2010–2019
Basi ya Boyokani Kosalaka elongo na Nzambe
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Basi ya Boyokani Kosalaka elongo na Nzambe

Kokomaka basi ya boyokani kosalaka elongo na Nzambe elakisaka lolenge bana basi minene mpe malamu ya Nzambe babotaka, bakambaka, mpe basalisaka.

Nazali na botondi mpo na lipamboli ya kolobela bino, bana basi ya boyokani na Nzambe. Na mpokwa ya lelo, ntina na ngai ezali ya kolendisa bino kati na mosala monene na yango bobiangami. Iyo, mwana mwasi nyonso ya Nzambe oyo azali koyoka mongongo na ngai ayambi libiangi ya Nkolo Yesu Klisto.

Libiangi na yo ebandaki ntango otiamaki na kufa, na esika mpe ngonga eponama mpo na yo na Nzambe oyo ayebi yo malamu mpe alingi yo lokola mwana na ye ya mwasi. Na mokili ya molimo, Ayebaki yo mpe ateyaki yo mpe atiaki yo esika wapi okozalla na libaku, oyo ezali mingi te na lisolo ya mokili, ya kobengisama kati na liziba ya libatisi. Kuna, okoyoka maloba oyo kolobama na basali abiangama ya Yesu Klisto: “Lokola epesameli ngai likoki na Yesu Klisto, nazali kobatisa yo na nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu. Amene.”1

Ntango obimaki libanda ya mai, ondimaka libiangi mosusu ya kosalela Nzambe. Lokola mwana mwasi ya liyokani ya sika ya Nzambe, osalaki elaka mpe ozwaki lotomo kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, na ntina ya yango odimamaki mondimi. Oyokanaki elongo na Nzambe mpo na kozwa likolo na yomei nkombo ya Yesu Klisto, kobatela mibeko na Ye, mpe kosalela Ye.

Mpo na moko na moko oyo asali mayokani oyo, mosala oyo Nkolo abengeli ye kosala ekobongela malamu moto wana. Nzokande, bana basi mpe bana mibali ya liyokani ya Nzambe, banso bakabolaka libiangi moko ya motuya mpe ya esengo. Ezali kosunga basusu mpo na Ye.

Kolobelaka bandeko basi, Mokambi Russell M. Nelson alobaki maloba na mokuse ya kafukafu ya libiangi ya Nkolo epai na yo osangana elongo na Ye kati na mosala na Ye. Mokambi Nelson alimbolaki libiangi na yo na lolenge oyo: “Nkolo alobaki, ‘Mosala na ngai mpe nkembo na ngai [ezali] kosala bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.’ (Moses 1:39.) Yango wana bayekoli ya bana basi bamipesa ya Ye bakoki solo koloba, ‘Mosala n angai mpe nkembo na ngai ezali kosunga bamoko na ngai ya bolingo bakokisa ntina ya lola wana.’

“Mpo na kosunga moto na bomoi mosusu akokisa likoki ya selestiale ya yemei ezali eteni ya misio ya bonzambe ya mwasi. Lokola mama, moteyi, to Mosantu moleisi, asalaka potopoto na bomoi ekoma na lolenge ya bilikya na ye. Na kosalaka elongo na Nzambe, misio na ye ya bonzambe ezali kosunga milimo kobika mpe baame etombwama. Oyo ezali emekoli ya ekelamu na ye Ezali kopesa lokumu, kotonga, mpe konetola.”2

Okoki te koyeba ntango nini, to mpo na molai ngonga boni, misio na yo moko ekoyekama likolo ya mosala kati ya mabiangi lokola mama, mokambi,to ndeko mwasi ya kosalisa. Nkolo, mpo na bolingo na ye, atikelaka biso boponi ya kotia ntango, molai, to bitape ya balotomo na biso te. Kasi boyebi uta na makomi mpe baprofeta na bomoi ete balotomo nyonso wana ekoya, soki kati na bomoi oyo to kati ya oyo ekoya, epai ya mwana mwasi nyonso ya Nzambe. Mpe nyonso na yango ezali bomilengeli mpo na bomoi ya seko kati na mabota ya bolingo—3likabo monene koleka makabo nyonso ya Nzambe.”3

Okozala na bwania ya kosala bokasi nyonso mpo na kolengela sikawa na nsuka kati na makanisi. Mosala wana ekomisami pete koleka mpo moko na moko ya balotomo esengaka mingi ya bolengeli kaka wana.

Tika tobanda elongo na na lotomo ya kozala ndeko mwasi ya kosalisa. Atako ozali na lotomo wana lokola mwana mwasi ya mibu 10 kati na libota wapi tata akufa, to lokola mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi oyo engumba ezwaki moto kala te, to ntango ozali na lopitalo kobikaka utana lopaso—ozali na litomba ya kokokisa libiangi na yo ewuti na Nkolo ya kozala mwana mwasi na ye ya kosalisa.

Maye mamonani kozala ya kokesana mpenza na balotomo ya kosalisa. Kasi manso masengaka bolengeli ya motema moko ya nguya, ya bolingo, bondimi ezanga bobangi ete Nkolo apesaka mitindo moko te soki ye alengeli nzela te, mpe mposa ya kokende mpe kosala mpo na Ye.3

Lokola amilengelaki, mwana mwasi ya mibu zomi atie maboko na ye nzinganzinga ya mama na ye mokufeli mobali mpe asambeli mpo na koyeba lolenge nini akosungela libota na ye. Mpe akobi kosala yango.

Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi balengelamakampo na kosalisa liboso ya moto ekanamaka te kati na etuka na ye. Ayekolaka koyeba mpe kolinga bato. Bondimi na ye kati na Yesu Klisto ekolaka na mibu uta na kozwaka biyano na nsambo na ye mpo na Nkolo mpo nakosunga ye na misala mike mpo na Ye. Mpo na bomilengeli na ye ya molai, abelemaka mpe na mposa ya kobongisa bandeko na ye basi kosalisa bato mpe mabota na likama.

Ndeko mwasi oyo akomaki koyoka malamu kati na lopitalo nsima ya lopaso alengelamaki mpo na kosalisa baninga na ye bakoni. Alekisaka bomoi moko ya kosalisa mpo na Nkolo epai ya mopaya nyonso lokola soki ye azalaki mozalani ya penepene mpe moninga. Ntango ayokaki kati na motema na ye libiangi ya kosalisa kati na lopitali, asalisaki basusu na kielombe mpe na bolingo mpenza ete bakoni mosusu babandaki kolikia akobika noki mpenza te.

Na lolenge moko oyo omilengelaka mpo na kosalisa, okoki mpe osengeli komilengela mpo na libiangi na yo kozala mokambi moko mpo na Nkolo ntango ekoya. Ekosenga bondimi na Yesu Klisto ya kofandisama na bolingo na yo ya mozindo ya makomi mpo na kokamba bato mpe mpo na koteya liloba na Ye na bobangi te. Nsima okolengelama mpo na kozala na Molimo Mosantu lokola moninga na yo ya ntango nyonso. Okozala motema moto mpo na koloba, “nakoteya,” ntango mopesi toli na yo na bokambi ya Bilenge Basi alobi, na bobangi na mongongo na ye, “Ndeko mwasi Alvarez abeli lelo. Nani akoteya kelasi na ye?”

Ezwaka mingi bolengeli kaka wana mpo na mokolo ya kafukafu ntango Nkolo abiangi yo mpo nalotomo lokola mamar. Kasi ekozwa lisusu kutu motema moko ya bolingo koleka oyo oyo ozalaki na yango bonsenga liboso. Ekozwa bondimi kati na Yesu Klisto lokolo ya oyo ezala naino te kati na motema na yo. Mpe ekozwa likoki moko ya kosambela mpo na botindiki, boyangeli, mpe bolendisi ya Molimo Mosantu likolo oyo okokaki koyoka ekokaki kosalama.

Okoki na mayele kotuna lolenge nini moto na mobu kani akoki koyeba maye bamama basengaka. Ezali motuna ya motuya. Mibali bakoki makambo nyonso te, kasi tokoki koyekola mateya na nzela ya emoniseli uta na Nzambe. Mpe tokoki lisusu koyekola mingi na nzela ya botali, ntango tozwi libaku ya koluka Molimo mpo na kosunga biso tososola maye tozali kotala.

Nazalaki kotala Kathleen Johnson Eyring mibu 57 uta tobalana. Azali mamaya bana mibali minei mpe bana basi mibale. Lelo, andimi libiangi ya kozala na botindiki ya bomama likolo ya mingi koleka baye libota na ye mokama mpe bamokama mosusu oyo abokoli kati na motema na ye ya bomama.

Bomikundola bolimboli malamu ya Mokambi Nelson ya misio ya bonzambe ya mwasi—kobakisaka misio ya bomama: “Lokola maman moteyi, to mosantu moleisi, asalaka potopoto na bomoi ekoma na lolenge ya bilikya na ye. Na kimoninga elongo na Nzambe, misio na ye ya bonzambe ezali kosunga milimo kobika mpe baame kotombwama. Oyo ezali emekoli ya bokeli na ye.”5

Lokolo mpe nakoki kososola na pene, mwasi na ngai, Kathleen, alandi mokumba wana, epesameli bana basi ya Tata. Fungola emonani na ngai kozala maloba “asalaka potopoto na bomoi ekoma na lolenge ya bilikya na ye …kosalaka elongo na Nzambe.” Asalaki yango na makasi te. Asalaki. Mpe azalaki na ndakisa mpo na baelikia na ye mpe epai na oyo amekaki kosala na baye alingaki mpe alakisaki kibomama. Ndakisa na ye ezalaki nsango malamu ya Yesu Klisto—lokola nakoki komona na nzela ya botali na losambo mibu mileki.

Kokomaka basi ya boyokani kosalaka elongo na Nzambe elakisaka lolenge bana basi na Nzambe minene mpe malamu baboti, bakambi, mpe basalisi, kosalelaka Nzambe ntango nyonso na lolenge mpe esika nyonso kani Ye alengeli mpo na bango. Nalaki ete okomona esengo na mobembo na yo ya kozonga na ndako na yo ya lola ntango ozali kozonga epai na Ye lokola mwana mwasi mobateli liyokani ya Nzambe.

Natatoli ete Nzambe Tata azali na bomoi mpe Ye alingi bino. Yeakoyanola bansambo na yo. Mwana na Ye wa bolingo akambaka na makambo nyonso, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Mokambi Russell M. Nelson azali profeta na bomoi. Mpe Joseph Smith amonaki mpe alobaki na Nzambe mpe Yesu Klisto na zamba ya banzete na Palmyra, New York. Nayebi wana ezali ya solo. Natatoli lisusu ete Yesu Klisto azali Mobikisi na bino; Ye alingi bino. Mpe na nzela ya Bomikabi ba Ye, bokoki kopetuama mpe kotombuama na likolo mpe mabiangi ya bule oyo ekoya epai na bino. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa