2010–2019
Koyeba, Kolinga, mpe Kokola
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Koyeba, Kolinga, mpe Kokola

Ekoka biso kososola eteni na biso na mosala oyo ya monene ya kosalisa mpo ete tokoma mingi lokola Ye.

Na 2016 Bayembi ya Tabelenakele na Temple Square bayaki kotala Pays-Bas mpe Belgique. Mpe uta wana namipesaki na likambo wana ya esengo, nazalaka na libaku ya kosepela na mosala na bango mbala mibale.

Elilingi
Mobeti ya ngongingo

Na ntango ya lisano na bango nazalaki kokanisa na ntina ya mosala monene oyo yango ezali ya kotambwisa bayembi ebele boye. Makanisi na ngai ekendaki epai ya ngongingo monene, oyo ezalaki mpasi mpe mbala mosusu ntalo mingi ya komema yango na komekaka na lindanda, kelelo, to bisalelo mosusu oyo okoki komema n apete na nse ya liboko na yo. Kasi na kotalaka mosala ya solo ya ngongingo oyo,nasosolaki ete ezalaki kobetama bobele bambala moke, kasi bisalelo mosusu ya moke ezalaki kosalema mingi na conser yango. Nakanisaki ete soki makelele ya ngongingo yango lisano elingaki kokakana te mpe boye bokasi esengelaki kosalama mpo na komema ngongingo oyo nzela nyonso kokatisaka mai ya mongwa.

Elilingi
Mobeti ya ngongingo na lingomba ya miziki

Ntango mosusu tokoki koyoka ete tozali, lokola ngongingo, bobele ya malamu ya kokoka mpo na kobeta mwa eteni na lisano yango. Kasi tika nayebisa yo ete makelele na bino ezali kosala bokeseni nyonso.

Tosengeli bisalelo nyonso. Basusu kati na biso bayekolaka na pete mpe basalaka malamu na eteyelo, ntango basusu bazalaka na makoki ya ntoki. Basusu bayemaka mpe batongaka biloko to basalisaka,babatelaka, to bateyaka basusu. Tosengeli banso komema langi mpe ndimbola na mokili oyo.

Na baoyo bamiyokaka ete bazali na eloko ya kopesa lokola likabo te to bakanisaka ete bazali na ntina to likama moko te epai ya moto soki nani, na basusu oyo bakoki komiyoka ete bazali likolo ya mokili, mpe moto moko te na kati na bango, nalingi kolobela nsango oyo.

Bisika nyonso ozali na nzela ya bomoi na yo, basusu kati na bino bakoki komiyoka ya kotondisama na mokumba ete bozali komiyoka ntina te na nzela wana. Nabengisi bino mpo na kobima libanda ya molili na pole. Pole ya nsango malamu ekopesa molunge mpe liboiki mpe ekosunga bion kososola nani baozali mpenza mpe nini ntina ya bomoi na bino ezali.

Basusu kati na biso bazalaki kowayawaya na banzela epekisama, mpo na komeka komona esengo kuna.

Tobiangami na Tata na Lola wa bolingo mpo na kotambola na nzela ya kimoyekoli mpe kozonga epai na Ye. Ye alingaka biso na bolingo ebonga mpenza.1

Nzela ezali nini? Nzela ezali kosungana kososola nani tozali na kosalisaka moko na mosusu.

Mpo na ngai, kosalisa ezali kosalela bolingo ya Nzambe.2 Na lolenge wana tokokelaka nzinganzinga moko wapi banso mibale mopesi mpe mozwi ya likaboazwi mposa ya koyambola. Na maloba mosusu, tobongolaka nzela mpe tokomaka pembeni koleka mpe kokoma mingi lokola Mobikisi, Yesu Klisto.

Ndakisa, ezali na bosenga moko te ya kolobela mbala na mbala molongani to bana na biso ntango nyonso wapi bakoki kobongisa; basilaki koyebia yango. Ezali na kokelaka esika oyo ya bolingo ete bakotondviselama na nguya ya kosala bambongwana esengeli na bomoi na bango mpe bakoma bato malamu koleka.

Na lolenge oyo boyamboli ekomi likambo ya kopetolama oyo ekoki kosangisa kolimbisaka bizalela ya mabe. Namikundoli mpe nakutani na makambo wapi na nazali mbangu mpo nakosambisa to nazali malembe mpo na koyoka. Mpe na nsuka ya mokolo, na ntango ya losambo, na ngai moko nayokaki toli ya bolingo uta na lola ya koyambola mpe kokoma malamu koleka. Esika ya kofanda ya bolingo ekelamaki yambo na ya ngai baboti, ndeko ya mobali, mpe bandeko ya basi mpe nsima na ya ngai mwasi, bana, lokola mpe baninga esungaki ngai kokoma moto malamu koleka.

Toyebi banso wapi tokoki kosala malamu koleka. Ezali na bonsenga moko te kokundola mbala na mbala moko na mosusu, kasi ezali na bonsenga ya kolingana mpe kosalisana mpe, na kosalaka bongo kozwa esika ya bolingi ya kobongwana.

Na nzinganzinga kaka oyo tozali koyekola nani tozali solo mpe nini mosala na biso ekozala na mokapo ya nsuka ya lisolo ya mokili liboso ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi.

Soki ozali komituna na ntina ya eteni na yo, nakolinga kobengisa yo omona esika wapi okoki kozala yo moko mpe kosenga Tata na Lola alakisa yo eteni nini okobeta . Eyano ekoki koya mokemoke na polele mingi tango totie makolo na biso na sikisiki likolo ya nzela ya liyokani mpe kosalisa.

Tozali kokutana na mwa bakpokoso kaka wana oyo Joseph Smith akutanaki na yango ntango azalaki “na kati ya etumba [moko]ya maloba mpe makelele ya makanisi ya bato.” Ntango tozali kotanga lisolo na yemei, mbala mingi amilobelaki: “Nini nasengeli kosala? Nani kati ya mangomba maye manso azali solo; to, ezali bango banso se na ntango moko kati na libunga? Soki moko kati na bango azali solo, ezali nani mpe nakoyeba yango lolenge boni?”3

Na boyebi oyo amonaki na Mokanda ya Yakobo, oyo elobaki ete “Soko moko na bino azangi mayele, asenga Nzambe oyo apesaka na bato nyonso na motema malamu, oyo mpe akopamelaka te; bongo ekopesamela ye.”4Joseph na nsuka azwaki mokano ya “kosenga Nzambe.’”5

Totangi lisusu ete ezalaki mbala ya liboso na bomoi na [ye] amekaki eloko ya boye, mpo na kati ya nsomo na [ye] nionso [ye] amekaki mokolo moko te kosambela na mongongo makasi.”6

Mpe boye ekoki kozala mpo na biso mbala mpenza ya yambo tosololi na Mokeli na biso na lolenge moko tosala mokolo moko te liboso.

Mpo na komeka ya Joseph, Tata na Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, babimelaki ye, kobengaka ye na nkombo na ye, mpe lokola mbano tozali na boyebi ya polele koleka mpenza ya nani tozali mpe ete tozali motuya mpenza.

Totangi lisusu ete na mibu ya kibolenge na ye ya ebandeli Joseph aniokwamaki na baoyo basengelaki kozala baninga na ye mpe oyo bakokaki kosalela ye boboto.”7 Mpe yango wana tokoki kondima mwa botelemeli ntango tozali kobika bomoi ya moyekoli.

Soki ozali komiyoka sikawa ete ozali na makoki ya kozala eteni ya babeti miziki mpe nzela ya boyamboli ezali komonana kpokoso epai na yo, nasengi oyeba ete soki tokangami na yango, mokumba ekolongolama na mapeka na biso mpe pole mosusu ekozala . Tata na Lola akotika biso te ntango toluki Ye. Tokoki kokweya mpe kotelema, mpe akosunga biso kolongola mbindo na mabolongo na biso.

Basusu kati na biso bazokisami, kasi ebombelo ya lisungi ya yambo ya Nkolo ezali na babandes ya kokangisa mpota minene ete ekoka mpo na kobomba bampota nyonso.

Boye ezali bolingo wana, bolingo ya kotatabana te, oyo tobengaka lisusu bolingani to bolingo ya mpeto ya Klisto,8oyo esengelami na bandako na biso bisika wapi baboti basalisaka bana na bango mpe bana bapoti na bango. Na nzela ya bolingo wana, mitema ekobongwama mpe mposa ebotami ekosala bolingi na Ye.

Ezali bolingo wana nde esengelami na misala na biso mpo na moko na basusu lokola bana ya Tata na Lola mpe bandimi ya Eklezia na Ye oyo ekoekopesa biso makoki ya kosangisa bisalelo nyonso ya miziki na lingomba ya babeti miziki na biso boye tokozala na makoki ya kobeta na nkembo na bayembi ya anjelu ya lola ntango Mobikisi akoya lisusu.

Ezali bolingo wana, pole wana oyo esengeli kongenga mpe kongengisa banzinganzinga na biso ntango tozali na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Bato bakomona pole yango mpe bakopusana pene na yango. Lolenge wana ya mosala ya misionele oyo ekobenda basusu na “koya mpe komona, koya mpe kosalisa, koya mpe kotikala.9 Palado, ntango bozwi litatoli etali mosala oyo monene mpe eteni na biso na kati na yango, tosepela elongo na Prophet Joseph Smith, oyo asakolaki, “Mpo nazwaki limoni; nayebaki yango, mpe nayebaki ete Nzambe ayebaki yango, mpe nakokaki te kowangana yango.”10

Natatoli na bino ete nayebi nani nazali, mpe nayebi mpenza nani ozali. Tozali banso bana ya Tata moko ya Lola oyo alingaka biso. Mpe Ye atindaki biso mpenza te awa mpo na kokakema kasi mpo na kozonga na nkembo epai na ye. Ete tokoka banso kososola eteni na biso kati na mosala monene ya kosalisa mpo ete tokokoma mingi lokola Ye ntango Akoya lisusu ezali na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa