2010–2019
Kozala na Mayokani
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Kozala na Mayokani

Kozala elongo na Nzambe mpe kotambola elongo na moko mpe mosusu na nzela ya liyokani esengeli kopambolama na kozalaka na liyokani.

Bandeko balingami mibali mpe basi, liteya elobeli mwana moko ya Eteyelo ya Bana azali koyekola kosambele. “Natondi yo mpo na letele A, letele B, …letele G.” Losambo ya mwana ekobaki, “Natondi yo mpo na letele X, Y, Z. Tata na Lola ya bolingo, natondi yo mpo na motango 1, motango 2.”n Moteyi ya Eteyelo ya Bana amitungisaki kasi azelaki na bwanya. Mwana alobi, natondi yo mpo na motango 5, motango 6—mpe natondi yo mpo na moteyi ya Eteyelo ya Bana. Azali moto se moko oyo atikaka ngai nasilisa losambo na ngai.”

Tata na Lola ayokaka mpenza losambo ya bana nionso. Na bolingo ya nsuka te, Ye abeleli biso tondima mpe tozala na liyokani.

Mokili oyo etondi na mabungi, bokosi, bisalela ya lokuta. Na yango ebele emonisamaka kozala ya boleki nzela mpe likolo likolo. Ntango toti mpembeni bilongi ya lokuta, lolendo, kolinga mpe koboya bondimi ya bato, tozali na mposa ya mingi koleka langi ekolongwa, bokutani ya ngonga moke, to mpenza bolandi ya litomba ya moyimi ya mokili. Matondi, ezali na nzela ya kati ya biyano oyo esengeli.

Ntango totali mitindo minene ya Nzambe ya kolinga Ye mpe baye bazali nzinganzinga na biso na liyokani, tokosala yango te lokola mompaya to moleki nzela, kasi lokola mwana na Ye na ndako.1 Likambo ya minoko mibale ya kala ezali kino sikawa ya solo. Na kobungisaka bomoto na biso ya mokili na nzela ya kozala bato ya liyokani, tokomaka mpe tozwaka bomoto na biso ya seko2—bonsomi, ya bomoi, ya solo—mpe toyebaka mokangano na biso ya ntina koleka nyonso. Kozala na liyokani ezali kosala mpe kobatela bilaka ya buletosalaki epai ya Nzambe mpe epai ya moko mpe mosusu, na nzela ya makuli ya bule, oyo ebengisaka nguya ya bonzambe komonisama na babomoi na biso.3 Ntango toyokani na nionso oyo tozali, tokoki kokoma mingi koleka oyo tozali. Kozala na liyokani epesaka biso esika, ndimbola ya bokuse, makoki ya kokoma. Ebotaka bondimi na bomoi mpe na lobiko.4

Mayokani ya bonzambe ekokoma liziba ya bolingo mpo na mpe uta na Nzambe mpe uta wana mpo na mpe na bamoko mpe basusu. Nzambe, Tata na biso ya Lola alingaka biso mingi mpe ayebi biso koleka ndenge tomilingaka mpe tomiyebaka biso moko. Bondimi na Yesu Klisto mpe mbongwana ya moto ye moko (boyamboli) ememaka mawa, ngolu, bolimbisi. Yango ebondisaka mpasi, bomoko, bozangi boyengebene toyokaka na bomoi oyo ya kufa. Lokola azali Nzambe, Tata na biso ya Lola alingi biso toyamba likabo eleki monene ya Nzambe—Esengo na Ye, bomoi na Ye ya seko.5

Nzambe na biso azali Nzambe moko ya Boyokani. Na lolenge na Ye, Ye “abatelaka boyokani mpe alakisaka mawa.”6 Mayokani na Ye ewumelaka “molai lokola ntango [mpenza] ekowumela, to mabele ekotelama, to [kino] ekozala na moto moko likolo na yango ya kobikisa.”7 Tosalemi te mpo na kowayawaya na ezaleli ya kozanga bosolo mpe etonda na ntembe, kasi mpo na kosepela na mikangano ya mayokani ya bolingo “ya koleka nsinga ya liwa.”8

Makuli mpe Mayokani ya Nzambe ezali ya molongo mobimba na masengami na yango mpe ya moto na moto na libaku na yango. Na bosemboya Nzambe, moto nyonso na esika mpe na mobu nyonso akoki kozwa makuli ya lobiko. Bonsomi ya kopona esalaka—bato baponaka soki bakondima to te makuli mapesami. Makuli ya Nzambe epesaka bokambi na nzela na Ye ya mayokani. Tobengaka mwango ya Nzambe mpo na komema bana na Ye na ndako mwango ya bosikoli, mwango ya lobiko, mwango ya esengo. Bosikoli, lobiko, esengo ya lola ekoki kosalema mpamba te Yesu Klisto “asalaki bomikabi oyo ebonga nie mpenza.”9

Kozala elongo na Nzambe mpe kotambola elongo na moko mpe mosusu na nzela ya liyokani na Ye elakisi kopambolama na kozalaka na liyokani.

Yambo, kozala na mayokani ezali na Yesu Klisto na katikati lokola “moyokanisi ya liyokani ya sika.”10 Makambo nionso ekoki kosala elongo mpo na bolamu na biso ntango tozali “ya kosantisama na Klisto … na boyokani na Tata.”11 Lipamboli nionso ya malamu mpe elakelama eyaka na baye bakangami na bondimi kino na nsuka. Bongo “lolenge ya esengo ya baye babateli mitindo ya nzambe” ezali kopambolama na makambo nyonso, ya ntango mpe molimo,” mpe kovanda elongo na Nzambe na … esengo ezanga nsuka mpenza.”12

Ntango totosaka mayokani na biso, tokoki ntango mosusu koyoka ete tozali na lisanga ya banjelu. Mpe tokozala—baye tolingaka mpe bayebapambolaka biso na ngambo oyo ya elamba, mpe baoyo balingaka mpe bapambolaka biso na ngambo ya elamba.

Kala te Ndeko Mwasi Gong mpe ngai tomimonaki kozala na mayokani na malamu na yango koleka na kisuku moko ya lopitalo. Elenge tata moko azalaki na mposa mpenza ete batiela ye ya mbuma ya loketo to lizongo. Libota na ye balelaki, bakilaki, mpe basambelaki mpo na ye azwa lizongo. Ntango nsango eyaki ete lizongo ya kobikisa bomoi emonanaki, mwasi na ye na kimia alobaki, “nalikii libota mosusu mpe ezali Malamu.” Kozala na mayokani ezali, na maloba ya Apostolo Paulo, “ete nakoka kobondisama elongo na bino na bondimi na biso elongo na bino mpe ngai.”13

Na mobembo ya bomoi, tokoki kobungisa bondimi na Nzambe, kasi Ye akobungisa mokolo moko te bondimi na biso. Lokola soki, mwinda na ekuke na ye ezali ntango nionso ya kopela. Abengisaka biso koya mpe kozonga na mayokani oyo esalaka nzela na Ye. Ye azelaka ya kolengelama mpo na koyamba biso, ata ntango tozali “naino mosika mpenza.”14 Ntango toluki na miso ya bondimi ndakisa, kotengama. to matono ya kokangama ya makambo na biso, tokoki komona mawa mpe bolendisi na ye ya boboto, mingimingi na mimekano, mawa, mpe mikakatano na biso, lokola mpe na bisengo na biso. Atako mbala mingi tobetaka mabaku to tokweyaka, soki tokobi kokende epai na Ye, Ye akosalisa biso, litambe moko moko.

Ya mibale, Buku ya Mormon ezali elembo ya solo tokoki kosimba na loboko na biso ya kozala na mayokani. Buku ya Mormon ezali esaleli elakelama mpo na bosangisi ya bana ya Nzambe esakolamaki lokola boyokani moko ya sika.15 Ntango tozali kotanga Buku ya Mormon, na biso moko to elongo na bausu, ezala na motema to maloba, tokoki kosenga na Nzambe “na motema moko ya solo, na likanisi moko ya solo, kozalaka na bondimi na Klisto,” mpe kozwa nguya ya bosolo na Molimo Mosantu ete Buku ya Mormon ezali ya solo.16 Yango elakisa mpe bosolo ete Yesu Klisto azali Mobikisi, Joseph Smith azali profeta ya Bozongisi, mpe Eklezia ya Nkolo ebengami na nkombo na Ye—Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.17

Buku ya Mormon elobeli boyokani ya kala mpe ya sika na bino oyo bazali bana ya Leyi, “bana ya baprofeta.”18 Batata na bino bazwaki elaka ya boyokani ete bino, bonkoko na bango, bokoyeba mongongo moko lokola soki uta na mputulu na Buku ya Mormon.19 Mongongo oyo boyokaka ntango botangaka etatolaka ete bozali “bana ya mayokani”20 mpe Yesu azali Mobateli Malamo na bino.

Buku ya Mormon ebengisi moko na moko na biso, na maloba ya Alama, kokota “na kati ya boyokani na [Nkolo], ete [biso] tokoka kosalela ye mpe tokobatela mitindo na ye, ete akoka kosopa Molimo na Ye beboo likolo na [biso].”21 Ntango tozali koluka kobongwana mpo na malamu koleka—lokola moto moko alobaki yango, “kotika kozala mobola mpe kozala na esengo kozalaka na esengo”—tokoma ya kofungwana ba bokambi, lisungi mpe bokasi. Tokoki koya na liyokani ya kozala elongo na Nzambe mpe lingomba moko ya bandimi ya boyambi, tokoki kozwa mapamboli malakemi na malongi ya Klisto22—sikoyo.

Likoki ya bonganganzambe ezongisama mpo na kopambola bana na Ye nionso ezali ndelo ya misato ya kozala na mayokani. Na eleko oyo, Yoane Mobatisi mpe Apostolo Petelo, Yakobo, mpe Yoane bayaki lokola bamemi nsango ya lokumu uta na Nzambe mpo na kozongisa likoki ya bonganganzambe na Ye.23 Bonganganzambe ya Nzambe mpe makuli na Ye ekokisaka mikangano ya elengi na mabele mpe ekoki kokangisa mikangano ya liyokani na lola.24

Bonganganzambe ekoki kopambola mpenza uta na bomwana kino lilita—uta na nkombo ya mwana kino na bobulisi ya lilita. Mapamboli ya bonganganzambe ebikisaka, ebondisaka, epesaka toli. Tata moko asilikaki na mwana na ye, kino bolingo ya kolimbisa eyaki ntango tata apesaki mwana na ye ya mobali lipamboli moko ya bonganganzambe ya boboto. Mondimi moko kaka na libota na ye, molingami mwasi moko azalaki na ntembe na bolingo ya Nzambe kino azwaki lipamboli ya bonganganzambe efulama. Na mokili mobimba, bapamboli ya lokumu bamilengelaka mpo na kopesa mapamboli ya bonganganzambe. Ntango tata mopamboli atii maboko na ye na moto na bino, ayokaka mpe abimisaka bolingo ya Nzambe mpo na bino. Asakolaka molongo na bino na ndako ya Yisalaele. Alakisaka mapamboli uta na Nkolo. Mpe na bwania, mwasi moko ya mopamboli alobelaki ngai boniboni ye mpe libota na ye babengisaka Molimo mingi mingi na mikolo oyo Tata na bango apesaka mapamboli.

Na nsuka, mapamboli ya kozala na liyokani eyaka ntango tolandi profeta ya Nkolo mpe tosepelaka na liyokani ya bomoi, na libala. Libala ya boyokani ekomaka ya likolo koleka mpe ya seko ntango na mokolo toponaka esengo ya molongani mpe mpe libota na biso liboso na oyo ya bisomei. Ntango “ngai” ekomi “biso,” tokoli elongo. Tokoli mibange elongo; tokoli bilenge elongo. Ntango tomipamboli bamoko mpe basusu na bomoi mobimba ya kolimbisana, tokomona elikia mpe bisengo na biso kosantisama na ntango mpe na boseko.

Atako makambo ekesani, ntango tosali nionso oyo tokoki, ya malamu koleka tokoki, mpe na bosolo tosengi lisungi na Ye na nzela ya mobembo, Nkolo akokamba biso, na ntango mpe lolenge na Ye, na nzela ya Molimo Mosantu.25 Mayokani ya libala ekangami na boponi elongo ya baye basali yango—kokundolisaka biso limemia ya Nzambe mpe bonsomi ya kopona na biso mpe lipamboli ya lisungi na Ye ntango toluki yango elongo.

Mbuma ya kozala na mayokani na ntaka ya bankola ya libota eyokami na bandako mpe mitema na biso. Nasengi bopesa ngai nzela yakolimbola na bandakisa na ngai moko.

Ntongo Ndeko Mwasi Gong mpe ngai tozalaki kolingana mpo na libala, nayekolaki etali bonsomi ya kopona mpe ya kozwa mikano. Mpo na eleko ya ntango moko, tozalaki koyekola na bikolo mibale bikesani na mikili mibale mikeseni. Ezali ntina nini nakoki koloba nazwaki PhD moko na mikangano na mokili.

Ntango natunaki, “Tata ya Lola esengeli ngai kobala Susan?” Nayokaki kimia. Kasi ezalaki ntango nayekolaki kosambela na likanisi ya solo, “Tata ya Lola, nalingi Susan mpe nalingi kobala ye. Nalaki nakozala mobali malamu mingi mpe tata nakoki kozala ”—ntango nasalaki mpe nakanaki malamu koleka, nde bondimisami ya molimo ya makasi koleka eyaki.

Sikoyo Gong na biso mpe nzete ya libota ya Lindsay FamilySearch, masolo mpe bafoto esungaka biso tomona mpe tokangisama na nzela boyebi ya bomoi ya liyokani ya nkola.26 Mpo na biso, bana ezali lokola:

Elilingi
Alice Blauer Bangerter

Nkokololo ya mwasi Maria Elizabetha Blauer, oyo basengaki libala na bato misato na mbala moko, nsima asengaki mobali na ye akanga pedale ya lokola na masini ya mateka mpo ete akoka kobongola mateka, mpe kosangisa na mbala moko.

Elilingi
Loy Kuei Char

Nkokololo ya mobali Loy Kuei Char amemaki bana na mokongo mpe mwa biloko ya libota na ye likolo ya mpunda ntango bazalaki kokatisa bilanga ya mabele ya volkan na Esanga Monene ya Hawai. Bomipesi mpe kobonzama ya bankola ya libota ya Char epamboli libota na biso lelo.

Elilingi
Mary Alice Powell Lindsay

Gram Mary Alice Powell Lindsay atikalaki na bana bilenge mitano ntango mobali na ye mpe mwana na ye ya mokolo bakufaki bobele na mbalakaka mwa mikolo eleki. Mokufeli mobali ya mibu 47, Gram abokolaki libota na ye na lisungi ya bolingo ya bayangeli mpe bandimi. Na mibu wana mingi, Gram alakaki Nkolo ete soki Ye akolingaki kosalisa ye, akomilela mokolo moko te. Nkolo asungaki ye. Amilelaki mokolo moko te.

Bandeko mibali mpe bandeko basi, na litatoli ya Molimo Mosantu, nionso ya malamu mpe ya seko efandisami na katikati bosolo ya Nzambe Tata na biso ya Seko mpe Mwana na Ye , Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye. Nkolo na biso, Yesu Klisto, azali Moyokanisi ya liyokani. Na tatoli na ntina ya Yesu Klisto azali liyokani ya ntina ya Buku ya Mormon.27 Na ndai mpe boyokani, likoki ya bonganganzambe ezongisami elingi kopambola bana nionso ya Nzambe, lokola na nzela ya libala ya boyokani, libota ya bankola, mpe mapamboli ya moko na moto.

Mobikisi na biso asakoli, “nazali Alfa mpe Omega, Klisto Nkolo; iyo, mutu nazali ye, ebandeli mpe nsuka, Mosikoli ya mokili.”28

Elongo na biso na ebandeli, Ye azali elongo na biso, na kozala na mayokani na biso nionso, kino na nsuka. Natatoli bongo na nkombo ya bule mpe esantu ya Nkolo Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa