2010–2019
Topesa Molimo na Biso Bokambi Likolo ya Nzoto na Biso
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Topesa Molimo na Biso Bokambi Likolo ya Nzoto na Biso

Moko ya makambo ya ntina mingi koleka tokoki koyekola na kati ya bomoi ezali lolenge nini kobeta nsete na lolenge ya bomoto na biso ya molimo mpe kokamba bamposa na biso ya mabe.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, ntango likita linene ya sanza ya Zomi ebelemaki mobu eleki, nalengalaki liloba na ngai ya likita mpo nakobimisa bokundoli ya mibu 100 ya limoni ya mokili ya molimo epesamelaki Joseph F. Smith na mokolo ya 3 sanza motoba, 1918.

Nsima ya mwa mikolo nalakisaki liloba na ngai mpo na bobongoli, na moninga na ngai ya bolingo ya seko, Barbara, asilisaki momekano na ye ya kufa mpe alekaki na mokili ya molimo.

Lokola mikolo ebongwanaki baposo, nsima basanza, mpe sikoyo mobu moko uta liwa ya Barbara, namimoni kolulaka makomi oyo mingi “Bokozala elongo na bolingo, mpo ete bokolela bobungisi ya bango baye bawei.”1 Barbara mpe ngai topambolami na “kozala elongo na bolingo” mibu 67. Kasi nayokaki na lolenge moko ya ngaimei nini elingi koloba “kolela kobungisa” ya baye tolingaka. O, motindo kani nalingi mpe nazangi ye!

Nakanisi mingi na biso tozangi kolula nini basusu bazalaka mpo na biso kino balongwi. Nayebaki Barbara azalaki ntango nionso na mosala, kasi nasosolaki mpenza te bosenga ya ntango nionso ya libota, ya Eklezia, mpe ya lingomba likolo na ngonga na ye. Ezalaki bokasi ya komipesa mokolo na mokolo ya kobandela mbala nkoto na kolandela mibu oyo ebatelaki libota na biso na mosusu. Mpe na kolandela yango nionso, moko naino te na libota na biso ayoka ye kotombola mongongo na ye to koloba liloba moko ya boboto te.

Mpela ya makundoli esopanaki likolo na ngai mobu oyo eleki. Nakanisaka boponi ya bosenga ya nzoto asalaki mpo na kozala mama ya bana nsambo. Kozala mokeli ya ndako ezalaki mosala moko kaka ye alingaki, mpe azalaki na lolenge nionso mosali ya makasi koleka.

Mbala minngi, namitunaka boniboni abandaki kolanda bana na biso mpe ya ngai. Kolengela bilei yango moko ezalaki mosala ya kobangisa, kolobela te milulu lokola kosala na bangomba ya bilamba libota na biso esalelaki poso na poso, kobatelaka basapato mpe bilamba oyoezalaka kokoka na bana. Biso bango tobalukaki na ye na ebele ya mikakatano oyo ezalaki ya motuya mpo na biso. Mpe mpamba te yango ezalaki ya motuya mpo na biso, yango ezalaki ya motuya mpo na ye. Azalaki, na liloba moko, na nkembo—lokola mwasi, mama, lokola moninga, lokola mozalani, mpe lokola mwana ya Nzambe.

Sikoyo lokola alongwe, nazali na esengo ete navandaki penepene na ye ntango nazongaki ndako kowuta na bilo basanza ya nsuka ya bomoi na ye, mpo na kosimba ye na loboko ntango tozalaki kotala nsuka ya miziki oyo ye alingaki—mbala na mbala lisusu mpamba te bokono ya Alzheimer elingaki kotika ye te amikundola ete amonaki yango kaka nsima ya zanga eleki. Makundoli ya mayangani wana ya kafukafu ya kosimba loboko ezali sikoyo ya ntango mingi mpenza mpo na ngai.

Bandeko mibali mpe bandeko basi, palado bozanga te libaku ya kotala na miso ya baye libota na bino na bolingo. Bana mpe baboti, bokamatana na maboko mpe boyebisana bolingo mpe botondi. Lokola ngai, boko na bino bakoki kolamuka mokolo moko mpe komona ete ntango mpo na masolo ya motuya boye eleki. Bozala mokolo na mokolo elongo na botondi, makundoli ya malamu, lisalisi, mpe bolingo mingi.

Na mobu oyo eleki, namanioli mingi makasi koleka nasala mpo na oyo etali mwango ya Tata na Lola. Na koteyaka mwana na ye ya mobali Koriantoni, Alma alobelaki yango lokola “mwango monene ya esengo.”2

Liloba oyo ekobi koya na mayele na ngai ntango namanioli mwango ezali “bosangani.” Ezali mwango moko, asalemi na Tata ya bolingo na Lola, oyo ezali na katikati likoki monene mpe ya nkembo ya bosangani ya libota—ya bosangisi seko mibali mpe basi, baboti mpe bana, nkola na nkola na ndako ya Nzambe.

Likanisi oyo ememi ngai na bolendisi mpe bosolo ete nakozala elongo na Barbara lisusu. Atako anyokwamaki na nsuka ya bomoi na ye, molimo na ye ezalaki makasi, bonkumu, mpe peto. Amilengelaki ye moko na makambo nyonso na ntina ete ntango mokolo ekoya akoka kotelema liboso “na esambiselo ya bosepeli ya Nzambe,”3 atondisama na elikya mpe kimia ya solo. Kasi nazali awa, na mikolo mibala, nakokokisa mibu 91, mpe nazalaki naino komituna, “ezali ngai ya kolengela? Nazali kosala nionso nasengeli kosala mpo na kokoka kosimba lisusu loboko na ye mbala moko lisusu?”

Bosolo ya pete ,ya ebandeli ya bomoi ezali oyo: tokokufa biso banso. Ezala soki tokufi mibange to bilenge, na kimia to na mpasi, na mobembo to na bobola, ya kolingama to yo moko, moko te akokima liwa.

Mwa mibu eleki, Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki likambo moko oyo ezali na ntina mpenza etali yango: “ya sukali kani ezali bosolo, ya bolendisi kani ezali kimia oyo ewutaka na boyebi ete soki tobali malamu mpe tozali malamu, mokangano na biso ekokoba, ata bosolo ya liwa mpe koleka ya ntango.”4

Ya solo na balaki malamu. Na yango ntembe ezali te. Yango eza ya kokoka te, engebene na Mokambi Hinckley. Nasengeli lisusu kozala malamu.5

Lelo, “kozala malamu” ekoki kozala likambo moko ya mobulu, mingimingi soki olekisaka ngonga mingi na bamedia sociaux, wapi mongongo nionso ekoki kosakola bosolo to likambo ya mabe na ntina ya Nzambe mpe mwango na Ye mpo na bana na Ye. Botondi, bandimi ya Eklezia bazali na mabongi ya solo ya seko mpo na koyeba boniboni kozala malamu mpo ete tokoka komilengela malamu mingi ntango tokokufa.

Kaka mwa sanza liboso nabotama, Apostolo nkoko na ngai, Mpaka Melvin J. Ballard, apesaki lisolo oyo, mpo na bato mingi, elimbolaki mozindo ya nini elingi koloba kozala malamu. Na nkombo “Etumba mpo na Molimo,” liloba na ye ekangamaki na etumba ezali kosalema katikati ya nzoto na biso ya mosuni mpe milimo na biso ya seko.

Ye alobaki, “Etumba eleki monene oyo mobali to mwasi nionso asengeli ntango nionso kobunda ... ekozala etumba oyo asengeli kobunda na yemei,” kolimbolaka ete Satana (monguna ya milimo na biso) abundisaka biso na nzela ya “boluli, mposa, koluka lokumu ya mosuni.”6 “Boye etumba ya yambo ezali katikati ya lolenge na biso ya bonzambe mpe ya molimo mpe lolenge na biso ya moto ya mosuni ya mokili.” Bandeko mibali mpe bandeko basi, bomikundola, tokoki kozwa lisungi na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu oyo ekoki “koteya bino makambo nionso.”7 Lisungi ekoki kowuta na nzela ya nguya ya mapamboli ya bonzambe.

Sikoyo natuni, “Boniboni etumba oyo ezali na yo?

Mokambi David O. McKay alobaki: “Ezaleli ya moto na mabele ezali kaka momekano moko ya soki akotia bokasi na ye, mayele na ye, mpe molimo na ye, likolo ya makambo oyo ekosalisa mpo na bolendisi mpe kokumisa lolenge na ye ya nzoto, to soki akokomisa bomoi na ye na ntina mpo na kozwa makoki ya molimo.”8

Etumba oyo katikati ya bozali ya mosuni mpe ya molimo ezali likambo ya sika te. Na lisakola na ye ya nsuka na bato na ye, Mokonzi Benjamin ateyaki ete “moto ya mokili azali moyini ya Nzambe,mpe akozala libela na libela, longola kaka soki amitiki na bobendi ya Molimo Mosantu, mpe abwaki mosika moto ya mokili mpe akomi moko mosantu na nzela ya bomikabi ya Klisto Nkolo.”9

Apostolo Paulo ateyaki ete “bango baoyo bazali nsima ya mosuni bakanisaka makambo ya mosuni; kasi bango baoyo balandaka Molimo, makambo ya Molimo.

“Mpo kozala na makanisi ya mosuni ezali liwa; kasi kozala na makanisi ya molimo ezali bomoi mpe kimia.”10

Emonani polele mpo na ngai ete na makambo eleki motuya tokoki koyekola na bomoi ezali boniboni kobimisa lolenge na biso ya molimo mpe kokamba bamposa na biso ya mabe. Yango esengali te kozala mpasi. Molimo na biso, oyo ezali nzinga nzinga ya makambo koleka nzoto na biso ya bomoto, ezali na nguya kopona bolamu likolo ya mabe na bomoi ya bokonzi ya yambo ya oyo ya kufa. Liboso mabele oyo esalema, tozalaki na mokili ya Baboti na biso ya Lola, oyo balingaki biso mpe bakobi kolinga biso sikawa.

Mpe iyo, tozwaki mpenza mikano mpe boponi ya kobongola bomoi na mokili wana yambo ya kufa. Moto nionso oyo azala to akozala llisusu na mokili oyo azwaki mokano ya kopona kondima mwango ya Tata na Lola mpo na lobiko na biso. Boye biso banso toyei na mabele na likundoli ya nzela endimama ya lolenge ya molimo mpe ya kokoma na nsuka ya seko.

Kanisa yango ngonga moko. Oyo ezali nani ozali mpenza, mpe nani ozalaka ntango nionso: mwana mobali to mwana mwasi ya Nzambe, na misisa ya molimo na boseko mpe lobi oyo etonda meke na makoki ya nsuka te. Ozali—yambo, mpe na nionso, mpe ntango nionso—moto moko ya molimo. Mpe boye ntango moto aponi kotia bomoto na biso ya mosuni liboso ya bomoto na biso ya molimo, tozali kopona likambo moko oyo ezali na bokeseni na bomoto na bisomei ya solo, ya sikisiki, ya ndenge na biso ya bompenza na molimo.

Lisusu, ezali na ntembe ete mosuni mpe bamposa ya mabele ebulunganisaka makanisi ya kozwa mikano. Na elamba ya libungi etiami katikati ya mokili ya molimo yambo ya kufa mpe mokili oyo ya kufa, moto akoki kobungisa bomoni ya mokangano na biso na Nzambe mpe bomoto na biso ya molimo, mpe bomoto na biso ya mosuni ekoki kotia liboso nini tolingi sika-sikoyo. Koyeba kopona makambo ya molimo likolo ya makambo ya mosuni ezali moko ya ntina ya yambo mpo na yango makambo ya mabele ezali mwango ya Tata ya Lola. Ezali lisusu ntina nini mwango etongami likolo ya likonzi ya makasi, ya sikisiki ya Bomikabi ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpo ete masumu na biso, lokola mabunga tosalaka ntango toyekami na mosungi, ekoki kolongama na nzela ya boyamboli ya mbala nionso mpe tokoki kozala ya kokangama na molimo. Sikoyo ezali ntango mpo na kokamba bamposa ya nzoto na biso mpo na kotosa malongi ya molimo ya Klisto. Yango ezali ntina nini tosengeli kozelisa te mokolo ya boyamboli na biso.11

Yango wana, boyamboli, ekomi monduki esengelami mpenza na etumba na biso likolo na bisomei. Kaka likita linene eleki, Mokambi Russell M. Nelson alobelaki etumba oyo mpe akundolisaki biso ete “ntango toponi koyambola, toponi kobongwana! Topesi nzela na Mobikisi mpo na kobongola biso na lolenge ya malamu mingi ya bisomei. Toponi kokola na molimo mpe kozwa esengo—esengo ya bosikoli na Ye. Ntango toponi koyambola, toponi kokoma mingi lokola Yesu Klisto!”12

Butu nionso, ntango natalelaka mokolo na ngai na losambo na Tata na ngai na Lola, nasengaka kolimbisama soki nasalaki likambo ya mabe mpe nalakaka komeka kozala malamu mingi koleka lobi. Nandimi ete boyamboli oyo ya mokolo na mokolo mbala na mbala esungaka molimo na ngai kokanisa nzoto na ngai oyo endimi mokumba na ngai.

Makoki mosusu ezali libaku ya poso na poso oyo tozali na yango banso ya kolamuka bisomei na molimo na koliaka elambo na komikundolaka Bomikabi mpe bolingo ebonga nie ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Bandeko basi mpe mibali, nalendisi bino bokitisa na mwa nse mpe kokanisa na ntina esika bozali sikawa na komokitisaka lolenge na bino mpe kopesa nguya na bonzambe na bino, na lolenge ya molimùo na ntina ete ntango ntango ekoya, bokoka koleka na mokili ya molimo na esengo ya bosangani elongo na balingami—mpo na yango natatoli mpe nasambeloi na motema ya komikitisa na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa