2010–2019
Iyo, Nkolo, Nakolanda Yo
sánzá ya zómi 2014


Iyo, Nkolo, Nakolanda Yo

Nkolo azali kobengizsa biso kosalelaka verbe ekeseni: “Yaka epai na ngai,” “Landa ngai,” “Tambola elongo na ngai.” Na ndakisa moko na moko ezali libengisi mpo na kosala.

“Mpo tala, Nkolo akopesaka epai ya bikolo nionso, ya bikolo mpe monoko ya bangomei, mpo na kolakisa liloba na ye.”1 Lelo likomi oyo ekokisami lisusu ntango napesami libaku ya koloba mayoki na ngai na monoko na ngai ya kobotama.

Ezalaki na mobu 1975, mpe nazalaki kosala na Misio ya Uruguay-Paraguay lokola elenge misionele. Na sanza na ngai ya yambo kati na misio, mikambi ya zone basalaki molulu mpo na kolakisa libongisi ya nsango malamu. Misionele moko na moko kati na zone akangisamaki miso, mpe toyebisamaki ete tosengelaki kolanda nzela kokambaka na ndako ya milulu. Tosengelaki kolanda mongongo ya mokambi moko boye, mongongo oyo toyokaki liboso tobanda kotambola. Nzokande, tokebisamaki ete na mobembo yango, tokoyoka mingongo oyo ekomeka kobulinginisa biso mpe kobukisa biso nzela.

Nsima ya mwa minuti ya koyokaka makelele, koloba, mpe—na katikati na yango nionso—mongongo oyo elobaki, “Landa ngai,” nayokaki elikia ete nazalaki kolanda mongongo ya malamu. Ntango tokomaki na ndako ya milulu ya ndakonzambe, tosengamaki tolongola bilamba na bison a miso. Ntango tosalaki boye, nasosolaki ete ezalaki na maboke mibale mpe ete nazalaki na liboke oyo elandaka mongongo ya mabe. “Eyokanaki mingi mpenza lokola moko ya malamu,” nalobaki na ngaimei.

Likambo wana ya mibu 39 eleki ezalaki na mosala moko ya kowumela na ngai. Namilobelaki, “Mokolo moko te, naino lisusu kolanda mongongo mabe.” Nde namilobelaki, “Iyo, Nkolo, nakolanda Yo.”

Nalingi kolobela likambo oyo na libengisi ya boboto ya Mobikisi epai na biso:

“Ngai nazali mobateli malamu, nayebi bameme na ngai. …

“Bampate na ngai bakokyokaka mongongo na ngai mpe ngai nayebi bango, mpe bakobila ngai”2

Libengisi ya “landa Ye” ezali libengisi ya pete, direki, mpe nguya mingi tokoki kozwa. Eyaka uta mongongo moko ya polele oyo ekoki kobulinginisama te.

Nkolo azali kobengisa biso kosalelaka verbe ekeseni: “Yaka epai na ngai,” “Landa ngai,” “Tambola elongo na ngai.” Na ndakisa moko na moko ezali libengisi ya mpamba te; ezali libengisi mpo na kosala. Epesami na bato banso na moko oyo azali Profeta ya baprofeta, Moteyi ya bateyi, Mwana ya Nzambe, Mesiya.

Libengisi ya “Yaka epai na Ngai”

“Boya liboso na ngai, bino banso bozali bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.”3

Bino oyo bozali naino bandimi ya Eklezia te bokozwa libengisi oyo na nzela ya bamisionele na maloba, “Okotanga Buku ya Mormon? Okosambela? Okokende na eklezia? Okolanda ndakisa ya Yesu Klistu mpe kobatisama na baoyo bazali na likoki?”4 Lolenge nini bokoyanola libengisi oyo lelo?5

Nabengisi bino boyoka mpe boyamba etinda yango na kolobaka, “Iyo, Nkolo, nakolanda Yo!”

Carlos Badiola mpe libota na ye, na Minas, Uruguay, bazalaki kokutana na bamisionele. Uta bampaka batunaki mituna ebele na mateya, bakanaki kobengisa moto ya penepene moko ya mondimi te—mwana mwasi moko ya kitoko ya mibu 14 babengi Norma—mpo na kosalisa bango bayanola. Norma azalaki moyekoli ya eteyelo ya bamikolo amipesa oyo azalaki koyekola Biblia na eteyelo mobu wana, yango wana ntango bamisionele batunaki motuna, Norma ayanolaki. Azalaki “moluki ya wolo.” Liteya eteyamaki mokolo wana ezalaki etali Liloba ya Bwania.

Ntango azongaki ndako nsima ya liteya na bamisionele, Norma ayebaki maye asengelaki kosala. Alobaki na mama na ye, “Mama, kobanda lelo, café ya miliki lisusu te mpo na ngai. Kaka miliki.” Eyano wana ezalaki bolakisi ya komonana ya mposa ya koyamba libengisi ya kolanda Klisto, lokola etandolami na nzela ya bamisionele.

Carlos Badiola mpe Norma lokola babatisamaki. Nsima ya mikolo, kolandaka ndakisa ya Norma, mama, tata mpe bandeko na ye babatisamaki. Norma mpe ngai tokolaki elongo na mwa etape ya makasi wana. Nsima ya mikolo, ntango nazongaki uta kosalaka misio, tobalanaki. Nayebaki ntango nionso ete ekozala pete koleka kolanda Mobikisi elongo na ye na mopanzi na ngai.

Moko oyo azali mondimi ya Eklezia mpe ayambi libengisi oyo azongisi sika bomipesi poso na poso na kokabolaka elambo.6 Eteni ya komipesa wana ezali na kobatelaka mitindo; na kosalaka boye ozali koloba, “Iyo, Nkolo, nakolanda Yo!”7

Libengisi ya “Kolanda Ngai”

“Landa ngai” ezalaki libengisi ya Nkolo na elenge mokambi ya bofuluki. Mobali ya bofuluki abatelaki mitindo na bomoi na ye mobimba. Ntango atunaki nini lisusu akokaki kosala, azwaki eyano moko na libengisi ya polele: “Yaka, … landa ngai.”8 Nzokande, ata kutu libengisi ezali pete, ezalaki na kozanga libonza te. Esengi bokasi—ebalani na mokano mpe mosala.

Profeta Nefi abengisaki bokanisi ya moto yemei ntango atunaki: “Mpe [Yesu] alobaki na bana ya bato ete: Bolanda ngai. Yango wana bandeko balingami na ngai, ekoki biso kolanda Yesu longola se soki tokozala na bolingi ya kobatela mitindo ya Tata?”9

Libengisi “koya epai na Ye,” koyoka mongongo na Ye, mpe kolanda yango ezali nsango ya bamisionele uta ebandeli, kosalisaka mingi babongola babomoi na bango libela.

Mibu ntuku mitana eleki bamisionele bakotaki na ndako ya kobongisa montele mpo na kotika montele ebongisama. Lokola ekosalaka bamisionele malamu, bazwaki libaku ya kosollola na tata mpe mama na ngai oyo etali nsango malamu. Tata nangai ayambaki bamisionele, mpe mama na ngai ayambaki nsango ya kolanda Klisto. Uta mokolo wana tino lelo, atikali na mosala kati na Eklezia. Alobaki, “Iyo, Nkolo, nakolanda Yo!”

Wana ezali yo kobunda mpo na kolanda Ye, okozwa nguya ya kotombola mikumba ya bomoi, soki ya mosuni to ya molimo, mpe koyoka mbongwana ya kati ya malamu oyo ekosalisa yo ozala na esengo koleka.

