Tikala na kati ya Masuwa mpe Simba!
Soki totaleli kaka Nkolo, tolakelami mapamboli ya koleka.
Kala mingi te, moko ya baninga na ngai azwaki mwana na ye ya mobali bakende mobembo na ebale ya Colorado na nzela ya Cataract Canyon, oyo ezali na sudi esti ya Utah. Canyon eyebani mpo na bakilometele na yango (23 km) ya botioli mayi ya mbangu oyo ekoki kozala likama.
Ntango bazalaki komilengela mpo na kokende, batalaki lisusu na bokebi lokosa ya Interneti ya National Park Service, oyo ezali na nsango ya ntina mpo na bolengeli ya moto yemei mpe ya bato nionso, makama ebombama.
Na ebandeli ya mobembo, moko ya bakambi oyo ayebi mayi atangaki lisusu malako ya bokebi, kobetaka nsete na mibeko misato oyo ekokaki kosalisa liboke ya bato basala mobembo na bokebi na nzela ya ebale “Mobeko ya yambo: tikala na masuwa! Mobeko ya mibale: ntango nionso lata jile ya sovetaje! Mobeko ya misato: ntango nionso simba makasi na maboko mibale!” Nsima alobaki lisusu ete, na kobetaka nsete makasi, “Likolo ya nionso, kanisa mobeko ya yambo: tikala na masuwa!”
Lisolo oyo ekundolisi ngai na ntina ya mobembo na biso na kufa. Mingi kati na biso tozali na bileko na bomoi na biso wapi bamai ya kimia ya bomoi epesi esengo. Mbala mosusu, tokutanaka mayi ya mbangu oyo ezali mpenza lolenge moko na oyo tomoni na bakilometele 23 etelema ngwi na nzela ya Cataract Canyon—mikakatano oyo ekoki kozala na makambo ya bokolongono nzoto mpe moto, liwa ya moto oyo olingaki, ndoto mabe mpe baelikia, mpe —mpo na basusu—kutu bozangi bondimi na ntango bakutani na makambo, mituna, mpe bantembe ya bomoi.
Nkolo na bolingo na Ye apesaki lisungi, mpe lisusu masuwa, babopesi ya ntina lokola jile ya sovetaje, mpe bakambi bayebi mayi oyo epesi bokambami mpe malako ya bokebi mpo na kosunga biso kotambola na nse ya ebale ya bomoi kino na nsuka ya mobembo na biso.
Tika tokanisa na ntina ya mobeko ya yambo: tikala na masuwa!
Mokambi Brigham Young mingi mingi asalelaki “Masuwa ya Kala ya Siona” lokola lisese mpo na kolobela Eklezia ya Yesu Klistu ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.
Alobaki na libaku moko: “Tozali na katikati ya mbu. Ekumbaki eyei, mpe, lokola bato ya masuwa balobaka, masuwa enani makasi. ‘nakotikala awa te,’ elobaki moto moko; ‘nakanisi te ete oyo ezali “Masuwa ya Siona.” ‘Kasi tozali na katikati ya mbu.’ Nakomitungisa te, nakotikala awa te.’ Alongoli kazaka na ye, mpe amibwaki na libanda ya masuwa. Akotiola te? Iyo. Mpo na baoyo bazali kolongwa na Eklezia oyo. Ezali ‘Masuwa ya kala ya Siona,’ Tika ete totikala kati na yango.”1
Na libaku mosusu, Mokambi Young alobaki ete ayokaki motema mpasi na ntina ya bato bazali kobungisa nzela na bango ntango bazalaki kopambolama—ntango bomoi ezalaki malamu: “Ezali na ntango ya kimia, ntango masuwa ya kala ya Siona ezali konana na mopepe kitoko, [mpe] ntango makambo nionso ezali kimia likolo ya masuwa, ete mingi ya bandeko mibali balingi kobima mpo na kotambola na mwa babwato ya mike ememami likolo ya masuwa … mpo na kosokola; mpe ndambo batiolami, mpe basusu babwakami mosika, mpe basusu bazongi kati na masuwa. Tika ete totikala kati na masuwa ya kala, mpe ekomema biso na [bokebi] kino na libongo; osengeli komitungisa te”2
Mpe na nsuka, Mokambi Young akundolisi Basantu: “Tozali na masuwa ya kala ya Siona. … [Nzambe] azali na yenda, mpe akotikala wana. … Nionso ezali malamu. Yemba Halleluya; mpo Nkolo azali awa. Azali kokomisa, kokamba, mpe koyangela. Soki bato bakozala na elikia ekoka na Nzambe na bango, batika mayokani na bango to Nzambe na bango mokolo moko te, Akokamba biso malamu.”3
Soki totali mikakatano tokutanaka na yango lelo, boniboni totikali kati ya Masuwa ya Kala ya Siona?
Botala lolenge! Tosengeli koyoka mbongwana ntango nionso na kobakisaka bondimi na biso na Yesu Klisto mpe botongono na biso na nsango malamu na Ye na nzela ya bomoi na biso—kaka mbala moko te, kasi mbala na mbala. Alma atunaki, “mpe sikawa tala, nayebisi bino, bandeko na ngai ya mibali [mpe ya basi], soki boyoki mbongwana moko na motema, mpe soki boyoki lokola koyemba nzembo ya bolingo ya kosikola, nalingi kotuna, ekoki bino koyoka boye sikawa?”4
Bakambi ya mai ya boyebi Boyebi lelo bakoki kokokisana na bapostolo ya Eklezia mpe baprofeta mpe banganganzambe ya bituka bafulama mpe bakambi ya masanga malandi. Basungaka biso tokoma na kimia kino na nsuka ya mobembo na biso.
Kala te, nasololaki na bakambi moko ya misio ya seminele ya sika mpe napesaki bakambi oyo toli:
“Sunga mosala ya misio ya bakambi ya Eklezia. …Tokoki te mpe… kokamba [bino] na masenginya te.
“Mpe lokola bozali koteya bamisionele na bino batia miso na bango na biso, boteya bango balanda moko moko te baoyo bazali kokanisa ete bayebi mingi na ntina ya lolenge nini kosala misala ya Eklezia koleka… Tata na Lola mpe Nkolo Yesu Klisto basalaka” na nzela ya bakambi ya bonganganzambe oyo bazali na bafungola ya kokamba.
“Namoni na mosala na ngai ete baoyo babungi [mpe] babulinginisami makanisi bazali mpenza baoyo mbala mingi … babosani ete ntango Bakambi ya Yambo mpe Lisamga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale bazali koloba na mongongo moko, ezali mongongo ya Nkolo mpo na ntango wana. Nkolo akundolisi biso, ‘ata na nzela ya mongongo na ngaimei to ya basali na ngai, ezali lolenge moko.’ D&A 1:38.” 5
Na maloba mosusu, batiki Masuwa ya Kala ya Siona—bakweyi mosika, bapengwi. Na likama, bakomona mbala mingi na ngonga moke mpe na nsuka ya ntango molai makama ya mbalakata, kaka te mpo na bangomei kasi lisusu mpo na mabota na bango.
Bakambi na biso ya bituka, lokola bakambi oyo bayebi mai, bateyami na nzela ya makambo ya mokili, bayekolisami mpe bateyami na bapostolo mpe baprofeta mpe bakambi mosusu ya Eklezia; mpe, ya ntina mingi, bateyami na Nkolo Yemei.
Na libaku mosusu na mobu oyo, nalobaki na bilenge minzemba ya Eklezia na losambo ya CES ya sanza ya mitano na nzela ya bopanzi nsango. Nalobaki:
“Nayokaki ete bato ebele bakanisi bakambi ya Eklezia bafandi na ‘mokili oyo te’ oyo babosani ezali ete tozali mibali mpe basi ya boyebi, tofandi na bomoi na biso na bisika mingi mpenza mpe tosali mosala na bato ya ndenge na ndenge uta ya masolo ya bomoi ekesana. Misala na biso ya Eklezia ya sikoyo etindi biso mpenza na mokili mobimba, wapi tokutani na bato ya poliktiki, basali na Nzambe, mpe bakambi ya basalisi ya mokili. Atako kokutani na [bakambi na] Maison Blanche na Washington, D.C., mpe bakambi ya bikolo [mpe basali na Nzambe] na mokili mobimba, totali lisusu [mabota mpe bato] ya komikitisa makasi na mabele. …
“Ntango totaleli mpenza babomoi mpe mosala na biso, okondima ya solo mpenza ete tomoni mpe toyebi mokili na ndenge basusu mingi te basalaka. Bokomona etetofandi moke na makambo ya mokili na bososoli koleka lolenge basusu bamonaka yango. …
“… Ezali na eloko moko oyo etali mbwania ya moto na moto mpe ya lisanga ya [bakambi ya Eklezia] oyo esengeli kopesa mwa limbondi. Tomoni yango banso, kotiaka na kati makama ya mibeko ya bato mpe ya bapolitiki ya ndenge na ndenge, bankele, makama, mpe bankufa kati ya mabota na bisomei. Tozali na bokebi na maye bozali komona na bomoi na bino.”6
Soki tozongi na mobeko ya yambo lokola nasaleli yango, mikundola mibeko ya mibale mpe ya misato: ntango nionso lata jaketi ya sovetaje, mpe simba makasi na maboko mibale. Maloba ya Nkolo ezali kati ya makomi mpe mateya ya bapostolo mpe baprofeta. Ezali kopesa biso toli mpe bokambi ete, ntango tolandi, tokosala lokola jaketi ya sovetaje ya molimo mpe ekosunga biso koyeba lolenge nini kosimba makasi na maboko mibale.
Tosengeli kokoma lokola bana mibali ya Moziya oyo “bakubisaki kondima na bango na boyebi bosolo.” Tokoki kokoma mibali mpe basi “ya mongongo ya kososolaka.” Oyo ekoki kokokisama kaka na boluki na [biso] ya makomi na etingia, ete [to]sengeli koyeba liloba ya Nzambe.”7
Na kolukaka makomi mpe maloba ya bapostolo mpe baprofeta ya kala mpe ya sika, tosengeli kotiya makanisi na biso na boyekoli, kozalaka na bomoi, mpe kolingaka malongi ya Klisto.
Na kobakisaka na kokolisa ezaleli ya botangi makomi ya moto yemei, tosengi kozala lokola bana mibali ya Moziya mpe komipesa bisomei “na losambo ebele, mpe kokila bilei.”8
Elakisi lokola neti makambo oyo emekolami na pete te ezali na ntina monene. Tia motema na makambo ya pete oyo, mpe kima kobungisama.
Lokola nayebaki bato oyo batikali kati ya masuwa te mpe basimbi makasi na maboko na bango mibale te na ntango ya mimekano mpe mobulu to baye batikali kati na masuwa te na ntango ya kimia, namoni ete ebele kati na bango baye babungisi boyekami na bango na babosolo ya nsango malamu—bantina mpo na nini balandi Eklezia na esika ya yambo; bantina batikali ya komipesa mpe na mosala mobimba na kosalelaka mibeko ya nsango malamu mpe kopambolaka basusu na nzela yamosala ya komipesa, ebulisama; mpe banzela kati na yango Eklezia ezaleli na bomoi na bango “esika ya koliela mpe ya kokola ya molimo.”9
Joseph Smith ateyaki bosolo ya ntina mpenza oyo: “Mabongisi ya motuya ya eyamba na biso [ezali] litatoli ya bapostolo mpe baprofeta na ntina ya Yesu Klisto, … ‘ete akufaki, akundamaki, mpe asekwaki lisusu mokolo ya misato, mpe amataki na lola;’ mpe makambo mosusu nionso ezali kaka mabakisi na oyo, oyo epesi ntina na boyambi na biso.”10
Soki totaleli kaka Nkolo, tolakelami lipamboli likolo ya nionso: “Yango wana, bosengeli kokende mbangu na liboso na sikisiki na Klisto, kozalaka na bongengi bolamu ya elikia, mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato banso. Yango wana, bokokende mbangu na liboso, kosalaka limpati likolo ya liloba ya Klisto, mpe botii molende kino na nsuka, tala, boye elobi Tata: Bokozwa bomoi ya seko.”11
Mbala mosusu Basantu ya mikolo mya Nsuka ya botongono mpe baluki ya bosembo babandaka kotalela na “mabakisi” na esika ete batalela mabongisi ya motuya. Yango wana, Satana amekaka biso tokoma ya kopengwama uta na nsango ya pete mpe polele ya nsango malamu ezongisami. Baye bapengwi mmpenza mbala mingi batikaka kolia elambo mpo ete bataleli, kutu bamipesi, na makambo to mateya ya motuya moke.
Basusu bakoki kotalela mituna mpe ntembe oyo bazali kokutana yango. Ya solo, kozalaka na mituna mpe kotiaka ntembe ezali mabe te na moyekoli amipesa. Kala te Lisanga ya Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likolki ya bapostolo Zomi na Mibale balobaki: “Tososoli ete mbala na mbala bandimi ya Eklezia bakozala na mituna oyo etali malongi, mambi ya kala, to momesano ya Eklezia. Bandimi bazali ntango nionso na bosomi ya kotuna mituna ya boye mpe koluka na lokengo bososoli mingi koleka.”12
Mikundolisa, Joseph Smith yemei azalaki na mituna oyo ebandaki Bozongisi. Azalaki moluki mpe, lokola Abalahama, azwaki biyano ya ntina na mituna ya motuya mingi ya bomoi.
Mituna ya ntina eyekami na oyo ezali na ntina koleka—mwango ya Tata na Lola mpe Bomikabi ya Mobikisi. Boluki na biso esengeli kokamba biso mpo na kokoma bayekoli ya boboto, bosawa, bolingo, kolimbisaka, motema kokita, mpe ya komipesa. Tosengeli kozala na bolingi, lokola Polo ateyaki, mpo na “mpo na komemana mikumba. Na ndenge wana, bokokokisa mobeko ya Klisto.”13
Mpo na komemama mikumba ya moto mosusu esengeli lisalisi, lisungi, mpe bososoli ya moto nioso, na kobakisaka bamaladi, batengoni, babola na molimo mpe na nzoto, baluki mpe batungisami, mpe lisusu bandimi-bayekoli mosusu—mpe lisusu bakambi ya Eklezia oyo babiangemi na Nkolo mpo na kosala na eleko moko.
Bandeko mibali mpe basi, botikala na kati ya masuwa, bosalela jaketi ya sovetaje na bino, mpe bosimba makasi na maboko mibale. Boboya masano! Mpe soki moko kati na bino akweyisami libanda ya masuwa, tokoluka yo, kozwa yo, mpe kosalisa yo mpe kozongisa yo na kimia kino na Masuwa ya Kala ya Siona, esika wapi Nzambe Tata na biso mpe Nkolo Yesu Klisto bazali na yenda mpe bakokamba biso malamu, na oyo natatoli na komjikitisa na nkombo ya Yesu Klisto, amene.