2010–2019
Kino Tokokutana Lisusu
sánzá ya zómi 2014


Kino Tokokutana Lisusu

Ekoki biso komaniola bosolo toyoki, mpe ekoka yango kosalisa biso mpo na kokoma mpenza bayekoli ya mpiko.

Bandeko mibali mpe basi, tolekisi mikolo mibale ya nkembo ya bitinda ya bofuli. Mitema na biso mitutami mpe bondimi na biso elendisami ntango tokaboli molimo oyo ezalaki awa na mayangani ya likita oyo. Ntango tozali kosukisa, totondi botondi na Tata na biso ya Lola mpo na mapamboli na Ye mingi epai na biso.

Totombolami mpe tofulami na miziki ya kitoko oyo epesami na mayangani. Nsambo oyo epesami ebendi biso penepene mingi na lola

Ekoka ngai kopesa botondi ya nse ya motema ya Eklezia mobimba na Bandeko oyo bapemisami na likita oyo. Tokozanga bango. Lisalisi na bango na mosala ya Nkolo ezali ya kabakata mpe ekoyokama na bankola nionso ekoya.

Ekoka biso kozonga na bandako na biso na mokano moko na motema mpo na kozala mwa malamu mingi koleka na kala. Ekoka biso kozala mwa boboto mingi koleka mpe na makanisi mingi koleka. Ekoka biso koyamba na kosalisa, kaka te bandeko na biso bandimi kasi lisusu baye bazali ya bondimi na biso te. Lokola tozali na lisanga elongo na bango, ekoki biso kolakisa limemia na biso mpo na bango.

Ezali na baye bazali kobunga mokolo na mokolo na mikakatano. Tika koyebisa bango makanisi na bano, mpe loboko ya lisalisi lokola. Soki tosalisani, tokopambolama.

Ekoki biso komikundola mibange, mpe baye bakota ndako. Soki tozwi ntango ya kotala bango, bakoyeba ete balingami mpe bazali na motuya. Ekoka biso kolanda etinda ya “kosunga balembi, kotombola maboko oyo ekweyi, mpe kolendisa mabolongo ya botau.”1

Ekoki biso kozala bato ya alima mpe bolongobani, komekaka kosala likambo ya malamu na ntango nionso mpe na bisika nionso. Ekoka biso kozala balandi ya malamu ya Klisto, ndakisa ya bosembo, mpo na kokoma “minda ya mokili.”2

Bandeko mibali mpe basi, natondi bino botondi mpo na nsambo na biso na ntina na ngai. Ekolendisaka ngai mpe ekotombolaka ngai ntango nazali kobunda na motema mpe bokasi na ngai kosala bolingi ya Nzambe mpe kosalela Ye mpe kosalela bino.

Ntango tozali kolongwa na likita oyo, nabeleli mapamboli ya lola likolo na moko na moko ya bino. Ekoka bino oyo bozali mosika na bandako na bino kozonga na yango na kozanga likama mpe kokuta nionso malonga. Ekoka biso komaniola bosolo toyoki, mpe ekoka biso kokoma mpenza bayekoli ya mpiko koleka ntango likita oyo ebandaki.

Kino tokokutana lisusu nsima ya sanza motoba, nasengi mapamboli ya Nkolo ezala likolo na bino mpe, solo, likolo na biso banso, mpe nasali boye na nkombo na Ye esantu—kutu Yesu Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso—amene.

Bimisa na lokasa