2010–2019
Kozala na Esengo ya Kosalela Nsango malamu
sánzá ya zómi 2014


20:8

Kozala na Esengo ya Kosalela Nsango malamu

Kolikya na nguya ya lobiko ya Yesu Klisto, kobomba mibeko mpe mitino na Ye. Na maloba mosusu—kozala na nsango malamu ya esengo.

Bandeko babolingo basi, baninga na ngai balingami bayekoli bapambolama ya Yesu klisto, napesami lokumu ya kozwa libaku oyo ya kozala elongo na bino wana ezali biso kofungola likita linene mosusu ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Na mposo ekoya Bakambi ya Yambo mpe bapostolo zomi na mibale bakokutana elongo na Bakambi Banene mpe bayangeli banene ya masanga, mpe mayangani oyo etikali ya likita na biso linene ya mokili mobimba ekolandama na mokolo ya mposo mpe ya eyenga ekoya. Nazali na botondi mingi epai ya Mokambi Thomas S. Monson, profeta ya Nzambe mpo na mikolo na biso, mpona kosegaka ngai nazala ntoma ya Bokambi ya Yambo lokola nazali koloba na bandeko basi ya Eklezia.

Ntango nazalaki kokanisa nini nakokaki koloba, makanisi na ngai mazongaki nsima epai ya basi oyo bapesi bomoi na ngai lolenge mpe basalisi ngai na kati ya mikakatano ya bokufi. Nazali na botondi mpo na nkoko na ngai ya mwasi oyo bazomi ya mibu eleki azwaki mokano ya komema libota na ye na Likita ya elambo ya Bamormon. Nazali na botondi mpo na Ndeko mwasi Ewig, Mwasi moko ya mokolo monzemba ya mboka Allemangne, oyo ya ye nkombo ebongolami na angele lokola “Ndeko mwasi Seko.” Azalaki moko oyo atandolaki libengisi ya mpiko mpe kitoko oyo na nkoko na ngai ya mwasi. Nazali na botondi mingi mpenza mpo na mama na ngai, oyo akambaki bana minei na nzela ya mobulungano ya Bitumba ya Mokili Mobimba II. Nazali kokanisa lisusu bana basi, bankoko na ngai ya basi, mpe bankola ya mikolo mikoya ya basi ya botongono oyo mokolo mosusu bakolanda.

Mpe, solo, Nazali seko na botondi na mwasi na ngai, Harriet, oyo abendaki ngai lokola elenge, amemaki mikumba monene mingi ya libota na biso ya sika lokola mama, asalisaka elongo na ngai lokola mwasi, mpe alingaka mpe alulaka bana, bankoko, mpe bankokololoho na biso. Azali bokasi na ndako na biso na eleko ya bantango ya malamu mpe ya mabe. Amemaka esengo na bomoi ya banso oyo bayebi ye.

Na nsuka, nazali na botondi epai ya banso na bino, bamilio ya bandeko basi ya botongono na mokili mobimba na mibu nyonso oyo bazali kosala mingi mpenza mpo na kotonga bokonzi ya Nzambe. Nazali na botondi epai ya bino mpo na ndenge tokoki kotanga te bozali kofula, bolendisa, mpe bopambola baye nzinganzinga na bino.

Bana Basi ya Nzambe

Nasepeli kozala na katikati ya bana basi ya Nzambe mingi mpenza. Ntango toyembaka loyembo “Je suis enfant de Dieu,” maloba makotaka na mitema na biso. Komaniolaka solo oyo—ete tozala bana ya baboti na bino ya lola1—etondisaka biso na boyebi ya ebandeli, ntina, mpe atandele.

Ezali malamu koyeba ete ozali mwana ya Nzambe. Boyebi oyo ekolendisa yo na ntango na bangonga ya mpasi na bomoi na yo mpe ekofula yo mpo na kokokisa makambo kitoko. Nzokande, ezali lisusu motuya komikundola ete kozalaka mwana mwasi ya baboti ya seko ezali lokumu te yo ozwaki to okobungisa mokolo moko te. Okotikaka ntango nionso mpe mpo na libela mwana mwasi ya Nzambe. Tata na yo ya Lola azalai na ntina monene mpo na yo, kasi ebandelo na yo ya bonzambe yango moko ekokisi yo te bokitoli ya bonzambe. Nzambe atindaki yo awa mpo omilengela mpo na mokolo ekoya monene koleka eloko kani okoki kokanisa.

