2010–2019
Nzela Nini Yo Olandi?
sánzá ya zómi 2014


Nzela Nini Yo Olandi?

Mekaka kosepela na basusu yambo osepela na Nzambe ezali sima ya mitindo minene ya yambo mpe ya mibale.

“Nzela Nini Yo Olandi?” Mokambi Boyd K. Packer akamwisaki ngai na motuna oyo ya kokamwisa ntango tobandaki kokende mobembo elongo na mosala na ngai ya yambo mpenza lokola moko ya Bantuku Nsambo ya sika. Nazangaki ndimbola ya kotuna na likambo oyo, nazwaki kipelekese. “Moko ya Ntuku Nsambo,” akobaki, “elakisi te bato epai ya profeta, kasi profeta epai ya bato. Kobosana te nzela nini yo oponi!” Ezalaki liteya moko ya nguya mpenza.

Mekaka kosepela na basusu yambo osepela na Nzambe ezali sima ya mitendo minene ya yambo mpe ya mibale (tala Matai 22:37–39). Yango ebosanisi nzela nini biso tolandi. Mpe sima, biso banso esi tosala mbeba oyo mpo na bobangi bato. Na Yisaya Nkolo alobeli biso, “Bobanga maloba ya bato te” (Yisaya 51:7; tala lisusu 2 Nefi 8:7). Nakati ya ndoto ya Lehi, bobangi oyo eyekamaki na mosapi etukama elakisamaki wuta ndako kitoko mpe monene, esalaki kobosana ya bamingi oyo nzela nini balandi mpe kotika nzete “soni” (tala 1 Nefi 8:25–28).

Kopusa oyo ya bato ebele emeki kobongola ezaleli ya moto, soki na ezalela te, na kosalaka ete moto amiyoka mokeyi mpo na kosalaka masumu. Toluki bozali ya botosi kati ya baye balakisi misapi, kasi ntango bobangi oyo ya bato emeki komema biso na masumu, ekokoma “motambu” lolenge moko elobami na buku ya Masese (tala Masese 29:25). Motambu ekoki na mayele koleka kobenga ngambo ya mawa na biso mpe kopesa biso nzela to kutu kondimama na eloko moko epekisami epai ya Nzambe. Mpo na botau ya bondimi, ekoki kozala ntina ya kokanga kotatabana. Ndakisa, bamisionele moko ya bilenge bamemaki bobangi oyo ya bato kati na bilanga ya misio mpe kokweya na likambo ya bobuki mobeko ya boninga kati ya mosala na bango ya misio na mokambi na bango ya misio mpo balingi te kobebisa mosala na bango ya mobembo. Mikano ya ezalela esalemaka na kokanisaka mobeko ya mitindo ya ntina malamu ya yambo mpe ya mibale (talaMatai 22:37–39). Ntango bamisionele batomboki oyo bamoni ete basali mabe na miso ya Nzambe mpe na kimoninga na bango te, esengelaki kopesa bango bokasi ya kosala pene ya kopona nzela malamu.

Na mobu ya bolenge ya 22, atako Joseph Smith abosanaki nzela nini aponaki ntango abandelaki kotungisa Nkolo mpo na kopesa Martin Harris ndingisa ya kodefisa bankasa 116 ya makomi na maboko. Mbala mosusu Joseph alingaki kolakisa bolingo epai ya Martin mpo na lisungi. Toyebi ete Joseph azalaki mpenza komitungisa mpo na banzeneneke mosusu mpo na kotelemela elongo na ye na mpasi ya bosolo to lokuta mpe lokuta ebimaki na ntina na ye.

Atako ntina ya Joseph ezalaki, to elakisamaki lokola ekokaki kobima, Nkolo alimbisaki bango te mpe na lombango alobelaki ye: “Boniboni ntango nionso osengeli kotungisa  … mpe okobi kino kondimisa bato. Mpo, tala, osengelaki te kobanga moto atako moke koleka Nzambe” (D&C 3:6–7; sete ebetami). Boyebi oyo esungaki Joseph kokanisa, mpo na libela nsima, nzela nini aponaki.

Ntango bato bameki kobomba elongi elongo na bato, bakoki kobungisa bolamu na Nzambe. Kokanisaka moko akoki kosepelisa Nzambe mpe na ntango kaka moko kopesa ndingisa bozangi botosi ya bato ezali katikati kasi mazindo mpenza, to kozalakana banzela mibale to komekaka “kosalela balakisi mibale” (Matai 6:24; 3 Nefi 13:24).

Ntango bokasi ya kolonga mabe ezwami, elembo ya solo ya bokasi ekolonga bobangi ya bato. Ndakisa, nsambo ya Daniel esungaki ye kolonga bankosi, kasi oyo esalaki ye kozala molongi ya bankosi ezalaki kotumbolaka Mokonzi Drius (tala Danyele 6). Lolenge ya bokasi wana ezali libonza ya Molimo ya bobangi Nzambe oyo alobaki losambo na bango. Losambo ya Mwasi ya mokonzi Esther epesaki ye mpe lisusu bokasi oyo mpo na kolonga mobali na ye, Mokonzi Ahasuerus, na koyebaka ete bomoi na ye ezalaki na likama na kosalaka bongo (tala  Esther 4:8–16).

Bokasi ezali kaka te moko ya boyebi ya ntina koleka, kasi lokola C. S. Lewis amonaki: “Bokasi ezali … elembo ya boyebi nionso na momekano. … Pilate azalaki na mawa kino likama eyaki.”1 Mokonzi Herod azalaki na mawa na bosenga ya moto ya Yoane Mobatisi kasi alingaki kosepelisa “baye oyo afandaki elongo na ye ntango ya kolia” (Matai 14:9). Mokonzi Noah azalaki pene ya kotika Abinadi kino maloba ya lolenge moko uta na banganganzambe na ye ya nkanda elembisaki ye (tala Mozia 17:11–12). Mokonzi Saul abukaki mobeko ya liloba ya Nkolo na kobombaka litomba ya etumba mpo ete ye “abangaki bato, mpe atosaki mingongo” (1 Samuel 15:24). Mpo na kotondisa batomboki ya Isalayele na makolo ya Ngomba ya Sinai, Alona asalaki mwana ya ngombe ya wolo, abosanaki nzela nini asengelaki kolanda (tala Esode 32). Mibeko minene ebele kati ya Boyokani ya Sika “endimelaki [Nkolo]; kasi mpo na Bafalizeo bandimelaki ye te, na bobangi ete basengelaki kosundolama libanda ya synagogue: mpo ete balingaki lokumu ya bato koleka lokumu ya Nzambe” (Yoane 12:42–43). Ndakisa ya boye ezali ebele kati ya Makomi.

Sikawa boyoka mwa bandakisa efulama:

  • Yambo, Mormon: “Tala, nalobaki na mpiko, kozalaka na bokulaka uta na Nzambe; mpe nabangi te nini moto akoki kosala; mpo bolingo bobongi nie bobwaki libanda bongangi nionso.” (Moloni 8:16; sete ebetami).

  • Nefi: “Yango wana, makambo maye mazali elengi epai ya mokili, nakomi te; kasi makambo mazali elengi epai ya Nzambe mpe bango baye bazali ba mokili te” (1 Nefi 6:5).

  • Kapiteni Moroni: “Tala, nazali kapiteni mokonzi wa bino. Nakoluka te mpo na nguya, kasi kobenda yango o nse. Nakoluka te mpo ya lokumu ya mokili, kasi mpo ya nkembo ya Nzambe wa ngai, mpe bonsomi mpe bolamu bwa ekolo ya ngai.” (Alma 60:36).

Moroni azalaki na bokasi monene ya lolenge oyo na kokanisaka ete nzela nini kolandaki oyo elobelamaki epai na ye, “Soko bato banso bazalaka, mpe bazalaki, mpe bakozala ntango nionso, lokola Moroni, tala, nguya ya lifelo elingaki koninganisama libela; iyo, zabulu alingaki mokolo moko te kozala na nguya likolo ya mitema ya bana na bato” (Alma 48:17).

Baprofeta na nzela ya mibu bakutana ntango nionso mpe na makambo ya lolenge oyo. Mpo na nini? Lokola elobami na makomi, mpo ete “botau esimbi bosolo mpo ekomi kozala makasi, mpo ete ekangi bango na katikati na yango mpenza” (1 Nefi 16:2), to lokola Mokambi Harold B. Lee amonaki, “The hit bird flutters!”2 Bomoni mpamba na bango ezali, na bosolo, bomeki botau mpo na komindimisa yemei, kaka se lokola na Korihor, oyo na nsuka andimisamaki, “Nayebaki yango ntango nionso ete ezalaki moko ya Nzambe” (Alma 30:52). Korihor andimisamaki na lokuta na ye ete ayaki kondima lokuta na yemei (tala Alma 30:53).

Botali mpamba mbala mingi efundi baprofeta na kozalaka te na eleko ya mibu nkama ya 21 to na kozalaka na bolingo ya Nzambe koleka. Bameki kondimisa to kutu kokamba na makasi Eklezia kati ya kopesa Nzambe mitindo na makambo ya ndelo ya bizaleli na bangomei ezanga ntina, oyo kati ya maloba ya Mpaka Neal A. Maxwell, eko “kolisa bosepeli ya motomei” 3 mpe boyamboli. Kopesaka Nkolo mitindo na ndelo na lolenge bizaleli ezanga ntina ya mosala ya bato ezali—bopengwi. Mingi ya mangomba kati ya Banefite bileko ya mibu nkama mibale sima botali ya Mobikisi epai na bango ebandaki “kokangisa bango monoko” malongi, edefaki liloba uta na Mpaka Holland.4

Ntango oyoki eteni oyo uta na 4 Nefi, tala malamu na mokolo na biso: “Mpe esalemaki ete ntango mibu nkoto mibale na zomi elekaki ezalaki na mangomba ebele na mabele; iyo, ezalaki na mangomba ebele eyebaki Klisto, mpe sima baboyaki mpenza biteni ya nsango malamu na ye, mpo ete bazwaki lolenge nionso ya nkanda, mpe basalaki oyo ezalaki bule kati na yango na oyo epekisamaki mpo na bozangi bosantu” (4 Nefi 1:27).

Esi emonana na mikolo ya nsuka! Mwa bandimi bamoni te ete bazali kokweyaka na motambu moko ntango bapesi ntina na makambo ya mboka to ya “bonkonko[ba] ya batata na bango”(D&A 93:39) oyo ezali lolenge moko te na nsango malamu. Kino basusu, bazwi mokano bango mei mpe na boboi bangomei, basengi na mawa to basengi ete baepisikopo bapesa ndingisa mpo na mokanda ya tempelo, bondimi ya kelasi, misala ya misionele. Ezali pasi te kozala episikopo oyo azali na nse ya botindi na makasi. Nayango, lokola Mobikisi oyo alongolaki tempelo mpo na kopesa ntina na bosantu na yango (tala Yoane 2:15–16), baepisikopo ya lelo babengami likolo ya bokasi ya kolobela makambo ya tempelo. Ezalaki Mobikisi alobaki, “Nakolakisama ngaimei epai ya bato na ngai na mawa  … soki bato na ngai bakobatela mitindo na ngai, mpe babebisi te ndako esantu oyo” (D&A 110:7–8).

Nkolo, Ndakisa na biso ya monene, mbala mingi alandaki Tata na Ye. Alingaki mpe asalisaki baninga na Ye bato kasi alobaki, “Nazwi lokumu te uta na bato” (Yoane 5:41). Alingaki ete bato oyo Ye ateyaki balanda Ye, kasi asambisi bolamu na bango te. Ntango asalaki mosala ya bolingo, lokola kobikisa babeli, likabo eyaki elongo na bosenga ya “koyebisa moto te” (Matai 8:4; Malako 7:36; Luka 5:14; 8:56). Na eteni, oyo ezalaki mpo na koboya kozwa mpenza oyo elandaki Ye na ntina ya makoki na Ye kobwakisa oyo (tala Matai 4:24). Apesaki motindo na bafaliseo basala misala malamu kaka mpo ete bamonana na miso ya bato (tala Matai 6:5).

Mobikisi, se moko mobongi nie kozalaka oyo atako azalaki na bomoi, azalaki na bozangi kobanga mpenza. Na bomoi na Ye, atungisamaki na mikakatano ya bato na lokuta kasi batikaki te na misapi na bango ya bomoni mpamba. Azali se ye moko moto oyo naino abosana te nzela nini aponaki: “Na salakantango nionso makambo oyo esepelisaka [Tata]” (Yoane 8:29; sete ebetami), mpe “Naluki bolingi na ngaimei te, kasi bolingi ya Tata na ngai oyo atindaki ngai” (Yoane 5:30).

Kati ya mokapo ya 11 ya 3 Nefi mpe mokapo ya 28 ya 3 Nefi , Mobikisi asalelaki nkombo Tata koleka mbala 150, kosalelaka yango malamu koleka na Banefiti ete Ye azalaki kuna na esika ya Tata na Ye. Mpe uta na mikapo ya 14 Yoane na nzela ya  17, Nkolo azwaki ndakisa epai ya Tata mbala 50. Na nzela nionso ya pete, azalaki moyekoli ya Tata na Ye ya bobongi nie. Azalaki sembo mpo na kozwa Tata na Ye ete koyeba Mobikisi ezalaki lisusu koyeba Tata. Komona Mwana ezalaki komona Tata (tala Yoane 14:9). Koyoka Mwana ezalaki koyoka Tata. (tala Yoane 5:36). Azalaki, na ntina mingi koleka, kokoma na kozanga kozala uta na Tata na Ye. Tata na Ye mpe Ye bazalaki moko (tala Yoane 17:21–22). Ayebaki mpenza nzela nini Alandaki.

Tika ete ndakisa na Ye efulama elendisa biso na mitambo ya monguna uta na bozangi to bokokisami uta na kati. Ekoka kopesa biso bokasi mpo na kotatabana te to kolengisa na makolo. Ekoka kofula biso kokende pene ya kosala bolamu lokola yango ezali mpasi te mpe “na lokumu ya bato” te (D&A 121:35). Mpe tika ete ndakisa na Ye ezanga kokokanisa esunga biso kokanisaoyo ezali “motindo ya yambo mpe monene” (Matai 22:38). Ntango basusu basengi bondimami na ntembe ya mitindo ya Nzambe, ekoka biso kokanisa ntango nionso bayekoli ya Klisto nini tozali, mpe nzela nini toponi, ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, Amene.

Matangi

  1. C. S. Lewis, The Screwtape Letters, rev. ed. (1982), 137–38.

  2. Harold B. Lee, in Mine Errand from the Lord: Selections from the Sermons and Writings of Boyd K. Packer (2008), 356.

  3. Neal A. Maxwell, “Repentance,” Ensign, sanza Zomi na moko. 1991, 32.

  4. Jeffrey R. Holland, “The Call to Be Christlike,” Ensign, sanza ya Motoba 2014, 33; Liahona, sanza ya Motoba 2014, 35.