2010–2019
Kokumisaka Nkombo na Ye
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Kokumisaka Nkombo na Ye

Elongo na bozali ya mpe kozala na boyokani, tobiangami na nkombo ya Yesu Klisto.

Ntango baboti bazelaka mbotama ya mwana, bazali na mokumba ya koluka nkombo mpo na mwana na bango ya sika. Ekoki kozala ete ntango obotamaki, ozwaki nkombo oyo ekitisamaki na libota uta nkola na bankola. To ntango mosusu nkombo epesamelaki yo ezalaki elingama na mobu to esika wapi obotamaki.

Profeta Elamani mpe mwasi na ye bapesaki nkombo ya libota ya ntina na bana na bango ya mibali Nefi mpe Lehi. Elamani na sima alobaki na bana na Ye ya mibali:

“Napesi epai ya bino nkombo ... ete emikundoli bino nkombo na bino bokoka komikundola bango; mpe emikundoli bino bango bomikundola misala mya bango; mpe emikundoli bino misala mya bango; ... ete elobami, mpe lisusu ekomami, ete mizalaki malamu.”

“Yango wana, bana na ngai ya mibali, nalingi ete bokoka kosala oyo ezali malamu.”1

Nkombo ya Nefi mpe Leyi esungaki bango bamikundoli misala malamu ya bankoko na bango mpe elendisaki bango na kosala malamu lokola.

Bandeko basi, ezala wapi tozali, monoko kani tolobaka, to soki tozali na mibu 8 to 108, tokabolaka nkombo moko ya kafukafu oyo ezali na bantina moko.

“Mpo lokola mingi na [biso] tobatisami na kati ya Klisto tolati Klisto … mpo [biso] banso tozali moko na Klisto Yesu.”2

Lokola bandimi na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka, “tolakaki yango bolingi na biso ya kokamata likolo na biso nkombo ya Klisto .... na bokuli ya libatisi.”3 Na nzela ya boyokani oyo, tolakaka ntango nionso komikundola Ye, kobatela mitindo na Ye, mpe kosalisa basusu. Bolingi na biso ya kobatela boyokani oyo ebandelami mokolo ya Saba nionso ntango tokamataka elambo mpe tosepelaka mbala moko lisusu na lipamboli ya “kotambwisa[ka] bomoi ya sik-.”4

Nkombo bapesaki biso na mbotama elakisi bokitoli na biso ya moko na moko mpe epesaka biso kozala na biso na kati ya mabota ya mabele. Nzokande, ntango “tobotamaki lisusu” na libatisi, bososoli na biso ya nani tozali ekomaki monene. “Na ntina ya boyokani oyo bosali bokobiangema bana ba Klisto,... mpo tala, ... aboti bino na molimo; mpo bolobi ete mitema mya bino mibongwani na bondimi likolo ya nkombo ya ye; yango wana, bobotami na ye mpe bokomi bana mibali mpe bana basi na ye.”5

Boye, na bozali ya mpe kozala na boyokani, tobiangami na nkombo ya Yesu Klisto. Mpe “ezali na nkombo mosusu te epesami to na nzela mosusu na yango lobiko ekoki koya epai ya bana ya bato, bobele na nkombo ya Klisto, Nkolo ya Bokasi Bonso6

Nkombo ya Yesu eyebanaki kala yambo ya mbotama na Ye. Na Mokonzi Benyamina, anzelu moko asakolaki, “Mpe akobiangema Yesu Klisto, mwana mobali ya Nzambe, ... mpe mama na ye akobiangema Malia.”7 Mosala na Ye ya “bolingo ya kosikola”8 eyebanaki na bana ya Nzambe esika nionso nsango malamu ezalaka na mabele, uta na mikolo ya Adama mpe Ewa kino na mokolo ya lelo, boye bakokaki koyeba “na ekanga nini bakokaki kolukela bolimbisi ya masumu na bango.”9

Mobu eleki, Mokambi Russell M. Nelson apesaka “libondeli moko ya boprofeta” na bandeko basi mpo na “kobongisa mikolo ya lobi na kosungaka mpo na kosangisa Yisalaele epalangana.” Ye abengisaki biso kotanga Buku ya Mormon mpe “kotia elembo na molongo nionso oyo ezali kolobela to kotala Mobikisi.”. Asengaki ete biso “tozala na mposa ya kolobelaka Klisto, kosepelaka na Klisto, mpe koteyaka etali Klisto elongo na [ya biso] libota mpe baninga.” Ntango mosusu obandi komona bambuma ya elaka ete “yo mpe bango bakobelama penepene mingi ya Mobikisi … Mpe bambongwana, kutu makamwisi, ekobanda kosalema.”10

Elaka na biso ya ntango nionso komikundola Mobikisa epesaka biso mpiko ya kotelema mpo na bosolo mpe bosembo—ezala tozali na bisika ya ebele ya bato to na oyo ya yo moko, wapi moto te ayebi misala na biso longola se Nzambe. Ntango tomikundoli Ye, ya Ye nkombo tomemi, tozali na esika te mpo na komekana ya komikitisa to bosambisi ya miso ga. Na miso na biso na Mobikisi, tokomimona ya nani tozali mpenza—mwana ya bolingo ya Nzambe.

Komikunbola mayokani na biso ekolembisa mitungisi ya mokili, ekobongola ntembe na biso moko na mpiko, mpe ekopesa elikia na ngonga ya mimekano.

Mpe ntango tobeti libaku mpe tokeyi ya bokoli na biso na nzela ya mayokani, tosengeli bobele komikundola nkombo na Ye mpe bosembo ya bolingo na Ye epai na biso. “Mpo azali na nguya nionso, bwania nionso, mpe bososoli nionso; asosolaka makambo nionso, mpe azali Mozali moko oyo atonda na mawa … na banso oyo bakoyambola mpe bakolinga nkombo na ye.”11 Na ntembe te ezali te na mongongo ezali sukali koleka nkombo ya Yesu na baye, na motema ya kobukana mpe molimo ya mawa, bazali koluka “kosala malamu koleka mpe kozala malamu koleka.”12

Mokambi Nelson ateyaki: “Mokolo eleki oyo okoki kozala Moklisto ya kimia mpe oyo afanda na ye. Eyamba na yo ezali kaka te ya komonana na Eklezia na Eyenga. Ezali ya komilakisa lokola moyekoli moko ya solo uta Eyenga na ntongo kino Poso na butu. ... Ezali na eloko moko te ya boye lokola moyekoli ya Nkolo Yesu Klisto ya ’ndambo ya ntango’.”13

Bolingi na biso ya kokamata likolo na biso nkombo ya Klisto ezali mingi koleka kokabola maloba ya mpamba. Ezali te elaka ya mpamba to koyokana ya momesano. Ezali te molulu ya kokisa mibu to elembo ya nkombo tolataka. Ezali te esakola oyo totiaka ya mpamba na motalaka to tozembikaka na efelo Ya Ye ezali Nkombo oyo “tolataka,”14 ya kokomama na mitema na biso, mpe “ekomama likola [ya biso] bilongo.”15

Libonza ya bomikabi ya Mobikisi esengeli kokundolama na makanisi, misala, mpe lolenge tozali kosala na na basusu. Ye amikundolaka kaka te nkombo na biso, kasi Ye amikundolaka biso ntango nionso. Mobikisi asakolaki:

“Mpo ekoki mwasi kobosana wa ye mwana oyo ameleke, ete ayoka ngolu te likolo ya mwana mobali ya libumu na ye? Iyo, bakoki kobosana, kasi nakobosana yo te, O ndako ya Yisalaele.

“Tala, nakomi yo likolo lya biengindi bya maboko ma ngai.”16

Mokambi George Albert Smith ateyaki, “Kumisa bankombo oyo omemi, mpamba te yoko mokolo okozala na libaku mpe lotomo ya kosamba … na Tata na yo na lola … nini osalaki na [bankombo wana].”17

Lokola nkombo eponamaki na lokengo ya Nefi mpe Lehi, ekoki kolobama mpe kokomama etali biso ete tozali bayekoli ya solo ya Nkolo Yesu Klisto. Ekumisaka biso nkombo ya Yesu Klisto oyo tokamati na bolingi likolo na biso moko? Ezali yo “mosali mpe nzeneneke”18 ya bosembo ya bolingo na Ye mpe nguya ya lisikoli na Ye?

Kala te, nazalaki koyoka botangi ya Buku ya Mormon. Na mokapo ya nsuka ya 2 Nefi, I nayokaki Nefi koloba likambo moko oyo nayoka mokolo moko te etangama lolenge moko liboso Nionso na kati ya palaki wana, eteyi mpe atatoli “Mosikoli,” se “Moko ya Bule ya Yisalaele,” ye “Mwa Mpate ya Nzambe,” mpe Masiya.” Kasi ntango akangaki nsango wana, nayokaki ye kolobaka maloba oyo: “Nakokembela na polele; nakokembela na bosolo; nakombela na Yesu na ngai, mpo abikisi molimo na ngai.”19 Ntango nayokaki maloba oyo, motema na ngai esepelaki mpe nayokaki mbala na mbala. Nandimaki mpe nayanolaki na molongo wana kaka lokola nandimaki mpe nayanolaki na nkombo na ngai moko.

Nkolo alobaki, “Iyo, bapambolami bato baye balingi komeme nkombo ya ngai; mpo bakobiangema na nkombo ya ngai; mpe bazali ba ngai.”20

Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, ekoka biso “na esengo [kokamata likolo na biso] nkombo ya Klisto”21 na kokumisaka nkombo na Ye na bolingo, na bomipesi, mpe misala ya malamu. Natatoli ete Ye azali “Mpate ya Nzambe, iyo, kutu Mwana ya Tata ya Seko.”22 Na nkombo ya mwana na Ye ya Bule, Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa