Joseph Smith
Yesu Klisto aponaki mobali moko ya mosantu, mpo na kokamba nsango malamu Ye Etondisami ya Bozongi. Aponaki Joseph Smith.
Ntango akendaki kotala mpo na mbala na ye ya yambo profeta Joseph Smith azalaki na mibu 17, anzelu moko abengaki Joseph na nkombo mpe alobaki na ye ete ye, Moroni, azalaki momemi nsango atindami kowuta na elongi ya Nzambe mpe ete Nzambe azalaki na mosala moko mpo na na ye kosala. Kanisa nini Joseph asengelaki kokanisaka ntango anzelu bongo alobelaki ye ete nkombo nay r esengelaki kozala “koyebanaka mpo na malamu mpe mabe na kati ya bikolo nyonso, mabota, mpe nkota.”1 Mbala mosusu kokamua na miso ya Joseph esalaki Moroni kobandela lisusu nyonso bolamu mpe mabe ekolobamaka mpo na ye na kati ya bato nyonso2.
Elobeli malamu mpo na Joseph Smith eyaka malembe koleka, maloba ya mabe ebandaka kaka na mbala moko. Joseph akomaki, “boniboni ezalaki kokamua makasi ete muana moko ya molili … asengeli akanisama … na ntina ekoka mpona kobenda … koyinana ya bololo koleka.”3
Ntango bolingo mpo na Joseph ekolaka, boye lisusu mpe mpasi ekolaka. Na mibu 38, abomamaka na etuluku ya mibali 150 na bilongi bapakoli langi.4 Ntango bomoi ya profeta esukisamaki na bokuse, kolobela mabe na ya malamu ya Joseph ezalaki nde kobanda.
Tosengeli kokamua mpo na maloba mabe na ngambo na ye? Apostolo Polo abiangamaka liboma mpe moto eningana.5 Mobikisi na biso ya Bolingo, Muana ya Nzambe, atiamaki lokola moto na lokoso, momeli, mpe alatamaki na demona.6
Nkolo alobaki Joseph mpo na atandele na ye:
“Bansuka ya mabele ekoyeba nkombo na yo, mpe bazangi boyebi bakobalola yo makanaisi, mpe lifelo ekotelemela yo makasi.
“Ntango motema ya petua, … mayele, … mpe molongobani, bakoluka … mapamboli ya kokoka kowuta na maboko na yo.”7
Mpo na nini Nkolo apesi nzela na maloba mabe kolanda nsima ya malamu? Ntina kaka moko ezali ete kotelemela biloko ya Nzambe etindaki baboluki ya bosolo na mabolongo na ye mpo na biyano.8
Joseph Smith azali profeta ya Bozongisi. Mosala na ye ya molimo ebandaki na komonisama ya Tata mpe Muana, elandamaki na botali ebele ya lola. Azalaki esaleli na maboko ya Nzambe na komemaka liboso makomi ya bule, lilongi ebunga mpe bozongi ya bonganganzambe. Ntina ya mosala ya Joseph esengaki mingi koleka botali ya mayele; esengaki ete biso, lokola Joseph, “kosenga na Nzambe.”9 Mituna ya molimo esengeli na eyano ya molimo kowuta na Nzambe.
Mingi na baoyo babuaki mosala ya bozongi bandimi te kaka ete bato ya lola basolola na bato ya mokili. Ekoki kosalama te, bazali koloba, ete ba palaki ya wolo epesamaki na anzelu mpe ebongolamaki na nguya ya Nzambe. Wuta na bozangi bondimi, bango babuaki na lombango litatoli ya Joseph, mpe muke moko na mawa mingi bakueyi na kokitisa bomoi ya profeta mpe kobebisa bomoto na ye.
Toyokaka mingimingi mawa soki moto moko oyo mbala moko azalaki kokumisa bomibendi ya Joseph kowuta kondimisama ya mobali to muasi mpe bakomi kokosela Profeta makambo. 10
“Koyekolaka Eklezia … wuta na miso ya batomboki na ye,” Mpaka Neal A. Maxwell mbala moko alobaki, ezali lokola kotunaka Juda koyeba Yesu. Batomboki ntango nyonso bazali koyebisa biso ya mingi na oyo etali yango moko na esika ya oyo etali moke oyo esika yango elongue.”11
Yesu alobaki, “Bopambola bango baoyo bazali kolakela bino mabe, …mpe sambela mpo na bango bakonyokola bino, mpe kotuka bino.”12 Topesa bolamu na baoyo bazali kotiola Joseph Smith, koyebaka na mitema na biso moko ete azalaki moko profeta ya Nzambe mpe kozuaka bokasi ete nyonso oyo mibu ebele eleki elobamaka na Moroni.
Boniboni tokoki koyanola na bosenga moko ya solo etali ye na ntina ya masolo muasi to mobali ayoka to atanga na oyo etali Profeta Joseph Smith? Na bosolo, tozali koyamba malamu ntango nyonso mituna ya solo mpe ya bosembo.
Na motuna etali ezaleli ya Joseph, tosengeli kokabola maloba ya bamonkama oyo bayebaki ye mpenza mpenza mpe oyo bapesaki babomoi na bango mpo na mosala asungaki bozongisi. John Taylor, oyo azalaki abetamaki masasi mbala minei na ebele ya bato oyo babomaki Joseph, akokaki koloba na nsima: “Ngai natatoli liboso ya Nzambe, banjelu, mpe bato, ete [Joseph] azalaki mobali moko ya malamu, ya lokumu, [mpe] ya bosembo— … [mpe] ete ezaleli na ye ya kobombama to ya polele ezalaki ya kolobela te—mpe azalaki mpe akufaki lokola moto moko ya Nzambe.”13
Tosengeli kokundola bosenga ya solo ete nsango ya internet ezali na nzela ya “bosolo” moko te. Ba nsango mosusu, atako ezali kondimisaka, ezali kaka ya solo te.
Mibu ebele eleki natangi eteni ya magazine mokoTime oyo elobelaki komonama ya mukanda moko lokola neti ekomamaka na Martin Harris, oyo awelanaki na lisolo ya Joeeph Smith ya komonaka ba palaki ya Buku ya Mormon.14
Ndambu ya bandimi batikaki Eklezia likolo ya buku wana.15
Na mawa mingi, bango balonguaka mbangu mingi. Bansanza sima bato ya mayele bamonaki (mpe molobi mabe atubelaki) ete mokanda ezalaki mawa monene.16Yo okoki na mituna ya bososoli oyo oyoki na bitando, kasi osengeli te koyimayima na litatoli ya baprofeta ya Nzambe.
Tosengeli kokundolisa baluki ete ebele ya masolo etali Joseph, ya bosolo, ekoki kolakisamaka libanda mobimba na ndenge ya mokolo na yango to na ndenge yango ezali.
Mpaka Russell M. Nelson alakisaki ndakisa na ntina ya likambo oyo. Alobaki: “Nazalaki kosala lokola motali ya gouvernema ya Etazini na Centre National ya controle ya Bokono na Atlanta, Georgia. Mbala moko ntango nazalaki kozelaka motuka moko emema ngai na esika ya kozua mpepo sima kosila ya mayangani na biso, namitandaki na matiti komikotisa na boyambi moke ya moyi yambo nazonga na malili ya Utah. … Sima nayambaki foto na email ezuamaki na mokangi foto na ekangeli foto ya mosika, kokangaka ngonga na ngai ya kominiolola na matiti. Na nse na yango likomi ya moke, ‘Motali ya Gouvernema na Centre National.’ Elilingi ezalaki ya solo, likomi ya moke mpe ezalaki ya solo, kasi bosolo esalamelaki kotambuisa nsango ya lokuta.”17 Tosengeli kobuaka eloko toyebi kozala solo na ntina ya eloko tozali kososola te.
Tosengeli kokundolisa baluki ete Joseph azalaki yemoko te na botali ya banjelu.
Banzeneneke ya Buku ya Mormon bakomaki, “Tolobi na maloba ya bosolo, ete anzelu moko ya Nzambe ayaki kowuta lola, mpe … tolulaki mpe tomonaki ba palaki.”18 Tokoki mpe kotanga misuse ebele koleka.19
Moluki ya solo asengeli komona bompanzi ya nsango malamu ezonga lokola mbuma ya mosala ya Nkolo na nzela ya Profeta.
Ezali sikawa ebele koleka 29.000 ndako ya Makita mpe 88,000 misionele koteyaka nsango malamu mokili mobimba. Ba milio ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka bazali kolukaka kolanda Yesu Klisto, kozala na babomoi oyo ekumisami, kosunga babola, mpe kopesa ntango na bango mpe boyebi na bango na kosungaka basusu.
Yesu alobaki:
“Nzete ya malamu akoki kobota bambuma mabe te, mpe ata moke te kobebisa nzete oyo ebotaka bambuma malamu. …
“… Na ba mbuma na bango bokoyeba bango. ”20
Bolimboli oyo edindisami, kasi moluki ya solo esengeli te amikanga kaka na yango mpo na kobongisa boluki na ye muasi to mobali ya bosolo.
Mondimi nyonso asengeli na litatoli ya molimo ya mosala ya bonzambe mpe ezaleli ya Profeta Joseph Smith. Oyo ezali bosolo mpona mabota nyonso. Mituna ya molimo esengeli na biyano ya molimo kowuta na Nzambe.
Kala mingi te ntango nazalaki na Cote Est ya Etats Unis, misionele moko ya bozongi eyebisaki ngai na ntina ya moninga na ye oyo akomi na bandoto na nsango ayambaki na oyo etali Profeta Joseph Smith. Bazolalaka ngonga molayi, mpe misionele ya bozongi akomi lokola kozala na ntembe na ye moko oyo esalaki mbano ya masolo.
Atako nandimisamaki ete ye akokaki kolendisa moninga na ye, nayokaki komikotisa mpo na litatoli na yemoko. Bandeko mibali mpe basi, tika ngai nakebisa bino: bino bokoki kosunga mingi basusu te soki bondimi na bino moko ezali na bobangi te na esika.
Ba mposo mike eleki, nazuaki pepo mpona Sudi ya America. Hotesse de l’air abendaki makanisi na biso mpo na kotala bililingi koleka na etando ike na ntina ya bobangi te. “Ekoki kokoma,” tokebisamaki, “kasi soki motindo ya pepo ebonguani, sanduku liboso ya likolo ya kiti na bino ekofunguama, ekomonisa masque ya mopepe. Soki ekomi bongo, telema mpe tia mask liboso na bino. Tia yango likolo ya zolo mpe monoko na bino. Benda singa ya elasitiki sima ya moto na yo mpe bongisa masque soki esengelami.” Bongo likebisi oyo: “Ndimisama kobongisa masque na yomoko yambo ya kosunga basusu.”
Lisolo ya mabe na oyo etali Profeta Joseph Smith ekokoba lokola tozali kokende liboso ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Ndambo ya bosolo mpe balokuta ekokita te. Ekozalaka na mabota ya bandimi mpe baninga oyo bakosengela na lisungi na bino. Sikoyo ezali ntango ya kobongisa masque ya mupepe ya bino moko ya molimo bongo nde bolengelami mpo na kosunga basusu baoyo bazali koluka bosolo. 21
Litatoli ya Profeta Joseph Smith ekoki koya na bokeseni na moko na moko na biso. Ekoki koya ntango ofukami na losambo, kosengaka Nzambe kolakisa ete ye azalaki profeta ya solo. Ekoki koya ntango otangi lisolo ya limoni ya yambo ya Profeta. Ekoki koya ntango opesi litatoli na yomoko ya Profeta to ntango okeyi na tempelo mpe okokisi oyo na nzela ya Joseph Smith nguya ya bule ya bokangisi ezongaki lisusu na mabele.22 Na bondimi mpe mposa ya solo, litatoli na yo mpona Profeta Joseph Smith ekokoma makasi. Bale ya mayi kowuta na ngambo mosusu ekoki kopolisa yo, mokolo moko te eboma moto makasi ya bondimi.
Na bilenge koyokaka lelo to kotangaka makomi oyo na mikolo ya liboso, napesi bino mokumba moko: Bolonga litatoli na bino moko ya Profeta Joseph Smith. Botika mingongo na bino esangana na bokokisi ya maloba esakolami ya Moroni koloba malamu mpo na Profeta. Awa ezali makanisi mibale: Ya yambo, ezuami na makomi na Buku ya Mormon oyo oyoki mpe oyebi ezali ya solo mpenza. Bongo kabola yango na libota mpe baninga na likita ya ndako na mpokua, seminele, mpe na bakelasi ya Bilenge Mibali mpe Bilenge Basi, koyebaka ete Joseph Smith azalaki esaleli moko na maboko ya Nzambe. Sima, botanga litatoli ya Profeta Joseph Smith na Liyaka ya Ntalo Monene to na mokanda moke na yango, sikoyo na nkota 158. Okoki komona yango na internet na LDS.org to na bamisionele. Oyo ezali litatoli yayemoko Joseph ya oyo esalemaki. Botanga yango mingimingi. Kanisa mpe lolaka ya Joseph Smith na lokota na yomoko, yokaka yango mingimingi, mpe kabolaka yango na baninga. Koyokaka litatoli ya Profeta na lokota na yo ekosunga bomemi ya litatoli ozaki koluka.
Ezali minene mpe kitoko mikolo ya liboso. Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “Ntina Monene oyo … ekokoba kokende liboso, kobongolaka mpe kopambolaka babomoi … Makasi moko na mokili mobimba ekoki kotelemisa mosala na Nzambe. Ata nyonso ekoya, ntina oyo monene ekokende liboso.”23
Napesi bino litatoli ete Yesu azali Klisto, mobikisi mpe Mosikoli na biso. Ye aponaki mobali moko ya bule, mobali moko ya sembo, kotambuisa nsango malamu na Ye oyo etondisami. Ye aponaki Joseph Smith.
Natatoli ete Joseph Smith azalaki moto moko ya bosembo mpe ya bosolo, moyekoli ya Nkolo Yesu Klisto. Nzambe Tata mpe Muana na Ye; Yesu Klisto, babimelaki Ye. Ye abongolaki Buku ya Mormon na likabo mpe nguya ya Nzambe.
Na mabota na biso koleka elamba ya liwa, tokososola na polele libiangi ya bule mpe ya bonzambe ya Joseph Smith. Na mikolo ekoya kala te, yo na ngai mpe “bamilio [koleka]bakoyeba ‘Ndeko mobali Joseph’ lisusu.”24 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.