2010–2019
Na kati ya Mapata mpe Moi, Nkolo, Zala elongo na Ngai!
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


2:3

Na kati ya Mapata mpe Moi, Nkolo, Zala elongo na Ngai!

Natatoli na bino ete “na kati ya lipata mpe moi” Nkolo akozala elongo na biso, ete “mitungisi na biso “ [ekoka ] komelama mpenza na esengo ya Klisto.”

Moko ya nzembo tolingaka elobeli losambo “Na kati ya Mapata mpe Moi, Nkolo, zala elongo na Ngai!”1 Nzalaka mokolo moko na mpempo ntango ezalaki kobelema na ekumbaki moko ya monene. Kotalaka libanda na fenetele, nakokaki komona eboke ya mapata na nse na biso. Bongengi ya moi kobimaka engengisaki mapata, kosalaka yango kongenga na bongengi ya makasi. Noki, nzokande, mpempo ekitaki na kati ya mapata ya bozito, mpe tozalaki na mbalakaka ya kozipama na molili ya monene oyo ekangaki miso na biso mobimba na pole makasi oyo tomonaki mwa ngonga liboso.2

Bongengi ya moi kokitaka
Mapata ya moindo

Mapata wana ekoki kokanga miso na biso na pole ya Nzambe mpe kutu kosala biso tomituna soki pole ezali lisusu mpo na biso. Boko ya mapata wana ezali mpasi na makanisi, kobangabanga, mpe ndenge mosusu ya mitungisi ya makanisi mpe ya mayoki. Yango ekoki kobebisa lolenge tomonaka bisomei, basusu, mpe kutu Nzambe. Yango ezwaka basi mpe mibali ya mibu nionso na bisika nionso na moklili.

Lolenge moko ezali kobebisa lipata ya kosambisa to ntembe elongolaka mawa oyo ekoki kozwa basusu oyo bakutani te na mikakatano oyo. Lokola eteni nonso ya nzoto, bongo ekoki kozwa bokono, likama mpe bozangi makoki. Ntango makanisi na biso ezwi mpasi, tokoki koluka lisungi ya Nzambe, ya baye nzinganzinga na biso, mpe ya basali ya lopitalo mpe ya kolongono ya makanisi.

“Bato banso—babali mpe basi—bakelami na elilingi ya Nzambe. Moko na moko azali mwana mobali to mwana mwasi ya molimo ya baboti ya lola, mpe, lokola bongo, moko na moko azali na bozali mpe bomoi ya bozambe.”3 Lokola Baboti na biso ya Lola mpe Mobikisi na biso, tozali na nzoto ya mosuni4 mpe tozalaka na mayoki.5

Bandeko na ngai ya basi balingami. esalamaka ete toyoka mawa to totungisamaka mbala moko na ntango moko. Mawa mpe mitungisi ezali mayoki ya moto uta mbotama.6 Nzokande, soki tozali mbala na mbala mawa mpe soki mpasi ezali ya mozindo mpenza ete ekangi bokoki na biso ya koyoka bolingi na Tata na biso na Lola mpe Mwana na Ye ya Mobali mpe nguya ya Molimo Mosantu, nde tokoki kozalana mpasi ya mobulu na makanisi, kobangabanga, to mpasi mosusu ya mayoki.

Mwana na ngaI ya mwasi akomaki mbala moko: “Ezalaki ntango moko ... [oyo] nazalaki mawa ntango nionso. Nakanisaki ntango nionso ete mawa ezalaki likambo moko ya koyokela nsoni, mpe ete ezalaki elembo ya botau. Yango wana nabombaki mawa na ngai mpo na ngai moko. ... Namiyokaki nazangi ntina.”7

Moninga moko alimboli yango boye: “Uta bomwana na ngai, nabundaka mbala na mbala etomba na mayoki ya bozangi elikia, molili, bomoko, mpe bobangi mpe liyoki ete nabukani to nabebi. Nasalaki nionso mpo na kobomba mpasi na ngai mpe nalakisaki mokolo moko te ete nazalaki kaka kofuluka mpe makasi.”8

Bandeko na ngai ya bolingo, ekoki kosalema na moto nionso—mingimingi ntango, lokola bandimi na mwana ya esengo, tomitiaka mokumba na kokanisaka ete tosengeli kozala ya kobonga mpenza sikoyo. Makanisi ya boye ekoki koleka kilo mpe kobuka. Kokoma ya kobonga mpenza ezali nzela moko oyo ekosalema na bomoi na biso mobimba ya kufa mpe koleka—mpe bobele na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto.9

Na bokeseni, ntango tofungoli mikakatano ya mayoki na biso, kondiaka tozala ya kobonga mpenza, topesi basusu ndingisa ya kokabola bitumba na bango. Elongo tokoyeba ezali na elikia mpe tosengeli mpenza koyoka mpasi biso moko te10

Elikia na Boyei ya Mibale

Lokola bayekoli ya Yesu Klisto, tosalaki boyokani na Nzambe ete biso “tolingi komemana mikumba” mpe “kolela elongo na baye bazali kolela.”11 Komema mpe kolela ekoki kozala na kokoma koyeba bokono ya moyok, koyeba makoki oyo ekoko kosunga kosalisa na bitumba oyo, mpe nsukansuka komema biso moko mpe basusu na Klisto, oyo azali Nkolo Mobikisi.12 Ata soki toyebi te boniboni kosala na oyo basusu bazali koleka na yango, kondimaka ete mpasi na bango ezali ya solo ekoki kozala litambe moko ya motuya na koyeba kososola mpe kobikisa.13

Na makambo mosusu, ntina ya mpasi ya makanisi to kobangabanga ekoki koyebana, nzokande ntango mosusu ekoki kozala mpasi mingi kososola.14 Bongo na biso ekoki koyoka mpasi na ntina ya motungisi15 to bolembi ya kosansale,16 oyo ntango mosusu ekoki kobonga na nzela ya kokokisa bilei, mpongi, mpe ngalasisi. Mbala mingi, tokoki kozala na mposa ya kozwa lisalisi to nkisi na bokambi ya banganga mayele bayekola.

Mbano ya bokoki ya makanisi to ya mayoki ekoki kobebisa makambo, kokambaka na bokoki ya kobakisa, bozangi bososoli, mikangano ya kobukana, komopesa mpasi, mpe kutu komiboma. Nayebi yango mosika te, lokola tata na ngaimei akubaka na komiibaoma mibu mingi eleki. Liwa na ye ezalaki likama mpe ya kobuka motema mpo na libota na nbai mpe ngai. Ezwaki ngai mibu mingi mpo na kolekisa mpasi na ngai, mpe ezalaki bobele sikasikawa nde nayebaki kolobela komiboma na ndenge moko elongobani ya solo esungaka mpo na kopekisa yango na esika ya kolendisayango.17 Nalobelaka sikoyo polele liwa ya tata na ngai na bana na ngai mpe natatolaka libiki oyo Mobikisi akoki kopesa na ngambo nionso mibale ya elamba.18

Mawa, mingi oyo bazwi mpasi ya makanisi ya makasi batiaka mosika ya bandeko Basantu mpamba te bayoka bakoki te naboko lolenge ya kokanisa. Tokoki kosunga bango koyeba ete bazali ya solo ya biso. Ezali na motuya koyeba ete mpasi ya makanisi ezali te mbanoya botau, to ezali te mingimingi mbano ya lisumu.19 Yango “ekolaka soki ebombami kasi ebeekitaka soki ekabolami.”20 Elongo, tokoki kotobola mapata mpe nsoni ya bomoko boye kilo ya nsoni elongwa mpe likamwa ya libiki ekoki kosalema.

