2010–2019
Kozwa Esengo na Kokabolaka Nsango malamu
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Kozwa Esengo na Kokabolaka Nsango malamu

Tozali na Tata ya bolingo na Lola, oyo azali kozela biso tozonga epai na Ye mpo na kopambola bomoi na biso mpe bomoi ya baoyo bazali nzinganzinga na biso.

Moko ya nzembo na ngai nalingaka koleka ya Eteyelo ya bana ebandi na maloba oyo:

Nazali moko ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka

Nayebi oyo nazali.

Nayebi moango ya Nzambe.

Nakolanda ye na bondimi.

Nandimeli Mobikisi, Yesu Klisto.1

Liloba nini oyo ya pete mpe kitoko mpenza ya bosolo tondimelaka!

Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, toyebi oyo biso tozali. Toyebi ete “Nzambe azali Tata ya milimo na biso. Tozali … bana na Ye, mpe Alingaka biso. Tofandaki [elongo na Ye na lola] yambo biso [toya na] mabele.”

Toyebi moango ya Nzambe. Tozalaki kuna elongo na Ye ntango Atalisaki yango. Ya biso Tata ya Lola “ntina mobimba —mosala na Ye mpe nkembo na Ye—ezali ya kopesa biso moko na moko makoki ya kosepela na mapamboli na Ye nyonso. Ye … apesaki moango moko ebobonga nie mpo na kokokisa ntina na Ye. Tososolaki mpe tondimaki moango oyo … ya esengo, … bosikola, mpe … lobiko” yambo ete toya na mabele.

“Yesu Klisto azali na katikati ya moango ya Nzambe. Na nzela ya Bomikabi na Ye, Yesu Klisto akokisaki ntina ya Tata na Ye mpe asalaki ete ekoka kosalema mpo na moko na moko na biso mpo asepela na bozangi kufa mpe bonetolami. Satana, to zabulu, azali monguna ya moango ya Nzambe” mpe azalaki uta na ebandeli.

“Bonsomi ya kopona, to likoki ya kopona, ezali moko ya makabo minene koleka nyonso ya Nzambe epai ya bana na Ye. … Tosengeli kopona soki tokolanda Yesu Klisto to tokolanda Satana.”2

Oyo ezali makambo ya solo ya pete tokoki kokabola na basusu.

Tika nabetela bino lisolo ya ngonga ntango mama na ngai akabolaki makambo ya solo ya pete ya boye na nakozalaka kaka ya kofungwama mpo na kosolala mpe koyeba libaku.

Mibu ebele eleki, mama na ngai azongaki na Argentine mpo na kotala ndeko na ngai ya mobali. Mama na ngai azalaki kolinga komata mpepo mpenza te, yango wana asengeki na moko ya bana na ngai ya mibali apesa ye lipamboli ya bolendisi mpe bobateli. Atindamaki na molimo mpo na lisusu kopesa nkoko na ye lipamboli na bokambi ya kafukafu mpe botindami uta na Molimo Mosantu mpo na kolendisa mpe kosimba mitema ya ebele baoyo bazalaki na mposa ya koyekola nsango malamu.

Elilingi
Libota ya Pol

Na libanda ya mpepo ya Salt Lake, mama na ndeko na ngai ya mobali bakutanaki na mwana mwasi moko ya mibu nsambo oyo azalaki kozonga na ndako kowutaka mobembo likolo ya mabanga ya mvula ya pembe elongo na libota na ye. Baboti na ye bamonaki lolenge bawumelaki kosolola na mama mpe ndeko na ngai ya mobali, mpe bazwaki mokano ya kokoma epai na bango. Bapesaki bankombo na bango mpe mwana na bango ya mwasi lokola Eduardo, Maria Susana mpe Giada Pol. Ezalaki mokangano moko malamu mpe motema ya bolingo na libota malamu oyo.

Mabota nyonso mibale bazalaki na esengo ya kosalaka mobembo elongo na mpepo moko kino na Buenos Aires, Argentina. Lokola lisolo na bango ekobaki, mama na ngai alobaki ete kino na ntango wana, naino bayoka nsango malamu ezongisama ya Eklezia ya Yesu Klisto te.

Moko ya mituna ya yambo Susana atunaki ezalaki, “Okoki kolobela ngai na ntina ya mize kitoko oyo ezalaka na ekeko ya wolo na likolo?”

Mama na ngai alimbolaki ete ndako kitoko ezalaki mize te kasi tempelo ya Nkolo esika oyo tosalaka mayokani na Nzambe na ntina ete tokoka kozonga kofanda elongo na Ye mokolo moko. Susana atubelaki epai ya mama na ngai ete liboso ya mobembo na bango na Salt Lake, asambelaki mpo ete eloko moko elendisa molimo na ye.

Ntango bazalaki kokende na mpepo, mama na ngai atatolaki na pete kasi litatoli elenda ya nsango malamu mpe abengisaki Susana akutana na bamisionele na engumba na ye ya mbotama. Susana atunaki mama na ngai, “Lolenge nini nakokutana na bango?”

Mama na ngai ayanolaki, “Ezali mpasi te; bazalaka bilenge mibali mibale balataka basimisi ya mpembe na kalavati to bilenge basi mibale balataka kitoko, mpe ntango nyonso balataka kalati moko kolakisaka nkombo na bango mpe lisusu ‘Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka.’”

Mabota bapesanaki banimelo na bango ya telefone mpe bapesanaki mbote ya bokabwani na libanda ya mpepo ya Buenos Aires. Susana, oyo uta tango wana akomaki moninga na ngai ya malamu, ayebisaki ngai mbala mingiete ayokaki mawa makasi ya kotika mama na ngai na libanda ya mpepo. Alobaki, “Mama na yo azalaki na esengo. Nakoki te kolimbola yango, kasi azalaki na bongengi kati na ye yango nakokaki te kobosana.”

Ntango Susana azongaki na engumba na ye ya ndako, ye mpe mwana na ye ya mwasi, Giade, bakendaki kokabola boyebi oyo na mama ya Susana, oyo azalaki kofanda mwa mosika ya ndako na bango. Ntango bazalaki na motuka, Susana amonaki bilenge mibale ya mibali kotambolaka na nzela kolataka kaka lokola mama na ngai alobaka. Atelemisaki motuka na ye na katikati ya nzela, abimaki, mpe atunaki bilenge mibali mibale oyo, “Bokoki kozala bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto?”

Balobaki, “Iyo.”

“Bamisionele?” atunaki.

Bango mibale bayanolaki, “Iyo, tozali!”

Nsima alobaki, “Bokota na motuka na ngai; tokende na ndako boteya ngai.”

Elilingi
Libota ya Pol

Sanza mibale nsima, Maria Susana abatisamaki. Mwana na ye ya mwasi, Giada, abatisamaki mpe ntango akokisaki mibu libwa. Tozali kokoba kosalisa mpo na Eduardo, oyo tolingaka mingi atako nini.

Uta wana, Susana akomaki moko ya bamisionele monene oyo naino namona te. Azali lokola bana mibali ya Mozia, komemaka milimo ebele na Klisto.

Kati ya moko ya masolo na biso, natunaki ye, “Sekele na yo ezali nini? Lolenge nini okabolaka nsango malamu na basusu?”

Ayebisaki ngai, “Ezali pete makasi. Mikolo nyonso yambo natika ndako na ngai, nasambelaka kosengaka Tata na Lola akamba ngai epai ya moto moko oyo azali na bosenga ya nsango malamu na bomoi na bango. Ntango mosusu nazwaka Buku ya Mormon mpo na kokabola elongo na bango to kopesa bango mwa mokanda ya bamisionele—mpe ntango nabandaka kosolola na moto moko, natunaka bango na pete soki esi bayoka na ntina ya Eklezia.”

Susana lisusu alobaki, “Mbala misusu nasekaka moke kaka ntango nazali kozela engunduka. Mokolo moko moto moko atalaki ngai mpe alobaki, ‘Ozosekela nini?’ Azalaki lokola kokamwa ngai.

“Nayanolaki, ‘nazali koseka moke mpo ete nazali na esengo!’

“Nsima alobaki, ‘Mpe ozali na esengo ya nini?’

“Nayanolaki, ‘nazali mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka, mpe yango nde esalaka esengo na ngai. Esi oyoka na ntina na yango?’”

Ntango alobaki te, apesaki ye mwa mokanda mpe abengisaki ye aya na mayangani ya Eyenga ekoya. Eyenga ekoya, apesaki ye mbote na bokoteli.

Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki:

“Ezali na makambo misato oyo bandimi nyonso bakoki kosala mpo na kosunga kokabola nsango malamu. …

Ya yambo, tokoki banso kosambela mpo na mposa ya kosunga na eteni oyo ya ntina ya mosala ya lobiko. …

Ya mibale, tokoki kobatela mitindo. … Bandimi ya bondimi bakozala ntango nyonso na Molimo ya Mobikisi … elongo na bango mpo na kokamba bango ntango bazali koluka kosala na mosala monene ya bokaboli nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto.

Ya misato, tokoki kosambela mpo na bofuli na oyo biso tokoki kosala … mpo na kokabola nsango malamu na basusu … [mpe] kosambela na komipesa ya kosala engebene na bofuli bozali kozwa.”3

Bandeko mibali, bandeko basi, bana, mpe bilenge, tokoki kozala lokola moninga na ngai Susana mpe kokabola nsango malamu elongo na basusu? Tokoki kobengisa moninga oyo azali moko ya boyambi na biso te aya na eklezia elongo na biso na Eyenga? To tokoki ntango mosusu kokabola mokanda ya Buku ya Mormon elongo na ndeko moko to moninga? Tokoki kosunga basusu bazwa bankombo ya bankoko na bango na FamilySearch to kokabola elongo basusu oyo toyekoli uta na poso ntango tozalaki koyekola Viens et suis moi? Ekoki biso kozala mingi lokola Mobikisi na biso, Yesu Klisto mpe kokabola na basusu maye mamemaka esengo na bomoi na biso? Eyano na mituna nyonso oyo ezali iyo! Tokoki kosala yango!

Kati na makomi totangi ete “bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto batindami ‘mpo na kosala na elanga na ya vinjo mpo na lobiko ya milimo ya bato’ (Doctrine et Alliances 138:56). Mosala oyo ya lobiko esengaka mosala ya mondimi misionele, mbongwana, bolendisi ya bandimi ya molende moke, mosala ya tempelo mpe ya mambi ya libota, mpe koteya nsango malamu.’”4

Baninga na ngai ya bolingo, Nkolo azali na mposa na biso mpo na kosangisa Yisalaele. Kati na Malongi mpe Mayokani, Ye alobi, “Mpe kokanisa te liboso nini bokoloba; kasi kotondisa na mayele na yo ntango nyonso maloba ma bomoi, mpe ekopesamela yo na ngonga wana mpenza eteni wana oyo ekoki mpo na moto nyonso.”5

Na kobakisa, Alakaki biso:

““Mpe boye ezali ete osengeli kosala mikolo na yo nyonso kogangaka boyamboli epai ya bato oyo, mpe komeme, ata soki ezali molimo moko epai ya ngai, monene kasi ekozala esengo na yo na bokonzi ya Tata wa ngai!

“Mpe sikawa, soki esengo na yo ekozala monene elongo na molimo moko oyo omemi epai na ngai na bokonzi ya Tata na ngai, boni monene ekozala esengo na yo soki osengeli komema milimo mingi epai na ngai!”6

Loyembo ya Eteyelo ya Bana Ebandaki na bosukisi na liloba oyo ya motuya:

Nandimelaka Mobikisi, Yesu Klisto.

Nakokumisa nkombo na ye.

Nakosala oyo ezali malamu;

Nakolanda pole na ye.

Bosolo na Ye nakosakola.7

Natatoli ete maloba oyo ezali solo mpe ete tozali na Tata ya bolingo na Lola, oyo azali kozela biso tozonga epai na Ye mpo na kopambola bomoi na biso mpe bomoi ya baoyo bazali nzinganzinga na biso. Tika ete tozala na mposa ya komema bandeko na biso ya mibali mpe ya basi epai ya Klisto ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Eklezia ya Yesu Klistu,” Children’s Songbook, 77.

  2. Prêchez Mon Evangile: Guide pour le Service Missionnaire, rev. ed. (2018), 48.

  3. Dallin H. Oaks, “Kokabolaka Nsango malamu Ezongisama,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2016, 58.

  4. Manuel 2: Administratio de l’Eglise, 5.0, ChurchofJesusChrist.org; see also L. Whitney Clayton, “The Work of Salvation: Then and Now,” Liahona, Sanza ya libwa 2014, 23.

  5. Doctrine et Alliances 84:85.

  6. Doctrine et Alliances 18:15–16.

  7. “Eklezia ya Yesu Klisto,” 77.

Bimisa na lokasa