Kopusanaka na Kiti ya bokonzi ya Nkolo na Elikia
Na kosalelaka Bomikabi ya Yesu Klisto ekoki kobanda komatisa elikia ya molimo na yo lelo soki olingi koyoka mpe kosala.
Na ebutelo ya 1 kino na 10, lolenge nini okoki kokokanisa elikia na yo ya molimo liboso ya Nzambe? Ozali mpenza na litatoli ya yomei ete libonza na yo ya kobengama Mosantu ya Mikolo mya Nsuka ezali ya kokoka mpo na kozwa bomoi ya seko? Okoki komilobela yo moko ete Tata na Lola asepeli na yo? Makanisi nini eyelaka yo na moto soki ozalaki na lisolo na Mobikisi na yo mpo na miniti moko uta lelo? Ekoki kozala masumu, mawa, mpe mabumga ekonzi bomoto na yo mei, to ekoki yo nde kosepela yambo ya bosambisi? Ekaki yo kokutana to koboya kotala Ye? Elingi yo kotikala na ekuke to elingi yo kokende likolo esika Azali? Bandeko mibali mpe bandeko basi, bozala mpenza na elikia ete nguya ya Nzambe ezali na bino lokola bozali kobunda mpo na kopambola bomoi ya mabota na bino mpe ya basusu?
Ntango nionso monguna akoki kondimisa te Basantu babonga nie te kasi oyo bazali kobunda lokola yo mpo na kosundola bondimi na yo na bolingo ya Nzambe na yo, akosalela likita ya mabe mpo na kotia bokabwani mpenza kati na yo mpe Nzambe. Monguna ayebi ete bondimi na Klisto—lolenge ya bondimi oyo epesaka nzela ya bokobi ya mawa ya boboto mpe kutu bikamwisi ya makasi—etambolaka loboko na lokoko na elikia ya moto yemei ete ozali kobunda mpo na kopona bolamu. Na ntina na yango akoluka kokota na motema na yo mpo na kolobela yo lokuta—lokuta ete yo oyokisi Tata na Lola motema pasi, ete Bomikabi ezali mosika na yo, ete ezali na eloko moko te okoki kosala, ete moto nionso aleki yo, ete ozali olongobana te, mpe ndenge mingi ya makambo ya mabe ya lolenge moko.
Soki ondimi lokuta ya monguna kopesa makanisi to koyoka ete okoki te kosala na malembe mpo na koyoka mabe mpe mabe na ntina na yomei, okoki te kopusana na kiti ya bokonzi ya Nzambe na elikia ya solo. Atako oyo okosala, atako losambo na yo, atako elikia ya makamwisi okoki kozwa, ekozala ntango nionso na ntembe na yomei ekozala mosika ya bondimi na yo—kaka bondimi na Nzambe te, kasi elikia na yomei. Kosalela nsango malamu na lolenge oyo ezali kosakana te, to ezali malamu mingi mpenza. Likolo ya nionso, ezali ntina koleka! Mokano ezali ya yomei, mpe ya bino moko.
Nakosepela kokabola makanisi motoba ya misala ete, soki oyokameli yango, ekobebisa mingongo ya mabe oyo mpe ekozongisela yo lolenge ya kimia ya solo mpe elikia ya molimo oyo ezali ya yo mpo na kozwa soki yo moko olingi yango. Kotala te motuya ozali nango na ebuteli uta na 1 kino na 10, na kosalelaka Bomikabi ya Yesu Klisto ekoki kobanda komatisa elikia ya molimo na yo lelo soki olingi koyoka mpe kosala. Nakoloba na bokasi, na kolikiaka kolendisa mpe kasi kotuka te.
1. Zwa mokumba mpo na bolamu ya molimo na yo mei. Tika kotuka basusu to mabaku na yo, mpe tika komilongisaka, mpe tika kosengaka bolimbisi na ntina ya mpo na nini okoki komipesa te na kobundaka ya solo mpo ya kozala na botosi mpenza. Ndima oyo yo ozali “sembo na mosuni” mpe sembo na kopona bonsomi mpe bomoi ya seko” (2 Nefi 2:27). Nkolo ayebi mabaku na bino malamu, kasi Ayebi malamu ntango boponi na sembo kotosa mikano ya nsango malamu. Soki ezali bongo, zala na bosembo ya kokoka mpo na koyeba yango, mpe bunda mpo na kozala malamu mpenza kati ya esika ya ezalela ya yomei. Elikia ya molimo ekobakisama ntango okozwa mokumba mpo na bolamu ya molimo na yomei na kosalelaka Bomikabi ya Yesu Klisto mokolo na mokolo.
2. Zwa mokumba ya bomoi na yo ya malamu awa na nse. Molimo na yo ezali na nzoto mpe molimo (talaD&A 88:15). Leyisa molimo koleka nzoto, oyo ezali tempelo, ntango nionso ekumbaka na mmotungisi ya molimo mpe eyokisaka motema pasi ka moto yemei. Soki ozali ya kolongobana te, soki ozali ya kokoka te kati ya nzoto na yo mei mpe okoki kosala eloko te na ntina na yango, sima sala yango! Mpaka Russell M. Nelson ateyaki ete tosengeli “kotala nzoto na biso lokola tempelo na bisomei mpenza” mpe ete tosengeli kotala nini tosengeli “kokeba na kolia na biso mpe kosala ngalasisi mpo na bolamu ya nzoto” (“We Are Children of God,”Ensign, Nov. 1998, 87; Liahona, Jan. 1999, 103).
Mokambi Boyd K. Packer ateyaki “ete molimo na biso mpe nzoto na biso esangana na lolenge moko ete nzoto na biso ekomi esalele ya molimo na biso mpe moboko ya bomoto na biso” (“The Instrument of Your Mind and the Foundation of Your Character” [Church Educational System fireside, Feb. 2, 2003], 2; speeches.byu.edu). Yango wana, nabondeli bino bosalela bososoli ya malamu na nini mpe mingingi na boniboni bokolia, mpe bopesa mbala na mbala ngalasisi na nzoto na biso oyo esengeli mpe ezali na mposa na yango. Soki bozali na bokoki ya nzoto, bozwa mokano lelo mpo na kozala bankolo ya ndako na binomei mpe bobanda mwango ya ngalasisi ya mbala na mbala mpe na ntango molai, oyo ekokani na makoki na biso, na kosangisaka bolei moko ekoki mpo na kolongono ya nzoto.Bondimami ya molimo ekobakisama ntango molimo ba bino, na lisalisi ya Mobikisi, ezali ya solo na bokambi ya kimobali mpe bomwasi na bino ya mokili.
3. Yamba na bolingi, botosi na motema mobimba lokola eteni ya bomoi na yo. a koyebaka ete okoki kolinga Nzambe te soki olingi mitindo na Ye te. Bolingi ya Mobikisi ezali pole mpe mpasi te: “Soki bolingi ngai, bobatela mitindo na ngai” Yoane 14:15). Lisanga ya botosi epesaka lisanga ya mapamboli, mpe koponaka eloko moko ya mabe likolo ya eloko moko ya mabe koleka ezali kino sikoyo kopona mabe. Okoki te kotala video ya bosoto mpe ozeli koyoka bokasi mpo ete otalaki(kolekaya mabe te. Botosi ya Bosolo mpenza ya mitindo epesaka nzela te ya komona basusu mpamba. Abraham Lincoln alobaki: “Ntango nasali bolamu, nayoki malamu. Ntango nasali mabe nayoki mabe,” (ekomami kati ya William H. Herndon mpe Jesse William Weik, Herndon’s Lincoln: The True Story of a Great Life, 3 vols. [1890], 3:439).
Lisusu, sala makambo ya malamu mpo na ntina ya malamu. Nkolo, oyo “atalaka na motema mpe bolingi ya makanisi”(D&A 64:34) mpe oyo “azali mosambisi ya makanisi mpe malingi ya motema” (D&C 33:1), ayebi mpo na nini okendaka eklezia, soki oye kaka mpo na kotondisa baban to oye mpenza kokumisa ye. Okoki koyemba te na Eyenga,“O Babylon, O Babylon, [I] bid thee farewell” mpe sima koluka to kopesa ndingisa ya koalema lisusu sima ya ntango moke (“Ancien d’Israel,” Nzembo, no. 319). Bokanisa ete bisalasala na makambo ya molimo epesaka kimia atako moke te. Eklezia mpe nsango malamu ezongisami ezala mpo na bomoi na yo mobimba. Kaka te mpo na eteni na yo ya maloba to lolenge ofandi na basusu na bomoi na yo. Koponaka na Ntango oyo nani yo okosalela ezali maloba ezanga misala kaka kino okozala na bomoi na lilingi ya Nzambe (tala Yosua 24:15). elikia ya Molimo ebakisami ntango ozali kobundaka na, mpo na ntina ya malamu, mpo na kozala na bomoi ebulisama esika ya bozangi bobongo nie na yo!
4. Kokoma ya solo, solo moyamboli malamu na nionso mpe na lombango. Mpo ete Bomikabi ya Yesu Klisto ezali na misala mpenza, osengeli kosalela yango na mobimba 24/7, mpo yango ekokima te. Yamba Bomikabi ya Yesu Klisto mpe yambola lokola eloko oyo esengeli koyambama mpe esalemi mokolo na mokolo lolenge esalemi na Monganga Monene. Zongisa ezaleli bokobi, malamu, esengo ya boyamboli na kosalaka yango mwango ya bomoi nay yo ya boponi. Nakosalaka bongo, sala keba na momekano ya kopusa mokolo, mpe kozela te ete mokili ebetele yo maboko. Tia elikia na yo epai ya Mobikisi, kanisaka mingi nini Ye alingi mpo na yo, mpe tika misala elanda. elikia ya Molimo ebakisami ntango omipesi mpe oyamboli na mobimba masumu ya moke mpe ya monene na ntango elongobani na kosalelaka Bomikabi ya Yesu Klisto.
5. Kokoma ya solo, solo na bolimbisi ya malamu. “Ngai, Nkolo, nakolimbisa oyo Nasengeli kolimbisa, kasi mpo na bino bosengeli kolimbisa bato nionso” (D&C 64:10). Limbisa moto nionso, eloko nionso, ngonga nionso to bunda nakosalaka bongo, na yango pesa nzela ya bolimbisi na bomoi na yomei. Kozala na nkanda ya moninga te, limbisa mpe bosana na lombango, kokanisa te ete motindo oyo etali yo te. elikia ya Molimo ebakisami ntango oyebi ete Nkolo ayebi ete yo otukaka molimo ya moto mosusu te.
6. Ndima mikakatano, bozongi nsima mpe “masutuki” lokola eteni ya bomoi na yo. Kanisa ete bozali awa mpo na kolakisama mpe komekama, “kotala soki [yo] okosala makambo nionso oyo Nkolo Nzambe [nayo] akotinda [yo]” (Abraham 3:25)—mpe Nakoki kobakisa, “na nse ya mabaku nionso.” Bifuku ya bandeko na bino ya mibali mpe basi bazalaki to bazali ya komekama, mpo na nini olingi komilongola? Mikakatano mosusu eyaka mpo na bomoni basusu mpamba to kaka mpo mokili oyo ezali ya bopengwsi. Ntango mikakatano oyo eyaka, makambo kitoko ya monguna ebandi koleka na makanisi na yo ete osalaki eloko ya mabe, na yango oyo ezali etumbu, elembo oyo ete Tata na Lola alingi yo te. Longola yango na motu! Na ntina ete, meka kosala makasi oseka, tala likolo, mpe loba “nasosoli, Nkolo. Nayebi oyo ezali. Mwa ngonga ya komitala ngai mei, ezali bongo te?” Sima sala elongo na Ye mpo na kokoba kosala malamu kino na nsuka. Elikia ya Molimo ebakisami Ntango ondimi Ntango ondimi ete “mikakatano mpe mitungisi ntango nionso ezali kopesa ngai nzela ya kokoma na [bomoi nan a yo] mpo na oyo [yo] ozali kosala bolamu” (Glenn L. Pace, “Crying with the Saints” [Brigham Young University devotional, Dec. 13, 1987], 2; speeches.byu.edu).
Ntango nakambaki na Misio ya Ukraine Kyiv, natunaki moko ya bandeko na ngai basi ya bondimi mpo na nini azalaki na makanisi ya bobola kati na ye, mpo na nini azalaki komitungisa na ntina ya biloko ya mike mike mpo na yemei. Eyano na ye ezalaki ndakisa ya moto moko oyo azali koyoka mongongo ya mabe lokola ayanolaki, “Nayango moto te akoki kolonga ngai na yango.”
Bandeko mibali mpe basi, liteya na ngai na ndeko mwasi misionele oyo ezali liteya mpo na bino: boyebi mpe bolonga botau na bino, kasi bomitika na yango te, mpo ete ndambu na yango ekozala elongo na bino kino bokolongwa na bomoi ya nkufa oyo. Kotala te nani yo ozali, Ntango boponi bosembo na motema mobimba, esengo, boyamboli mokolo na mokolo na kobundaka koluka kosala bolamu mpe kozala yayo ya malamu, Bomikabi ya Mobikisi, mpo na koloba boye, ekozinga mpe kolanda yo bisika nionso okokende. Kozalaka na lolenge oyo, bokoki mpenza “Ntango nionso kobatela bolimbi ya masumu na bino”(Mosiah 4:12) Ntango nionso ya mokolo, sekonde nionso ya miniti, mpe bongo zala ya kopetwama mpe ya kondimama na miso ya Nzambentango nionso.
Yayo ezali libaku, soki olingi yango, komiyeba yomei, lelo to kala te, ete ozali kosepelisa Nzambe koleka bizaleli na yo ya mabe. Natatoli na ntina ya bolingo ya Mobikisi oyo azali kozela biso kotosa mikano. Natatoli na ntina ya bolingo ya Yesu oyo azali na mawa mpenza ya kopesa ngolu mpe botondi na Ye. Natatoli na ntina bolingo ya Mobikisi oyo azali na esengo ntango tosaleli Bomikabi na Ye mokolo na mokolo na kimia mpe bolamu ya elikia ete tozali kolonga na nzela malamu. Natatoli na ntina ya bolingo ya Mobikisi oyo azali na mawa mpo na elikia eokma makasi na miso ya Nzambe (tala D&A 121:45). Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.