Baboti: Bateyi ya Yambo ya Bana na Bango
Ntango nionso elobami mpe esalemi, ndako ezali wenze mpo na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto.
Ben Carson alobaki etali yemei, “nazalaki moyekoli ya mabe koleka na kelasi na ngai ya mitano mobimba.” Mokolo moko Ben azwaki na momekano ya matematika mituna 30. Moyekoli na nsima na ye ayanolaki yango mpe azongiselaki ye. Molakisi, Mama Williamson, abandaki kobenga nkombo ya bayekoli mpo na bilembo. Na nsuka, akomaki na Ben. Na mobulungano, ababakanaki eyano. Mama Williamson, kokanisaka alobaka “9,” ayanolaki ete mpo na Ben kozwa bilemgo 9 na 30 ezalaki bobongi.Moyekoli nsima na Ben nde agangaki, “libwa te! … Azwaki eloko te … malamu.” Ben alobaki alingaki kokweya na nse ya mabele.
Na ntango moko, mama na Ben, Sonya, akutanaki na mikakano na ye. Azalaki moko na bana 24, ayekolaki kaka na kelasi ya misato, mpe akokaki kotanga te. Abalaki na mibu 13, abomaki libala, azalaki na bana mibale, mpe azalaki kobokola bango na lobwaku ya Detroit. Nzokande, amikokaki mpenza mpe azalaki na bondimi ya sikisiki ete Nzambe alingaki kosalisa ye mpe bana na ye soki basali eteni na bango.
Mokolo moko libaku ya kitoko eyaki na bomoi na ye mpe ya bana na ye. Ekomelaki ye ete bato ya bomengo oyo azalaki kosalela bazalaki na ndako ya mikanda—bazalaki kotanga. Nsima ya mosala akendeki na ndako mpe akangaki television oyo Ben mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki kotala. Alobaki na bokuse: Bino bana mibali bozali kotala television mingi koleka. Uta lelo bokoki kotala makambo misato na poso. Na ntango ya mpamba bokokende na ndako ya mikanda—botanga babuku mibale na poso mpe bopesa bokuse na yango.
Bana mibale basutukaki. Ben alobaki atanga naino mokanda mokolo moko te na bomoi na ye mobimba longola se ntango esengamaki na kelasi. Baboyaki, bamilelaki, talobaki, kasi ezalaki na ntina te. Nsima Ben akanisaki, “Atiaki mobeko. Nalingaki meko yango te, kasi mokano na ye ya komona biso kobonga ebongolaki nzela ya bomoi na ngai.”
Mpe mbongwana kani yango esalaki. Na kelasi ya motoba azalaki na likolo ya kelasi na ye. Akendeki kotanga na Universite ya Yale na mbongo ya kotangela, nsima kelasi ya minganga ya Johns Hopkins, ntango azalaki na mibu 33 akomaki mokonzi ya mapaso ya bongo ya bana mike mpe mopasoli ya nsango na mokili mobimba. Boniboni yango ekokaki kosalema? Mingimingi na ntina ya mama moko oyo, na kozanga matomba mingi ya bomoi, akumisaki libiangi na ye ya lokola moboti.1
Makomi elobeli mosala ya baboti—ete ezali mokumba na bango mpo na koteya bana na bango “malongi ya boyamboli, bondimi na Klisto Mwana ya Nzambe ya bomoi, mpe libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu” (D&C 68:25).
Lokola baboti, tosengeli kozala bateyi mpe bandakisa ya yambo mpo na bana na bango—episikopo, Eteyelo ya Eyenga, Bilenge Basi to Bilenge Mibale te, kasi baboti. Lokola bateyi ya yambo ya nsango malamu, tokoki koteya bango nguya mpe bosolo ya Bomikabi—ya lolenge mpe atandele ya bonzambe—mpe na kosalaka bongo ekopesa bango moboko ya libanga likolo na yango kotonga. Ntango nionso elobami mpe esalemi, ndako ezali wenze mpo na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto.
Penepene na mobu moko eleki nazalaki na mosala na Beirut, na Liban. Kuna, nayokaki nsango ya mwana mwasi moko ya mibu 12, Sarah. Baboti na ye mpe bandeko na ye mibale ya nkulutu babongwanaka na Eklezia na Russie kasi basengeki bango bazonga na mboka na bango ntango Sarah azalaki na mibu kaka 17. Na mboka na bango ezalaki Eklezia te, etonga ebongisama te, Eteyelo ya Eyenga to libongisi ya Bilenge basi te. Nsima ya mibu mitano libota oyo ayokaki nsango ya etape moko na Beirut mpe, kaka yambo ya kokoma, batindaki mwana na bango ya mwasi ya mibu 12, Sarah, elongo na bandeko na ye ya nkulutu, mpo na kobatisama. Kuna, napesaki losambo moko etali mwango ya lobiko. Mbala na mbala Sarah atombolaki loboko na ye mpe ayanolaki mituna.
Nsima ya liyangani, mpe koyebaka Eklezia na ye ezalaki mpenza te, nabelemaki epai na ye mpe natunaki, “Sarah, boniboni oyebi biyano na mituna wana?” Azongisaka na mbala moko, “Mama na ngai ateyaki ngai.” Bazakaki na Eklezia na lingomba na bango, kasi bazalaki na nsango malamu na ndako. Mama na ye azalaki moteyi ya yambo ya nsango malamu.
Ezalaki Enosa oyo alobaki, “Maloba oyo mbala mingi nayokaki tata na ngai koloba etali bomoi ya seko, mpe esenge ya basantu, ekotaki mozindo na kati ya motema na ngai” (Enosa 1:3). Kuna motuna ezali te ya nani azalaki moteyi ya Enosa ya yambo.
Namikundoli tata na ngai amitandaki na esika ya moto, kotangaka makomi mpe babuku mosusu, mpe nalingaki kotandama mpembeni na ye. Namikundoli bacarte alingaki kobomba na libenga ya simisi na ye na matangi ya makoma mpe Shakespeare mpe maloba misusu oyo alingaki kobomba na moto mpe koyekola. Namikundoli ngonga mingi tata na ngai azwaki mpo na kotala mibange—boniboni alingaki kotelema mpo na kokamata singlase mpo moko to nsoso ya kolia mpo na mosusu to mbota ya loboko ya nsuka na mwa mosolo na kati. Namikundoli liyoki ya malamu mpe mposa ya kozala lokola ye.
Namikundoli mama na ngai, ya mibu 90 to koleka, kolambaka na kikuku ya ndako ya bato mibale mpe nsima kobimaka na sani ya bilei. Natunaki ye wapi ezalaki kokende. Ayanolaki, “O, nazali komema mwa bilei na mibange.” Namikanisaki, “Mama, ozali mobange.” Nakoki ata moke te kopesa botondi ekoki mpo na baboti na ngai, oyo bazalaki bateyi na ngai ya yambo.
Moko ya makambo ya ntina tokoki kosala lokola baboti ezali koteya bana na biso nguya ya losambo, to kaka momesano ya losambo. Ntango nazalaki na mibu 17, nafukamaki mpembeni ya mbeto na ngai, kolobaka nsambo na ngai na mpokwa. Nakoyebaki te, mama na ngai atelemaki na monoko ya ndako. Ntango nasilisaki, alobaki, “Tad, ezali yo kosenga na Nkolo mpo na kosalisa yo koluka mwasi ya malamu?”
Motuna na ye ezwaki ngai na bosutuki.Yango ezalaki eloko ya nsuka ya makanisi na ngai. Nazalaki kokanisa basketball mpe koyekola. Mpe boye, nazongisaki, “Te,” na yango ayanolaki, Malamu, osengeli, mwana; ekozala mokano eleki na motuya okoki kozwa.” Maloba wana ekotaki na mozindo ya motema na ngai, mpe mpo na mibu motoba elandaki. Nasambelaki ete Nzambe akoka kosalisa ngai koluka mwasi. Mpe, o, boniboni ayanolaki losambo wana.
Lokola baboti tokoki koteya bana na biso kosambela mpo na makambo ya mbano ya seko—kosambela mpo na makasi ya kozala peto na mokili oyo ya mikakatano, mpo na kozala na botosi, mpe kozala na mpoko mpo na kotelema mpo na bosembo.
Ntembe te mingi koleka ya bilenge na biso bazali na nsambo ya mpokwa, kasi ntango mosusu mingi na bango bazali kobunda na momesano ya losambo ya ntango ya moto na moto. Lokola baboti, lokola bateyi ya yambo na bango, tokoki kosembola yango. Moboti nini na ntango ya Buku ya Mormon alingaki kotika mwana na ye ya mobali kotambola libanda na esika ya etumba na kozanga libende ya ntolo mpe nguba mpe mopanga mpo na kobatela bango na mabete ekoki koboma ya monguna? Kasi boniboni mingi na biso tokotika bana na biso motambola libanda na liboso ya ekuke ntongo nionso na bisika ya bitumba ya likama koleka, mpo na kotelemela Satana mpe meke ya masenginia, na kozonga libende ya ntolo mpe nguba mpe mopanga ya molimo oyo ewuti na nguya ya bobateli ya losambo? Nkolo alobaki, “Bosambela ntango nionso, … ete bokoka kolonga Satana” (D&C 10:5). Lokola baboti, tokoki kosalisa kokotisa na kati ya bana na biso momesano mpe nguya ya losambo ya ntongo.
Tokoki koteya bana na biso kosalela ntango na bango na mayele. Na libako, lokola Sonya Carson, tokosengela kotia lokolo na biso na bolingo kasi na sikisiki na nse mpo na kondima bana na biso bapesa ndambo ya ntango na television mpe biselele misusu ya lotiliki oyo mbala mingi ezali kokanga bomoi na bango. Esika na yango tokoki kosengela kotinda ntango na bango na kati ya makasi ekoki kobota na nzela ya nsango malamu. Ekoki kozala na mwa koboya, mwa komilela, kasi lokola Sonya Carson, tosengeli kozala na bomoni mpe bolingi mpo na kokangama na yango. Soki tosala yango te, nani akosala?
Tokoki banso tokoki komituna: bana na biso bazwi makasi na biso eleki malanu ya molimo, molimo, mpe ya kokela, to bazwa etikali ya ntango na biso mpe talanta, nsima topesi nionso na biso mpo na libiangi na biso ya Eklezia to kolanda mosala na biso? Na bomoi ekoya, nayebi soki bapete ya boye lokola episikopo to mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi ekokoba, kasi nayebi mpenza ete bapete ya mobali mpe mwasi, tata mpe mama, ekokoba mpe ekomemiama. Mikili mizanga nsuka. Yango ezali ntina nini ezali na motuya monene mpenza kokumisa mikumba ya batata na mabele boye tokoki komilengela mpo na oyo eleki monene, kasi ya lolenge, mikumba na bomoi ekoya.
Lokola baboti, tokoki kotambola na boyebi ya solo Nzambe akotika biso moko ata moke te. Nzambe akopesa biso mokolo moko te mokumba moko na kozanga kopesa biso lisalisi ya bonzambe—ya yango nakoki kotatola. Ekoka biso na mosala na biso ya bonzamde lokola baboti, mpe na kimoninga na biso na Nzambe, kokoma bateyi mpe bandakisa ya yambo ya bana na biso, nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, Amene.