Mapamboli ya Nzambe elakelama na babotongono mazali ya nkembo mpe ya bofuli. Na katikati na yango ezali na “bangbende, babokonzi, bonkumu, mpe banguya, babodondwi, milai mpe mizindo nionso,.”2 Mpe ezwaka mingi koleka elembo ya mbotama ya molimo to “Kalati ya Bondimi ya Mwana ya Nzambe” mpo na kolongobana na mapamboli oyo ezangi bososoli.

Kasi lolenge nini tozwilaka yango?

Mobikisi ayanolaki motuna oyo na ntango na biso:

“Longola se soki okangami na mibeko na ngai okoki kozwa nkembo oyo te.

“Mpo ete ekuke ezali nkaka mpe nzela ekangemi oyo ekomema na bonetoli.  …

“… Yango wana boyamba mobeko na ngai.”3

Mpo na ntina oyo, tozali kolobela na ntina ya kotambola na nzela ya boyekoli.

Tozali kolobela na ntina ya botosi mitindo ya Nzambe.

Tozali kolobela kozala kosalela nsango malamu na esengo, na motema, nguya, makanisi, mpe molimo na biso mobimba.

Nzambe Ayebi Likambo moko Oyo Biso Toyebi te

Mpe kasi mpo na basusu kati na biso, botosi mitindo ya Nzambe oyokanaka te ntango nionso ya esengo mpenza. Tika tokutana na yango: ekoki kozala na misusu oyo ezali komonana makasi koleka to kitoko moke—mitindo oyo tozali kopusa penepene na esengo ya mwana kofandaka liboso ya saani ya ndunda mpo na kolongono kasi elingama te. Toliaka mino na biso mpe tosalaka makasi ya kotosa mpo ete tokoka kobanda milulu kitoko mingi.

Ntango mosusu na bangonga lokola oyo, tokoki komimona kotunaka, “Esengeli biso totosa mitindo nionso ya Nzambe?”

Eyano na ngai na motuna oyo ezali pete:

Nakanisi Nzambe ayebi makambo mosusu oyo toyebi te—makambo oyo ezali mosika ya bokoki na biso mpo na kososola! Tata na biso na Lola azali moto moko ya seko oyo ya ye boyebi, bwania, mpe mayele ezali mingi ya kozanga nsuka koleka ya biso.4 Kaka se wana te, kasi Ye azali lisusu ya bolingo, ya mawa, mpe atalaka mingi ntina moko epambolama: Kosala bozangi kufa na biso mpe bomoi ya seko.5

Na maloba mosusu, Ye ayebi bobele te nini ezali malamu mingi mpo na yo; Ye lisusu alingi yo opona mpenza nini ezali malamu mingi mpo na yo.

Soki bondimi oyo na mitema na bino—soki bondimi solo misio monene ya tata ya Lola ezali konetola mpe kopesa nkembo na bana na Ye mpe ete Ye ayebaka malamu mingi boniboni kosala yasngo—ezali na litomba te koyamba mpe kolanda mitindo na Ye, kutu eye ezali komonana mpasi? Esengeli biso te kolinga mingi bilembo oyo Ye apesi oyo ekambaka biso kati na molili mpe mimekano ya bokufi? Ezali kolakisa nzela ya kozongela na ndako na biso ya lola! Na koponaka nzela ya Tata ya Lola, tozali kotia moboko ya bonzambe mpona bokoli ya moto na moto lokola mwana mwasi ya Nzambe oyo akopambola bino na bomoi na bino mobimba.

Ndambo ya mokakatano na biso ezali, nakanisi, oyo tobanzaka ete Nzambe azali na mapamboli na Ye manso ya kokangama kati na lipata monene likolo ya lola, koboyaka kopesa mango na biso longola se soki totosi boko masengisi makasi mpe ya botata oyo Ye atie. Kasi mitindo mizali lokola bongo mpenza te. Solo, Tata ya Lola azali ntango nionso konokisa mvula ya mapamboli likolo na biso. Ezali bobangi, ntembe, mpe lisumu na biso nde, lokola parapluie, ekangaka mapamboli maye mpo ekomela biso te.

Mitindo na Ye ezali malako ya bolingo mpe lisalisi ya bonzambe mpo na kokanga parapluie, na ntina ete tokoka koyamba mvula ya mapamboli ya lola ntango nionso.

Tosengeli kondima ete mitindo ya Nzambe ezali kaka molongo ya molai ya makanisi te. Ezali “makambo ya bomoi” te uta na blog ya Interneti to maloba ya kotindika uta na etando ya mwango. Ezali toli ya bonzambe, efandisami na babosolo ya seko, epesami mpo na komema “kimia na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokoli ekoya.”6

Yango wana tozali na boponi moko. Na ngambo moko, ezali na makanisi ya mokili na mateya ebongwanaka ntango nionso mpe bantina ya kotiela ntembe. Na ngambo mosusu, ezali na liloba ya Nzambe epai ya bana na Ye—Bwania na Ye ya seko, bilaka na Ye ya solo, mpe malako na Ye ya bolingo mpo na kozonga na miso na Ye na nkembo, bolingo, mpe lokumu.

Boponi ezali ya Yo!

Mokeli ya mbu, zelo, mpe minzoto ezanga motango azali kosalisa yo mokolo oyo mpenza! Azali kopesa elubu monene mpo na esengo, kimia mpe bomoi ya seko!

Mpo na kolongobana mpona mapamboli oyo ya nkembo, osengeli omikitisa, kosalela bondimi, kozwa likolo na yo nkombo ya Klisto, koluka Ye na liloba mpe mosala, mpe na kokanaka “kozala batatoli ya Nzambe ntango nionso, mpe na makambo manso, mpe na bisika binso bokozala.”7

Mpo na nini ya Botosi

Ntango bososoli ezalela ya solo ya Nzambe mpe mitindo na Ye, bokomiyeba lisusu malamu koleka mpe ntina ya bonzambe ya bozali na bino. Na eye, botindiki na bino mpo na kolanda mitindo ebongwani, mpe ekomi mposa ya motema na yo kozala na nsango malamu na esengo.

Ndakisa, baoyo bamonaka bozali na makita ya Eklezia lokola nzela na yomoko ya kobakisa bolingo na bango ya Nzambe, bazwaka kimia, batombolaka basusu, balukaka Molimo, mpe bayesaka sika bomipesi na bango mpo na kolanda Yesu Klisto bakozwa boyebi ya bomengo koleka mosika baoyo bakendaka na Makita kolingaka kozala kuna te. Bandeko basi, ezali motuya mingi ete tokendeka na Makita ya eyenga, kasi nazali na mwa kondima ete Tata na biso ya Lola azali kutu na mawa na ntina ya bondimi mpe boyamboli na biso koleka oyo etali motango ya bozali.

Ndakisa mosusu yango oyo:

Mama moko monzemba ya bana mibale ya mike kala te akomaki na bokono ya kolokoto. Ya solo, ewumelaki te yambo bana na ye bazwa bokono lokola. Mosala ya komibatelaka mpe ya ye ya mike ye moko ezalaki kosenga pene mingi mpo na mama elenge yango. Mpe, lokola nsuka, ndako ya mpeto na momesano ekomaki mindo mpe ebebaki. Basani ya mbindo etondaki na basini, mpe bilamba ya mbindo etondaki bisika binso.

Ntango azalaki kobunda na bana kolelaka—mpe kolingaka kolela yemei—kokoko moko ebetaki na porte. Ezalaki bamama batali mpe bateyi na ye. Bakokaki komona mawa ya elenge mama. Bakokaki komona ndako na ye, kikuku na ye. Bakokaki koyoka bakolela ya bana.

Sikoyo, soki bandeko basi oyo bazalaka kokanisa bobele kokokisa botali epesameli bango mokumba nsanza nyonso, bakokaki kopesa mama sani ya biloko, koloba ete bazangaka ya na Lingomba ya Bamama Basungi mposo eleki, mpe koloba likambo moko lokola, “Yebisa biso soki ezali na eloko moko tokoki kosala!” Nsima bakokaki kozala na esengo na nzela na bango, ya kotondo ete bazuaka mokama na mokama mpo na sanza mosusu.

Ya esengo, bandeko basi oyo bazalaki bayekoli ya solo ya Klisto. Bamonaki bamposa ya ndeko na bango mwasi mpe batiaki batalenta na bango mingi mpe boyebi na bango na mosala. Bapetolaki KO, bamemaki pole na libota, mpe babengaki moninga mpo na komema mwa biloko ya kolia oyo esengelamaki mingi. Ntango basilisaki nsima mosala na bango mpe bapesaki bambote na bango ya bokambwani, batikaki mama ya elenge wana na mpizoli—mpizoli ya botondi mpe bolingo.

Uta na ngonga wana kino sikoyo, likanisi ya mama ya elenge na ntina ya botali boteyi ebongwamaki. “Nayebi,” alobaki, “ete nazali te kaka elembo ya nkoma na molongo ya makambo ya kosala ya moto mosusu.”

Iyo, Batali mpe bateyi basengeli kozala botongono na kosalaka babotali na bango ya sanza na sanza, banso kobosanaka te mpo na nini ya motuya oyo ezali nsima ya motindo oyo—: kolinga Nzambe mpe moninga moto.

Ntango tozali kozwa mitindo ya Nzambe mpe eteni na biso na kotonga bokonzi na Ye lokola likambo moko ya kotia elembo ya kosala na molongo ya makambo, tozali kozanga motema ya moyekoli. Tozali kozanga bokoli oyo eyaka uta na kosalelaka na esengo mitindo ya Tata na biso na Lola.

Kotambola na nzela ya moyekoli esengaka kozala likambo ya bololo te. “eleki kitoko koleka bambuma mosusu ya kitoko.” 8 Ezali mokumba oyo ezali kokweyisa biso na nse te. Boyekoli etombolaka milimo na biso mpe engengisaka mitema na biso. Ezali kofula biso na bondimi, elikia, mpe bolingani. Etondisaka milimo na biso na pole na bangonga ya molili mpe kimia na bangonga ya mawa.

Epesaka biso nguya ya bonzambe mpe ya esengo ezanga nsuka.

Kozala na Esengo ya Kosalela Nsango malamu

Bandeko na ngai ya basi kati na nsango malamu, atako soki ozali na mibu 8 to 108, ezali na likambo moko oyo nalikii ozali kososola mpe oyebi solo:

Olingami.

Ozali ya motuya epai ya baboti na biso ya lola.

Mokeli azangi nsuka mpe ya seko ya pole mpe bomoi ayebi yo! Azali na bokebi na yo.

Iyo, Nzambe alingi yo na mokolo oyo mpenza mpe ntango nyonso.

Azali kozela te alinga yo tii olonga botau mpe mimesano ya mabe na yo. Alingi yo lelo na bososoli mobimba ya bitumba na yo. Ayebi ete otombolaka maboko epai na Ye na motema moko mpe na losambo ya elikia. Ayebi bangonga oyo okangemi na pole na yo ya kokita mpe ondimeli—kutu na katikati ya molili makasi. Ayebi bampasi na yo. Ayebi koswa ya motema na yo mpo na bangonga oyo osali te oyo okanaki mpe okweyi. Mpe Ye akobi kolinga yo.

Mpe Nzambe ayebi baelonga na yo; atako ekoki komonana moke epai na yo, Ye ayebi mpe alingi mingi moko na moko na yango. Alingi yo mpo na komitandolaka epai ya basusu. Alingi yo mpo na kokendeka mpe kosalisaka basusu komema mikumba na bango ya bozito—kutu ntango ozali kobunda na oyo ya yomei.

Ayebi makambo nionso etali yo. Amonaka yo polele—Ye ayebi yo ndenge yo ozali mpenza. Mpe Ye alingi yo—lelo mpe ntango nionso!

Obanzi ete ezali likambo mpo na Tata na biso ya Lola soki bokembisi elongi, bilamba, nsuki, mpe manzaka na yo ebongi nie? Okanisi ete motuya na yo epai na Ye ebongwanaka kotalaka boni ozali na balandi na Instagram to Pinterest? Okanisi ete Ye alingi yo komitungisa to kolemba nzoto soki basusu bazali baninga te to balandi na yo te na Facebook to Twitter? Okanisi ete kitoko ya libanda, monene ya elamba to boyebani esalaka mwa bokeseni na bolongobana na yo epai ya Moko oyo akelaki mokili?

Alingi yo bobele te mpo na nani ozali mokolo oyo mpenza, kasi lisusu mpo na moto ya nkembo mpe pole ozali na likoki mpe mposa ya kokoma yango.

Mingi koleka okokaki naino kobanza, Ye alingi yo okokisa atandele na yo—kozonga na ndako nay o ya lokolo na lokumu.

Natatoli ete nzela mpona kokokisa oyo esengeli kotia bamposa ya kimoyimi mpe bamposa ya bokonzi elongobana te na etumbelo ya libonza mpe lisalisi. Bandeko basi, bolikia na nguya ya kobikisa ya Yesu Klisto; bobatela mibeko mpe mitindo na Ye. Na maloba mosusu—kozala na esengo ya kosalela nsango malamu.

Ezali losambo na ngai ete bokomona meko moko ezongi sika mpe etandolami ya bolingo kitoko ya nzambe na bomoi na biso; ete bokozwa bondimi, mokano, mpe bomipesi mpo na koyekola mitindo ya Nzambe, bolinga yango na mitema na bino, mpe bosalela nsango malamu na esengo.

Nalaki ete lokola bozali kosala boye, bokomona bomikoki ya bino ya malamu mingi—bomikoki na bino ya solo. Bokomona nini elingi koloba solo kozala mwana mwasi ya Nzambe ya seko, Nkolo ya bosembo bonso. Na ntina ya oyo natatoli mpe natikeli bino lipamboli na ngai lokola Apostolo ya Nkolo, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.