2010–2019
Bobimisi Ezali Se Kokoba
sánzá ya zómi 2014


17:30

Bobimisi Ezali Se Kokoba

Bososoli ya moto mpe makanisi ya malonga ekoki te mpo na kozwa biyano na mituna oyo eleki ntina na bomoi. Tozali na mposa ya bobimisi uta na Nzambe.

Elikia na ngai lelo ezali ete tokoka banso koyoka bolingo mpe pole uta na Nzambe. Ezali na bamingi kolandaka biso lelo oyo bazali na mposa ya makasi ya kozwa lipamboli wana ya bobimisi ya moto na moto uta na Tata na biso ya bolingo na Lola.

Mpo na bakambi ya misio, ekoki kozala losambo ya kosambelela mpo na koyeba boniboni kolendisa misionele oyo azali kobundabunda. Mpo na tata to mama na esika moko ebebi na bitumba na mokili, ekozala mposa ya nsuka mpo na koyeba soki kolongola libota na bango na likama to soki kotikala esika bazali. Nkama na nkama ya bakambi ya makonzi mpe baepisikopo bazali kosambela lelo mpo na koyeba boniboni kosalisa Nkolo kobikisaka bampate. Mpe mpo na profeta, ekozala koyeba nini Nkolo alingi ye aloba na Eklezia mpe na mokili moko na matata.

Biso banso toyebi ete bososoli ya moto mpe makanisi ya malonga ekoki te mpo na kozwa biyano na mituna oyo eleki ntina na bomoi. Tozali na mposa ya bobimisi uta na Nzambe. Mpe tozali kaka te na mposa ya bobimisi na ntango ya motungisi, kasi tozali na mposa ya bofuli ya sika mbala na mbala. Tozali kaka te na mposa ya pole mpe esengo, kasi tozali na mposa ya lipamboli ya kokoba kati na bosololi elongo na Nzambe.

Kozala mpenza ya Eklezia ewuti na elenge mobali moko ayebaki ete ezali ya solo. Elenge Joseph Smith ayebaki ete akokaki te yemei koyeba eklezia nini kokota. Boye atunaki Nzambe lokola buku ya Yakobo elobelaki ye akokaki. Nzambe Tata mpe Mwana na Ye ya Bolingo babimaki na lidusu ya banzete. Bayanolaki na motuna ete ezalaki koleka nguya ya Joseph mpo na koyanola.

Kaka te ebengamaki ye na Nzambe mpo na kotia eklezia ya Yesu Klisto, kasi na yango ezongisamaki nguya mpo na kobelela Molimo Mosantu na yango ete bobimisi wana uta na Nzambe ekoka kozala ya Kokoba.

Mokambi Boyd K. Packer alimbolaki elembo wana ekolakisa Eklezia ya solo na lolenge oyo: “Bobimisi ya Kokoba na Eklezia: profeta akozwa yango mpo na Eklezia; mokambi mpo na likonzi na ye, misio na ye, to lisanga likoki na ye; episikopo mpo na etape na ye; tata mpo na libota na ye; moto na moto mpo na yemei.”1

Nzela wana ya kitoko ya bobimisi ekobanda, ekosuka, mpe ekokoba ntango tozwi mabimisi ya moto na moto. Tika tozwa Nefi ya monene, mwana ya Lehi, lokola ndakisa. Tata na ye alotaka ndoto. Basusu na libota ya Nefi bamonaki nkoto ya Nefi lokola elembo ya mobulu na bongo. Ndoto ezalaki na motindo moko uta na Nzambe mpo na bana ya Lehi mpo na komeka likama ya kozonga na Yelusalemi mpo na bapalaki oyo ezalaki na maloba ya Nzambe mpo ete bakoka kokamata yango na mobembo na bango na mabele ya elaka.

Mbala mingi tokotanga esakola ya mpiko ya Nefi ntango tata na ye asengaki na bango mpo na kozonga na Yelusaleme. Boyebi maloba yango: “Nakokende mpe nakosala makambo oyo Nkolo atindi.”2

Ntango Lehi ayokaki Nefi koloba maloba wana, makomi malobi ete “asepelaki mingi mpenza.”3 Asepelaki mpamba te ayebaki ete Nefi apambolamaka na bobimisi ya kondimisa mpenza ete ndoto ya tata na ye ezalaki bosololi ya solo uta na Nzambe. Nefi alobaki te, nakokende mpe nakosala nini tata alobaki na ngai nasala.” Esika na yango alobaki, “nakokende mpe nakosala makambo oyo Nkolo atindi.”

Uta na makambo ya mabota na bino, biso lisusu boyebi ntina nini Lehi azalaki “asepelaki mingi.” Esengo na ye ewutaki na koyebaka ete Nefi azwaki bobimisi ya kondimisa.

Baboti mingi batii mibeko ya libota mpo na ntango mwana ya elenge asengeli kozonga ndako na butu. Kasi bokanisa esengo ntango baboti bayoki, lokola moko asalaki kaka mwa baposo eleki, ete mwana moko oyo kala te atikaki ndako kaka te amipekisaki kobima na butu kasi lisusu abatelaki Saba kaka lokola ateyamaki na ndako. Bobimisi ya moboti ezali na mbano ya kowumela na bobimisi ya moto na moto oyo ekokoba na mwana.

Mama na ngai asengelaki kososola ete libongisi wana ya bobimisi. Lokola elenge bobali, nasengelaki kokanga ekuke ya nsima mbangumbangu soki nakomaki ntango mabe na ndako na mpokwa. Nasengelaki koleka kisuku ya kolala ya mama na ngai na nzela na ngai ya kisuku na ngai. Nzokande natambolaki malembe malembe, kaka ntango nakomaki na ekuke na ye ya kofungwana moke, nakokaki koyoka nkombo na ngai, ntango nionso na kimia, “Hal. Yaka mwa moke.”

Nalingaki kokota mpe kovanda na nsonge ya mbeto. Kisuku elingaki kozala ya molili. Soki oyokaka, olingaki kokanisa ezalaki kaka masolo ya esengo ya bomoi. Kasi ti mokolo ya lelo, oyo alobaki ezongeli ngai na makanisi, na nguya wana kaka nayokaki ntango natangi likundoli ya lipamboli na ngai ya batata.

Nayebi te nini azalaki kosenga na losambo ntango azalaki kozela ngai babutu wana. Nakanisi ndambo esengelaki kozala mpo na kimia na ngai. Kasi nayebi mpenza ete azalaki kosambela lokola mopamboli akosala yambo ya kopesa lipamboli. Akosambela ete maloba na ye eya na mozwi lokola maloba ya Nzambe, ya ye te. Nsambo ya mama na ngai mpo na lipamboli wana eyanolamaki na moto na ngai. Azali na mokili ya molimo mpe azali kuna mibu koleka 40. Ayebi mpenza ete napambolami, ntango asengaki, koyoka na toli na ye motindo ya Nzambe. Mpe nameki kokende mpe kosala lokola alikiaki nalingaki.

Namonaki likamwisi ya bobimisi ya kokoba na bakambi ya likonzi mpe baepisikopo na Eklezia. Mpe, lokola ezali ya solo na bobimisi na bayangeli ya mabota, motuya ya bobimisi ewuti na baye bazali kokambama kozwaka bobimisi ya kondimisa.

Namonaki likamwisi wana ya libimibi nsima ya bobukani ya Teton Dam na Idaho na 1976. Mingi na bino boyebi lisolo ya oyo ekomaki. Kasi ndakisa ya bobimisi ya kokoba oyo elekaki na nzela ya mokambi ya likonzi ekoki kopambola biso banso na mikolo ya lelo.

Bankoto ya bato balongolamaki ntango bandako na bango ebebaki. Kokamba bato ya kosunga ekweyaki na mokambi ya likonzi ya esika, mosali bilanga. Nazalaki na kelasi moko na Ricks College kaka mwa mikolo nsima ya likama. Moyangeli moko uta na bilo monene ya makama ayaka. Ye mpe basungi na ye bayaki na kisuku ya monene wapi mokambi ya likonzi asanganaka na baepisikopo mpe kutu boko batoma ya biyamba bisusu ya esika. Nazalaki kuna mpamba te mingi ya bato oyo bakufaki te basalisaki bango mpe bapesaki bango ndako na nganda ya eteyelo wapi nazalaki mokambi.

Ntango bosangani ebandaki, ntoma uta na bilo monene ya makama atelemaki mpe abandaki koloba na mongongo ya bokonzi nini esengelaki kosalama. Nsima ya kotangaka moko na moko ya misala mitano to motoba alobaki ezalaki na motuya, mokambi ya likonzi ayanolaki na kimia, “Tosili kosala yango.”

Nsima ya mwa miniti, moto wana ya bilo monene ya makamba alobaki, “nakanisi ete nakovanda kaka mpe kotala mwa ntango.” Ye mpe bakitani na ye nde bayokaki ntango baepisikopo mpe bakambi ya lisanga likoki ya bampaka basangelaki nini basalaki. Balimbolaki mitindo nini bazwaka mpe balandaka uta na bayangeli na bango. Balobelaki lisusu nini bafulamaka na kosala ntango bamemaki mateya mpo na komona mabota mpe kosunga bango. Ekomaki butu mokolo wana. Banso balembaki mingi mpo na kokoka kolakisa mpenza liyoki na bango longola se bolingo na bango na bato.

Mokambi ya likonzi apesaki mwa bokambi ya nsuka na baepisikopo, mpe sima asakolaki ngonga moko mpo na bosangani ya nsango ya nsima noki, ntongo elandi

Ntongo ya nsima moyangeli ya ekipi ya monene ayaki miniti 20 liboso bosangani ya nsango mpe lotomo ebanda. Natelemaki penepene. Nayokaki ye koloba na kimia na mokambi ya likonzi, “Mokambi, nini olingi ngai mpe bato ya ekipi na ngai kosala?”

Oyo moto wana amonaki namonaki na bantango ya mpasi mpe momekano na mokili mobimba. Mokambi Parker azalaki na bosolo. Bobimisi ekokoba ekowuta na bakambi ya likonzi mpo na komatisa bango likolo ya mayele mpe makoki na bango. Mpe, koleka yango, Nkolo apesi na baye mokambi akokamba litatoli ya kondimisa ete mitindo na ye ewutaki na Nzambe na nzela ya Molimo Mosantu mpo na bato babonga nie te.

Napambolami mpo na kobiangama mpo na kolanda bayengeli bafulami mingi na bomoi na ngai. Lokola elenge mobali mpenza nabiangamaki mpo na kozala mopesi toli na mokambi ya lisanga likoki ya bampaka. Nsima nazalaki mopesi toli ya mokambi ya disitiliki, mpe na Episikopo Mokambi ya Eklezia, moko na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, mpe mopesi toli na Bakambi misato ya Eklezia. Namonaki bobimisi epesama mpo na bango mpe nde ekotisamaki na balandi.

Bobimisi oyo ya moto na moto ya boyambi, mpo na yango biso nionso tozali na mposa, ekoya na pete te, to ekoya te kaka na kosenga. Nkolo apesi ndelo mpo na likoki ya koyamba matatoli ya boye uta na Nzambe. Ezali mokambi mpo na moto nionso kolukaka bobimisi ya yemei lokola bango tosengeli.

“Tika nsopo na yo nionso etonda na bolingani epai ya bango banso, mpe epai ndako ya bondimi, mpe bolamu ekembisa makanisi na ye ntango inso, nde bondimami na yo ekokoma makasi na miso ya Mzambe; mpe malongi ya bonganganzambe ekosopana likolo na molimo na bino lokola matanga uta na lola.

“Molimo Mosantu akozala moninga na yo ya mbala nionso.”4

Uta na toli wana nabendi mpo na biso banso. Bozwa te na pete liyoki bozwi uta na bolingo ya profeta ya Nzambe. Wapi epai nakei na Eklezia, profeta nini azali ntango wana, bandimi bakotuna, “Ntango bozongi na Bandako ya mokonzi ya Eklezia, tosengi boloba na profeta tolingi ye mingi?”

Yango ezali mosika mingi koleka bokambami ya elombe to mayoki tozali na yango ntango mosusu ya kolula bilongi ya bilombe. Ezali likabo uta na Nzambe. Na yango bokozwa na pete mingi likabo ya bobimisi ya kondimisa ntango alobi na mosala ya profeta ya Nzambe. Bolingo boyoki ezali bolingi Nkolo azali na yango mpo na oyo nionso azali molobeli na ye.

Yango ezali pete koyoka mbala nionso mpamba te Nkolo mbala mingi akoloba na baprofeta na Ye mpo na kopesa toli oyo ezali mpasi mpo na bato kondima. Monguna ya milimo na biso akokoka komeka kokamba biso na kotukama mpe kotia ntembe na libiangi ya profeta uta na Nzambe.

Namoni boniboni Molimo Mosantu akoki kosimba motema moko elembisami mpo na kobatela moyekoli moko mosawa ya Yesu Klisto na bobimisi ya kondimisa.

Profeta atindaki ngai mpo na kopesa nguya ya bule ya kokangisa na moto moko na engumba ya moko mosika mpenza. Bobele profeta ya Nzambe azali na bafungola mpo na kozwa mokano ya nani asengeli kozwa nguya wana ya bule oyo epesamaki na Nkolo na Petelo, Apostolo ya nkulutu. Mazwaka nguya wana kaka ya kokangisa, kasi bobele na bokambami ya Mokambi ya Ekleiza ekokaki ngai kopesa yango na mosusu.

Boye, na kisuku ya ndakonzambe moko mosika na Salt Lake, natiaki maboko na moto ya moto moko aponamaki na profeta aponaki mpo na kozwa nguya ya kokangisa. Maboko na ye ezalaki na bilembo ya bomoi ya kosala bilanga mpo na mwa bilei. Mwa mwasi na ye avandaki penepene na ye. Ye lisusu ezalaki na bilembo ya mibu ya mosala ya makasi elongo na mobali na ye.

Nalobaki maloba mapesamaki na profeta: “Na nse ya botindami ya bokonzi mpe mokumba uta,” mpe sima nde nkombo ya profeta, “oyo asimbi bafungola nionso ya bonganganzambe na mabele nan tango oyo, nakulisi nguya likolo ya,” mpe napesaki nkombo ya moto mpe nsima nkombo ya tempelo wapi esika alingaki kosala lokola mokangisi.

Pinzoli elandaki na matama na ye. Namonaki ete mwasi na ye azalaki lisusu kolela. Nazelaki bango bazala kimia. Atelemaki mpe ayaki epai na ngai. Atalaki likolo mpe nsima alobaki na nsoni ete azalaki na esengo mpe lisusu na mawa. Alobaki alingaka mingi mpenza kokende na tempelo elongo na mobali na ye, kasi ete sikawa ayokaki ete asengelaki te kokende elongo na ye mpamba te Nzambe aponaka ye mpo na bondimami ya nkembo mpe ya bule ya boye. Nsima alobaki ete liyoki na ye ya kozanga na kozala moninga na ye ya tempelo eyaki mpambe te akokaki te kotanga to kokoma.

Nayebisaki ye ya solo ete mobali na ye akokumisama na kimoninga na ye na temple na ntina ya nguya na ye monene ya molimo. Lokola nakokaki kosimba mwa elobeli na ye, nalobaki na ye ete Nzambe abimisaki makambo mpo na ye koleka boyekoli ya mokili.

Ayebaki na likabo ya Molimo ete Nzambe apesaki, na nzela ya baprofeta, na Ye bondimami moko eluti na mobali ye alingaki. Ayebaki mpo na yemei ete bafungola mpo na kopesa nguya wana ya kokangisa esimbamaki na moto moko amona naino te mpe ayebaki mpo yemei ezalaki profeta ya Nzambe. Ayebaki, na kozanga koyebisama na nzeneneke moko ya bomoi, ete profeta asambelaki likolo ya nkombo ya mobali na ye. Ayebaki mpo na yemei ete Nzambe asalaki libiangi.

Ayebaka lisusu ete makuli mobali na ye alingaki kosala elingaki kokangisa bato mpo na seko na bokonzi ya selesitiale. Andimisaka na molimo mpe motema na ye ete elaka Nkolo asalaki na Petelo ezali kokoba naino na Ekleiza: “Oyo nionso okokanga na mabele ekokangama na lola.”5 Ayebaki yango na yemei, na bobimisi, uta na Nzambe.

Tika tozonga na esika tobandaki. “Bobimisi ezali kokoba na Eklezia: profeta kozwaka yango mpo na Eklezia; mokambi mpo na likonzi na ye, misio na ye, to lisanga likoki na ye; episikopo mpo na etape na ye; tata mpo na libota na ye; moto na moto mpo na yemei.”6

Napesi litatoli ete ezali ya solo. Tata na Lola ayokaka nsambo na biso. Ye alingi biso. Ayebi nkombo na yo. Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe, mpe Mosikoli na biso Ye alingi yo koleka bokoki na ye ya koyeba.

Nzambe akosepa bobimisi, na nzela ya Molimo Mosantu, na bana na Ye. Ye alobaka na profeta na Ye na mabele, oyo lelo ezali Thomas S. Monson. Natatoli ete asimbi mpe akosalelaka bafungola ya bonganganzambe na mabele.

Ntango boyoki na likita oyo maloba ya baye Nzambe abiangi mpo na koloba mpo na Ye. Nasambeli ete bozwa bobimisi ya kondimisa esengeli mpo na komona nzela na bino na kozonga ndako lisusu, mpo na kovanda elongo na Ye na libota likangisama libela. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.