Libengisi ya “Kotambola elongo na Ngai”

Enoch abiangemaki mpo na kosakola nsango malamu na bato moko ya matata, ya mitema makasi. Amiyokaki ya kolongobana te. Azalaki na ntembe etali soki akokaki kosala yango. Nkolo akotisaki bantembe na ye mpe alendisaki bondimi na ye na nzela ya libengisi “Tambola na ngai”—libengizsi moko oyo, lokola nzete ya mokufi miso to loboko ya moninga, ekoki kokamba matambe ya makolo ya moko oyo ya matambe ezali makasi te. Na kokamataka loboka ya Mobikisi mpe kotambolaka na Ye, Enoch amonaki ete litambe na ye ekomaki ngwi mpe akomaki misionele monene mpe profeta.10

Mokano ya “koya epai na ngai” mpe “kolanda ngai” ezali ya moto ye moko. Ntango toyambi libengisi oyo, ndelo na biso ya komipesa ebuti, mpe ezali ntango oyo tokoki “kotambola na Ye.” Ndelo oyo etie bozalani ya penepene koleka elongo na Mobikisi—mbuma ya boyambi na biso libengisi.

Norma mpe ngai toyambaki moko moko libiangi ya “koya epai na ngai” mpe ya “kolanda ngai.” Nde, elongo, kosunganaka moko na mosusu, toyekolaki kotambola elongo na Ye.

Bokasi mpe mokano ya koluka komona Ye mpe kolanda Ye ekofutama na mapamboli oyo tozali na yango mposa.

Ya boye ezalaki ndakisa ya mwasi oyo, na bokasi mingi, asalaki nionso mpo na kosimba garma ya Mobikisi11 to ya Balatimai mokufi miso, oyo ya ye mokano ezalaki likambo ya ntina na likamwisi oyo esalamaki na bomoi na ye.12 Na bandakisi nionso mibale libiki ya nzoto mpe ya molimo epesamaki.

Sembola loboko na yo, samba garma ya Ye, yamba libengisi jna Ye, loba, “Iyo, Nkolo, nakolanda Yo!”—mpe tambola elongo na Ye.

Nkolo azali kobengisa biso kosalelaka verbe ekeseni: Na ndakisa moko na moko ezali libengisi mpo na kosala. “Yaka epai na ngai,” “Landa ngai,” “Tambola elongo na ngai.” Ezali mabengisi oyo ezali na nguya makasi—mpo na baoyo bayambi yango—mpo na kobongola bomoi na yo mpe kobota mbongwana kati na yo oyo ekokamba yo mpo oloba, “[na] zali lisusu na meko mpo na kosala bobe te, kasi mpo na kosala bolamu ntango nionso.”13

Lokola etalisi ya libanda ya mbongwana wana, okoyoka mposa makasi ya “kosalisa baye bazali nakati ya bolembu, kotombola maboko oyo elembi mpe kolendisa mabolongo oyo ezali kotetengatenga.”14

Bameko nini ekoki biso kozwa lelo mpo na “kotambola elongo na Ye”?

  1. Boleisa mposa ya kozala balandi malamu koleka ya Klisto.15

  2. Bosambela mpo na mposa oyo ete bondimi na bino na Ye ekoka kokola.16

  3. Bozwa boyebi uta na makomi, kongengisaka nzela mpe kolendisaka mposa na bino ya kobongwana.17

  4. Bozwa mokano lelo ya kosala mpe koloba, “Iyo, Nkolo, nakolanda Yo!” Koyebaka na pete bosolo ekobongola mokili na bino longola soki bobaloli boyebi na mosala.18

  5. Boyika mpiko na mokano bosali na kosalelaka mabongisi oyo mokolo na mokolo.19

Tika maloba ya profete na biso ya bolingo, Mokambi Thomas S. Monson, etindika bison a mosala kati na mposa n abiso ya koyamba libengisi ya Mobikisi. Mokambi Monson alobaki: “Nani azali Mokonzi ya nkembo, Nkolo oyo ya bayambi? Ye azali Moteyi. Azali Mobikisi. Azali Mwana ya Nzambe. Azali Mosali ya Lobiko na biso, Azali kosala biso elembo, ‘Bolanda ngai.’ Azali kotinda, ‘Bokende, mpe bosala mpela moko.’Azali kobondela, ‘Bobatela mitindo na ngai.’”20

Tika tozwa mokano lelo mpo na kobakisa ndelo ya kokumbamela mpe komipesa epai ya Nzambe. Mpe tika eyano na bison a libengisi na Ye eyokisama makasi mpe polele: “Iyo, Nkolo, nakolanda Yo!”21 Na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.