2010–2019
Nguya ya Kolonga Monguna
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Nguya ya Kolonga Monguna

Lolenge nini tokozwa kimia, tomikondola nani biso tozali, mpe tolonga ba K misato ya monguna?

Bandeko mibali mpe basi, napesi bino matondi mpo na nyonso bozali kosala mpo na kokoma, mpe mpo na kosunga basusu bakoma, balandi ya solo ya Yesu Klisto mpe kosepela na mapamboli ya tempelo esantu. Natondi bino mpo na bolamu na bino. Bozali kafukafu; bozali kitoko.

Ezali losambo na ngai ete biso tokoyeba nguya ya kondimisa ya Molimo Mosantu ntango toyaka kososola na mobimba ete tozali bana ya Nzambe. “Libota: Esakola na Mokili” elobi: “Bato banso bazali—mibali mpe basi—bakelami na elili ya Nzambe. Moto nyonso azali mwana mobali to mwana mwasi ya molimo ya baboti ya lola, mpe, lokola bongo, moto nyonso azali na lolenge mpe nsuka moko ya bozambe.”1 Tozali “milimo eponama oyo ebongisama mpo na kobima na litondi ya ntango kozala kati na baoyo bakotia miboko na mosala monene ya mokolo ya nsuka.”2 Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Bino boyekolaki na mokili ya molimo mpo na kolengela biso mpo na eloko nyonso mpe makambo nyonso oyo bino bokoki kokutana na yango katikati na eteni ya nsuka ya mikolo oyo ya nsuka (tala D&A 138:56). Liteya wana ezali kokoba kosala kati na bino!”3

Bozali bana mibali mpe basi baponani na Nzambe. Bozali na nguya ya kolonga monguna. Nzokande, Monguna azali na boyebi ya nani bino bozali. Ayebi libula na bino ya bonzambe mpe azali koluka kotia ndelo na makoki na bino na mabele mpe na lola na kosalelaka baK misato:

  • Kokosa

  • Kotambwisa makanisi

  • Kolembisa nzoto

Kokosa

Monguna asaleki esalelo oyo kokosa na mikolo ya Mose. Nkolo asakolaki na Mose:

“Tala, ozali mwana na ngai. …

“Nazali na mosala moko mpo na yo, … mpe ozali na elilingi ya Mwana Mobali se Moko ya ngai.”4

Kala mingi te nsima na limoni ya nkembo oyo, Satana amekaki kokosa Mose. Maloba ye asalelaki ezalaki na ntina mpenza: “Mose, mwana ya moto, kumbamela ngai.”5 Lokuta ezalaki kaka te na libiangi ya kokumbamela Satan kasi lisusu na lolenge alimbolaki Mose lokola mwana na moto. Mikundola, Nkolo alobelaki Mose sasaipi ete azalaki mwana moko ya Nzambe, akelamaki na elilingi ya Mwana Mobali se Moko.

Monguna azalaki na bozangi mawa na babomeki na ye ya kokosa Mose, kasi Mose atelemelaki ye, kolobaka, “Kende mosika na ngai, Satana, mpo na Nzambe kaka moko ngai nakokumbamela, oyo azali Nzambe na nkembo.”6 Mose amikundolaki nani ye azalaki—mwana ya Nzambe.

Maloba ya Nkolo epai na Mose ezali mpo na bino mpe ngai. Tokelamaki na elilingi ya Nzambe ye moko, mpe Ye azali na mosala moko mpo na biso kosala. Monguna azali komeka kokosa na kosalaka ete biso tobosana nani tozali mpenza. Soki biso tososoli te nani tozali, boye ezali mpasi ya kososola nani tokoki kokoma.

Kotambwisa makanisi

Monguna lisusu ameki kotambwisa biso makanisi mosika wuta na Klisto mpe na nzela ya liyokani na Ye. Mpaka Ronald A. Rasband akabolaki oyo elandi: “Mwango ya monguna ezali kotambwisa biso makanisi wuta na banzeneneke ya molimo, kasi mposa ya Nkolo ezali ya kongengisa mpe kokotisa biso na mosala na Ye.”7

Na mikolo na biso, biloko ezali mingi ya kotambwisa makanisi, totangi Twitter, Facebook, masano ya etando moke, mpe mingi koleka. Batekinolozi oyo ya makasi ezali kokamwisa, kasi soki tokebi te, ekoki kotambwisa makanisi na biso wuta na kokokisa makoki na biso ya bonzambe. Kosaleka yango na lolenge malamu ekoki kobimisa nguya ya lola mpe kopesa biso nzela ya kotatola bikamwa awa tozali koluka kosangisa libota ya Yisalaele na bangambo nyonso mibale ya elamba.

Tika biso tozala mayele mpe lokola bato nyonso te na bosaleli na biso ya tekinolozi.8 Kokobaka koluka banzela oyo tekinolozi yango ekoki komema biso pembeni ya Mobikisi mpe kopesa biso nzela ya kokokisa mosala na Ye ntango tozali komilengela mpo na Bozongi na Ye ya Mibale.

Kolembisa nzoto

Na nsuka, monguna alingi biso tolemba nzoto. Tokoki kolemba nzoto ntango tozali kokokanisa biso moko na basusu to toyokaka ete tozali kobika lokola esengelaki te, kotangaka mpe biso moko.

Ntango nabandaki manaka ya koyekola mpo na doctorat, nayokaki nzoto kolemba . Manaka oyo endimaki kaka bayekoli minei na mobu yango, mpe bayekoli mosusu bazalaki mayele mingi mpenza. Bango bazalaki na bilembo ya mimekano likolo koleka mpe mayele ebele lokola banganga na mosala ya kokamba, mpe batiaki elikya ya na makoki na bango. Nsima ya mposo na ngai ya mibale ya yambo na manaka, mayokii ya bolembi nzoto mpe tembe ebandaki kosimba ngai, penepene ya kozinga ngai mobimba.

Nazwaki mokano ete soki nakokaki kosilisa manaka na ngai ya koyekola ya mibu-minei oyo, nalingaki kosilisa kotanga Buku Ya Mormon na eleko moko moko ya sanza motoba. Mokolo na mokolo ntango nazalaki kotanga, nasosolaki lisakola ya Mobikisi ete Molimo Mosantu ekokaki koteya ngai makambo nyonso mpe kokundolisa ngai makambo nyonso.9 Yango elakisaki lisusu nani nazali lokola mwana ya Nzambe, ekundolisaki ngai komikokanisa te ngai moko na basusu, mpe epesaki ngai elikya na mosala na ngai ya bonzambe ya kolonga.10

Baninga na ngai ba bolingo, nasengi botika moto moko te ayiba esengo na bino. bomikokanisa bino moko na basusu te. Nasengi tokundola maloba ya bolingo ya Mobikisi: “Kimia Ngai natiki na bino, ya ngai kimia natikeli bino: te lokola mokili epesaka, kimia na ngai napesi epai na bino. Tika ete mitema na bino mitungisama te, mpe yango ebanga te.”11

Yango wana lolenge nini tokosala yango? Lolenge nini tokozwa kimia yango, tomikondola nani biso tozali, mpe tolonga ba K misato ya monguna?

Yambo, mikundola ete mobeko ya yambo mpe ya monene ezali kolinga Nzambe na motema, nguya, makanisi, mpe makasi na biso.12 Nyonso oyo biso tozali kosala esengeli kozala kotindama na bolingo na biso mpo na Ye mpe mpo na Mwana na Ye. Ntango tokolisi bolingo na biso mpo na Bango na kobombaka mitindo na bango, makoki na biso ya komilinga biso moko mpe kolinga basusu ekokola. Tokobanda kosalela libota, baninga, mpe bato ya pembeni mpo ete tokomona bango lokola Mobikisi amoni bango—lokola bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.13

Ya mibale, kobondela Tata na nkombo ya Yesu Klisto mokolo na mokolo, mokolo na mokolo, mokolo na mokolo.14 Ezali na nzela ya losambo nde biso tokoki koyoka bolingo ya Nzambe mpe kolakisa bolingo na biso mpo na Ye. Na nzela ya losambo tolakisi botondi mpe tosengi makasi mpe mpiko ya kopesa bolingi na biso na ya Nzambe mpe tokambama mpe totambwisama na makambo nyonso.

Nalendisi bino “bosambela Tata na nguya nyonso ya motema, ete bino botondisama na bolingo na ye, … ete bino bokoka kokoma bana mibali [mpe bana basi] ya Nzambe; ete ntango ye akomonana biso tokoka kozala lokola ye.”15

Ya misato, botanga mpe boyekola Buku ya Mormon mokolo na mokolo, mokolo na mokolo, mokolo na mokolo.16 Boyekoli na ngai ya Buku ya Mormon emonanaka kokende malamu koleka ntango natangaka na motuna moko na makanisi. Ntango totangi na motuna moko, tokoki koyamba limonisi mpe koyeba ete Profeta Joseph Smith alobaki bosolo ntango asakolaki, “Buku ya Mormon [ezali] moko ya sembo koleka babuku nyonso ya mokili, … mpe mobali moko [to mwasi moko akokoka] kobelema pembeni ya Nzambe na nzela ya kokangama na misise na yango, koleka buku nyonso mosusu.”17 Buku ya Mormon etondi na maloba ya Klisto mpe ezali kosunga biso kominkundola nani tozali.

Na nsuka, bokabola na nzela ya losambo elambo mposo nyonso, mposo nyonso, mposo nyonso. Ezali na nzela ya makuli ya bonganganganzambe, kotanga mpe elambo, nde nguya ya bonzambe ekomonisama na bomoi na biso.18 Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Makuli ya elambo ezali mbela moko ya molimo mpe ya kobandela koyambola na bosolo mpe kokoma bato ya sika na molimo. Elembo ya kokabolaka elambo, na yango moko, elongolaka masumu te. Kasi soki tomilengeli na makanisi na biso mobimba mpe tosangani na makuli oyo ya bule elongo na motema ebukani mpe molimo etutami, boye elaka ezali ete tokoki ntango nyonso kozwa Molimo na Nkolo kozala elongo na biso.”19

Ntango tokabolakai elambo na komikitisa, tomikundolaka moniokoli ya Klisto na elanga ya bule ebengami Gethsemane mpe mbeka na Ye na ekulusu. Tolakisaka botondi na Tata mpo na kotindaka Mwana na Ye se Moko ya Mobali, Mosikoli na biso, mpe tolakisaka bolingi na biso ya kobomba mitindo na Ye mpe ntango nyonso komikundola Ye.20 Ezali na pole moko ya molimo esangani na elambo—ezali ya moto se ye moko, ezali na nguya, mpe esengelami.

Baninga na ngai, nalaki ete soki tosali na makasi kolinga Nzambe na mitema na biso mobimba, tosambeli na nkombo ya Yesu Klisto, toyekoli Buku ya Mormon, mpe na losambo nyonso tokaboli na elambo, tokozwa makoki, na makasi ya Nkolo, ya kolonga misala ya lokuta ya monguna, kokitisa botambwisi makanisi oyo etie ndelo na makoki na biso ya bonzambe, mpe kotelemela bolembi nzoto oyo ekitisi makoki na biso ya koyoka bolingo ya Tatat ya Lola mpe Mwana na Ye. Biso tokoya na mobimba kososola nani biso tozali lokola bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.

Bandeko mibali mpe basi, nazali kokabola na bino bolingo na ngai mpe nasakoleli bino litatoli na ngai ete nayebi Tata ya Lola azali na bomoi mpe Yesu azali Klisto. Nalingaka Bango. Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka ezali bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele. Tozali na elaka ya bonzambe kosangisa Yisalaele mpe kolengela mokili mpo na Bozongi ya Mibale ya Mesiya. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa