Bana Basi ba Bolingo
Na katikati ya nionso tosalaka na Bilenge Basi ezali mposa na biso ya kosunga bino bozua bondimi oyo ekoningana te na Nkolo Yesu Klisto.
Bandeko basi ba bolingo, ezali esengo kokutana na bino! Tozali banzeneneke ya bosopani ya emoniseli oyo ezali nionso mibale ya kotandola molimo mpe ya kosepelisa.
Lokola tobandi, nasepeli kokutanisa bino na baninga moko; bazali bilenge oyo bazali bobele moko na talanta, ezaleli, mpe libaku ya boto mpe ya libota ekokani na mosusu te. Moko na moko kati na bango, lokola bino nyonso, basimbaki motema na ngai.
Yambo, botala Bella. Ye atelemi makasi lokola elenge muasi kaka moko na etape na ye na Iceland.
Botala Josephine oyo amipesa awuti na Africa, oyo amikotisi na koyekolaka Buku ya Mormon Mikolo nyonso. Ye azali kozipola nguya mpe mapamboli oyo eyei uta na mosala oyo ya pete, ya bondimi.
Mpe na nsuka, botala molingami na ngai Ashtyn, elenge muasi moko ya kokamua oyo akufaki sima ya mibumotoba ya kobundaka na cancer. Litatoli na yeya Bomikabi ya Yesu Klisto ezali naino kobetaka na motema na ngai.
Bino bozali banso bilenge basi ya kokamua. Bozali se bobele moko, moko na moko na makabo mpe mayele na bino moko kasi ekokana te na banzela ya motuya mpenza mpe ya libela.
Bino bozali mpenza bana basi ya molimo ya Baboti ya Lola, mpe eloko moko te ekoki kokabola bino uta na bolingo na Bango mpe na bolingo ya Mobikisi.1 Soki opusani pembeni na Ye, ata na matambe mike koleka lokola bebe, okozipola kimia ya libela na libela oyo ekokita na molimo na yo lokola moyekoli moko ya bondimi ya Mobikisi, Yesu Klisto.
Mokambi Russell M. Nelson, profeta alingami wa bolingo na biso, asengaki ete nakabola mabongisi ya sikamafulami oyo ekosunga bino “kokolisa [ya bino] makoki ya oyo ya bino ya bule”2 mpe kotombola nguya na bino ya bosembo. Nakoyebisa bisika minei ya kokokisa na butu oyo.
Mama ya likambo ya Bilenge Basi
Yambo, na kati ya nyonso tosalaka na Bilenge Basi ezali mposa na biso ya kosunga bino bozua bondimi ekoningana te na Nkolo Yesu Klisto3 mpe boyebi moko ya solo ya bozali na bino ya bonzambe lokola muana muasi moko ya Nzambe.
Na butu oyo, nakolinga koyebisa bobongoli moko ya mama ya likambo ya Bilenge Basi. Nasengi bino boyoka Molimo Mosantu kotatola bosolo ya maloba oyo ntango nazali koloba mama ya likambo ya sika:
Nazali muana muasi ya bolingo ya baboti ya lola,4 na bozali mpe atandele ya bonzambe.5
Lokola moyekoli ya Yesu Klisto,6 nazali kobunda mpo na kokoma lokola Ye.7 Nazali koluka mpe kosala likolo ya emoniseli ya moto na moto8 mpe kosalisa basusu na nkombo na Ye ya bule.9
Nakotelema lokola nzeneneke ya Nzambe na ntango nyonso mpe na makambo nyonso mpe na bisika nyonso.10
Lokola nazali kobunda mpo na komikokisa mpo na bonetoli,11 nalulaka likabo ya koyambola12 mpe koluka komibongisa mokolo na mokolo.13 Na bondimi,14 nakopesa makasi na ndako mpe libota na ngai,15 kosala mpe kobomba mayokani ya bule,16 mpe koyamba makuli17 mpe mapamboli ya tempelo ya bule.18
Boyeba mbonguana ya “biso” na “ngai.” Bosolo oyo epesami na bino moko na moko . Yo ozali mwana mwasi ya bolingo ya Baboti ya Lola. Yo ozali moyekoli ya liyokani ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Nabengisi bino koyekola mpo komaniola maloba oyo. Nayebi ete soki bosali yango, bokozua litatoli ya bosolo na yango. Kososolaka babosolo oyo ekobongola lolenge ya kotelema liboso ya mikakatano. Koyebaka bokitoli mpe ntina na bino ekosunga bino kolandisa bolingi na bino na oyo ya Mobikisi.
Kimia mpe bokambi ekozala ya bino lokola bozali kolanda Yesu Klisto.
Bakelasi ya Bilenge Basi
Eteni ya mibale oyo esimbami na mabongisi ezali bakelasi ya Bilenge Basi. Mpaka Neal A. Maxwell alobaki, “Boye mbala mingi oyo bato basengeli mingi koleka ezali kobombama misuka na bambonge ya bomoi kati na esika esantu ya kozala ya lingomba.”19 Bakelasi na biso esengeli kozala bisika bisantu mosika na mbonge, bisika ya bozangi bobangi ya bolingo mpe ya kozala ya lingomba. Na bokasi ya kotonga boyokani, kolendisa kiboninga, mpe komatisa liyoki oyo ya kozalaka na lingomba ya Bilenge Basi, tozali kosala boko bokokisi na lolenge ya kelasi.
Bankoto ya mibu 100 mileki, bilenge basi bakabuanaki na bakelasi misato. Lokola esengeli kobanda sikasikawa, tobengisi bakambi ya Bilenge Basi mpe baepisikopo koyekola na libondeli nyonso babosenga ya elenge mwasi moko na moko mpe kobongisa yango na mobu engebene na mabaku ya paluase moko na moko. Topesi awa mwa bandakisa ya lolenge nini ekoki kozala.
-
Soki bozali na bilenge basi mingi te, bokoki kozala na kelasi moko ya Bilenge Basi wapi bango nyonso kosanganaka elongo.
-
Ntango mosusu bozali na lisanga monene ya bilenge basi ya mibu 12 mpe bongo lisanga moko moke ya bilenge basi oyo bazali mikolo. Bokoki kozua mokano ya kozala na bakelasi mibale: Bilenge Basi ya 12 mpe Bilenge basi ya 13–18.
-
To soki bozali na paluase ya bilenge basi 60 kosanganaka, bokoki kozala na bakelasi motoba, moko na mibu na yango, ebongisami na mibu.
Nzokande bakelasi na bino ezali ya kobongisama, bino bilenge basi bozali na ntina na botongi bomoko. Bozala pole mpo na basusu nzinganzinga na biso. Bozala liziba ya bolingo mpe kobatela bozali kolikyaka kozua uta na basusu. Na libondeli na motema na yo, koba kosembola loboko epayi ya basusu mpe zala makasi mpo na bolamu. Soki osali bongo, bomoi na yo ekotondisama na boboto. Okozala na mayoki ya malamu koleka epayi ya basusu mpe okobanda komona bango kozongisela yo bolamu.
Bankombo ya Bakelasi ya Bilenge Basi.
Ya misato, elongo na kobongisama oyo ya sika ya kelasi, bakelasi nyonso ekolakisama na nkombo ya bosangisi ya “Bilenge Basi.”20 Tokolongola bankombo ya Abeilles, Eglantines, mpe Laureoles.
Kolendisa Bakambi ya Bakelasi
Eteni ya nsuka nalingi kolobela ezali motuya ya bakambi ya bakelasi. Likambo ezali te lolenge nini Bilenge Basi bazali ya kobongisama, kelasi nyonso esengeli ezala na bokambi ya kelasi!21 yango ezali likanisi ya bonzambe ete basi babengami mpo na kotambuisa nabolenge na bango.
Mosala mpe ntina ya kelasi ya bakambi elendisami mpe elimbolami polele koleka. Mosala ya lobikoezali moko ya mikumba minene, mingi mpenza likambo ya kosalisa, mosala ya misionele, kolamusa, mpe tempelo mpe mosala ya mambi ya libota.22 Iyo, oyo ezali boniboni kosangisa Yisalaele23—mosala moko ya nkembo mpo na bilenge basi nionso lokola baye ya limpinga ya bilenge ya Nkolo.
Lokola boyebi, na eteni nyonso ya Eklezia, Nkolo abengi bakambi kotambuisa bato na Ye. Bilenge Basi, kozalaka moko ya bokambi ya kelasi ekoki kozala libaku na bino ya yango kozala na nzela efulami ya botambuisi. Bakambi oyo bazali bamikolo, bosalaka libiangi ya bakambi ya bakelasi ntina ya yambo mpe botambuisa penepene mpenza elongo na bango, kokambaka mpe kotambuisaka bango boye ete bakoka kolonga.24 Ata na ndelo nini ya mayele ya bokambi mpe kelasi ya bokambi bozwi, bobanda esika bango bazali mpe bosunga bango na kokolisa makoki mpe bondimami oyo ekopambola bango lokola bakambi. Bovanda pembeni na bango, kasi bozola likolo te. Molimo ekotambuisa bino ntango botambuisi bango.
Mpo na kolakisa ndakisa ya mosala ya motuya ya baboti mpe bakambi lokola bakambi, tika nabetela bino lisolo moko. Chloe abiangemaki kosala lokola mokambi ya kelasi moko. Mokambi na ye ya bonganganzambe ya buania apesaki ye makasi ya koluka lisungi ya Nkolo na kopesaka bankombo mpo na bokambi na ye. Chloe abondelaki mpe ayambaki lifuli mpo na nani kopesa lokola bapesi toli na ye mbala moko na lombangu. Ntango azalaki kokoba na kokanisa mpe kobondela na ntina ya kalaka, Molimo ebendaki bokebi na ye mbala na mbala na elenge mwasi moko oyo ekamwisaki ye—moko ayaka mpenza te na eklezia to milulu .
Komiyokaka ete azangi kimia na lbotindiki wana na molimo, Chloe asololaki na mama na ye, oyo alimbolaki ete moko ya banzela tokoki koyamba emoniseli ezali na nzela makanisi oyo ezongaka. Na kondima oyo ezongisamaki sika, Chloe ayokaki asengelaki kopesa nkombo ya elenge mwasi oyo. Episikopo apesaki libiangi, mpe elenge mwasi andimaki. Nsima ya kotiama pembeni, secretaire yango ya bolingo alobaki, “Boyebi, nayoka mokolo moko te lokola soki nazalaki na esika , to nasengelamaki esika moko. Nayokaki te ete ebongaki na ngai. Kasi na libiangi oyo, nayoki lokola soki Tata ya Lola azali na ntina moko mpe esika moko mpo na ngai.” Lokola Chloe mpe mama na ye batikaki mayangani, Chloe abalukaki epai ya mama na ye mpe alobaki na miso na ye, “Emoniseli ezali ya solo! Emoniseli esalaka solo mpenza!”
Bakambi ya kelasi, bino bobiangemaki na Nzambe mpe bolikiamaki mpo na kotambuisa lisanga moko ya bana basi na Ye. “Nkolo ayebi bino. … Ye aponi bino.”25 Bino botiamaki pembeni na oyo moko azali na nguya ya bonganganzambe; yango elakisi ete soki bokokisi mokumba ya libiangi na bino, bokosalela nguya ya bonganganzambe. Bozali na mosala monene ya kosala. Bozala na liyoki ya mpe bosala na botindiki ya Molimo Mosantu. Soki bosali boye, bokoki kosala na bozangi bobangi, mpo na bozali kosala bino moko te!
Bakambi ya kelasi, tosengeli buania, mongongo, mpe nguya na bino na mopesi lisanga ya bilenge ya sika paluase oyo Mpaka Elder Quentin L. Cook akoyebisa lelo. Bino bozali eteni moko ya motuya ya eyano ya kokokisa babosenga ya bandeko na bino mibali mpe basi.26
Mabongisi oyo mpo na kobongisa mpe kotambwisa kelasi ekoki kobanda ntango bapaluase mpe bitape ekokoma ya kobongama kasi esengeli etiama na esika na mokolo 1 sanza ya Yambo, 2020.
Bandeko na ngai ya basi ya bolingo, natatoli ete mabongisi oyo nalobeli lelo efulami na botambuisi uta na Nkolo. Ntango tosaleli na bokebi mabongisi oyo, ekoka biso ata mokolo moko te kobungisa bomoni ya ntina na biso: kolendisamokano na biso ya kolanda Yesu Klisto mpe kosunga basusu mpo na koya epai na Ye. Natatoli ete oyo ezali Eklezia na Ye. Boniboni nazali na botondi ete Ye apesi biso nzela ya kozala eteni ya motuya koleka na mosala na Ye ya bule.
Nabondeli ete Molimo moko oyo etambuisaki mabongisi oyo etambuisa biso ntango topusani liboso na nzela ya liyokani. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.