2010–2019
Koyamba Litatoli ya Pole mpe Bosolo
sánzá ya zómi 2014


Koyamba Litatoli ya Pole mpe Bosolo

Litatoli na yomei ya pole mpe bosolo ekopambola kaka yo mpe bokitani na yo awa na bokufi te, kasi ekotambusa yo elongo na seko nionso mobimba.

Lokola mokumbi mpempo, napumbwaki bangonga bebo kokatisa mikili mpe bambu na molili ya butu. Kotala likolo na butu na fenetele ya moto ya mpepo, mingi mingi Liboke ya Minzoto, mbala mingi ezalaki kosala ngai nakamwa monene mpe mozindo ya babokeli ya Nzambe—oyo makomi elimboli lokola “mikili ezanga motango.”1

Eleki naino ekeke moko te ete bato ya mambi ya minzoto bazalaki kokanisa ete galaxie na biso ya Liboke ya Minzoto ezalaki bobele galaxie moko na mokili. 2 Bazalaki kokanisa nionso oyo etandami likolo ya galaxie na biso ezalaki eloko te ya monene, mpamba moko ezanga nsuka—mpamba, malili, mpe ezangi minzoto, pole mpe bomoi.

Lokola batelesikopi ekomi ya mayele mingi—bakisa batelesikopi oyo ekoki kobwakisama na likolo—bato ya mambi ya minzonto babandaki kosimba bosolo moko ya kokamwa, pene ezangi bososoli: mokile ezali na kokamwa monene koleka moko kani akanisaka na kala, mpe balikolo etondisami na bagalaxie ezangi motango, mosika na biso na lolenge okoki kokanisa te, moko na moko kozalaka na bamonkama ya baefuku nkoto yoko ya minzoto.3

Na eleko moko ya mokuse mpenza ya ngonga, bososoli na biso ya mokili ebongwami mpo na libela.

Lelo tokoki komona ndambo ya bagalaxie oyo na mosika.4

Toyebi ete ezali kuna.

Ezali kuna uta ntango molai mpenza.

Kasi liboso moto azwa bisalelo ya nguya mingi mpo na kosangisa pole ya selesitiale mpe komema bagalaxie oyo na komonana, tondimaki te ete likambo ya boye ekokaki kosalema.

Bonene ya mokili ebongwanaki na mbalakata te, kasi makoki na biso ya komona mpe kososola bosolo oyo ebongwamaki na mbalakaka. Mpe na pole monene koleka wana, moto akotisami na emoneli ya nkembo oyo tokanisaka mokolo moko te liboso.

Ezali Mpasi mpo na Biso Tondima Oyo Tokoki Komona Te

Soki tozalaki na makoki ya kosala mobembo kozonga na ntango ya kala mpe kosolola na bato oyo basalaki mibu nkoto to kutu monkama eleki. Bokanisa komekaka kolimbolela bango misusu ya batekinolozi ya sika oyo bino mpe ngai tozali kotala lokola solo lelo. Mpo na ndakisa, nini bato oyo bakokanisela biso soki toyebisaki bango masolo ya Bajumbo Jet, matuka ya micro-onde, masini ya komema na maboko oyo ezali na bibombelo ya mikanda ya mitango minene, mpe bavideo ya bankoko na biso ya bana oyo na mbala moko tozali kobalola na baefuku ya bato na mokili mobimba?

Basusu bakoki kondimela biso. Mingi bakotiola, kotelemela, ntango mosusu kutu koluka kokanga biso monoko to kobeta biso. Basusu bakoki komeka kosalela mayele, ntina, mpe makambo na lolenge bayebli yango mpo na kolakisa ete tozali na boyebi ya mabe, bazoba, to kutu ya likama. Bakoki kokweisa biso mpo na komekaka kopengwisa basusu.

Kasi solo, bato oyo bakozala na libunga mpenza. Bakoki kozala na makanisi malamu mpe bosembo. Bakoki komiyoka mpenza malamu mpo na makanisi na bango. Kasi bakozala na makoki mpeza te ya komona na polele mpo ete bazwaka naino pole ya bosolo mobimba mingi te.

Elaka ya Pole

Emonani lokola ezalela ya bomoto kokanisa ete tozali kosala malamu kutu ntango tozali kosala mabe. Mpe soki ezali bongo, elikia nini ezali wana mpo moko kani na biso? Tosalami mpo na kozinda na ntina te na mbu ya nsango oyo ezali komitelemela, ya kokangama na bwato oyo tosali mabe uta na makanisi na bisomei?

Ekoki kosalama ete tomona bosolo?

Ntina ya lisikulu na ngai ezali kosakola nsango ya esengo ete Nzambe Yemei—Nkolo ya Bankolo ndako oyo ayebi bosolo nionso—apesi bana na ye elaka ete bakoki koyeba bosolo mpo na bangomei.

Nasengi botala bonene ya elaka oyo:

Nzambe ya Seko mpe ya Nguya Yonso, Mokeli ya mokili monene oyo, akolobela baoyo babelemi na Ye na motema bosembo mpe mokano ya solo.

Ye akolobela bango na bandoto, mamoni, makanisi, mpe mayoki.

Akoloba na lolenge oyo ezali na libunga te mpe oyo eleki boyebi ya moto. Akolakisa bango nzela mpe biyano ya bonzambe mpo na bomoi na bangomei.

Solo, ekozala na baoyo bakoseka mpe koloba ete likambo ya boye ekoki kosalema te, ete soki ezalaki na Nzambe, Akozala na makambo ya malamu ya kosala koleka koyoka mpe koyanola losambo moko ya moto.

Kasi nayebisi bino oyo: Nzambe abatelaka bino. Akoyoka, mpe Akoyanola mituna na binomei. Biyano na nsambo na bino ekoya na lolenge na Ye moko mpe na ngonga na Ye moko, mpe yango wana, bosengeli koyekola koyoka mongongo na Ye. Nzambe alingi bino bomona nzela na bino ya kozonga epai na Ye, mpe Mobikisi azali nzela.5 Nzambe alingi bino boyekola oyo etali Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe kozwa kimia mpe esengo ya mozindo oyo eyaka uta kolandaka nzela ya boyekoli ya bonzambe.

Baninga na ngai balingami, botala mwa likambo moko ya pete, ya bobateli uta na Nzambe, ezwami na buku ya makomi ya kala oyo ekoki kozwama na mobali, mwasi, mpe mwana nionso oyo azali na bolingi ya komeka yango:

Yambo, bosengeli koluka liloba ya nzambe. Wana elingi koloba kotangaka maloba ya baprofeta ya kala mpe na ya baprofeta ya ntango ya sika oyo etali nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto—na mokano ya ntembe to ya kotonga te kasi na mposa ya bosembo ya komona bosolo. Bomaniola likolo ya makambo bokoyoka, mpe bokolengela milimo na bino mpo na kozwa bosolo.6 “Kutu soki bokoki mingi te koleka kozala na mposa ya kondima, tika mposa oyo esala na bino … ete bokoka kopesa esika mpo na [liloba ya Nzambe].”7

Ya mibale, bosengeli botala, komaniola, kobunda na kobanga te mpo na kondima,8 mpe kozala na botondi mpo na boni ya mawa Nkolo asili kozala na bana na Ye uta ntango ya Adama tii na mokolo na biso na kopesaka.

Ya misato, bosengeli kosenga Tata na bino ya Lola, na nkombo ya Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpo na kolakisa bosolo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka epai na yo. Bosenga na motema bosembo mpe na mokano ya solo, kozalaka na bondimi kati na Klisto.9

Ezali lisusu na eteni ya minei, epesameli biso na mobikisi: “Soki moto nani akosala mokano [ya Nzambe], akoyeba mpo na malongi, soki mauti na Nzambe, soki nazali kosolola na motema na ngai moko.”10 Na maloba mosusu, ntango bozali koluka koyeba bosolo ya mabongisi ya nsango malamu, bosengeli yambo kotia yango na misala. Bomeka malongi ya nsango malamu mpe mateya ya Eklezia na bomoi na bino moko. Bosala yango na mokano ya solo mpe kotiaka molende na bondimi kati na Nzambe.

Soki bokosala makambo oyo, bokozwa elaka uta na Nzambe—oyo akangami na liloba na Ye 11—ete akolakisa bosolo epai na yo na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu. Akopesa yo pole mingi koleka oyo ekopesa yo nzela ya kotala kati ya molili mpe kozala nzeneneke ya bomoni ya kokamwa esosolami te na miso ya bokufi.

Basusu bakoki koloba bitambe ezala mpasi mpenza to ete ebongi na bokasi te. Kasi nalobi ete litatoli na yomei oyo ya nsango malamu mpe Eklezia ezali likambo ya motuya mingi oyo okoki kozwa na bomoi oyo. Ekopambola mpe kokamba kaka yo na bomoi oyo te, kasi ekozala lisusu na bokakangani na bomoi na bino na boseko mobimba.

Makambo ya Molimo Ekoki Kososolama Kaka na Molimo

Bato ya mayele bazalaki kobunda mpo na kososola monene ya mokili kino bisalelo ekomaki kilikili mingi mpo kosangisa pole mingi koleka mpo ete bakoka kososola bosolo mobimba mingi.

Apostolo Polo ateyaki libongisi moko ekeseni oyo etali boyebi ya molimo. “Moto ya mosuni akoki koyamba makambo ya Molimo ya Nzambe te,” akomelaki Bakolinti ete, “mpo ete mazali mpo na ye bolema: akoki koyeba yango te, mpo ete molimo akososola yango.”12

Na maloba mosusu, soki bolingi koyeba lisusu bosolo ya molimo, bosengeli kosalela bisalelo malamu. Bokoki kokoma na bososoli moko ya bosolo ya molimo te na bisalelo oyo ezali na makoki te ya komona yango.

Mobikisi alobeli na mokolo na biso ete, “Oyo wana ezali ya Nzambe ezali pole; mpe ye oyo ayambi pole, mpe akobi kati na nzambe, ayambi pole mingi koleka; mpe pole wana ekolisa bongengi koleka kino mokolo ebongi nie.”13

Mingi toyekamisi mitema na biso mpe milimo na biso epai ya Nzambe, pole ya lola mingi koleka ekobima na milimo na biso. Mpe ntango moko na moko toluka na bolingi mpe na lokengo pole wana, tolakisi na Nzambe bobelemi na biso mpo na koyamba pole mingi. Mokemoke, makambo oyo ezalaki komonana lokola londende, molili, mpe mosika ekomi polele, bongengi, mpe ya momesano na biso.

Na elembo moko wana, soki tomilongoli uta na pole ya nsango malamu, pole na biso ebandi kokita—na mokolo moko to poso moko te kasi mokemoke nsima ya ntango—kino totali lisusu nsima mpe tokoki kososola mpenza te mpo na nini tondimaka naino te ete nsango malamu ezalaki solo. Boyebi na biso ya kala ekoki kutu komonana lokola buzoba epai na biso mpo ete oyo mokolo mosusu ezalaki polele mpenza ekomi lisusu ya kobulinginia, londende, mpe mosika.

Oyo ezali ntina Polo abetaki nsete ete nsango ya nsango malamu ezala buzoba na baoyo bazali kobeba, “kasi epai ya [baoyo] tobikisami ezali nguya ya Nzambe.”14

Ezali na Momekano ya Motuya Moko te

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali esika mpo na bato oyo bazali na matatoli ya ndenge nionso. Ezali na bandimi mosusu ya Eklezia oyo ya bango litatoli ezali solo mpe ezali kozika na bongengi kati na bango. Basusu bazali kobunda koyeba na bangomei. Eklezia ezali ndako mpo na banso baya kosangana, kozanga kotala mozindo to molayi ya litatoli na biso. Nayebi elembo moko te likolo ya bandako ya Makita na biso oyo elobi, “Litatoli esengeli ezala molayi oyo mpo na kokota.”

Eklezia ezali kaka mpo na bato babonga nie te, kasi ezali mpo na banso “baya epai ya klisto, mpe bazala bobongi nie na ye.”15 Eklezia ezali mpo na bato lokola bino mpe ngai. Eklezia ezali esika ya koyamba mpe koleisa, ya kokabola to kotongo te. Ezali esika wapi toyambi mpo na kolendisa, kotombola, mpe kosunga moko na mosusu lokola tozali kolanda boluki na biso moko mpo na bosolo ya bonzambe.

Na nsuka, tozali banso bato ya mobembo kolukaka pole ya Nzambe lokola tozali na mobembo na nzela ya boyekoli. Tozali kokweisa basusu mpo na motango ya pole bokoki to bakoki te kozala na yango; kasi, tozali koleisa mpe kolendisa pole nionso kino ekoli polele, bongengi, mpe solo.

Elaka epai ya Banso

Tika tondima ete mbala mingi mpenza kozwaka litatoli ezali mosala ya miniti moko, ngonga moko, to mokolo moko te. Ezali na mbala moko te. Likambo ya kosangisa pole ya molimo ezali boluki ya bomoi mobimba.

Litatoli na bino ya Mwana ya Nzambe ya bomoi mpe Eklezia na Ye ezongisami, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, ekoki koya mbangumbangu lokola bolingi te, kasi nalakii bino oyo: soki bosali eteni na bino, ekoya.

Mpe ekozala ya Nkembo.

Napesi yo litatoli na ngaimei ete bosolo ya molimo ekotondisa motema na yo mpe ekomema pole epai ya molimo na yo. Ekobimisela yo mayele mpeto na esengo makasi mpe kimia ya lola. Nazwi yango na ngaimei na nguya ya Molimo Mosantu.

Lokola makomi ya kala elaki, bozali liboso ya molimo ya Nzambe oyo ekoki kolobelama te ekosala yo oyemba nzembo ya bolingo ya bosikoli,16 tombola miso na yo na likolo, mpe matisa mongongo na yo na masanzoli epai ya Nzambe Aleki Likolo, Ekimelo na yo, Elikia na yo, Mobateli na yo, Tata na yo. Mobikisi alaki ete soki oluki, okomona.17

Natatoli ete oyo ezali ya solo. Soki oluki bosolo ya Nzambe, oyo ekoki sikoyo komonana ya kokita, libanda ya miso, mpe mosika ekobimisama mokemoke mpe ekokomisama polele mpe ekokoma pene na motema na yo na nzela ya ngolu ya Nzambe. Bomoni ya molimo ya nkembo, ekanisami te na liso ya moto, ekobimisama epai na yo.

Ezali litatoli na ngai ete pole ya molimo oyo ekoki kozwama na mwana nionso ya Nzambe. Ekongengisa molimo mpe ekomema libiki na motema na yo mpe esengo na mikolo na yo. Baninga na ngai balingami, nasengi bozelisa te ngonga ya koluka mpe ya kolendisa litatoli na binomei ya moto na moto ya mosala ya bonzambe ya Nzambe, kutu mosala ya pole mpe ya bosolo.

Litatoli na yomei ya pole mpe bosolo ekopambola kaka yo mpe bokitani na yo awa na bokufi te, kasi ekende na yo elongo na boseko nionso mobimba, na katikati ya mikili ezanga nsuka. Na ntina ya oyo natatoli mpe natikeli bino lipamboli na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.