Kozwa Makambo ya Bule na Pete te
Tala malamu makambo oponaka na komitunaka motuna ete, “mikano na ngai elonami mpenza na mabele oyo elongobani ya nsango malamu ya Yesu Klistu?”
Bandeko mibali mpe basi, mikano tozuaka na bomoi oyo ezali na bilembo monene na nzela ya bomoi na biso ya seko. Eteni oyo eyelaki ngai na lolenge moko oyo ezalaki na makama ebele mibu mitano mileki.
Tokendaki mobembo elongo na libota mpe baninga na sudi ya Oman, mboka na Peninsule ya Arabia. Tozwaki mokano ya kopema na libongo ya kosukola pene na ya mopanzi ya Mbu India. Sima ya bokomi na biso, mwana na biso ya mibu 16, Nellie, atunaki soki akokaki konana libanda na oyo akanisaki ezali esanga ya zelo. Kotalaka mayi makasi, Nayebisaki ye ete Nakoki kokende liboso, kobanzaka kuna esengeli kozala na makama ebele.
Sima ya konana mwa ngonga moke, Nabengaki mwasi na ngai kotunaka soki Nazalaki penepene ya esenga ya zelo. Eyano na ye ezalaki, “Okei mosika.” Ozangi koyeba yango mpo na ngai nakweyaki na motambo ya mbonge 1 mpe nabendamaki mbangu mbangu libanda na mbu.
Nayebaki te nini nakosala. Eloko moko Nakokaki kokanisa ezalaki kozonga pembeni mpe kozonga konana kino na libongo—wana ezalaki mpenza eloko ya mabe ya kosala. Nayokaki kozanga lisungi. Makasi koleka bomikambi na ngai ezalaki kobenda ngai mosika na mbu. Nini esalemaki ya mabe ezalaki ete mwasi na ngai, kondimaka solo mokano na ngai, ayaki kolanda ngai.
Bandeko Mibali mpe Basi, Nakanisaki kuna ezalaki kozanga elikia makasi Nakoki kobika mpe ete Ngai, na ntina ya mokano na ngai ekokaki komema mwasi na ngai na liwa. Sima makasi mingi mpe oyo nakanisaki ndimaki ezalaki lisungi ya lola, makolo na biso lolenge moko to mosusu etutaki zelo na nse mpe tozalaki na makoki na makoki ya kotambola na bokengi kozonga epai na mwana na biso ya mwasi mpe baninga.
Ezali na makama mingi na bomoi oyo na nse ya mabele—mingi ya bokengi mpe mosusu te. Mokambi Spencer W. Kimball ateyaki ete wana ezali nguya makasi na bomoi na bisomei mingi lokola makama ezangi komonana ya mbu.2 Makasi wana ezali ya solo. Tokoki te kobosana yango.
Tika nayebisa bino na ntina ya likambo mosusu, ya molimo, oyo ekomaki limpamboli monene na bomoi na ngai. Nazali mobongwami na Eklezia. Yambo ya mbongwana na ngai, mposa ya mwasi na ngai ezalaki kosala ski mpe, kolandanaka, Nakenadi na Europa sima ya eteyelo ya mikolo kokokisa mposa waana. Sima ya basanza ya nini lokola ntina ya bimoi, Nayokaki Nakoki kotika. Sima ya ntango nasosolaki te ntina ya liyoki wana, kasi Naponaki kolanda yango. Nasilisaki na Provo, Utah, elongo na mwa baninga malamu oyo, lokola ngai bazalaki bandimi ya biyamba ekeseni. Bomoi ezalaki kitoko! Nalandaki mateya na mpokwa na Université Brigham Young, kotikelaka ngai bonsomi mpo na kosala ski na moyi.
Na Provo, Nakutanaki na bato oyo bazalaki na bomoi ekesana mingi koleka lolenge nazalaki. Nasepelaki kozala na bango, atako Nayebaki mpo na nini te. Na ebandeli namekaki koboya mayoki wana, kasi Nayokaki sima nazwaki kimia mpe libondisi ete Nazwaki boyebi te. Nabandaki kolanda likambo ekesani—moko oyo emamaki ngai na bososoli ya bolingo ya Tata ya Lola mpe Mwana na Ye, Yezu Klisto.
Nabatisamaki elongo na baninga na ngai na 1972. Likambo ya sika Naponaki mpo na kolanda, nsango malamu ya Yesu Klisto, epesaki ngai nzela mpe ndimbola mpo na bomoi na ngai. Atako, ezangaki mimekamo na yango te. Makambo nionso ezalaki sika mpo na ngai. Na ngonga moko nayokaki kobunga mpe mobulungano. Mituna mpe mimekano etunamaki na baninga mpe libota elongo.
Nasalaki liponami. Mituna na bango epesaki ntembe mpe bozangi boyebi. Kopona ezalaki na ntina moko. Wapi ekokaki Ngai kobaluka mpo biyano? Kuna ezali na mingi baye mingi balingaki mpo na kondimisa ngai libunga na banzela na ngai—“mapumbulu” kolaka kotindika ngai libanda uta na likambo ya kimia oyo ekomaki ntina ya esengo. Nayekolaki polele mobeko, wana ete ezali na “boboyi na makambo nionso”mpe ntina ya kosala mpo na ngaimei mpe kotika boponi ngai mpo na basusu.3
Namitunaki ngai moko, “Mpo na nini ekoki ngai kozonga sima uta na oyo epesaki ngai lokola lilendisi monene?” 4 Lokola Nkolo akundolisaki na Oliver Cowdery, “Epesaki ngai kimia na mayele na yo mpo na likambo yango te? Boyebi na ngai ezalaki lolenge moko. Na yango, Nabalukaki, elongo na komipesa mingi, na Tata ya Lola ya bolingo, mpo na makomi, mpe na baninga ya motema.
Kokoba, wana ezalaki mituna mina mingi Nakokaki te koyanola. Boniboni ekokaki Ngai koloba na bozangi boyebi basalaki? Na esika ya kotika bango kobebisa kimia mpe esengo oyo eyaki na bomoi na ngai Naponaki kotika bango mpo na mwa ntango, kotiaka motema na oyo na ntango ya Nkolo, Akoki kolakisa makambo nionso. Nazwaki libondisi na maloba na Ye apai ya Profeta Joseph: “tala, bozali okola bana mike mpe kokoka makambo nionso sikawa te; bosengeli kokola na ngolu mpe na boyebi ya bosolo5. Naponaki te kotika oyo Nayebaki ezali solo na kolanda likambo eyebani te mpe ya komituna —likoki ya “lipumbulu.” Lokola N. Eldon Tanner alobaki, Nayekolaki, “Boniboni mayele mingi mpe ezali kitoko koleka mpo na moto kondima bosolo ya pete ya nsango malamu…mpe kondima na bondimi kopona biloko oyo ye… akoki kososola te. ” 6
Elingi kolakisa ete ezali na kosuku te mpo na botuni? Tuna elenge mobali oyo alukaki ebombamelo na zamba ya moke ya nzete kolukaka mpo na koyeba wapi ya baeklezia akoki kokota. Kotindama na Doctrine et Alliances na maboko na yo, mpe koyeba oyo mingi emonisamaki na bofulami oyo makomi ezalaki litomba ya boluki bosolo ya komitisa. Lokola Joseph azwaki libanda, “Soki moto kati na bino azangi bwanya, asenga na Nzambe, [oyo] apesaka na baton a motema malamu… mpe ekopesamela ye.”7 Kotunaka na mituna na motema malamu mpe na kolukaka biyano ya molimo, toyekoli “molongo likolo ya molongo, mosise likolo ya mosise,”8 lolola tokoli na boyebi mpe bwanya.
Motuna ezali te, “Endimami solo kotuna mituna, ya boluki bosolo mpenza?” kasi na esika, “Wapi Nabaluki mpo na koluka bosolo ntango mituna eyaka?” “Ekozala Ngai na mayele mpo na kobatela oyo nayebi ezali solo na ntango mituna ekoki koyela Ngai?” Natatoli kuna ezali na ntina esantu—Moko oyo ayebi makambo manso, nsuka uta na ebandeli. Makambo nionso eyebani liboso na Ye.9 Makomi etetoli ete “bayebi nzela ya kimia te…, bosembo ezali na nzele na bango te.”10
Na mobembo na biso oyo ya kufa tosengeli kokanisa te ete maponi na biso ekozala na nguya bobele mpo na biso. Kala te, elenge mobali ayaki na ndako na ngai. Azalaki na molimo malamu mpo na ye, kasi nayokaki azalaki te kosangana na litondi na misala ya Eklezia. Ayebisaki ngai ete akolaki na ndako moko ya nsango malamu kino tata na ye azalaki bosembo epai ya mama na ye, kolandana na bokabwani na bango mpe kotindaka bandeko na ye komituna mpo na Eklezia mpe kokende libanda. Nayokaki mpasi na motema lokola Nalobaki na elongo na elenge moboti ya bana mitano oyo sika, ayokaki mawa na maponi ya tata na ye, azaki kolisamusa ya motuya libanda ya nsango malamu ya Yesu Klisto.
Mobali mosusu Nayebi, oyo azalaki mondimi ya Eklezia, azalaki na mituna kotalaka malongi mosusu. Na esika ya kosenga Tata ya Lola mpo na biyano, aponaki kolanda banzela misusu mpo na bokambami. Motema na ye ebalukaki na nzela ya mabe lokola alukaki nini ekokaki kozala ya lokumu ya bato. Lolendo na ye ekomisamaki na nsuka, mwa ngonga moke, kasi aboyamaki na nguya ya lola.11 Na esika ya kozwa bosolo, abungisaki litatoli na ye mpe epesamaki elongo na mabota ya bandimi.
Bato mibale oyo mibale bamemamaki na mbonge na kozanga komona mpe bamemaki mingi elongo na bango.
Na ngambo mosusu, nakanisi LaRue mpe Louise Miller, baboti ya mwasi na ngai, oyo atako bazwaki bozwi mingi nzela ya mokili baponaki koteya malongi ya solo mpenza ya nsango malamu ezongisama na bana na bango mpe kosalela yango mikolo nionso na bomoi na bango. Na kosalaka bapambolaki bana na bango, sika na motango koleka 100, elongo na mbuma ya nsango malamu mpe elikia ya bomoi ya seko.
Na ndako na bango basalaki lolenge wapi bonganganzambe etosamaki, esika eye bolingo mpe boyokani ezalaki kotonda, mpe wana mibeko ya nsango malamu atambwisaki bomoi na bango. Louise mpe LaRue, loboko na loboko, balakisaki nini elakisi kolanda lolenge ya Yesu. Bana na bango bakoki komona polele makambo nini ya bomoi ekoki kopesa kimia mpe esengo. Mpe baponi na koyeba solo. Lokola Mokambi Kimball ateyaki, “Soki tokoki kosala … ete makambo ya ndako etambola malamu makasi, mpe ntango nionso … nakokokisaka ntina ya bomoi ya sembo, biso mpe bana na biso tokoki kotambwisama liboso ata mipepe ya minioko, bosisoi [mpe] mimekano ya kopengwisa.”12
Maponi na biso ezali na ntina? Ezali ndakisa kaka mpo na biso moko? Etiami biso mpenza na nzela ya makambo ya nsango malamu ya ezongisama ya Yesu Klisto?
Ntango nionso, nazali na elili oyo ezali kotungisa ngai. Oyo soki na mokolo ya Sanza ya Libwa wana, ntango na bopemi na libongo ya Mbu ya India, nalobaki na mwana na ngai ya mwasi, Nellie, “Iyo, kende. Konana na esanga ya zelo.” Mpe soki mpenza alandaki ndakisa na ngai mpe akokaki kozala na makoki ya konana mpo na kozonga sima? Nini soki natikaki mwasi koyebaka ete ndakisa na ngai ezalaki litomba ya kotindika ye na mbonge ya mbu, kozanga kozonga?
Ezali makambo toponi kolanda na litomba ? Ezali ndakisa na biso na ntina ?
Tata na Lola apamboli biso elongo na likabo ya malamu koleka ya Molimo Mosantu mpo na kokamba maponi na biso. Alakaki biso bofulami mpe makundoli lokola tolongobani koyamba lokola. Nasengi bino kozwa mpo na ntina ya likabo ya molimo mpe kotala maponi na bino na tomitunaka binomei motuna, “Ezali mikano na ngai solo mpenza kotiama na mabele ya malamu ya nsango malamu ya Yesu Klisto?” Nasengi bino kosala nini oyo bokokisi esengeli, soki moke to monene, kobatela solo mpenza mapamboli ya mwango ya Tata ya Lola mpo na baye bolingi.
Natatoli ete Yesu Klisto azali Mobikisi li mpe Mosikona na biso. Natatoli ete mayokani tozali kosala elongo na Ye ezali bule mpe esantu. Tosengeli kozwa makambo ya bule na pete te. 13 Ekoka biso kotikala na bondimi mpenza, nasambeli na nkombo ya Yesu Klistu, amene.