanga na ntina ya liyokani elongo na bango na Mosiya 18:9–10. Kanisa kobengisa mwana oyo asila kozwa libatisi mpo na koteya likambo yango epai ya bana mike. Bana na yo bakoki kosepela koyoka nsango ya libatisi na yo. Ndenge nini kobatela mayokani na yo na Nzambe epamboli bomoi na yo?

  • Bana oyo babatisami bakokaki kosalela makundoli mbala na mbala na ntina ya mayokani basalaki mpe kozongisa sika poso na poso na elambo. Mbala mosusu bana na yo bakokaki kokokanisa boyokani ya libatisi oyo elimbolami na Mosiya 18:8–10 na nsambo ya elambo (tala Malongi mpe Mayokani 20:77, 79). Ndenge nini tokoki kosala elambo ntango ya ntina, ya limemya, kaka lokola mabatisi na biso ezalaki?

Elilingi
Elenge mwasi azali Kobatisama

Tosalaka boyokani na Nzambe ntango tobatisamaka?

Mosiya 18:17–28

Ntango nabatisami, nakomi mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

  • Bana na yo bayebi soki yango elimboli nini kozala mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka? Kanisa kosunga bango bazwa bililingi oyo ezali komonisa makambo oyo bandimi ya Eklezia basalaki na kati ya Mosiya 18:17–28. Na ndakisa, bililingi ya Bokulisami na Bonganganzambe mpe Bofuti ya Moko na zomi (Gospel Art Book, nos. 106113) ekoki kolakisa biteni 18 mpe 27–28. Yebisa bango mpo na nini ozali na botondi ya kozala mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto.

  • Kosunga bana bamiyoka “batongami esika moko na bomoko mpe na bolingo” (Mosiya 18:21) esalisaka bango batikala na boyokani na Eklezia na bomoi na bango mobimba. Kanisa kobengisa bana na yo kotanga Mosiya 18:17-28. Bandimi ya Eklezia ya Klisto basalaki nini na mikolo ya Alma mpo na kolingana mpe kosalelana? Boniboni tokoki kosala yango na palwasi, etape to lingomba na biso? Loyembo etali bolingo lokola “I’ll Walk with You [Nakotambola na Yo]” (Children’s Songbook, 140), ekokaki kolendisa nsango yango.

Mosiya 24:8–17

Nzambe akoki kokomisa mikumba na ngai pepele.

  • Liteya ya eloko ya pete ekoki kosala ete boyekoli ezala ya kobosana te. Kanisa kotondisa saki na biloko ya kilo (mpo na komonisa mikumba) mpe kobengisa mwana asimba saki. Ntango ozali kotangi Mosiya 24:8–17 elongo na bana na yo, senga bango balongola eloko moko na saki mbala nyonso oyo bayokaka likambo moko Alma mpe bato na ye basalaki mpo na koluka lisalisi ya Nzambe na mikumba na bango. Okoki nsima kosolola na bango na ntina ya lolenge nini Tata na Lola akoki kosala mikumba na biso pete ntango tolukaka lisalisi na Ye.

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya sanza oyo Moninga zulunale.

Elilingi
bato bazali kobatisama

Mayi ya Mormon, na Jorge Cocco

Bimisa na lokasa