2010–2019
Bosantu mpe Moango ya Esengo
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


2:3

Bosantu mpe Moango ya Esengo

Esengo enene ewutaka na bosantu bonene ya moto.

Bandeko mibali mpe bandeko basi, nasambelaki mpo ete nguya esunga bino na boluki na bino ya esengo moko na moko. Bato basusu basila koyoka esengo mingi koleka, nzokande solo mpenza moko te akoki koboya bakabela ye esengo koleka. Moto nionso akoki kozala na bosenga ya kondima kopesama esengo ya libela na libela.

Yango ezali oyo Tata na Lola; Muana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto; mpe Molimo Mosantu bapesaki na muana nionso ya molimo ya Tata na Lola oyo azali na bomoi sikawa, akozala na bomoi, to ata kutu abika na mokili oyo te. Libonza yango ebiangemaki ntango mosusumoango ya esengo. Ebiangemaki bongo na profeta Alma ntango ateyaki muana na ye, oyo azalaki kozingama na monioko ya lisumu. Alma ayebaki ete misala ya mabe ekokaki ata mokolo moko te kozala esengo mpo na muana na ye—to mpo na muana nionso ya Tata na Lola.1

Ye ateyaki muana na ye ete kobakisama na molimo ezalaki nzela kaka moko ya esengo. Ye alimbolaki yango polele ete bosantu ya monene ekokokisama na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto oyo epetolaka mpe ebongisaka biso nie.2 Bobele na nzela ya bondimi na Yesu Klisto, ya boyamboli ya ntango nyonso, mpe ya kobombaka mayokani nde tokoki kosenga esengo ya libela na libela tozali koluka mpenza mpe kobatela yango.

Losambo na ngai mpo na lelo ezali ete nakoka kosunga bino kososola ete esengo wana monene eyeaka uta bosantu ya moto se ye moko boye ete bokosala likolo ya kondima wana. Nsima nakokabola oyo nayebi mpo na ngai moko na oyo etali nini tokoki kosala mpo na koponama mpo na likabo wana ya kokomaka kutu mosantu koleka.

Makomi eteryi biso ete katikati ya makambo nionso mosusu, tokoki komibonza to kokoma mosantu koleka ntango tosaleli bondimi na Klisto,3 tolakisi botosi na biso,4 toyamboli,5 tomibonzi mpo na Ye,6 toyambi makuli ya bule, mpe tobombi mayokani na biso na Ye.7 Komilongisa mpo na likabo ya bosantu esengi komikitisa,8 bosawa,9 mpe motema molai.10

Moko ya likambo nakutana nayebi ya kolinga bosantu ya mingi eyelaki ngai na Tempelo ya Salt Lake. Nakotaki na tempelo mpo na mbala ya yambo nsima ete bayebisa ngaina moke nini kozela uta na yango. Namonaka maloba ekomama na ndako: “Bonsantu na Nkolo” mpe “Ndako ya Nkolo.” Nayoki ntina monene na koyeba yambo ya komona. Nzokande namitunaki soki nabongisamaki mpo na kokota.

Mama mpe tata na ngai batambolaki liboso na ngai ntango tokotaki na tempelo. Basengaki biso kolakisa ba recommandation na biso, kotatolaka bolongobani na biso.

Baboti na ngai bayebaki mobali afandakina kiti ya recommandation. bongo batikalaki mwa ngonga moko koloba na ye. Nakendaki liboso ngai moko na esika moko monene epai wapi nionso ezalaki kongala pembe. Natalaki likolo na muinda molai makasi likolo na ngai yango emonanaki lokola likoloefunguami. Na ngonga wana mayoki ya polele eyelaki ngai ete nazalaki wana liboso.

Kasi nsima, nayokaki mongongo moko ya pete mpenza—ezalaki ya ngaimei te. Maloba ya pete elobamaki ezalaki oyo: “Ooma naino awa liboso te. Ozali kokundola ngonga moko yambo obotama. Ozalaki na esika moko ya bule lokola oyo. Oyokaki Mobikisi alingaki koya na esika wapi otelemaki. mpe oyokaki esengo mpo ozalaki na mposa ya komona Ye.”

Makambo wana na Tempelo ya Salt Lake ewumelaki kaka mwa ntango moke. Nzokandekokakina yango ememaka kaka kimia, bosepeli, mpe esengo ya nie.

Nayekolaki mateya mingi mokolo wana. Moko na yango ezalaki ete Molimo Mosantu alobaka na mongongo moko ya kimia, ya moke. Nakoki koyoka Ye ntango ezali na kimia ya molimo na motema na ngai. Ye amemaka liyoki moko ya esengo mpe ya kondimisama ete nazali kokomaka mosantu koleka. Mpe yango nde ememaka ntango nionso esengo nayokaka na bangonga wana ya yambo na tempelo moko ya Nzambe.

Yo omonaki na bomoi na yo moko mpe na bomoi ya basusu likamwisi ya esengo koyaka uta na bokoli ya bosantu, kokomaka mingi koleka lokola Klisto. Na bamposo eleki kala te, nazali pembeni ya mbeto ya bato bakokaki komona liwa wana batonda na bondimi na Mobikisi mpe bilongi ya. esengo.

Moko azalaki mobali moko oyo azingamaki na libota na ye. Ye mpe muasi na ye bazali kosololaka na kimia ntango muana na ngai ya mobali mpe ngai tokotaki. Nayebanaki na bango mibu ebele eleki. Namonaki Bomikabi ya Yesu Klisto kosala na bomoi na bango mpe na bomoi ya bato ya libota na bango.

Bango nionso elongo baponaki kokata nkisi ya monganga mpo na kokibakisa mikolo na bomoi na ye. Ezalaki na liyoki moko ya kimia ntango azalaki kosolola na biso. Ye asekaki moke ntango alakisaki botondi na nsango malamu mpe misala na yango ya bopetoli na ye mpe libota oyo ye alingaka. Alobelaki mibu na ye kitoko ya mosala na tempelo. Na bosenga ya moto oyo, muana ngai ya mobali apakolaki mafuta ebulisama na moto na ye . Nakangisaki bokuli yango. Lokola nasalaki, nazalaki na liyoki moko ya pole ete ye akokaki komona Mobikisi na ye, miso-na-miso.

Nalakaki ye ete akoyoka esengo, bolingo, mpe kondimisama ya Mobikisi. Ye asekaki na esengo mingi ntango tokendaki. Maloba na ye ya nsuka epai na ngai ezalaki “Yebisa Kathy nalingaka ye.” Muasi na ngai, Kathleen, mibu mingi koleka alendisaki bankola ya libota na ye kondima mbela ya Mobikisi ya koya epai na Ye, kosala mpe kobomba mayokani ya bule, mpe boye kondimama mpo na esengo ekoya lokola litomba ya bosantu wana ya monene.

Ye akufaki sima ya bangonga. Kati na bamposo ya liwa na ye, muasi akufela mobali na ye amemaki likabo moko mpo na muasi na ngai mpe ngai. Ye asekaki ntango tozalai kosolola. Alobaki na lisano, “nakanisaki ete nakomiyoka mawa mpe ngai moko. Nayoki esengo mingi. Bokanisi ete yango ezali malamu?”

Koyebaka boni boni ye alingaki mobali na ye mpe boniboni bango nionso mibale bayaki koyeba, kolinga, mpe kosalela Nkolo, nayebisaki ye ete boyoki na ye ya esengo ezalaki likabo moko elakama mpo ete ye, na mosala na ye ya bondimi, azalaki mosantu koleka. Bosantu na ye elongisaki ye mpo na esengo wana.

Ebele koyokaka lelo bakoki kotungisam: “mpo na nini nayoki te kimia mpe esengo elakami na baoyo bazalaki na bondimi koleka? Nazalaki na bondimi katikati na kibongunia ya makasi, kasi nayoki esengo te.”

Kutu Profeta Joseph Smith akutanaki na momekano yango. Ye abondelaki mpo na lisungi ntango azalaki ya kokangama na boloko ya Liberty, Missouri. Azalaki na bondimi na Nkolo. Ye akolaki na bosantu. Lisusu ayokaki esengo ye awanganamaki.

Nkolo ayekolisaki liteya ya motema molai biso nionso tosengeli na yango ngonga mosusu, mpe ntango mosusu mpo na eleko molai, na momekano ya bozangi kufa. Awa ezali etinda ya Nkolo na profeta na Ye bondimi mpe aniokuama:

“Mpe soki osengeli kobwakama kati na libulu molai, to kati na maboko ya babomi, mpe etumbu ya liwa eleki likolo na yo; soki obwakami kati na mozindo; soki mbonge ya mabe ekaniseli yo mabe; soki mipepe makasi ekomi monguna na yo; soki likolo eyindi, mpe biloko nyonso esangani na koyeisa nzela moke; mpe likolo na nyonso, soki mbanga mpenza ya lifelo ekofungola monoko monene sima na yo, yeba yo, mwana na ngai ya mobali, ete biloko nyonso oyo ekopesa yo mayele, mpe ekozala mpo na bolamu na yo.

“Mwana Mobali na Moto akitaki na nse ya nyonso na yango. Ezali yo monene koleka ye?”

“Na boye , tikala nzela, mpe bonganganzambe ekotikala na yo; mpo ete bandelo na yango etiamaki, yango ekoki kolekana te. Mikolo na yo eyebani, mpe mibu na yo ekoki kokitisama te; na boye, kobanga te oyo moto akoki kosala, mpo Nzambe akozala elongo na yo libela na libela.”11

Yango azalaki liteya na toli kaka moko Nkolo apesaki na Yobo, oyo afutaki ntalo eleki kilo mpo na kopesa nzela na Bomikabi kokomisa ye mosantu koleka. Toyebi ete Yobo azalaki mosantu, uta na bokoti toyebi mpo na ye: “Kuna ezalaki mobali moko ya mokili ya Usa, nkombo na ye ezalaki Yobo; mpe moto yango azalaki malamu be mpe sembo, mpe atosaki Nzambe, mpe aboyaki mabel.”12

Nsima Yobo abungisaki bozui na ye, libota na ye, mpe kutu na bokolongono naye. Bokoki kokundola ete Yobo atiaki tembe ete bosantu na ye monene, elongamaki na nzela ya kibongunia, endimisamaki ye mpo na esengo monene moleka. Yango emonanaki epai ya Yobo ete bosantu ememelaki ye minioko.

Lisusu Nkolo apesaki yo loteya se moko ya kozongisa na nzela oyo apesaki Joseph Smith. Atiki Yobo amona likambo na ye ya motema pasi lna miso ya molimo. Ye alobaki:

“Kanga loketo na yo lokola mobali; nakotuna yo, yo okoyanola ngai.

“Yo ozalaki wapi wana natiaki miboko na mokili? yebisa ngai, soki oyebi kososola.

“Nani apimaki bipimelo na yango, oyebi nde? To nani asembolaki nsinga likolo na yangot?

“Miboko na yango ekitisami na nini? To nani atii libanga na yango na nsuka;

“Wana mioto na ntongontongo eyembaki elongo moko, mpe bana nionso ya Nzambe bagangaki na esengo?”13

Bongo, sima Yobo ayambolaki na kobiangaka Nzambe mozangi bosembo, Yobo apesamaki nzela ya komona bitumba na ye na lolenge moko ya likolo mpe ya bosantu. Ye ayambolaki.

“Boye Yobo azongiselaki Nkolo, mpe alobaki,

“Nayebi ete yo okoki kosala malamu nionso, mpe ete mokano moko na yo ekopekisama te.

“Nani abombi toli na kozangaka boyebi? Boye nabimisi makambo nayebi ngai ntina te; makambo maleki ngai na kokamwa, mayebaki yango te.

“Oyoka, mpe, nakoloba: nakotuna, mpe okoyebisa ngai.

“Nayokaki mpo na yo nakoyoka na litoyi: mpe sasaipi miso mamoni yo.

“Bongo namitioli, mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu na moto.”14

Sima Yobo ayambolaki mpe boye akomaki mosantu koleka, Nkolo apambolaki ye koleka nionso abungisaki. Kasi ntango mosusu lipamboli monene koleka mpo na Yobo ezalaki kokolisa bosantu na ye na nzela ya mitungisi mpe boyamboli. Alongaki kozua esengo monene koleka na mikolo azalaki lisusu kobika.

Bosantu monene koleka ekoya te kaka na kosengaka yango pamba. Yango ekoya na kosalaka oyo esengami na Nzambe mpo na kobongola biso.

Mokambi Russell M. Nelson apesaka oyo emonani epai na ngai lokola ya monene koleka ya lolenge nini kokende elongo na nzela ya liyokani na bosantu monene koleka. Alakisaki nzela wana alobaki na lombango:

“Bosalela nguya elendisaka ya boyamboli ya mokolo na mokolo—ya kosalaka mpe kozalaka mwa malamu mingi mokolo na mokolo.

“Ntango toponi koyambola, toponi kobongwana! Topesi nzela na Mobikisi mpo na kobongola biso na lolenge ya malamu mingi ya bisomei. Toponi kokola na molimo mpe kozwa esengo—esengo ya bosikoli na Ye. Ntango toponi koyambola, toponi kokoma mingi lokola Yesu Klisto!”

Mokambi Nelson akendaki kopesa bisu bokasi na babokasi na biso ya kokoma mosantu koleka: “Nkolo azeli biso tozala babongi nie na lolenge oyo te. … Kasi azali kozela na biso kokoma na bopeto ya kobakisa. Boyamboli ya mokolo na mokolo ezali nzela ya bopeto.”15

Mokambi Dallin H. Oaks, kati na liloba na ye na lkita linene ya kala mingi te, lisusu esungaki ngai komona polele lisusu koleka lolenge nini tokoli na bosantu mpe boniboni tokoki koyeba tozali kokoba epai na yango. Alobaki: “Boniboni tokokisa ya molimo? Boniboni tokomi na lolenge wana ya bosantu ntango tokoki te kozala na bozalani ya Molimo Mosantu ntango nionso? Boni boni tokomi komona mpe kotuya biloko ya mokili oyo na limoni ya boseko?”16

Eyano ya Mokambi Oaks ebandaki na bondimi monene na Yesu Klisto lokola Mobikisi na biso ya bolingo. Yango ememaka biso koluka bolimbisi mokolo na mokolo mpe kokundola Ye na kobombaka mitindo na Ye. Bondimi monene wana na Yesu Klisto eyaka ntango tozali kosala lipati na liloba na Ye.That greater faith in Jesus Christ comes as we feast daily on His word.

Loyembo “Pesa Ngai Bosantu Mingi” etalisi lolenge moko ya kosambela mpo na lisungi na kokomaka mosantu. Mokomi atalisi na buania nionso bosantu tozali koluka ezali likabo uta na Nzambe ya bolingo, epesamaki likolo na ntango, sima ya nionso tokoki kosala. Bokundola molongo ya nsuka:

Bopeto mingi pesa ngai,

Makasi mingi mpo na kolonga,

Bonsomi mingi uta na mbindo ya mabele,

Bolingo ya koleka mpo na ndako.

Kokoka mpenza mpo na bokonzi

Ezala ete osalela ngai mingi koleka,

Ya kopambolama mpe mosantu kolekaMore blessed and holy—

Mingi, Mobikisi, lokola yo.17

Atako libaku na biso ya moto se ye moko, esika nini tokoki kozala na nzela ya boyokani ya ndako, tika nsambo na biso mpo na bosantu monene koleka eyanolama. Nayebi ete soki bosenga na biso endimami, esengo na biso ekokola. ekoki koya malembe malembe, kasi ekoya. Nazali na elikya uta na Tata moko ya bolingo ya Lola mpe Muana na Ye ya Mobali ya Bolingo, Yesu Klisto.

Natatoli ete Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe, lokola Russel M. Nelson azali profeta na bomoi lelo. Nzambe Tata azali na bomoi mpe alingi biso. Ye alingi biso tokoma na ndako na Ye na mabota. Mobikisi na biso ya bolingo abengi biso tolanda Ye na mobembo na biso awa. Bango basi babongisa nzela. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.