2010–2019
Mbuma
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Mbuma

Bobatela miso na bino mpe mitema na bino mobimba kati na Mobikisi Yesu Klisto mpe bosepeli wana ya seko eyaka bobele na nzela na Ye.

Nayebi maye bozali kokanisa! Etikali kaka molobeli moko nsima mpe tokoyoka Mokambi Nelson koloba. Kolikiaka kobomba bino na bokebi mpo na miniti moke lokola tozali kozela profeta na biso molingami, naponaki lisolo moko ya kitoko: mama ya likambo na ngai ezali mbuma.

Elilingi
Mbuma

Na langi, loposo, mpe sukali ya baie ya motane, bitabe, pasteques, mpe manga, to ya mbuma ya bapayalokola kiwano to mapela, mbuma ezalaka ntango nionso bomengo moko ya elengi.

Na ntango ya mosala na Ye na mabele, Mobikisi akokanisaki mbuma malamu na biloko ya motuya. Ye alobaki, “Bokoyeba bango na bambuma ya bango.”1 “Bongo njete malamu na njete malamu ekobota mbuma malamu.”2 Ye alendisaki bisomakasi ya kosangisa “mbuma mpo na bomoi ya seko.”3

Kati na ndoto moko ya polele oyo biso banso toyebi malamu na Buku ya Mormon, profeta Leyi amimonaki ye moko kati na “esobe moko ya molili mpe ya mawa” Ezali na mayi ya bosoto, londende moko ya molili, banzela ya kokamwisa, mpe banzela epekisama, mpe lingenda ya ebende4 kolandaka nzela moko ya moke mpe nkaka komemaka na nzete moko kitoko na “mbuma [oyo epesaka] moto esengo.” Kosakolaka ndoto yango, Leyi alobi:, “Naliaki … mpenza mbuma; …ezalaki sukali mingi, likolo ya inso iye ngai [nasila] naino te … komeka. ... [Mpe] etondisaki molimo na ngai na esengo ya mingi koleka mpenza.” Oyo mbuma ezalaki “[elengi] mingi [likolo ya] mbuma nyonso mosusu.”5

Elilingi
Nzete ya bomoi na mbuma ya elengi na yango

Ndimbola ya Nzeeta mpe Mbuma

Nini nzete oyo ya mbuma ya motuya koleka elakisi? Yango elakisi “bolingo ya Nzambe”6 mpe esakoli moango kitoko ya bosikoli ya Tata ya Lola. “Mpo ete Nzambe alingaki mokili, na motindo boye ete apesi Mwana na likinda na ye, ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te, kasi ete azala na bomoi ya seko.”7

Mbuma ya motuya oyo elimboli mapamboli ya kitoko koleka ya Bomikabi oyo ekokani te ya Mobikisi. Tokobika lisusu kaka te na nsima ya bomoi na biso ya kufa, kasi na nzela ya bondimi na biso na Yesu Klisto, boyamboli na biso, mpe bobateli na biso ya mitindo, tokoki kolimbisama masumu na biso mpe mokolo moko tokotelema ya kosukolama mpe petwa liboso ya Tata mpe Mwana na Ye ya mobali.

Koliaka mbuma ya nzete elakisi lisusu ete toyambi malongi mpe mayokani ya nsango malamu ezongisami—kozwaka libatisi, koyambaka likabo ya Molimo Monsantu, mpe kokotaka na ndako ya Nkolo kozala bato balatisamina nguya uta likolo. Na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto mpe na kokumisaka mayokani na biso, toyambi elaka ezangi ndelo ya kozala na mabota na biso ya bosembo mpo na seko.8

Ezali likambo ya kokamwa te ete anjelu alimbolaki mbuma yango lokola “ya bosepelisi makasi koleka nyonso na molimo.”9 Yango ezali solo mpenza!

Mokakatano ya Kotikala Sikisiki

Lokola biso nionso toyekolaki, kutu nsima ya komekaka mbuma ya motuya ya nsango malamu ezongisami, kotikalaka nsembo mpe na bondimi makasi na Nkolo Yesu Klisto esalamaka na pete te. Lokola elobami mbala mingi na likita oyo, tozali kokoba kokutana na makambo ya kobungisa biso makanisi mpe bokosami, mobulungano, mitungisi, makanisi mabe, mpe masenginia oyo ebendaka mitema na biso mosika uta na Mobikisi mpe bosepeli mpe kitoko biso tozwaki na kolandaka Ye.

Mpo na bonguna oyo, ndoto ya Leyi ezali lisusu likebisi moko! Na ngambo mosusu ya ebale ezali etando moko monene na bato ya mibu nionso kolakisaka misapi na bango, kosekaka, mpe kotukaka bayekoli basembo ya Yesu Klisto.

Bato na ndako wana bazali kotiolaka mpe kosekaka baye bakobombaka mitindo, kolikiaka kokitisa to kolongola bondimi na bango na Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Mpe likolo ya kobundisama na maloba ya ntembe mpe koyina babwakaki na bandimi, mingi kati na baoyo bamekaki mbuma mpe bayokaka nsoni ya nsango malamu oyo bandimaki kala. Bamposa ya lokuta ya mokili ezali kolangwisa bango; bazali kobaluka mosika uta na mbuma; mpe, na maloba ya makomi, “[bakweyi] mosika na banzela epekisami mpe [bazali] ya kobunga.”10

Na mokili na biso lelo oyo, monguna akotisi lisanga ya batongi ndako ya mayele oyo bazali kosala ntango mingi koleka, na lombango kobakisaka na ndako molayi mpe monene. Yango epalangani koleka mpe kokatisaebale mobimba, na elikya ya kolinga bandako na biso, ntango balakisi misapi mpe baseki bakotia makelele makasi moi mpe butu a internet na bango.11

Mokambi Nelson alimbolaki, “Monguna azali kobakisaka makasi na ye mbala minei mpo na kokata matatoli na biso mpe kopekisa mosala ya Nkolo.”12 Tika tomikundola maloba ya Leyi: “Tokotia bokebi na bango te.”13

Atako tosengeli te kobanga, tosengeli kosenzela. Mbala mosusu, biloko ya mikemike ekoki kotengimisa bokasi na biso ya molimo. Tosengi botika te ete mituna na bino, mafingo ya basusu, baninga bazanga bondimi, to mabunga ya mawa mpe bosiswa ekimisa yo mosika na mapamboli ya sukali, peto mpo na kosepelisa molimo oyo eyaka uta na mbuma ya motuya ya nzete. Bobomba miso na bino mpe mitema na biso mobimba kati na Mobikisi Yesu Klisto mpe bosepeli ya seko oyo eyaka bobele na nzela na Ye,

Bondimi ya Jason Hall

Na sanza ya motoba mwasi na ngai, Kathy, mpe ngai tokendaki na matanga ya Jason Hall. Na ntango akufaki, azalaki na mibu 48 mpe kosalaka lokola mokambi ya lisanga likoki ya bampaka.

Oyo ezali maloba ya Jason na ntina ya molulu moko ebongolaka bomoi na ye:

“[Na mibu 15] ngai [nazalaki] na likama ya kozinda na mai. … Ngai [nabukanaki] kingo na ngai mpe nakomaki mokakatane uta na ntolo tii na nse. Nabungisaki esaleli nionso ya makolo mpe ndambo ya maboko. Nakokaki lisusu te kotambola, kotelema, … to komileisa ngai moko. Nakokaki kopema mpe koloba na mpasi.”14

“‘Tata wa Bolingo [na Lola],’ nasengaki, ‘soki nakokaki ata kozala na maboko na ngai, nayebi nakokaki kobika. Nasengi, Tata, nasengi. …

“... ‘Bomba makolo na ngai, Tata; kaka [nabondeli mpo na] kosalela maboko na ngai.’”15

Jason atikala kozwa mokolo moko te esaleli ya maboko na ye. Ekoki yo koyoka mingongo uta na ndako ya etando monene? “Jason Hall, Nzambe ayoki libondeli na yo te! Soki Nzambe azali Nzambe ya bolingo, boniboni Ye akokaki kotika yo boye? Mpo na nini kondimela Yesu-Klisto?” Jason Hall ayokaki mingongo na bango, kasi atiaki bokebi na bango te. Na esika ya kosala bongo ye asepelaki na lipati ya mbuma ya nzete. Bondimi na ye na Yesu Klisto ekomaki makasi. Azwaki dipolome na Université mpe abalaki Kolette Coleman na tempelo kolobelaka ye lokola bolingo ya bomoi na ye.16 Nsima ya mibu 16 ya libala, likamuisi mosusu, mwana na bango ya motuya ya mobali, Coleman, abotamaki.

Elilingi
Jason mpe Kolette Hall
Elilingi
Libota ya Hall

Lolenge nini bakolisaki bondimi na bango? Kolette alimbolaki: “Totiaki elikya na moango ya Nzambe. Mpe yango epesaki biso elikya. Toyebaki ete Jason akokaki [na mokolo moko ya nsima] kozala mobimba. … Toyebaki ete Nzambe apesaki biso Mobikisi moko, oyo mbeka na ye ya bomikabi epesi biso nzela ya kokoba kotala liboso ntango tolingi kotika.”17

Elilingi
Coleman Hall

Kolobaka na matanga ya Jason, Coleman 10-mibu-ya mbotama alobaki tata na ye ateyaki ye: “Tata ya Lola [azali] na moango moko mpo na biso, bomoi na mabele ekokoma kitoko, mpe tokoki kobika na mabota. … Kasi … tokosengelaka kokende katikati na biloko ya mpasi mpe tokokoka kosala mabunga.”

Coleman akobaki: “Tata ya Lola atindaki Mwana na Ye ya Mobali, Yesu, na mabele. Mosala na Ye esengelaki kozala ya kobonga nie. Kobikisa bato. Kolinga bango. Mpe boye boye koniokwama mpo na mpasi na biso, mawa, mpe masumu. Nsima akufaki mpo na biso.” Nsima Coleman abakisaki, “Mpo Ye asalaki yango, Yesu ayebi boniboni nazali koyoka sikawa.”

“Mikolo misato nsima ya kufa ya Yesu, Ye … azongaki lisusu na bomoi, na nzoto na ye ebonga nie. Yango ezali motuya mpo na ngai mpo nayebi ete … nzoto [ya tata na ngai] ekokoma ya kobonga nie mpe tokozala elongo lokola libota.”

Elilingi
Libota ya Hall

Coleman asukisaki: “Butu nyonso kobanda nazalaki mwana moke, tata na ngai alobaki na ngai, ‘Tata alingaka yo, Tata ya Lola alingaka yo, mpe ozali mwana mobali moko malamu’”18

JEsengo Eyaka Mpo na Yesu Klisto

Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki mpo na nini libota ya Hall ezali koyoka bosepeli mpe elikya. Ye alobaki ete:

“Esengo toyokaka etali moke makambo ya bomoi na biso mpe nionso etali kotiaka makanisi na bomoi na biso.

“Ntango totie makanisi na bomoi likolo ya moango ya lobiko ya Nzambe … mpe Yesu Klito mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka esengo kotalaka te oyo ezali kosalema—to kosalamaka te—na bomoi na biso. Bosepeli eyei uta mpe mpo na Ye. Azali liziba ya esengo nyonso. …

“Soki totali na mokili … , tokoyeba esengo mokolo moko te. ... [Esengo] ezali likabo oyo eyaka uta na likanisi ya komekaka kozala na bomoi ya bosembo, lokola eteyamaki na Yesu Klisto”19

Elaka ntango Ozongi

Soki yo ozalaki libanda ya mbuma ya nzete mpo na ntango moko, nasengi oyeba ete maboko ya mobikisi ezali ntango nionso ya kotanda epai na yo. Ye alakisi kosalaka elembo na bolingo, “Boyambola mpe boya epai na ngai.”20 Mbuna na Ye ezali ya kotonda mpe na eleko nionso. Yango ekoki kosombama na mbongo te, mpe moko te oyo alingi yango awanganami.21

Soki ozali na mposa ya kozonga na nzete mpe komeka mbuma mbala moko lisusu, bobanda na kosambelaka Tata na bino ya Lola. Bondima Yesu Klisto mpe nguya ya mbeka na Ye ya bomikabi. Nalaki bino ete soki botali epai ya Mobikisi “na likanisi nionso,”22 mbuma ya nzete ekokoma ya bino mbala moko lisusu, elengi mpo na monoko na bino, bosepeli mpo na molimo na bino, “monene koleka makabo nionso ya Nzambe.”23

Elilingi
Mpaka Andersen elongo na Basantu ya Portugal na bobulisi ya Tempelo ya

Poso misato eleki lelo, namonaki esengo ya mbuma ya Mobikisi mobimba ntango Kathy mpe ngai tokendaki na bobulisi ya Tempelo ya Lisbon Portugal. Bosolo ya nsango malamu ezongisami efungwamaki na Portugal na 1975 ntango bonsomi ya biyamba epesamaki. Basantu mingi ya lokumu oyo bamekaki yambo mbuma ya nzete ntango ezalaki na lingomba te, ndakonzambe te, mpe tempelo te pembeni koleka bakilometele 1600 oyo esepelaki elongo na biso mbuma wana ya motuya ya nzete ezali sikawa na ndako moko ya Nkolo na Lisbon, Portugal. Lolenge boni napesi lokumu mpe limemia na Bansantu wana ba Mikolo mya Nsuka oyo babombaki mitema na bango na Mobikisi.

Mobikisi alobaki, “Ye oyo akozala na ngai, mpe ngai na ye, lolenge moko akobota bambuma ebele: mpo soki ngai te bokoki kosala eloko moko te.”24

Kolobaka na ntongo oyo na bandimi ya Eklezia na mokili mobimba, Mokambi Nelson alobaki, “Bandeko mibali mpe basi babolingo, bozali bandakisa na bomoi ya bambuma oyo eyaka utana kolandaka malako ya Yesu Klisto.” Nsima abakisaki: “Napesi bino matondi! Nalingi bino!”25

Tolingi yo, Mokambi Nelson.

Nazali nzeneneke na misu ya nguya ya limonisi oyo kimia likolo ya Mokambi na biso ya bolingo. Azali profeta ya Nzambe. Lokola Leyi ya mokolo, Mokambi Russell M. Nelson atandi maboko epai na biso mpe na banso ya libota ya Nzambe, koya mpe kolia mbuma ya nzete. Tika biso tozala na komikitisa mpe bokasi ya kolanda toli na ye.

Natatoli na komikitisa ete Yesu Klisto azali Mwana wa Nzambe. Bolingo na ye, nguya na ye, mpe ngolu na Ye ememaka biloko nionso elongobani ewumelaka. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matai 7:16.

  2. Matai 7:17.

  3. Yoane 4:36.

  4. Na ebandeli ya sanza ya yambo 2007, ntango nazalaki komilengela mpo na lisikulu ya losambo ya Brigham Young University devotional lokola moto moko ya Bokambi ya Bantuku Nsambo mpo ete epesama na sanza ya misato 4, 2007, natunaki Mpaka David A. Bednar maye azalaki kolengela mpo na lisikulu na ye ya sanza ya mibale 4, 2007, liboso ya bato se moko kaka. Nakamwaki ntango ayanolaki ete lisikulu na ye ezalaki na ntina ya kosimba makasi na lingenda ya ebende. Oyo ezalika nkombo ya solo naponaka mpo na lisikulu na ngai. Nsima ya kokabolaka nkoma na biso na moko mpe mosusu, tososolaki ete banzela na biso ezalaki ya kokesana . Lisikulu na ye, ebengamaki “A Reservoir of Living Water,” elobelaki mingi lingenda ya ebende, to liloba ya Nzambe, oyo ezali kosangisa makomi. Na lisikulu na ye atunaki, “Ezali yo mpe ngai kotanga, koyekola, mpe koluka makomi na lolenge moko oyo ezali kopesa biso makoki ya kosimba makasi lingenda ya ebende?” (speeches.byu.edu).

    Bongo, kaka poso moko nsima ya lisolo na ngai na Mpaka Bednar, Mokambi Boyd K. Packer apesaki lisikulu moko ya losambo na BYU babengi “Lehi’s Dream and You.” Mokambi Packer abetaki nsete na lingenda ya ebende lokola emoniseli mpe bofuli ya moto moko oyo eyelaka biso na nzela ya Molimo Mosantu. Alobaki: “Soki osimbi lingenda, okoki koyoka nzela na yo ya kokende liboso na likabo ya Molimo Mosantu. … Kanga lingenda ya ebende, mpe kotika te. Na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu, okoki koyoka nzela na yo kati na bomoi” (Sanza ya yambo 16, 2007, speeches.byu.edu).

    Mama ya likambo na ngai, “Hold Fast to the Words of the Prophets,” na sanza ya misato 2007 ezalaki lingenda ya ebende lokola kotalisaka maloba ya baprofeta na bomoi (Sanza ya misato 4, 2007, speeches.byu.edu).

    Mokangano ya masikulu misato oyo ezalaki kokutana moko te. Loboko ya Nkolo ezalaki kosala ntango masikulu misato, elengelami mpo na bato kaka moko, ezalaki kolobela ndenge misato ya lingenda ya ebende, to liloba ya Nzambe: (1) makomi, to maloba ya baprofeta ya kala; (2) maloba ya baprofeta na bomoi; mpe (3) nguya ya Molimo Mosantu. Ezalaki boyebi monene mpo na ngai.

  5. Tala 1 Nefi 8:4–12.

  6. 1 Nefi 11:25.

  7. Yoane 3:16.

  8. Tala David A. Bednar, “Lehi’s Dream: Holding Fast to the Rod,” Liahona, Sanza ya zomi 2011, 32–37.

  9. 1 Nefi 11:23.

  10. 1 Nefi 8:28.

  11. Tala Boyd K. Packer, “Lehi’s Dream and You” (Losambo ya Brigham Young University, Sanza ya yambo 16, 2007), speeches.byu.edu.

  12. Russell M. Nelson, “We Can Do Better and Be Better,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 68.

  13. 1 Nefi 8:33.

  14. Stephen Jason Hall, “The Gift of Home,” New Era, Sanza ya zomi na mibale 1994, 12.

  15. Stephen Jason Hall, “Helping Hands,” New Era, Sanza ya zomi 1995, 46, 47.

  16. Mokanda ya moto moko epai ya Mpaka Andersen na Kolette Hall.

  17. Mokanda ya moto moko epai ya Mpaka Andersen na Kolette Hall.

  18. Lisikulu ya liwa na Coleman Hall, akabolaki elongo na Mpaka Andersen na Kolette Hall.

  19. Russell M. Nelson, “Joy and Spiritual Survival,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 82, 84.

  20. 3 Nefi 21:6.

  21. Tala 2 Nephi 26:25, 33.

  22. Doctrine et Alliances 6:36.

  23. 1 Nefi 15:36.

  24. Yoane 15:5.

  25. Russell M. Nelson, “Mitindo Minene Mibale,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 100.

Bimisa na lokasa