Tozali Biso Nionso Basengi Te?
Moto na bozui to mobola, tosengeli “kosala oyo tokoki kosala” ntango basusu bazali na bosenga.
Eloko nini ya sika ya kitoko mpenza etiamaki kati ya lolenge ya likita linene na biso. Bien hecho, Eduardo.
Na oyo esengelaki kozala na ebandela ya mosala na Ye ya sika, Yesu atelemaki na ndako na Ye ya synagogue na Nazareth mpe atangi maloba oyo esakolamaki na Yisaya mpe ekomamaki na Nsango malamu ya Luka: “Molimo ya Nkolo ezali likolo na ngai, mpo aponi ngai nasakola Sango Malamu na babola; atindi ngai nayebisa bakangami ete bakokangolama, mpe na bato bakufa miso ete bakomona lisusu; mpo na kokangola bato oyo bazali konyokwama.”1
Na yango Mobikisi alobaki maloba ya yambo na bato na ntina ya mosala na Ye ya kimesiya. Kasi mokapo oyo lisusu elobeli malamu ete na nzela ya bomikabi na Ye ya libonza ya nsuka mpe Lisekwa, mosala ya Yesu ya yambo mpe ya monene ya kimesiya esengelaki kozala kopambola babola, mpe lisusu babola na molimo.
Uta na ebandeli ya mosala ya Ye, Yesu alingaki babola mpe bato mpamba na lolenge moko ya kokamwa. Abotamaki na kati ya libota ya babale na bango mpe akolaki kati ya mingi na bango. Toyebi te mobimba ya bomoi na Ye awa na nse, kasi Alobaki mokolo moko, “Banyama ya zamba bazali na mabulu na bango, kasi Mwana ya moto azali na esika oyo akoki kopemisa moto te.”2 Emonani lokola Mokeli ya likolo mpe nse “mpe biloko nionso ekelami na bango”3 azalaki, pene na bomoi na Ye ya mokolo, azanga ndako.
Soki tozongi na lisitwale tokomona ete, bobola ezalaki moko ya mikakatano monene mingi mpe epanzana mingi ya bato. Bosolo ya motango nango ezali mbala mingi ya nzoto, kasi bobebisi ya molimo mpe ya liyoki oyo ekoki komema ekoki kutu kozala ya kobebisa koleka. Na likambo kani, Mosikoli monene asali libiangi moko te makasi koleka mpo na biso tosangana na Ye na kotombolaka mokumba oyo uta na bato. Lokola Yowa, Alobaki Akosambisa ndako ya Yisalaele makasi mpo ete “bobebisami ya [bato na bosenga] ezali kati ya bandako na bino.”
“Olingi koloba nini,” Agangaki, “bobeti bato na ngai mpe bonyati bilongi na babola?”4
Mokomi ya Masese asalaki likambo emanyolama malamu: “Konyokola mobola ekosilikisa Motongi na ye,” mpe “ye oyo akokanga matoi na ye wana mobola akolela, akolela [lisusu] ye moko, nde akoyokama te.”5
Na mikolo na biso, Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto naino emonaka mokolo ya mbotama na yango ya yambo te ntango Nkolo atindaki bandimi ko “tala babola mpe bato na bosenga, mpe kosalisa na lisungi na bango na ntina ete banyokwama lisusu te.” 6 Tala likambo ya ntina ya eteni oyo—“ba ko nyokwama lisusu te.” Wana ezali lokota ya Nzambe alobi ntango Alobeli lisalisi.
Epesamaki na mikakatano mpenza ya kolobela mabe na mokili, nini esengeli mobali to mwasi kosala? Molakisi Yemei apesaki eyano. Ntango, ya boteki na ye ya yambo mpe Bobaki na ekulusu, Maria apakolaki mafuta na moto ya Yesu na bopakoli mafuta ya matanga ya motuya, Yuda atelemelaki bobebisi oyo mpe “alobaki nsense mpo na ye.”7
Yesu alobaki:
“Mpo na nini ozali kotungisa ye? Asali likambo malamu mpo na ngai. …
“Asali oyo ye akoki.”8
“Asali oyo ye akoki”! Maloba moke nini! Mopanzi nsango moko atunaki Mama Teresa ya Calcutta na ntina ya mosala ya bozangi elikia ya bosungi ezanga bofuti na etuka wana. Alobaki ete, mpo na koloba ya solo, azalaki kosala mpo na kozwa eloko te. Mwana muasi oyo ya malamu alobaki ete mosala na ye ezalaki ya bolingo, mpo na mbongo te. Atako mosala ezalaki makasi likolo ya makoki na ye, alobaki akokaki kobatela motindo ya kolinga Nzambe mpe bazalani na ye na kosalisaka baye kati ya bozwi na ye atako ezalaki mpenza moke. “Oyo tosali ezali mpamba kasi litanga kati ya mbu,” akokaki koloba na libaku mosusu. “Kasi soki tosalaki yango te, mbu esengelaki kozala moko ya litanga moke [koleka ndenge ezali].”9 Na lokengo, mopanzi nsango alobaki na nsuka ete Kiboklisto ezali solo te motango ya bomeki. Akanisaki ete soki ekozala na esengo mingi koleka na lola ntango mopagano moko ayamboli koleka soki ntuku libwa na libwa basengeli koyambola, nsima tango mosusu Nzambe atalaka koleka mitango te.10
Na yango boniboni tokoki “kosala oyo tokoki kosala”?
Mpo na eloko moko, tokoki, lokola Mokonzi Benyamina ateyaki, totika kokanisa ete mpo tomoni babola komemaka mpasi na bango likolo na bangomei. Mbala mosusu ndambo ya bato bakeli bampasi na bangomei, kasi baye ya biso basali lolenge moko te? Ezali te mpo ete mawa ya mobeko oyo asengi, “Tozali biso nionso basengi te?”11 Biso nionso tongangaka te mpo na lisungi kowuta mpe elikia mpe biyano na nsambo na biso? Biso nionso tosengi mpo na bolimbisi na mbeba tosalaki mpe nungu nungu tosali? Biso nionso tosengaka te na ntina ete ngolu ekolendisa bolembu na biso, ete mawa ekolonga likolo ya bolongi na biso mpo na ntina na biso? Mwa motuna moke oyo Mokonzi Benyamina alobi to zwi bolimbisi ya masumu na biso na kosengaka epai ya Nzambe, oyo ayanoli na mawa, kasi to tobateli bolimbisi ya masumu na eyano ya mawa na mobola oyo azali kosenga biso.12
Na kobakisa na kozwaka eyano ya mawa na bizaleli na bango, tosengeli mpe kosambela mpo na baye bazali na bosenga. Lisanga ya Bazoramite, bamonanaki na miso ya baninga na bango lokola “batomboki” mpe “bato mpamba”—wana ezali maloba ya makomi—bazongaki libanda ya bandako na bango ya losambo “mpo na moto libanga ya [maloba elembisaka] ya bilamba na bango.” Bazalaki, elobaki Mormon, “mobola na biloko ya mokili; mpe lisusu… mobola na motema”13—ezalela mibale oyo etambolaka ntango nionso nzela moko. Baninga ya misio Alma mpe Amulek balobi ete koboya komikitisa na lolenge ya elamba na kolobelaka bango ete atako matomba basusu bakoki koboya bango, bakoki ntango nionso kosambela—kati na bilanga nabango mpe bandako na bango, kati ya mabota na bango mpe kati ya mitema nabango.14
Kasi sikawa, na lisanga oyo ya baoyo bapengwisami bangomei, Amulek alobi, “Nsima [yo] o [sambeli], kasi [yo] obwakisi bakeleli, mpe babolumbu, mpe otali babeli te mpe batungisami, mpe opesi maye ozali nango, soki [yo] ozali [nango], mpo na baoyo bazali na bosenga—nalobi na yo, … losambo na yo ezali mpamba, mpe ekopesa yo litomba te, mpe [yo] ozali lokola moto na lokuta oyo azali koboya bondimi.”15 Bokundoli nini ya kokamwa ete mozwi to mobola, tosengeli “kosala oyo tokoki kosala” ntango basusu bazali na bosenga.
Sikawa, nabobangi ete nafundama na kolakisaka bapologalame ya bato banso ya chimeriki to kondimaka bisengasenga lokola industrie ekoli, nayebisi bino ete bokebi na ngai ya mibeko ya industrie, mosolo, bomikoki, mpe mposa makasi ezali lokola makasi mpenza oyo lokola ya mobali to mwasi nionso na bomoi. Tobengami banso kosungana yambo toluka lisungi kowuta na basusu. Mingi lisusu, nayebi te mpenza boniboni moko na moko kati na bino asengeli kokokisa mposa ya baoyo basali te to bakoki te ntango nionso kosunga bangomei. Kasi nayebi ete Nzambe ayebi, mpe akosunga bino mpe akokamba bino na misala na bino ya mawa ya kiboyekoli soki bozali kozela mpenza solo mpe kosambelaka mpe koluka lolenge ya kotosa mitindo Ye apesaki biso lisusu mpe lisusu.
Okoyeba ete nalobi awa na ntina ya bosenga eye ezali kati ya bato oyo ezali kati ya bandimi ya Eklezia. Na mawa nzela ya Nkolo ya kosungaka bisomei ezali pete: banso baoyo bazali na makoki na nzoto basengeli kotosa mobeko ya kokila bilei. Yisaya akomaki:
“Ezali te kokila oyo ngai naponaki? …
“Ezali te ete kokabola limpa na yo epai na ye oyo azali na nzala? Mpe ete oyeisa babola babwakami libanda epai na ndako na yo? [ete wana] ekomona moto na bolumbu, olatisa ye, mpe ete omibomba te liboso na bato na libota na yo mpenza ?”16
Natatoli bikamwisi, nionso mibale ya nzoto mpe molimo, oyo eye na baye bazali kotosa mobeko ya kokila bilei. Natatoli bikamwa oyo esalemelaki ngai. Solo, lokola Yisaya alobaki, nalelaki na kokila makasi mingi koleka mbala moko, mpe solo Nzambe ayanolaki, “Nazali awa.”17 Linga libaku ya bule oyo pene na sanza nionso, mpe zala na bokabi ntango mabaku epesameli na makabo ya kokila na yo mpe na babopesi mosusu ya bato nionso, ya kelasi, mpe ya mosala misio. Nalaki ete Nzambe akokabela yo, mpe baye bazwi lisungi kowuta epai na yo bakobelela nkombo na yo opambolama mpo na libela. Koleka mpenza misato na minei ya nkoto ya bandimi ya Eklezia basungamaki mobu eleki na nzela ya makabo ya kokila oyo eyangelaki na baepisikopo bamipesa mpe bakambi ya Bamama basungi. Wana ezali esengo mpenza ya Basantu bamikolo ya Nsuka.
Bandeko mibali mpe basi, liteya ya lolenge oyo esengi ete nazwa boyebi ezanga lifuta, bozangi lifuta, mapamboli ezanga nsuka na bomoi na ngai, nionso mibale na nzoto mpe na molimo. Lokola yo, namitungisamaki na ntina ya libaku ya mbongo, kasi nainu nazala mobola te, to koyoka lolenge bobola esalaka, mingimingi koleka, nayebi te ntina nionso soki mpo na nini mabaku ya mbotama, bokolongono ya nzoto, kelasi, mpe mabaku ya mosolo, ebongwani mingi mpenza awa na bomoi ya nkufa, kasi ntango namoni bosenga kati ya bato ebele mpenza, nayebi mpenza ete “mpo na ngolu ya Nzambe nazali.”18 nayebi mpe lisusu ete atako nazali mobateli ndeko na ngai ya mobali te, nazali ndeko mobali ya ndeko na ngai ya mobali, mpe “mpo napesamaki ebele, nasengeli kopesa mpe ebele.”19
Na botali wana, nakumisi ngamei Mokambi Thomas Spencer Monson. Napambolamaki na kozalaka elongo na moto oyo uta mibu 47 sikawa, mpe elilingi na ye oyo nakolinga kino liwa na ngai ezali oyo ya ye kozongaka na ndako na mpepo uta na oyo ezalaki –Allemagne ya Esiti ya bozwi ebebisama na basapato na ye ya ndako mpo ete akabaki kaka costume na ye ya mibale mpe basimizi na ye mosusu te kasi basapatu mpenza oyo elongolamaki na makolo. “Bonzenga kani likolo ya bangomba [mpe kotambolaka malembe na nzela ya bokomi ya mpepo] ezali nde makolo na ye oyo amemaki nsango malamu, asakolaki kimia.” 20 Mingi koleka moto kani nayebi, Mokambi Monson a“sali nionso akokaki kosala” mpo na bakufeli mibali mpe bana bitike, babola mpe baniokwami.
Na bobimisi ya 1831ya Profeta Joseph Smith, Nkolo alobaki babola bakomona bokonzi ya Nzambe mokolo moko koyaka mpo na kokangola bango “na nguya mpe nkembo monene.”21 Tika tosunga kokokisa esakoli wana na koyaka kati na nguya mpe nkembo ya bondimi na biso na Eklezia ya solo ya Yesu Klisto mpo na kosala oyo tokoki mpo na kokangola moto kani tokoki uta na bobola oyo esimbi bango na boombo mpe kobebisa ebele mpenza ya bandoto na bango, nasambeli na nkombo ya mawa ya Yesu Klisto, amene.