2010–2019
Kokosa Ngai Te
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Kokosa Ngai Te

Ntango totosi mitindo na Ye, tokokambama ntango nyonso na nzela ya pole mpe tokokosama te.

Lelo, nazali kopesa maloba ya toli mpo na bato nyonso, kasi mingimingi mpo na bino nkola oyo ezali komata—bana ya Eteyelo ya bana, bilenge mibali, mpe bilenge basi. Bolingami mingi na profeta ya Nkolo mpo na mikolo na biso, Mokambi Russell M. Nelson—mingi mpenza ete alobaki na mingi kati na bino na mobu eleki na nzela ya media ya bilenge ya mokili mobimba “Elikya ya Yisalaele.”1 Toyokaka mbala mingi Mokambi Nelson kobiangaka bino mpenza ete—“elikya ya Yisalaele,” nkola oyo ezali komata mpe lobi ya Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto.

Baninga na ngai bilenge, nalingi kobanda na kokabolaka masolo ya solo misato ya libota.

Dalamatien ya mbala ya 102

Mibu eleki, nazongaki epai na ngai nsima ya mosala mpe nakutaki langi ya mpembe bipayi nyonso—na mabele, ekuke ya garage, mpe ndako na biso ya biliki ya motane. Natalaki likambo yango na penepene koleka mpe namonaki ete langi yango ezalaki naino ya mai. Nzela ya langi ekendaki na libanda ya nsima mpe nalandaki yango. Kuna, namonaki mwana na ngai ya mibu mitano na bolose ya bopakoli langi, kobenganaka mbwa na biso. Labrodor na biso kitoko ya moindo apakolamaki na katikati na langi ya mpembe!

“Ozali kosala nini?” Natunaki na mongongo ya makasi.

Mwana na ngai ya mobali atelemaki, atalaki ngai, atalaki mbwa, atalaki na bolosi ya langi kotangisaka langi ya mpembe, mpe alobaki, “nalingi kaka milo akoma lokola bambwa ya matono ya moindo na filme—oyebi, moko elongo na Badalamatien 101.”

Elilingi
Labrador ya langi ya moindo
Elilingi
Dalmatian

Nalingaki mbwa na biso. Nakanisaki azalaki ya kobonga nie, kasi mokolo wana mwana ngai ya mobali azalaki na likanisi ya kokesana.

Mwana Niau ya Nzelanzela

Lisolo na ngai ya mibale elobeli Koko noko Grover oyo afandaki na ndako mosika ya moboka, mosika ya engumba. Uncle Grover azalaki kokoma mobange. Tokanisaki bana na biso ya mibali basengelaki kokutana na ye liboso akufa. Yango wana, nsima ya nzanga moko, tosalaki mobembo molai na motuka tii na ndako na ye ya bosawa. Tofandaki elongo mpo na kotala mpe kolakisa ye na bana na biso ya mibali. Kala te kati na bosololi, bilenge bana mibali na biso mibale,pene na mibu mitano to motoba, balingaki kokende libanda mpe kosakana.

Uncle Grover, koyokaka bonsenga na bango, atengamaki na elongi na ye na oyo ya bango. Elongi na ye ezalaki ya mobange mpe ya momesano te ete bana ya mibali babandaki kobanga ye. Alobaki epai na bango, na mongongo ya bamikolo, “Bosala keba—ezali na baniama mabe mingi kuna.” Koyokaka yango, Lesa mpe ngai mingi koleka tosotaki moke; tobandaki komitungisa ete basengeli kobanga na nyama mabe! Bana mibali noki te bakendaki libanda mpo na kosakana ntango tokobaki kotala ye.

Elilingi
Skunk

Nsima, ntango tokotaki na motuka mpo na kokende ndako, totunaki bana mibali, “Bomonaki nyama ya mabe moko?” Moko ayanolaki, “Te, tomonaki ata nyama ya mabe moko te, kasi tomonaki mwana ya niau ya moindo ya nzelanzela ya mpembe na mokongo na ye!”

Mokosi Monene

Masolo oyo na ntina ya bana bayebi likambo te komonaka likambo moko na ntina ya bomoi mpe bosolo ekoki kosekisa moko na moko na biso, kosi mazali lisusu kolakisa likanisi ya mozindo koleka.

Na kati ya lisolo ya yambo, elenge na biso azalaki na mbwa kitoko lokola shushu; atako, asimbaki katini ya langi, na bolosi na loboko, akanaki kosala bosolo na ye moko.

Na lisolo ya mibale, bana mibali na lipamboli ya koyeba te likama oyo bakokaki kokutana na yango na komonaka niama ya mabe. Na kozangaka makoki ya koyeba malamu oyo bakutanaki mpenza na yango , bazalaki na likama ya konyokwama na mwa makama mabe. Ezali masolo ya kozanga koyeba nani—kokanisaka ete eloko ya solo ezali eloko mosusu. Na likambo moko na moko, makama na yango ezalaki mike.

Na yango, ebele lelo bakutanaka na mikakatano ya boye na ndenge ebele. Bazali ntango na makoki ya komona makambo oyo lokola ndenge ezali mpenza to basepeli te na bosolo. Ebele, bamekaka na lisano lelo eponama mpo na mpo na kokamba biso mosika uta na bosolo mpenza. Makambo ya kokosa mpe ya lokuta oyo ekei mosika koleka likambo ya kozanga koyeba nanimpe ezali na makama ya libomi linene, mpe moke te.

Satana, tata ya balokuta mpe mokosi monene, akolinga biso totia ntembe na biloko lokola yango ezali mpe toboya babosolo ya seko to tobongola yango na eloko moko oyo emonisami elengi makasi. “Asali etumba na basantu ya Nzambe”2 mpe alekisi millennia kotangaka mpe kosalelaka likoki mpo na kondimisa bana ya Nzambe bandimela ete malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu.

Amipesi lokumu ya kondimisaka bato na kufa ete baniama mabe bazali kaka bana ya niau to ete, na bosaleli langi, okoki kobongola mbwa Labrator ekoma Dalamatien ya matono!

Elilingi
Mose amonaki elongi Nzambe

Tika sikawa tobaluka na ndakisa moko ya mobeko mpenza oyo emonani na makomi ntango profeta ya Nkolo Mose akutanaki miso na miso na kpokoso moko kaka oyo. “Mose akangamaki likolo ya ngomba molai mpenza, … amonaki Nzambe na miso, mpe asololaki elongo na ye.”3 Nzambe ateyaki Mose na ntina ya nani ye azali na bomoto na ye ya seko. Atako Mose azalaki moto na kufa mpe abonga nie te, Nzambe ateyaki na “lolenge moko na Mobotami se Moko na ngai; mpe Mobatami se Moko na ngai … akozala Mobikisi.”4

Mpo na koloba na bokuse, limonisi kitoko oyo, Mose amonaki Nzambe, mpe ayekolaki lisusu eloko moko ya ntina mpo na ye moko: azalaki solo mwana ya Nzambe.

Yoka na bokebi oyo esalamaki ntango limoni ya kokamwa ekangamaki. “Mpe ekomaki ete … Satana ayaki komeka ye,” kolobaka, “Mose, mwana mobali ya moto, kumbamela ngai!”5 Mose na mpiko ayanolaki: “Yo nani Mpo tala, nazali mwana ya Nzambe, na bolingo na ye ya Mwana se Moko na ye; mpe esika ezali nkembo na yo, ete nasengeli kokumbamela yo?”6

INa maloba mosusu, Mose alobaki: “Okoki kokosa ngai te, mpo nayebi nani nazali. Nakelamaki na elilingi ya Nzambe. Ozali na pole mpe nkembo na Ye te. Bongo mpo na nini nasengeli kokumbamela yo to nazali nakweya na motambo ya lokuta na yo?”

Sikawa bosala keba na lolenge Mose ayanolaki nsima. Asakolaki, “Kende mosika na ngai, Satana; kokosa ngai te.7

Ezali na mingi tokoki koyekola uta na eyano ya nguya ya Mose epai ya lisenginia ya monguna. Nabengisi bino boyanola lolenge moko kaka ntango bomiyoki na nse ya nguya ya lisenginia. Pesa motindo na monguna ya molimo na yo na kolobaka, “Kende! Ozali te na nkembo. Kosenginia to kokosa ngai te! Mpo nayebi nazali mwana ya Nzambe. Mpe nabenga Nzambe na ngai mpo na lisungi na Ye.”

Monguna, na yango, atikaka na pete te mikano na ye ya kokosa mpe kokitisa biso. Asalaki solo bongo te na Mose, kozalaka na mposa ya kosala ete Mose abosana nani azalaki seko na seko.

Lokola soki azalaki kolakisa nkanda ya kibomwana, “Satana agangaki na mongongo makasi, mpe alelaki likolo ya mabele, mpe apesaki motindo, kolobaka, nazali Mobotami se Moko, kumbamela ngai.”8

Tika tozongela kotalela yango. Oyokaki oyo Satana awutaki se koloba? “Nazali Mobotami se Moko. Kumbamela ngai!”

Mokosi monene alobaki, solo, “Komitungisa te; nakosala yo mabe te—nazali skunk te; nazali bobele mato balamu nyawu ya moke ya moindo mpe mpembe.”

Elilingi
Mose abenganaki Satana

Nsima Mose abelelaki Nzambe mpe azwaki bokasi na ye ya bonzambe. Atako na bonguna alengaki mpe mabele eninganaki, Mose abangaki te. Mongongo na ezalaki sikisiki mpe polele. “Kende mosika na ngai, Satana,” alobaki, “mpo na Nzambe kaka moko ngai nakokumbamela, oyo azali Nzambe na nkembo.”9

Na nsuka, Satana “alongwaki … liboso ya Mose.”10

Nsima Nkolo abimelaki mpe apambolaki Mose mpo na botosi na ye, Nkolo alobaki:

“Opambolami na yo, Mose, mpo … okokomisama makasi koleka bamai ebele. …

“Mpe Iyo, nazali elongo na yo kutu tii na nsuka ya mikolo na yo.”11

Botelemeli ya Mose ya monguna ezali ndakisa emonani na miso mpe ya polele mpo na moko na moko na biso, atako tozali esika nini na bomoi na biso. Ezali nsango moko ya nguya mpo na yo moko—mpo na koyeba nini kosala ntango Satana ameki kokosa yo. Mpo na yo, lokola Mose, opambolami na likabo ya lisungi ya lola.

Mitindo mpe Mapamboli

Lolenge nini okoki kozwa lisungi oyo ya lola, kutu lokola Mose azwaki, mpe kokosama te to kokweya na lisenginia te? Nzela ya polele mpo na lisungi ya bonzambe elobamaki solo lisusu na eleko oyo na Nkolo Yemei ntango asakolaki: “Yango wana, Ngai Nkolo, koyebaka mawa oyo esengeli koyela bato ya mabele, nabiangaki mosali na ngai Joseph Smith, Moke, mpe nalobelaki ye uta na lola, mpe napesaki ye mitindo.”12 Kosalelaka maloba ya pete koleka, tokoki koloba ete Nkolo, oyo ayebi “nsuka uta na ebandeli,”13 ayebi bakpokoso se moko ya mikolo na biso. Yango wana, Apesi nzela ya mpo na biso totelemela mikakatano mpe masenginia, mingi na yango eyaka lokola mbano ya semba ya banguya ya lokuta ya monguna mpe bobunsi na ye.

Nzela ezali pete: Na nzela ya basali na Ye, Nzambe alobelaka biso, bana na Ye, apesaka biso mitindo. Tokoki kozongela lisusu milongo oyo nawuti kotanga mpo na koloba, “Ngai, Nkolo … nabiangaki mosali na ngai [Mokambi Russell M. Nelson], mpe alobelaki ye uta na lola, mpe apesaki ye mitindo.” Ezali boye te bosolo moko ya nkembo?

Napesi litatoli na ngai ete Nkolo asalaki bosolo nyonso alobi epai ya Joseph Smith uta na lola, kovandaka na Limonisi ya Yambo. Alobaka lisusu epai ya Mokambi Nelson na ntango na biso: Natatoli ete Nzambe asololaki na baprofeta na ntango ya kala mpe apesaki bango mitindo miye etiamaki mpo na kokamba bana na Ye na esengo na bomoi oyo mpe nkembo na oyo ekoya .

Nzambe akobi kopesa mitindo epai ya baprofera na bomoi lelo. Bandakisa ekangana—libota kati kati, lisungi ya Eklezia na liteya ya nsango malamu; esika ya liteya ya libota mpe botali na lisalisi; kobakisa mambi ya tempelo mpe makuli; mpe Bana ya sika mpe Bilenge. Nasepeli na bolamu mpe mawa ya Tata ya Lola ya bolingo mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, oyo azongisaki Eklezia na Ye na mabele mbala moko lisusu mpe abiangi profeta moko na mikolo na biso. Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto efuti ngonga ya kpokoso elongo na litondi ya ntango.

Mabe Ezala Mokolo moko te Esengo

Kotosa mitindo epesami na profeta na biso ezali fungola kaka na koboyaka nguya mpe bokosi ya monguna te kasi lisusu na kotiaka na misala bosepeli mpe esengo oyo ewumelaka. Lolenge oyo ya bonzambe ezali pete: boyengebene to botosi na mitindo, ememaka mapamboli, mpe mapamboli ememaka esengo, to bosepeli kati babomoi na biso.

Nzokande, na lolenge se moko kaka Satana amekaki kokosa Mose, alukaka kobuba yo. Alobaka na ntembe te ntango nyonso kozala eloko oyo azali te. Amekaka ntango nyonso kobomba nani azali mpenza. Alobaka ete botosi ekokomisa bomoi na yo ya mawa mpe ete ekoyiba yo esengo na yo.

Ekoki yo kokanisa na mwa banzela na ye mpo na kokosa? Ndakisa, akitisaka mabe ya komela lopipi mpe na esika apesaka makanisi ete ekomema esengo. Akotisaka biso kati ya makambo ebele ya mabe oyo ekoki kozala kati ya media social, mpe lisusu kotiaka bokeseni mpe bosolo ya ntina. Na kobakisa, atiaka biso na makambo misusu ya likama ezwami na interneti mpo na kokweisa biso to koyokisa mpasi, lokola polonogalafi, mitungisi ya kobangisaka na basusu na nzela ya bapareye, mpe basango ya lokuta mpo na kotia ntembe mpe bobangi na mitema na biso mpe makanisi. Alobaka na nse na mayele mabe, “Landa ngai kaka, mpe okozala solo na esengo.”

Maloba ekomama bikeke mingi eleki na profeta ya Buku ya Molomoni ezali mingimingi ntina mpo na mikolo na biso: “Mabe ekozala esengo mokolo moko te.”14 Tika toyeba babokosi ya Satana mpo na oyo yango ezali. Tika totelema mpe tomona na nzela ya balokuta mpe banguya ya moko oyo azali na mposa ya kobebisa milimo na biso mpe koyibela biso esengo na biso ya sikawa mpe nkembo na biso ekoya na mikolo ya nsima.

Bandeko na ngai mibali mpe basi ya bolingo, tosengeli kokoba na bondimi mpe ekenge, mpo bongo ezali nzela se moko ya kososola bosolo mpe ya koyoka mongongo ya Nkolo na nzela ya basali na Ye. mpo Molimo akoloba bosolo mpe akokosa te. … Yango wana, makambo oyo emonisami epai ya biso na polele, mpo ya lobiko ya milimo na biso. Mpo Nzambe lokola alobaki yango epai ya baprofeta ya kala.”15 Tozali Basantu ya Nzambe ya Bokasi Nyonso, elikia ya Yisalaele! Tokolemba? “Esengeli biso kokitisa to koboya etumba? Te! … Na motindo ya Nzambe, molimo, motema, mpe loboko, ya bondimi mpe sikisiki tokotelema seko.”16

Napesi litatoli na ngai ya Moko Mosantu ya Yisalaele—kutu kombo ya Yesu Klisto. Natatoli na ntina ya bolingo, bosolo, mpe esengo na Ye ya ntango nyonso oyo ekokisami na libonza na Ye ezanga nsuka mpe ya seko. Ntango totosi mitindo na Ye, tokokambama ntango nyonso na nzela semba mpe tokokosama te. Na nkombo ya bule ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa