2010–2019
Bopona na Mayele
sánzá ya zómi 2014


15:19

Bopona na Mayele

“Boya mabe, mpe pona malamu” (Yisaya 7:15).

Bandeko na ngai balingami mibali, bosenga na ngai na mpokwa oyo ezali kokabola toli moke na oyo etali mikano mpe maponi.

Ntango nazalaki molobeli ya elenge na Mboka San Francisco Bay, kompani na biso esalaki mua misala ya molobeli mpo na kompani oyo ezalaki kosala emisio ya TV Charlie Brown mpo na bana bavandi na ndako. 1 Nakomaki fana ya Charles Schulz mpe biye azalaki kosala—Nguba,elongo na Charlie Brown, Lucy, Snoopy mpe bato mosusu ya kafukafu.

Oyo ngai nasepelaki na yango mingi lokola bililingi ya kosekisa ezalaki Lucy. Lokola nakanisi yango, ekipi ya ndembo ya Charlie Brown ezalaki na kati ya lisano monene—Lucy azalaki kobeta na ngambo ya loboko ya mobali; mpe bale ya likolo koleka ezalaki kobetama epai na ye. Masano ebongisamaki, mpe ezalaki kobeta ya libua ya nsuka. Soki Lucy akangaki bale, ekipi na ye elingaki elonga. Soki Lucy akueyisaki bale, ekipe mosusu elingaki elonga.

Lokola ekoki kokoma kaka na bililingi ya kosekisa, ekipe mobimba ezingaki Lucy lokola bale ezalaki kokita. Lucy azalaki kokanisa, “Soki nakangi bale, nakozala elombe; soki te, Nakozala moto ya zoba.”

Bale ezalaki kokita, mpe lolenge baninga na ye ya masano bazalaki kotala ye na bozangi bopikiliki, Lucy akueyisaki bale. Charlie Brown abuakaki ga na ye na mabele na kolemba nzoto. Bongo Lucy atalaki baninga na ye, atiaki maboko na ye na loketo, mpe alobaki, “Ndenge nini bozali kozela ngai nakanga bale ntango nazali komitungisa na oyo etali politiki ya bapaya na mboka na biso?”

Wana ezalaki moko ya ebele ya babale ya likolo Lucy akueyisaki kati ya mibu, mpe azuaki bolimbisi ya sika na mbala nionso.2 Wana ntango nyonso ya kosekisaka, babolimbisi ya Lucy ezalaki ya kilikili; ezalaki bantina ya lokuta ya kozanga na ye kokanga bale.

Ntango ya mosala ya Mokambi Thomas S. Monson, azalaki mingi mingi koteya ete mikano esalaka atandele. 3 Na nzela wana kaka lilako na ngai na butu oyo ezali tomata likolo ya ba mayele nyonso oyo ekopekisa biso kozua mikano ya sembo, mingi mingi na botosi ya kosalela Yesu Klisto. Na Yisaya toteyami, tosengeli “koboya mabe, mpe kopona malamu.” 4

Nandimi yango ezali na motuya na yango moko na ntango oyo, ntango Satana azali kotia nkanda makasi na mitema ya bato na balolenge ya sika mpe ya mabe mingi, ete maponi mpe mikano na biso esalama na bokebi makasi, nakokokanisaka na bantina mpe balotomo oyo tozali kosakola kosalela. Tozali na bosenga ya bomipesi ya kilikili te na mitindo mpe botosi ya makasi na mayokani ya bule. Ntango topesi nzela na bamayele ya kopekisa biso dotasio na tempelo, baetinda elongobani, mpe libala na tempelo, bizali yango moko ezali mabe mpenza. Ezali mawa mingi ntango tozali kotatola bolikii na bantina oyo mpe tozali kobuaka etamboli ya mokolo na mokolo oyo esengelami mpo na kokokisa yango.5

Bilenge misusu bazali kotatola ntina na bango ezali kobala na tempelo kasi bazali kotambola mwasi na mobali lokola bato balongobani te mpo na tempelo. Kozala sembo, misusu babimaka kutu te mwasi na mobali na ntango na yango! Bino banzemba ya mibali, ntango molayi bokozala banzemba, nsima ya mibu mpe bomoto, okoki kokoma malamu koleka. Kasi mabekolekayoosengelikokoma! Nasengi “bomipesa makasi”6 na milulu ya molimo mpe ya bato banso ekokana na ntina na bino ya libala na tempelo.

Basusu bazelisaka libala tii kotanga ekosila mpe musala ezuami. Atako endimami mua makasi na mokili, makanisi oyo ezali kolakisa bondimi te, kolandisama te na toli ya ba profeta ya ntango oyo, mpe yango ekokani te na malongi ya motuya.

Kala mingi te nakutanaki na elenge mobali moko ya malamu. Ba ntina na ye ezalaki kosala etinda, kozua mateya, kobala na tempelo, mpe kozua libota ya botongono ya esengo. Nasepelaki makasi na bantina na ye. Kasi na ntango ya masolo koleka, ekomaki ya solo ete etamboleli na ye mpe maponi ye azalaki kosala ekokanaki lisusus te na bantina na ye. Namiyokaki kati na ngai ete alingaki mpenza kosala misio mpe kokima kobuka mobeko ya makasi oyo ekopekisa etinda na ye, kasi etamboleli na ye ya mokolo na mokolo ezalaki kolengela ye te na mikakatano ya nzoto, makanisi, makambo ya mokili, ya mayele, mpe ya molimo azalaki kokutana na yango.7 Ayekolaka te kosala mosala makasi. Azalaki lokengo te na oyo etali kelasi mpe seminele. Azalaki kokende na eklezia, kasi atikala kotanga buku ya mormon te. Azalaki kolekisa ntango ebele koleka na masano ya video mpe site ya bato nionso. Azalaki komonana kokanisa ete komimonisa mpo na etinda na ye ekokaki. Bilenge mibali, nasengi bozongela etamboleli elongobani mpe bomilengela ya solo mpo na kozala batindami ya Nkolo na biso mpe Mobikisi, Yesu Klisto.

Komitungisa na ngai ezali kaka te kozua mikano ya makasi kasi lisusu makambo ya mua ntina—mokili ya mikolo nionso mpe mikano oyo emonanaka ya momesano wapi tokolekisa ntango na biso mingi. Na makambo oyo, tosengeli kobeta sete na kosalela na lokoso te, bokokani, mpe mingimingi mayele. Ezali malamu kozala likolo ya kilikili mpe kosala maponi ya malamu koleka.

Ndakisa moko ya kitoko ya bosenga ya kosalela na lokoso te, bokokani, mpe mayele ezali esaleli ya Interneti. Ekoki kosalamela mpo na kosala mosala ya bamisionele, kosunga na mokumba ya bonganganzambe, koluka bankoko ya motuya mpo na makuli ya bule na tempelo, mpe mingi koleka. Likoki mpo na malamu ezali monene. Toyebi lisusu ete ekoki kopesa oyo ezali mabe, oyo ezali na polonogalafi, bobomibomi ya Interneti,8 mpe bilobaloba ya ezangi mokolo. Ekoki lisusu kotambolisa liboma mpo na libela. Lokola Ndeko mobali Randall L. Ridd ateyaki na nguya makasi na likita linene oyo eleki, kolobelaka mpo na Interneti, “Okoki komikangisa na monyololo ezangi nsuka ya oyo ya motuya moke oyo ekolekisa ntango na yo mpe ekokitisa likoki na yo.”9

Katombuisa mayele libanda mpe kotelemela bosolo ezali kaka na Interneti te; ezali esika nyonso. Ezali kokanga kaka bilenge te kasi biso nyonso. Tozali na mokili etondisami solo na mitungisi.10Tozingami na babolakisi mingi ya “bosepeli mpe masano” mpe babomoi ya bonsoni mpe ya botamboli malamu te. Yango elakisami lokola etamboli malamu na basite ebele.

Mpaka David A. Bednar kala te akebisaki bandimi kozala na lolenge na biso moko na bosaleli ya basite ya bato nyonso.11 Moto moko ya mayele ya likanisi ya yambo, Arthur C. Brooks, abetaki sete na ntina oyo. Amonaki ete ntango tozali kosalela site ya bato nyonso, tosalaka lokola kolakisa makambo ya malamu ya babomoi na biso, kasi bangonga na biso ya mpasi na eteyelo to na mosala te. Tolakisaka bomoi ekoka te —ntango mosusu na lolenge ya komimatisa to lokuta. Tokaboli bomoi oyo, mpe bongo tozali kolia “pene mobimba nyonso… ya babomoi ya mabe ya [ya biso] ‘baninga’ ya site ya bato nyonso.” Brooks alobaki, “Lolenge nini okoki te komiyoka mabe koleka na kolekisa ndambo ya ntango na yo kosalaka lokola ozali na esengo kasi ozali te, mpe ndambo ya ntango na yo mosusu komonaka boniboni ya esengo koleka basusu bakomonana kozala koleka yo?”12

Ntango mosusu eyokani lokola tozali kodindaka na liboma ezangi ntina, makelele ezangi ntina, mpe kokoba kowelana. Ntango tokitisi kotambuisa mayele mpe totali nini ezingi biso, ezali na moke oyo ekosunga biso na boluki na biso ya libela kolandaka bantina ya bosembo. Tata moko ayanoli na mayele na bana na ye na mituna na bango ebele ya kosangana na masano oyo. Atuni bango na bompete nyonso, “Yango ekokomisa bino moto ya malamu koleka?”

Ntango tokosalaka maponi mabe, monene to muke, oyo ekokani te na nsango malamu ya bozongi, tobungisi mapamboli mpe babobateli tozali na yango bosenga mpe mbala mingi tokomi ya kokangama na motambo ya masumu to tobungi kaka nzela na biso na bompete.

Natungisami mingimingi na liboma13 mpe kozala na mposa koleka ya “eloko nyonso ya sika” Kati ya Eklezia tokumisaka mpe tosepelaka na bosolo mpe boyebi ya lolenge nyonso. Kasi soki mayele, boyebi, mpe bizaleli ya bato nionso ekabuani na mwango ya esengo ya Nzambe mpe mosala ya ntina ya Yesu Klisto, ezali na kopanzana oyo ezangi nzela ya bato ya mokili.14 Na mikolo na biso, atako kokende liboso ya mbango mbango na misala ebele, mingimingi na mambi mpe bopanzi nsango, babolamu ya ntina ya ebandeli ekomi kobunga mpe esengo mobimba mpe kozala malamu ekiti.

Ntango Aposolo Polo abengisamaki mpo na kozua liloba na Ngomba muke ya Mars na Athenes, amonaki ndambo ya lofundo ya boyebi ndenge moko mpe bozangi ya mayele ya solo oyo ezali lelo.15Na Misala ya Bantoma totangi lisakoli oyo: “Mpo na nyonso ya bato ya Athenes mpe bapaya baoyo bazalaki wana kolekisaka ntango na eloko mosusu te, soki koloba, to koyoka eloko moko ya sika.”16 Kobeta nsete ya Polo ezalaki Kosekua ya Yesu Klisto. Ntango liboke eyokaki lolenge ya bonzambe na nsango na ye, bamoko batshiolaki ye; basusu mpenza babenganaki ye, na kolobaka, “tokoyokisa yo lisusu na ntina oyo.”17 Polo atikaki Athenesna nkonzo te. Dean Frederic Farrar akomaki na botali na ye: “Na Athenes asalaki eklezia moko te, na Athenes akomaki mokanda moko te, mpe na Athenes, mbala mingi lokola elekaki ye nzinganzinga na yango, atikalaki kotia lisusu likolo na ye te.”18

Nandimi nsango efulami ya Mpaka Dallin H. Oaks kososola kati na “malamu, malamu koleka, malamu mingi” ekopesa nzela ekoki ya kotuya maponi mpe bapriorite. 19 Maponi ebele ezali na yango mabe mpenza te, kasi soki yango ezui ntango na biso nyonso mpe epekisi biso maponi ya malamu mingi, boye yango ekomi mayele mabe.

Atako misala mpe bantina esengeli etuyama na ntina ya koyeba soki ekomi ba kotambolisa mayele libanda na bantinaya malamu mingi. Nasosololaka masolo moko ya kobosana te na tata na ngai ntango nazalaki elenge. Azalaki kondimela mingi te ete bilenge bazalaki kotia makanisi na bango na kolengelaka bantina ya motuya mpo na ntango molayi—lokola kosala mosala mpe kosungaka mpo na mabota.

Koyekola ya ntina mpe komilengela ya kozua mayele ya mosala ezalaki makambo ya liboso ya motuya tata na ngai azalaki kosenga. Alingaki ete milulu ya libanda ya eteyelo, lokola masolo mpe mbulamatari ya bayekoli esengela ekangana mbala moko na ndambo ya bantina na ngai ya motuya. Azalaki na kondima moke na ntango molayi nazalaki kolekisa na kobeta ndembo, basket-ball, base-ball mpe kokima mbango. Azalaki kodima ete masano ekokaki kokolisa makasi, molende, mpe mosala ya elongo, kasi alobaki ntango mosusu ete kotia makasi na lisano moko mpo na ntango moke ekozala malamu. Na bomoni na ye, masano ezalaki malamu kasi malamu koleka tempo na ngai. Azalaki komitungisa ete masano mosusu ezalaki mpo na kotonga lokumu ya moke to ya monene na kobebisa ya bantina ya motuya ya ntango molayi.

Nakolandisaka lisolo oyo, moko ya bantina nalingi na lisapo ya Lucy kobetaka baseball ezali ete, bomoni ya tata na ngai, nasengelaki kotangaka politiki ya bapaya mpe komitungisaka te soki nalingaki kokanga bale. Nasengeli naloba polele ete mama na ngai alingaki masano. Akokaki kozangisa na moko ya masano na ngai kaka soki akoti lopitalo.

Nazuaki mokano ya kolanda toli ya tata na ngai mpe ya kobeta te na masano ya kosangana ya baeteyelo ntango nazalaki etudiant. Na nsima, molakisi ya ndembo ya eteyelo na biso ya mikolo ayebisaki ngai ete molakisi ya ndembo ya Stanford alikangi kolia elongo na Merlin olsen mpe ngai. Baye kati na biso oyo bazali bilenge koleka bakoki ntango mosusu koyeba Merlin te. Azalaki mobeti ya kokamuisa na Eteyelo ya Mikolo ya Logan epai wapi nabetaki lokola baki, mpe mosani ya kati, mpe nakomaki mosani ya liboso mpe motie mingete. Na eteyelo ya mikolo Merlin abengamaki lokola mingi ya basani banene ya ndembo na katikati ya ekolo. Na eteyelo, alongaki mbano ya Outland lokola mosani malamu ya molongo na kati ya ekolo. Na nsuka Merlin azalaki moponami ya misato na ntango ya kobenda ya League National ya Football mpe abetaki na kati ya Pro Bowls ya kokamua mbala 14 elendani. Azuaki motole na Pro Football Hall of Fame na 1982.20

Kolia elongo na molakisi ya Stanford ezalaki na restaurant Bluebird na Logan, Utah. Nsima ya bopesani mbote, atalaki ngai lisusu na miso te. Asololaki kaka na Merlin kasi akipaki ngai te. Na nsuka ya kolia, mpo na mbala ya liboso, abalukaki na ngambo na ngai, kasi akokaki komikundola nkombo na ngai te. Na nsima ayebisaki Merlin, “Soki oponi Stanford mpe olingi komema moninga na yo, azali na bilembo ya malamu ekoki mpe ekoki na yango ya solo kobongisama.” Mayele oyo etindimisaki ngai ete nasengeli kolanda toli ya bwania ya tata na ngai.

Mposa na ngai ezali te kolembisa nzoto na kosangana na masano to kosalela Interneti to milulu esengeli oyo bilenge balingaka. Ezali na milulu mosusu oyo esengaka na kosalela na lokoso te, bokokani, mpe bwania. Soki esalelami na mayele nyonso, ekofulukisa babomoi na biso.

Na bongo, nalendisi moto nyonso, elenge mpe mokolo, kotala lisusu bantina mpe mituya mpe kosala makasi ya kosalela botosi monene koleka. Etamboli na biso ya mokolo na mokolo mpe maponi na biso esengeli ekokana na bantina na biso. Tosengeli kotombuama likolo ya kilikili mpe botambuisi mayele libanda. Ezali na motuya na yango moko mpenza kosala maponi ekokani na mayokani na biso na mosala ya Yesu-Klisto kati na bosembo.21 Tosengeli te kotambolisa mayele na biso, to kokueyisa bale wana mpo na bantina songolo.

Bomoi oyo ezali ntango ya komibongisa kokutana na Nzambe.22 Tozali na esengo, libota ya esengo, ya posepeli. Tosepeli na lolenge malamu ya kosekisa mpe tolingi ntango tosangani na baninga mpe libota. Kasi tosengeli koyeba lisusu ete ezali ntina ya solo makasi oyo esengeli komema lolenge na biso na bomoi mpe maponi na biso nyonso. Babotambuisi mayele libanda mpe kilikili oyo ekati ndelo ya kokende liboso ezali mabe mingi, kasi soki ekitisi bondimi na Yesu-Klisto mpe na Eklezia na Ye, ezali ya likama.

Losambo na ngai ezali ete lokola nzoto ya basimbi bonganganzambe, tokosala etamboli na biso ndenge moko na bantina ya lokumu esengelami na baoyo bazali na mosala ya Nkolo. Na makambo nyonso tosengeli kokundola ete kozalaka “ngui na litatoli ya Yesu” ezali momekano monene katikati na babokonzi ya selesitiale to telesitiale. 23 Tolingi tokutama na ngambu ya selesitiale na bokaboli wana. Lokola moko ya Bapostolo na Ye, napesi litatoli monene ya bosolo ya Bomikabi mpe bonzambe ya Yesu-Klisto, amene.

Matangi

  1. Lee Mendelson-Bill Melendez Production TV Specials.

  2. Kowuta na basanza ya Sarturne oyo etambolisaki mayele na ye libanda, tii na komitungisaka na soki biloko mabe ekoki kozala na ga na ye, Lucy ntango nyonso azalaki koloba lokuta mpo na nini akueyisaki bale.

  3. Tala “Decisions Determine Destiny,” chapter 8 in Pathways to Perfection:Discourses of Thomas S. Monson(1973), 57˗ 65

  4. Yisaya7:15.

  5. “If to do were as easy as to know what were good to do, chapels had been churches, and poor men’s cottages princes’ palaces” (William Shakespeare, The Merchant of Venice act1, scene2, lines 12˗14).

  6. Doctrine et Alliances 58:27.

  7. Tala Adjusting to Missionary Life (mwa buku, 2013), 23–49.

  8. Tala Stephanie Rosenbloom, “Dealing with Digital Cruelty,” New York Times, sanza ya mwambe 24, 2014, SR1.

  9. Randall L. Ridd, “The Coice Generation,” Ensign toLiahona, sanza ya mitano 2014, 56.

  10. Tala Doctrine et Alliances 45:26.

  11. Tala David A. Bednar, “To Sweep the Earth as with a Flood” (speech delivered at BYU Campus Education Week, sanza ya mwambe 19, 2014); lds.org/prophets-and-apostles/unto-all-the-world/to-sweep-the-earth-as-a-flood.

  12. Arthur C. Brooks, “Love People, Not Pleasure,” New York Times, sanza ya nsambo  20, 2014, 7.

  13. Na mawa, moko ya bobaluki oyo amati na mikolo na biso ezali liboma monene. Ntango Mobikisi atangaki bamoko ya makambo oyo ekotia moto mbindo, atangaki liboma (tala Malako 7:22).

  14. Oyo ekomaki na Grece mpe Rome ya kala, lokola mpe na bato ya Buku ya Mormon.

  15. Tala Frederic W. Farrar, The Life and Work of St. Paul (1898), 302. Ezalaki na bafilozofe ya ndenge nyonso, ndakisa Baepicurien mpe Bastoïcien, maboke ya kowelana oyo basusu balimbolaki lokola Bafaseo mpe Basadiseo ya mokili ya bapagano. Tala lisusu Quentin L. Cook, “Looking beyond the Mark,” Ensign, sanza ya misato 2003, 41–44;Liahona, sanza ya misato 2003, 21–24.

  16. Misala 17:21.

  17. Misala 17:32.

  18. Farrar, The Life and Work of St. Paul, 312.

  19. Tala Dallin H. Oaks, “Good, Better, Best,” Ensign to Liahona, sanza ya zomi na moko 2007, 104–8.

  20. Merlin Olsen azalaki moko mbeti ndembo ayebana, mosani, mpe molobi na TV na NFL mpo na NBC. Alongaki mbano ya Outland Trophy kobeka ndembo mpo Univesite ya Utah State. Azalaki kobeta ndembo ya bayebi mpo na Los Angeles Rams. Na TV asanaki lokola Jonathan Garvery moto ya ngambo mosusu ya Michael Landon na Little House on the Prairie mpe azwaki pologalame na ye moko ya TV, Father Murphy. Merlin asi akufa sikawa (sanza ya misato 11, 2010), mpe azangi biso mingi.

  21. Tala Doctrine et Alliances 76:5.

  22. Tala Alma 34:32.

  23. Doctrine et Alliances 76:79.