Na bomoi ya kufa, Yesu Klisto abikisaki babeli mpe batungisami, kasi moko na moko atambolisaki bondimi na Ye mpe asalaki mpo na kozwa libiki. Boko batambolaki mosika, basusu batandolaki boboko mpo na kosimba elamba na Ye, mpe basusu bayaka na Ye mpo na kobikisama.21 Ntango ekomi likambo ya kobika, ezali biso na mposa na yango mpenza te? “Ezali biso banso te basengi?”22

Tika tolanda nzela ya Mobikisi mpe tobokisa motema mawa na biso, bokitisa mposa na biso ya kosambisa, mpe totika kozala bazuzi ya kimolimo ya basusu. Na ngonga ya boye, tokoki mpenza kosunga komema to kotombola mapata ya kilo oyo ezali kombika balingami mpe baninga na biso23 mpenza ete, na nzela ya bolingo na biso, bakoka mbala moko lisusu koyoka Molimo Mosantu mpe komona pole oyo ewuti na Yesu Klisto.

Soki bozingami mbala na mbala na yoko “londende ya molili,”24 baluka na Tata ya Lola. Eloko te oyo emoni ekoki kobongola bosolo ya seko ete ozali mwana na Ye mpe ete Ye alingaka yo.25 Mikundola ete Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli, mpe Nzambe azali Tata na yo. Bango basosolaka yo. Mona Bango penepene na to, koyokemalaka mpe kokabaka lisungi.26 “[Bango] bakobondisa yo na motungisi na yo.”27 Sala nyonso okoki mpe likia na ngolo ya bomikabi ya Nkolo.

Bitumba na yo esli yo te, kasi bango bakoki kosebisa yo.28 Na ntina ya “sende na mosuni,”29 okoki kozala na makoki ya koyoka motema mawa epai ya basusu. Na bokambami ya Molimo Mosantu, kabola lisolo na yo mpo na “kosalisa batau, kotombola maboko oyo ekiti, mpe kolendisa mabolongo elembi.”30

Mpo na baye na biso bazali kobunda to kosunga moto moko oyo azali kobunda, tolinga kolanda mitindo ya Nzambe boye tokoka ntango nionso kozala na Molimo na Ye elongo na biso.31 Tosala “makambo ya mike mpe ya pete”32 oyo ekopesa biso bokasi ya molimo. Lokola Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Eloko te efungolaka lola mpenza lokola lisanga ya bopeto ya kobakisama, botosi ya sikisiki, koluka na lokengo, mokolo na mokolo kosalaka limpati na maloba ya Klisto na Buku ya Mormon, mpe mbala na mbala mipesa na tempelo mpe mosla ya mambi ya libota.”33

Mobikisi Kobikisaka

Tika biso nyonso tomikundola bongo ete Mobikisi na biso, Yesu Klisto, “[akamataki] likolo na ye [ya biso] mpasi, ete nsop na ye atondaki na mawa, engebene na mosuni, ete akoka koyeba … boniboni kosalisa [biso] engebene nan[Ya biso] mpasi.”34 Ye ayaki “mpo na kokanga mitema mibukana, … mpo na kobondisa banso oyo bazali kolela; … mpo na kopesa na bango kitoko esika ya mputulu y moto, mafuta ya esengo mpo kolela, bilamba ya masanzoli esika ya molimo ya bozito.”35

Boyei ya Mibale

Natatoli na bino ete “na kati ya lipata mpe moi” Nkolo akozala elongo na biso, ete “mitungisi na biso “ [ekoka ] komelama mpenza na esengo ya Klisto,”36 mpe ete “ezali na ngolu nde tobikisami, nsima ya nionso tokoki kosala.”37 Natatoli ete Yesu Klisto akozonga na mabele “na libiki na mapapu na ye.”38 Nsukansuka, Ye “akopangusa mpenza mpinzoli na [ya biso] miso; mpe ekozala lisusu te … na mawa.”39 Mpo bango banso oyo “bakoya epai ya Klisto, mpe bakobongisama mpenza na ye,”40 “moi ekokita lisusu te … mpo Nkolo akozala [ya biso] pole ya seko, mpe mikolo ya [kolela] na biso ekosila.”41 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Abide with Me!” Hymns, no. 166.

  2. Ntango tozalaki likolo ya mapata, tokokaki komona molili oyo ezalaki bobola mwa bametele na nse na biso, mpe ntango tozipamaki na molili na nse, ezalaki kpokoso komona bongengi ya maoi oyo engalaki kaka mwa bametela na nse na biso.

  3. Libota: Esakola na Mokili,Liahona, Sanza ya mitano 2017, 145.

  4. “Molimo mpe nzoto ezali molimo ya moto” (Doctrine and Covenants 88:15). “Nzoto na bino ezali tempelo mpo na molimo na bino. Mpe boniboni osaleli nzoto na yo ekosimba molimo” (Russell M. Nelson, “Decisions for Eternity,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 107).

  5. Tala, ndakisa, Yisaya 65:19; Luka 7:13; 3 Nefi 17:6–7; Moses 7:28. Koyekola koyeba mpe kotuya mayoki na biso ekoki kosunga biso kosalela yango mpo na kokokisa kokoma mingi lokola Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

  6. Tala “Sadness and Depression,” kidshealth.org/en/kids/depression.html.

  7. Hermana Elena Aburto blog, hermanaelenaaburto.blogspot.com/2015/08. Ye akomaki lisusu:

    “Momekano yango epesaka libaku mpo na kosalela bondimi na ngai na mwango ya lobiko. Mpo nayebaki ete Tata na ngai ya Lola alingaka ngai, mpe ete Ye azalaka na mwango moko ya boyengebene mpo na ngai, mpe ete Klisto asosolaki mpenza nini ezalaki koyela ngai.”

    “Nzambe akoyoka yo nsoni te ntango ozangi makoki. Ye azali na esengo ya kosunga yo obonga mpe oyambola. Ye azelaka te yo obongisa makambo nionso na mbala moko. Osengeli te kosala yango yo moko” (iwillhealthee.blogspot.com/2018/09

  8. Mokanda na ye moko. Akomaki lisusu: “Mafuta ya kobikisa ya Bomikabi ya Mobikisi na ngai ezali liziba ya ntango nyonso ya kimia mpe ekimelo na nzela ya mobembo na ngai. Ntango namiyokaka ngai moko kaka na etumba na ngai, namikundolaka ete Ye asilaki koyoka lolenge moko oyo nazali na kati na yango ngai moko. ... Elikya ezali se mingi na koyebaka ete nzoto na ngai ekosekwisami ya kobonga nie mpe ya mikolo ya nsima ezwa lisusu bokono te na makambo ya bomoi oyo ya kufa [mitungisi].”

  9. Tala Russell M. Nelson, “Perfection Pending,,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1995, 86–88; Jeffrey R. Holland, “Be Ye Therefore Perfect—Eventually,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 40–42; J. Devn Cornish, “Am I Good Enough? Ekoki Ngai Yango?Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 32–34; Cecil O. Samuelson, “What Does It Mean to Be Perfect?New Era, Sanza ya yambo 2006, 10–13.

  10. Ezali na motuya ya kolobela kpokoso oyo na bana, mabota, mpe baninga na biso na ndeko, palwasi, mpe mangomba ya bato.

  11. Moziya 18:8–9

  12. Tala Russell M. Nelson, “Jesus Christ—the Master Healer,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2005, 85–88; Carole M. Stephens, “The Master Healer,,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 9–12.

  13. Koyeba boniboni kososola lisusu bilembo to ndakisa na binomei mpe basusu ekoki kosunga. Tokoki koyekola kososola ndakisa ya likanisi esengeli te to ya kolongono te mpe boniboni kokitanisa yango na oyo esengeli ya kolongono.

  14. Mobulu na makanisi ekoki lisusu kozala mabano uta na mbongwana ya malamu na bomoi—lokola mbotama ya mwana to mosala ya sika—mpe ekoki koya ntango makambo ezali malamu na bomoi ya moto.

  15. See “Understanding Stress,” Adjusting to Missionary Life (2013), 5–10.

  16. Tala Jeffrey R. Holland, “Like a Broken Vessel,,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 40.

  17. Tala Dale G. Renlund, “Understanding Suicide” (video), ChurchofJesusChrist.org; “Talking about Suicide” (video), ChurchofJesusChrist.org; Kenishi Shimokawa, “Understanding Suicide: Warning Signs and Prevention,Liahona, Oct. 2016, 35–39.

  18. “Ebandeli ya libiki esengeli bondimi ya bomwana na likambo ya kobongwana te ete Tata na Lola alingaka yo mpe apesi nzela ya kobika. Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, atikaki bomoi na Ye mpo na kopesa libiki oyo. Kasi ezali na eyano ya kokamwa te, to mafuta ya kopesa libiki, to ezali te na nzela ya pete mpo na libiki ya mobimba. Libiki esengeli bondimi ya bozindo na Yesu Klisto mpe likoki na Ye ya nsuka te na kobikisa” (Richard G. Scott, “To Heal the Shattering Consequences of Abuse,,” Liahona, Sanza ya mitano 2008, 42). Ntango ezali na kpokoso, mposa na biso ya momesano ezali mpo na kosilisa yango. Nzokande, tosengeli kokoma basilisa kaka ya bisomei to ya basusu. Tosengeli te kosala nionso biso moko. Na libaki mingi koleka moko na bomoi na ngai, nalukaki monganga mpo na kosalisa na ngonga ya kpokoso.

  19. Yoane 9:1–7

  20. Jane Clayson Johnson Silent Souls Weeping (2018), 197.

  21. Tala Matai 9:2–7, 20–22; 14:35–36; Malako 1:40–42; 2:3–5; 3 Nefi 17:6–7.

  22. Moziya 4:19; Tala lisusu Jeffrey R. Holland, “Are We Not All Beggars?Liahona, Sanza ya zomi na mok. 2014, 40–42.

  23. Tala Baloma 2:19; 13:12; tala lisusu Jeffrey R. Holland, “Come unto Me” (Brigham Young University devotional, Mar. 2, 1997), speeches.byu.edu.

  24. 1 Nefi 8:23; see also 1 Nefi 12:4, 17; 3 Nefi 8:22.

  25. Tala Njembo 82:6; Baloma 8:16–18; Doctrine and Covenants 24:1; 76:24; Moses 1:1–39.

  26. Tala Adjusting to Missionary Life, 20; tala lisusu Micah 7:8; Matai 4:16; Luka 1:78–79; Yoane 8:12.

  27. Yakobo 3:1; tala lisusu Baefese 5:8; Bakolosa 1:10–14; Moziya 24:13–14; Alma 38:5. Tanga lipamboli na yo ya batata to senga lipamboli ya bonganganzambe boye okoki koyoka mpe komikundola mingi kani Tata ya Lola alingaka yo mpe alingi kopambola yo.

  28. Tala 2 Bakolinti 4:16–18; Doctrine and Covenants 121:7–8, 33; 122:5–9.

  29. 2 Bakolinti 12:7.

  30. Doctrine and Covenants 81:5; tala lisusu Yisaya 35:3.

  31. Tala Moloni 4:3; Doctrine and Covenants 20:77.

  32. Alama 37:6.

  33. Russell M. Nelson, “Revelation for the Church, Revelation for Our Lives,,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 95.

  34. Alma 7:12; tala lisusu Yisaya 53:4; 2 Nefi 9:21; Moziya 14:4.

  35. Yisaya 61:1–3; tala lisusu Luka 4:18.

  36. Alma 31:38; tala lisusu Alma 32:43; 33:23.

  37. 2 Nefi 25:23.

  38. Malaki 4:2; 3 Nefi 25:2.

  39. Emoniseli 21:4.

  40. Moroni 10:32.

  41. Yisaya 60:20.