2010–2019
Tomema Ekulusu na Biso
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Tomema Ekulusu na Biso

Kokamataka likolo na biso baekulusu na biso mpe kolandaka Mobikisi elingi koloba kokoba na bondimi na nzela ya Nkolo mpe komipesa te na mimesano ya mokili.

Bandeko basi mpe mibali, tozwi mateya kitoko uta na bakambi na biso na mikolo mibale oyo eleki. Natatoli na bino ete soki toluki kosalela mateya oyo efulama mpe maye ya ntango na bomoi na biso, Nkolo, na nzela ya ngolu na Ye, akosunga biso tomema ekulusu na biso mpe akolembisa mikumba na biso.1

Ntango azalaki na etuka ya Kaesala Filipi, Mobikisi amonisaki na bayekoli na Ye ete Asengelaki koniokwama na maboko ya bampaka, banganganzambe bakonzi, mpe bakomi na Yelusaleme. Ateyaki bango malamu etali kufa mpe Bosekwi na Ye ya nkembo.2 Na esika wana na ntango, bayekoli na Ye basosolaki mobimba te etinda na Ye ya bonzambe na mabele. Petelo ye moko, ntango ayokaki oyo Mobikisi alobaki, amemaki Ye mpembeni mpe apamelaki Ye, kolobaka, “Ezala mosika na yo, Nkolo: yango ekosalamela yo te.”3

Mpo na kosunga bayekoli basosola bomipesi wana na mosala na Ye ezali na komikitisa mpe mpasi, Mobikisi abetaki nsete alobaki:

“Soki moto akolanda ngai, amiwangana, mpe amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai.

“Moto nionso oyo akobikisa bomoi na ye akobungisa yango: mpe moto nionso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ntina na ngai akobikisa yango.

“Mpo ntina nini moto alonga nyonso ya mokili, mpe abungisa molimo na ye moko? to nini moto akopesa mpo na kobongola molimo na ye?”4

Na nzela ya esakola oyo, Mobikisi abetaki nsete ete baoyo nyonso bazali na bolingi ya kolanda Ye basengeli komiwangana bango moko mpe bakamba bosenga na bango, mposa mpe ntina na bango, babonza nyonso, ata bomoi yango moko soki esengeli, bamipesa mobimba na bolingi ya Tata—kaka lokola Ye asalaki.5 Yango ezali, ya solo, motuya esengeli kofutama mpo na lobiko ya molimo. Yesu asalelaki na ntina mpe na nzela ya lisese elembo ya ekulusu mpo na kosunga bayekoli na Ye basosola malamu libonza mpe bomipesi kani na ntina ya Nkolo elingaki mpenza koloba. Elilingi ya ekulusu eyebanaki malamu na katikatiya bayekoli na Ye mpe bato ya Bokonzi ya Loma mpamba te Baloma natindaki na makasi bakangema mpo na bobaki na ekulusu na komema liboso ya bato ekulusu na bangomei to libaya monene ya ekulusu na esika wapi bobomi na bango elingaki kosalema.6

Ezali bobele nsima ya Bosekwi ya Mobikisi nde makanisi na bango efungwamaki mpo na kososola nyonso oyo ekomamaki etali Ye7 mpe oyo esengelamaki mpo na bango uta na ntango wana.8

Na lolenge moko, biso nyonso, tosengeli kososola na mobimba mingi bolamu ya komema likolo na biso moko ekulusu na biso moko mpe kolanda Ye. Toyekolaka na nzela ya makomi ete baoyo balingaka komema ekulusu na bango likolo na bango moko balingaka Yesu Klisto na lolenge moko oyo bamiwanganaka na makambo nyonso ya bonzambe te mpe na boluli nyonso ya mokili mpe batosaka mitindo na Ye.9

Mokano na biso ya kosundola nyonso oyo ezali ya kokesana na bolingi ya Nzambe mpe kobonza nyonso oyo tosengeli kopesa mpe kolanda mateya na Ye ekosunga biso totia molende na nzela ya nsango malamu ya Yesu Klisto—ata ntango ya motungisi, ya botau ya milimo na biso, to botindiki mpe bafilozofi ya mokili oyo eboyaka mateya na Ye.

Ndakisa, mpo na baoyo naino bakutani na moninga ya seko te mpe bakoki komiyoka ya bango moko kaka mpe ya kozanga elikia, to mpo na baoyo babomi libala mpe bamiyoki ya kosundolama mpe ya kobosanama, napesi bino elikia ete kondima libiangi ya Mobikisi ya kozwaka likolo na bino moko ekulusu na bino mpe kolandaka Ye elakisi kokoba na bondimi na nzela ya Nkolo, kotikala ya kolongobana, mpe komitika te na bizalela ya mokili oyo nsukansuka ekolongola elika na biso na bolingo mpe ngolu ya Nzambe.

Mabongi moko moko oyo elongobani mpo baoyo na bino bozali na mposa ya mobali-mobali mwasi-mwasi mpe koyoka ya kolemba mpe kozanga lisungi. Mpe ntango mosusu mpo na ntina oyo basusu kati na bino bazali te koyoka ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezali lisusu te mpo na bino. Soki likambo yango wana, nalingi nayebisa bino ete elikya ezali ntango nyonso epai ya Nzambe Tata mpe na kati ya moango na Ye ya esengo, na Yesu Klisto mpe na libonza ya bomikabi na Ye, mpe na kosalelaka mitindo na Bango ya bolingo. Na bwanya na Ye ebonga nie, nguya, boyengebene, mpe ngolu, Nkolo akoki kokangisa biso na Ye, ete tokoka komemama liboso na Ye mpe tozala na lobiko ya seko, soki totikali ngwi mpe totosi mitindo na Ye10mpe tomipesi na misala malamu.11

Na baoyo basalaki masumu minene, kondima libiangi moko oyo elingi koloba, na kati ya makambo nyonso, komikitisa bino moko liboso ya Nzambe, bosolola na bakambi ya Eklezia, mpe boyambola mpe botika masuma. Likambo oyo mpe ekopambola baoyo nyonso bazali kobunda na bamposa misusu ya mabe, lokola opioid, drogue, alkol, mpe pornografi. Kolanda makambo oyo ekomema yo pembeni koleka epai ya Mobikisi, oyo akoki na nsuka kopesa yo bonsomi uta na botuki, mawa, mpe molimo mpe bowumbu ya nzoto. Mpoi na kobakisa, okoki kozala mpe lisusu na mposa ya koluka lisungi ya libota na yo, baninga, mpe minganga batei malamu.

Nasengi botika te nsima ya bokwei mpe mimona yo moko ya kozanga makoki ya kotika masumu mpe longa bamposa nyonso. Ekoki kozala malamu te soki otiki komekaka mpe nsima kokoba na botau mpe lisumu! Ntango nyonso meka kosala makoki na yo, kolakisaka na nzela ya misala na yo mposa ya kolonga mabe nyonso, lokola eteyaki Mobikisi.12 Ntango mosusu biyano na mikakatano misusu eyaka nsima ya basanza mpe mibu ya bokobi na mpiko. Elaka oyo ezwami na kati ya Buku ya Mormon ete “ezali na ngolu nde tokisami, na nsima ya nyonso tokoki kosala ”13epesameli na biso nyonso. Nasengi bomikundola ete likabo ya Mobikisi ya ngolu ezali te ya kosuka na ntango kosala,‘nsima’ ya nyonso oyo tokoki kosala. Tokoki kozwa ngolu na Ye yambo, na ntango, mpe nsima ya ntango tosali makoki na biso moko.”14

Natatoli ete ntango tozali kokoba koluka kolonga mikakatano, Nzambe akopambola biso na makabo ya bondimi mpo na kobikisama mpe misala ya bikamwa.15 Akosalela biso oyo tokozala na makoki ya kosala te biso moko.

Kobakisa, mpo na baoyo bayokaka bololo, nkanda, ya kotukama to bazingama na mawa mpo na likambo songolo bomoni ete ezali ntina te komema ekulusu mpe kolanda Mobikisi elakisi koluka kotika pembeni mayoki mpe kotalela Nkolo mpo ete Akoka kopesa biso bonsomi uta na lolenge ya makanisi mpe lisungi na biso tozwa kimia. Libaku mabe, soki totikali kaka na mayo ya mabe mpe ezalela, tokoki komimona biso moko kotambwisaka bomoi ezanga nguya ya Molimo ya Nkolo na bomoi na biso. Tokoki koyambola mpo nabato misusu, kasi tokoki kolimbisa bango—na koboyaka kokanisa mabe ya baoyo basalaki biso mabe.16

Makomi etei biso ete ezali na nzela libanda ya makambo oyo—na kobiangisaka Mobikisi na biso asunga biso totia na esika ya mitema ya mabanga ekoma mitema ya sika.17 Mpo na oyo esalema, tosengeli koya epai ya Nkolo na botau na biso, tomikitisa liboso na aYe,18mpe tosenga lisungi na Ye mpe bolimbisi,19mingi mingi na ntango ya elambo na Eyenga nyonso. Tika toluka lisungi na Ye mpe tozwa litambe ya ntina mpe ya mpasi na kolimbisaka baoyo batukaki biso na ntina ete bampota na biso ekoka kobanda kokauka. Nalaki bino ete na kosaka bongo, bikuke mingi bikofungwama, banzela mingi ekobongisama, mpe babutu na bino ekotondisama na lisungi oyo ewutaka na likanisi ya kimia elongo na Nkolo.

Na ntango ya boloko ya Liberty na mobu 1839, Profeta Joseph Smith akomaki mokanda moko na bandimi ya Eklezia ezalaki na bimoniseli oyo ezali na bokokani na makambo ya boye. Akomaki, “Bangwende nyonso mpe babokonzi mpe banguya, ekomonisama mpe ekotiama likoko ya oyo nyonso ayikaki mpiko na nsango malamu ya Yesu Klisto.”20 Na yango, baoyo nyonso bazwi likolo na bango moko nkombo ya Mobikisi, kondimelaka bilaka na Ye mpe bayiki mpiko kino na nsuka, bakobikisama21mpe bakoki kofanda elongo na Nzambe na lolenge ya esengo ezanga nsuka.22

Biso nyonso tokutanaka na mabaku ya monguna na babomoi na biso oyo esalaka ete tokoma na mawa, kozanga lisungi, kozanga elikia mpe mbala mosusu kutu ya kolemba. Ndambo ya mayoki oyo ekoki kokamba biso na kotuna Nkolo motuna: “Mpo na nini makambo oyo ezali kokomela ngai?” to “Mpo na nini oyo nazali koluka ezali kokisama te? Nsima ya nyonso, nasalaka nyonso na nguya na ngai namema ekulusu na ngai mpe nalanda Mobikisi!”

Baninga na ngai, tosengeli komikundola ete komema ekulusu na biso likolo na biso moko esengaka kozala na komikitisa mpe kondimela Nzambe mpe bwanya na Ye ezanga ndelo. Tosengeli kondima ete azali kokanisa mpo na moko na moko ya biso mpe bamposa ya biso. Ezali mpe ntina kondima likambo ete ntango ya Nkolo ezali ya kokesena na ya biso. Ntango mosusu tolukaka lipamboli mpe mpe totiaka ndelo ya ntango na ntina ete Nkolo akokisa yango. Tokoki te kotia masengami ya boyengebene na biso epai ya Nkolo na kosengaka Ye na makasi ndelo ya biyano mpo na bamposa na biso. Ntango tosali oyo; tosangisi bosoto nyonso ya Banefi uta na bantango ya kala, oyo batiolaki bandeko na bango ya mibali na kolobaka ete ntango elekaki mpo na bokokisi ya maloba oyo elobamaki na Samuele Lamani, kokelaka mobulungano kati ya baoyo bandimelaki.23 Tosengeli kondimela Nkolo ya kokoka kokoba mpe koyeba ete Ye azali Nzambe, ete Ayebi makambo nyonso, mpe ete Ayebaka moko na moko kati na biso.24

Elilingi
Mpaka Soares asalisi Ndeko mwasi Calamassi

Kala te nazwaki likabu malamu ya kosala epai ya mokufeli mobali ndeko mwasi na nkombo ya Franca Calamassi, oyo azali kobela maladi ya liboma. Ndeko mwasi Calamassi azalaki moto ya yambo na libota na ye kokoma mondimi ya Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto. Atako mobali na ye naino abatisamaki te, ayokanaki kokutana na bamisionele mpe mbala mingi azalaki koya na mayangani ya Eklezia. Atako mabaku wana, ndeko mwasi Calamassi atikalaki na bondimi mpe abokolaki bana na ye minei na kati ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Mobu nsima ya liwa ya mobali na ye, ndeko mwasi Calamassi amemaki bana na ye minei na tempelo mpe basalaki elongo makuli ya bule mpe bokangisami elongo lokola libota. Bilaka ekangama na makuli oyo ememelaki ye elikia ebele, esengo mpe bosepeli oyo esungaki ye na bokolongono ya bomoi na ye.

Elilingi
Libota ya Calamassi na tempelo

Ntango bilembo ya yambo ya maladi ebandaki komonana, episikompo na ye apesaki ye lipamboli. Na ntango wana ayebisaki episikopo na ye ete azalaki pene ya kondima bolingi ya Nzambe, kotalisakabondimi na ye mpo na kobikisama mpe bondimi na ye ya kokoba na bokono na ye kino na nsuka.

Na ntango ya botali na ngai; ntango nasimbaki loboko ya Ndeko mwasi mpe kotalaka ye na misu, namonaki bongengi ya anjelu kobimaka kati na ye—kotalaka elikia na ye na moango ya Nzambe mpe bongengi na ye ya elikia na bolingo ya Tata mpe moango mpo na ye.25 Nayokaki ye kozala ngwi mpo na koyika mpiko na bondimi na ye kino na nsuka mpe na kozwaka ekulusu, atako mikakatano azalaki kokutana na yango. Bomoi ya ndeko mwasi oyo ezali litatoli ya Klisto, ndakisa ya bondimi mpe bomipesi epai na Ye.

Bandeko mibali mpe basi, natatoli epai na bino ete kozwa likolo na biso ekulusu na biso mpe kolanda Mobikisi esengaka biso tolanda ndakisa na Ye mpe koluka kokoma lokola Ye,26na motema kokita kokutanaka na mabaku ya bomoi, komiwanganaka mpe kotia pembeni bamposa ya bomoto, mpe kozelaka Nkolo. Mokomi ya Njembo akomaki:

“Zela Nkolo: zala na mpiko ya malamu, mpe akolendisa motema na yo: zela, nalobi, epai ya Nkolo.”27

“Azali lisungi na biso mpe mobateli na biso.”28

Natatoli epai na bino ete na kolandaka matambe ya Molakisi na biso mpe kozela Ye oyo azali mokangoli ya nsuka ya babomoi na biso akopesa bopemi na milimo na biso mpe akokomisa mikumba na biso pete mpe pepele.29 Na ntina ya makambo oyo natatoli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa