2010–2019
Loboko ya Mobikisi
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Loboko ya Mobikisi

Ntango toyaka epai na Ye, Nzambe akoya na lisungi na biso, mpo na kokangola biso to kopesa bisa mpiko ya kotelemela mabaku nyonso.

Pene na mibu 2,000 eleki, Mobikisi akitaki na nse uta na ngomba nsima ya liteya ya Esakola mpe mabongi ya nsango malamu. Ntango azalaki kotambola, moto moko ya bokono ya maba apusanaki pene na Ye. Moto yango alakisaki limemia mpe botosi ntango afukamaki liboso ya Klisto, kolukaka lisungi mpo na mpasi na ye. Bosenga na ye ezalaki pete: “Nkolo, soki olingi, okoki kopetola ngai.”

Mobikisi atandaki loboko na Ye mpe, asimbaki ye, alobaki, “Nakosala; alobaki petolama.”1

Tozali koyekola awa ete Mobikisi na biso alingaka ntango nyonso kopambola biso. Mapamboli misusu ekoki koya na lombango, misusu ekoki kowumela, mpe misusu ekoki koya nsima ya bomoi oyo, kasi mapamboli ekoya na ntango esengeli.

Mingi lokola moto ya maba, tokoki kozwa bokasi mpe bolendisi na bomoi oyo na kondimaka bolingi na Ye mpe koyebaka ete Alingaka kopambola biso. Tokoki kozwa bokasi mpo na kotelemela momekano nyonso, kolongaka mpe masenginya ya lolenge nyonso, mpe kososola mpe koyika mpiko na makambo nyonso. Ya solo, na ntango moko ya mpasi koleka na bomoi na Ye, nguya ya Mobikisi ya koyika mpiko ezalaki ya mozindo ntango Alobaki epai ya Tata na Ye, “Bolingi na yo esalema.”2

Moto ya maba asalaki bosenga na ye na lolendo to lolenge ya kosenga na makasi te. Maloba na Ye etalisaki ezaleli ya komikitisa, na motema kokita makasi kasi lisusu na mposa ya solo ete bolingi ya Mobikisi ekokokisama. Oyo ezali ndakisa ya ezaleli oyo tosengeli koya na yango epai ya Klisto. Tosengeli koya epai na Ye na bosolo ete mposa ya Mobikisi sikawa ezali mpe ntango nyonso ntina monene mpo na bosenga na biso awa na nkufa mpe babomoi ya seko. Azali na bomoni ya seko oyo tozali na yango ntango nyonso te. Tosengeli koya epai ya Mobikisi na mposa ya solo ete bolingi na biso ekomelama kati ya bolingi ya Tata, lokola ya Ye ezalaki.3 Yango ekolengela biso mpo na bomoi ya seko.

Ezali mpasi mingi mpo na koyika mpiko na mpasi ya nzoto mpe makanisi oyo ekomelaki moto ya maba oyo ayaki epai ya Mobikisi. Bokono ya maba ekotaka mingi na misisa mpe loposo, kobongolaka mpe kozangisa makoki. Na kobakisa, ekumbaki na bofandi musika na bato. Moto ya bokono ya maba asengelaki kotika baoyo ya ye alingaki mpe kofanda mosika ya bato. Bato ya maba bazalaki bazangi peto, na nzoto mpe molimo. Na ntina na yango, mobeko ya Mose esengelaki ete bato ya maba balata bilamba epasuka mpe bagangela bango “Bazangi peto!” ntango bazalaki kotambola.4 Na bokono mpe bozangi elikia, bato na maba basukaki na kofandaka na bandako mpe malita esundolama.5 Ezali mpasi te kokanisa ete moto ya maba oyo apusanaki pene ya Mobikisi asukaki.

Ntango mosusu—na lolenge moko to mosusu—biso tokoki koyoka lokola tobukami, ezala mpo na misala na biso moko to ya basusu, engebene na makambu oyo tokoki kosala eloko moko te. Na mabaku ya boye, tokoki kotia bolingi na biso kati ya maboko na Ye.

Mwa mibu ebele eleki, Zulma—mwasi na ngai, ndambo na ngai ya malamu koleka, eteni na ngai ya malamu koleka—azwaki bansango moko ya mpasi kaka mposo mibale yambo ya libala ya moko ya bana na biso. Azalaki na kiste na eteni ya kati ya monoko, mpe ezalaki kokola mbangu. Elongi na ye ebandaki kokomaka kovimba, mpe esengelaki basala ye lipaso na lombango. Makanisi ebele etambolaki makanisi na ye mpe etungisaki motema na ye. Bibon ezalaki mabe? Lolenge nini asengelaki kokoma malamu? Elongi na ye elingaki kosala lisusu te? Mpasi nini asengelaki koyoka? Elongi na ye elingaki kobangisa mpo na molai? Bibon esengelaki kozonga lisusu soki balongoli? Ye akokaki kozala na libala ya muana na biso ya mobalin? Ntango akotaki na kisuku ya lipaso, ayokaki ya kosuka.

Na ntango wana ya motuya, Molimo elobelaki ye ete asengelaki kondima bolingi ya Tata. Ye azuaki mokano ya kotia elikya na ye na Nzambe. Ayokaka na nguya nyonso ete atako nini ekozala mbano, Yango ekozala malamu koleka mpo na ye. Kala te alalaki mpongi ya lipaso.

Nsima, akomaki maloba ya poeme na zulunale na ye: “Na mesa ya lipaso nangumbamaki liboso na Yo mpe nazingamaki na bolingi na Yo, nalalaki. Nayebaki nakokaki kondimela Ye, koyebaka ete eloko moko te ya mabe ekoki kowuta epai na Ye”.

Azwaki bokasi mpe bolendisi uta na bozingi bolingi na ye na oyo ya Tata. Mokolo wana, Nzambe apambolaki ye na bosembo nyonso.

Atako lolenge nini mabaku na biso ekoki kozala, tokoki kosalela bondimi mpo na koya epai ya Klisto mpe kokutana na Nzambe oyo tokoki kondimela. Lokola moko ya bana na ngai, akomaki boye:

Engebene na profeta, elongi ya Nzambe ezali kongenga koleka moyi

mpe suki na Ye ezali pembe koleka mvula ya pembe

mpe mongongo na Ye ezali koyokana lokola botioli ya ebale,

mpe pene na Ye moto azali eloko te. …

Nazali eloko te ntango nayebi ete nazali pamba.

Mpe bobele nasali nzela na ngai ememi epai ya nzambe oyo nakoki kondimela.

Mpe bobele nsima nayebi Nzambe oyo nakoki kondimela.6

Nzambe moko oyo tokoki kolikya apesaka elikya na biso makasi. Tokoki kondimela Ye mpo ete Ye alingaka biso mpe alingi oyo ezali malami mingi koleka mpo na biso na libaku nyonso..

Moto ya maba akendaki liboso mpo na nguya ya elikia. Mokili epesaki litomba te, ata bolendisi te. Kasi, bosimbi ya pete ya Mobikisi esengelaki koyoka lokola libiki na molimo na ye mobimba. Tokoki bobele kokanisa mayoki ya mozindo ya botondi oyo moto ya maba asengelaki koyoka na bosimbi ya Mobikisi, mingi mingi ntango ayokaki maloba “nako petola yo.”

Lisolo elobi ete “na mbala moko maba na ye epetolamaki.”7

Biso mpe tokoki koyoka bosimbi ya bolingo ya Mobikisi, loboko ya lobiko. Esengo, elikia mpe botondi nini eyaka na milimo na biso ntango toyebi ete Alingaka kosunga biso tozala peto! Ntango toyaka epai na Ye, Nzambe akoya na lisungi na biso, mpo na kokangola biso to kopesa bisa mpiko ya kotelemela mabaku nyonso.

Na mabaku nyonso, kolingaka bolingi na Ye—kasi ya biso te—ekosunga biso tososola mabaku na biso. Eloko eloko moko te ya mabe te ekoki kowuta epai na Ye. Ye ayebi nini eleki malamu mpo na biso. Ntango mosusu akolongola mikumba na biso sikawa te. Ntango mosusu Akoki kokomisa mikumba oyo pepele, lokola Asalaki epai ya Alma mpe bato na ye.8 Na nsuka, na ntina ya mayokani, mikumba ekotombwama,9 atako na bomoi oyo to na Lisekwa ya bule.

Mposa ya solo oyo bolingi na Ye ekokokisama, na bososoli ya lolenge ya bonzambe ya Mosikoli na biso, esungaka biso tokolisa lolenge ya bondimi oyo moto ya maba alakisaki na ntina ya kopetolama. Yesu Klisto azali Nzambe ya bolingo, Nzambe ya elikia, Nzambe ya libiki, Nzambe oyo alingaka kopambola biso mpe kosunga biso topetolama. Yango ezali oyo Ye alingaki yambo aya na mabele oyo ntango na motema na Ye mobimba alingaki kobikisa biso ntango tokweyaki na masumu. Yango ezali oyo alingaki na Getesemana ntango Akutanaki na bolozi ya nzoto ya bomoto na ntango ya likambo ya bofuti motuya ya lisumu. Yango ezali oyo Alingaka sikawa ntango Asambeli na ntina ya ezalela na biso liboso ya Tata.10 Yango wana mongongo na Ye eyokanaka, “Boya epai na ngai, banso bozali na mpasi mpe bokumbami na mikumba, mpe nakopesa bino kimia.”11

Akoki kobikisa biso mpe kotombola biso mpo ete Azali na makoki ya kosala yango. Azwaki likolo na Ye bampasi na biso nyonso ya nzoto mpe molimo na ntina ete nsopo na Ye etondisama na ngolu mpo ete asunga biso na makambo nyonso mpe kokangola biso mpe kotombola biso likolo.12 Maloba ya Yisaya, lokola etangami na Abinadi, elobami malamu mpe na nguya:

“Na ntembe te akumbi mpasi na biso, mpe amemi mawa ma biso. …

“… Azokisamaki mpota mpo ya bobuki mobeko bwa biso, akatamaki mpota mpo ya mabe ma biso; etumbu ya kimia ya biso ezalaki likolo lya ye; mpe na mapipi ma ye tobikisami.”13

Likanisi moko oyo eteyamaki na poeme oyo:

“O Mosali mabaya ya Nazareta,

Motema oyo, oyo ebongisamaki na kala

Bomoi oyo, ebebisami na nkufa,

O, okoki kobongisa yango mosali mabaya?”

Mpe na nzela ya bolamu na ye mpe loboko ya lisalisi,

Bomoi na ye ya malamu etongami na kati

Babomoi na biso ebebisama, kino ekobongisama

Bokeli ya Sika—“biloko nyonso ya sika.”

“Mokumba ya [bopaswami] [ya] motema,

Bosenga, mposa, elikia, mpe bondimi,

Mikotisa kati ya Eteni Ebonga nie,

O, Mosali mabaya ya Nazareta!”14

Soki oyoki ete na lolenge moko opetolami te, soki oyoki ya kobukama, nasengi yeba okoki kopetolama, okoki kobongisama. Ndimela ete eloko moko ya mabe te ekoki kowuta epai na Ye.

Mpo ete Ye “akitaki na nse ya biloko nyonso,”15 Asalaki yango pete na ntina ete biloko nyonso oyo ebukanaki na babomoi na biso tozongisa yango lisusu elongo na Nzambe. Na nzela na Ye biloko nyonso ekoyokana, nyonso biloko oyo ezali na mabele mpe bilko oyo ezali na lola, kotiaka ”kimia na nzela ya makila na ye na ekulusu.”16

Yaka tokende epai ya Klisto, tozwa matambe nyonso ya ntina. Ntango tokosala yango, tika ezalela na biso ezala oyo elobi, “Nkolo, soki olingi okoki kopetola ngai.” Soki tosali bongo, tokoki kozwa bosimbi ya libiki ya Molakisi, elongo na mongongo kitoko ya mongongo na Ye: “Nakopetola yo.”

Mobikisi Azali Nzambe oyo tokoki kondimela. Azali Klisto, Mopakolami se Moko, Masiya, na oyo nazali kotatola na nkombo na Ye ya bule, kutu Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa