Mitindo Minene Mibale
Tosengeli komeka kobatela mitindo minene nyonso mibale. Mpo na kosala bongo, tosengeli kotambwisa bomoi na ndelo moko ya malamu katikati ya mobeko mpe bolingo.
Bandeko na ngai basi babolingo kati na nsango malamu ya Yesu Klisto, napesi bino mbote lokola bato bapesama mosala na Nzambe ya kobatela libota ya seko. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso, “Eklezia oyo ezongisamaki na ntina ete mabota ekoka kosalema, kokangisama mpe konetolama na lolenge ya seko.”1 Liteya wana ezali na bambano ya ntina mpo na bato lokola balezibiene, bapede, babisekisuele to batranjendere oyo bayebani mingi mingi lokola LGBT.2 Mokambi Nelson akundolisaki biso lisusu ete biso te “tosengeli [ntango nyonso] kondimana moko na mosusu mpo na kolingana moko na mosusu.”3 Mateya oyo ya boprofeta ezali ntina kati na masolo ya libota mpo na koyanola na mituna ya bana mpe bilenge. Nasambelaki makasi mpo na kolonga bofuli ya koloba na liyangani oyo mpo ete bomitungisaka mingi mpo na mituna oyo, oyo na mbalakaka to na mbalakaka te etalaka libota nyonso na Eklezia.
I.
Nabandi na oyo Yesu ateyaki na ntina ya mitindo minene mibale.
“Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema mobimba, mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.
“Oyo ezali mobeko ya yambo mpe ya monene.
“Mpe ya mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.”4
Yango elingi koloba totindami kolingana moko na moko, lokola lisese ya Yesu ya Mosamaliya malamu etei ete moto nyonso azali mozalani na biso.5 Kasi lolendo na biso ya kobatela motindo ya mibale esengeli te kosala ete tobosana ya yambo, ya kolinga Nzambe na motema na biso mobimba, na molimo mpe makanisi. Tolakisaka bolingo yango na “kobatela[ka] mitindo [na Ye].”6 Nzambe asengaka biso totosa mitindo na Ye mpo ete ezali nde na nzela ya botosi wana, mpe lisusu boyamboli, nde tokoki kozonga kofanda elongo na Ye mpe kokoma babongi nie lokola Ye azali.
Na liteya na ye ya kala te na bilenge mibali ya Eklezia, Mokambi Russell M. Nelson alobaki na ntina ya oyo abengaki “mokangano elenda ya bolingo ya Nzambe mpe mibeko na Ye.”7 Mibeko oyo etalaka ndimbola ya ntina na makambo oyo lokola LGBT ezali mobeko ya Nzambe ya libala mpe mobeko ekangani na yango ya bopeto. Nyonso mibale ezali ntina na kati ya moango ya lobiko ya Tata na biso ya Lola mpo na bana na Ye. Lokola Mokambi Nelson ateyaki, “mibeko ya Nzambe ezali nyonso na nguya na bolingo na Ye ezanga nsuka mpo na biso mpe mpo ete tokoma banso oyo tokoki kokoma.”8
Mokambi Nelson ateyaki: “Bikolo mingi … basili kondima libala ya bato ya nzoto lolenge moko. Lokola bandimi ya Eklezia, totosaka mibeko ya mokili … , tobakisi mpe libala ya sivile. Nzokande, bosolo ezali ete na ebandeli … libala ekulisamaki na Nzambe! Mpe tii na mokolo oyo elimbolami na Ye lokola kosalamaka kati-kati na mwasi mpe mobali. Nzambe abongoli te ya Ye ndimbola ya libala.”
Mokambi Neelson Akobaki: “Nzambe abongoli mpe te mobeko na Ye ya bopeto. Masengami ya kokota na tempelo ebongwani te.”9
Mokambi Nelson akundolisi moko na moko kati na biso ete “mokumba na biso lokola Bapostolo ezali ya koteya eloko mosusu te kasi bosolo. Mokumba wana ezali te kopesa [Bapostolo] likoki ya kobongola mobeko ya bonzambe.”10 Na yango, bandeko na ngai basi, bakambi ya Eklezia basengeli koteya bobele ntina ya libala kati na mobali mpe mwasi mpe mobeko ekangangi na yango ya bopeto.
II.
Mosala ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka etali mpenza kolengela bana ya Nzambe mpo na bokonzi ya selesitiale, mpe mingimingi koleka mpo na nguya na yango ya likolo, bonetoli to bomoi ya seko. Nsuka wana ya motuya mpenza esalami bobele na nzela ya libala ya seko.11 Kati na bomoi ya seko ezali na banguya ya bokeli oyo ezangaka te na mokangano ya mobali mpe mwasi12—yangoemoniseli ya lelo, emonisi lokola “bokobi ya nkona ya seko na seko.”13
Na lisikulu na ye na bilenge minzemba, Mokambi Nelson ateyaki, “Kokangama na mibeko ya Nzambe ekopesa yo bobateli ntango ozali kokoba na nzela ya bonetoli.”14 Oyo ezali nsuka oyo tozali koluka mpo na baye nyonso tolingaka. Na ntina ya bolingo wana, tokoki te kotika bolingo na biso eleka mitindo mpe moango mpe mosala ya Nzambe, oyo toyebi ekomemela baoyo tolingaka esengo ya monene koleka nyonso.
Kasi ezali na ebele ya baoyo tolingaka, mpe lisusu ndambu oyo bazali na nsango malamu ezongisama, baoyo bandimelaka te to baponaka te kolanda mitindo ya Nzambe mpo na oyo etali libala mpe mobeko ya bopeto. Boniboni mpo na bango?
Malongi ya Nzambe etalisi ete banso na biso tozali bana na Ye mpe ete Akelaki biso mpo na kozala na esengo.15 Emoniseli ya mikolo ya lelo eteyi ete Nzambe apesaki moango mpo na boyebi ya kufa na oyo banso bakoki kopona kotosa to koluka mapamboli na Ye ya likolo to kosala boponi oyo ekomema biso na moko ya babokonzi ya nkembo ya ntina moke.16 Mpo na ntina ya bolingo monene ya Nzambe na bana na Ye, babokonzi oyo wana ya ntina moke naino malamu koleka ete bato ya kufa bakoki kososola te.17 Bomikabi ya Yesu Klisto esali ete nyonso oyo ezala ekoka kosalama, mpo Ye “akumisi Tata, mpe abikisi misala nyonso ya maboko na ye.”18
III.
Nalobaki na ntina ya mobeko ya yambo, kasi boni boni na ntina ya mibale? Lolenge nini totosaka motindo ya kolinga mozalani na biso? Tolukaka kondimisa bandimi na biso ete baoyo balandaka mateya mpe misala ya balezibiene, bapede, babisekisuele, to batransjendere basengeli kosalisama na bolingo oyo Mobikisi na biso atindi biso tolakisa epai ya bazalani na biso. Bongo, ntango libala ya bato ya nzoto lolenge moko esakolamaki engebene ya mobeko na Etazini, Bakambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bazomi na mibale esakolaki: “Nsango malamu ya Yesu Klisto eteyi biso kolinga mpe kosalela bato banso na boboto mpe na bonkonde—ata ntango tozali koyokana te. Tondimi ete baoyo nyonso oyo basalelaka mibeko to mikano ya bazusi oyo endimi libala ya bato ya nzoto lolenge moko basengeli te kozanga komemia bango.”19
Na bobakisi, tosengeli te koniokolaa baoyo bakabolaka boyambi na biso te mpe mitendo.20 Na mawa, bato mosusu oyo bazali kokutana na makambo oyo bazali kokoba koyoka botioli mpe kobwakisama na bandimi mpe bakambi mosusu na mabota, bapalwasi mpe makonzi na biso. Tosengeli banso koluka kozala na boboto mpe na bompenza.
IV.
Mpo na ntina tozali kososola te tozali na mikakatano mikeseni na makambo tozali kokutana na yango na bomoi oyo ya kufa. Kasi toyebi te Nzambe akosunga moko na moko kati na biso kolonga mikakatano oyo soki toluki na bosembo lisungi na Ye. Nsima ya konyokwama mpe koyambola mpo nabobuki mibeko toteyamaka, banso ete nsuka na biso ezali ya bokonzi ya nkembo. Bosambisi ya ntina mpe ya nsuka ekosalala na Nkolo, ye moko oyo azali na mayele, bwanya mpe ngolu ya kosambisa moko na moko kati na biso.
Na yango, tosengeli komeka kobatela mitindo minene nyonso mibale. Mpo na kosala bongo, totamboli na nzela malamu kati na mobeko mpe bolingo—kobatelaka mitindo mpe kotambolaka na nzela ya boyokani, na ntango tozali kolinga mozalmani na biso nzelanzela. Botamboli oyo esengaka biso toluka bofuli ya bonzambe na ntina ya nini tokoki kosunga mpe nini tokoki kotelemela mpe lolenge nini kolinga mpe koyoka malamu mpe koteya na nzela yango. Botamboli na biso esengaka ete tozanga te kotosa mitindo kasi kolakisa emekoli efuluka ya bososoli mpe bolingo. Botamboli na biso esengeli kotalela bana oyo bazangi boyebi oyo etali mposa ya nzoto na bango, kasi ezali kolembisa mpo ete, na bana mingi mpenza, bazangi boyebi ya boye ezali kokita mpenza lokola ntango ezali koleka.21 Botamboli na biso etelemeli kozwa bato mosika ya nzela ya boyokani mpe eboyi lisungi na oyo nyonso akambaka bato mosika ya Nkolo. Na nyonso oyo tomikundolaka ete Nzambe alaki elikia mpe esengo mpe mapamboli ya nsuka mpo na baoyo nyonso batosaka mitindo na Ye.
V.
Bamama mpe Batata mpe biso banso tozali na mokumba ya koteya mitindo minene mibale nyonso. Mpo na basi ya Eklezia, Mokambi Spencer W. Kimball alimbolaki mokumba wana na esakola monene: “Mingi ya bokoli monene oyo ezali koya na Eklezia na mikolo ya nsuka ekoya mpamba te mingi ya basi malamu ya mokili … bakobema na Eklezia na motango moko monene. Yango ekosalama soki basi ya Eklezia balakisi bosembo mpe boyengebene na bomoi na bango mpe soki basi ya Eklezia bamonani ya kokabwana mpe ya kokesena … na basi ya mokili. ... Boye ekozala ete basi ya ndakisa ya Eklezia bakozala nguya ya motuya monene mpo na bokoli nyonso mibale ya motango mpe molimo ya Eklezia na mikolo ya nsuka.”22
Kolobaka na ntina ya esakola wana Mokambi Russell M. Nelson, asakolaki ete “mokolo oyo Mokambi Kimball amonaki na mosika ezali lelo. Bozali basi oyo amonaki na mosika!”23 Ndambo kati na biso baoyo toyokaki esakola wana mibu 40 eleki tomoni ete na kati ya basi oyo ya Eklezia oyo bakoki kobikisa bakozala baninga mpe libota na bango moko ya bolingo oyo bazali sikawa na nse ya nguya ya makambo ya liboso ya mokili mpe bobebisi ya diabulu. Losambo na ngai mpe lipamboli ezali ete boteya mpe bosala mpo na kokokisa esakola wana, na nkombo ya Yesu Klisto amene.