“Sanza ya mitano 6–12: ‘Na Bokasi ya Nkolo.’ Mosiya 7-10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)
“Sanza ya mitano 6–12. Mosiya 7–10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2024)
Sanza ya mitano 6–12: “Na Bokasi ya Nkolo”
Mosiya 7–10
Ntango bato ya Mokonzi Mosiya bazalaki kosepela “kimya ya ntango inso” na Zarayemila (Mosiya 7:1), makanisi na bango ebandaki kokanisa liboke mosusu ya Banefi, oyo mibu mingi liboso balongwaki mpo na kofanda na mboka ya Leyi-Nefi. Bankola elekaka, mpe bato ya Mosiya bayokaka eloko moko te na ntina na bango. Boye, Mosiya asengaki Amona atambwisa mobembo ya boluki mpo na kokutana na Banefi oyo balongwaka. Mobembo ya boluki emonaki ete Banefi, “mpo na masumu” (Mosiya 7:24, bazalaki na boombo epayi ya Balamani. Kasi na bokomi ya Amona mpe bandeko na ye ya mibali, na mbalakaka bazalaki na elikya mpo na bokangoli.
Ntango mosusu tozali lokola Banefi bakangemi oyo, koyokaka mpasi mpo na masumu na biso, komitunaka lolenge nini tokozwa lisusu kimya. Ntango mosusu tozali lokola Amona, komiyokaka kotindikama mpo na kosembola loboko epayi ya basusu mpe na nsuka komona ete milende na biso efuli bango mpo na “kotombola mitu [na bango] , mpe kosepela, mpe kotyela Nzambe motema [na bango]” (Mosiya 7:19). Atako makambo na biso ezali ndenge nini, biso banso tozali na mposa ya koyambola mpe “kobaluka epayi ya Nkolo na mokano etonda na motema,” na bondimi ete “ako … kangola [biso]” (Mosiya 7:33).
Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Yesu Klisto azali na nguya ya kokangola ngai.
Kokutana na Amona epesaki Mokonzi Limiyi elikya, mpe alingaki kolekisa elikya wana epayi ya bato na ye. Mbala mosusu maloba na ye ekoki kopesa yo mpe elikya. Mpo na koyeba makambo mosusu, kanisa kotalela lisusu ezalela ya bato ya Limhi na Mosiya 7:20-25. Nsima maniola mituna oyo ntango ozali kotanga Mosiya 7:14-33:
-
Limiyi asalaki nini mpo na kolendisa bondimi mpe elikya ya bato na ye na Klisto?
-
Biteni nini ya maloba esalisaka yo ozala na elikya?(tala biteni 19, 33).
-
Makambo nini esalisi yo ozala na elikya ete Nzambe akoki mpe akosikola yo?
Tala lisusu “Mosikoli ya Yisalaele,” Banzembo, no. 6.
Nakelamaki “nsima na elilingi ya Nzambe.”
Na Mosiya 7:26–27, Limiyi alimbolaki mwa makambo ya solo oyo Abinadi ateyaki. Solo nini okoki koyeba na biteni yango? Lolenge nini bosolo oyo esimbi lolenge otalaka Nzambe mpe yomei?
Tala lisusu Russell M. Nelson, “Your Body: A Magnificent Gift to Cherish,” Liahona, Sanza ya mwambe 2019, 50–55.
Nkolo apesi baprofeta, bamoni, mpe babimisi mpo na litomba ya bato.
Ntango Limiyi ayokaki litatoli ya Amona ete Nkolo atelemisaki momoni, Limiyi “asepelaki mingi mpenza, mpe apesaki matondi epayi ya Nzambe” (Mosiya 8:19). Mpo na nini okanisi ayokaki lolenge wana? Oyekoli nini na ntina ya bamoni uta na maloba ya Amona na Mosiya 8:13–19?
Lelo, osungaka bato ya Bokambi ya Yambo mpe ba Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi? Lolenge nini bango bazalaki “ya litomba monene” mpo na yo? (Mosiya 8:18). Bateyi yo nini na ntina ya Yesu Klisto?
Ndenge nini yo, lokola Amona, okoki koloba na mpiko na ntina ya bosenga ya baprofeta, bamoni, mpe babimisi? (tala Mosiya 8:13–18). Na ndakisa, makambo nini okoki kokabola na libota na yo to na ba media social na ntina na:
-
Bosolo oyo ezongisami na mikolo na biso na Joseph Smith mpe baprofeta mosusu ya Nkolo (lokola lolenge ya Nzambe, bomoto na biso ya bonzambe, to bozali ya seko ya libota). Bozongeli ya “Bozongisi ya Botondi ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto” to “Libota: Esakola na Mokili” (Biblioteke ya Nsango Malamu) ekoki kosalisa yo okanisa mwa makambo yango ya solo.
-
Mapamboli ya mitindo to makuli (lokola Liloba ya Bwania, mobeko ya bopeto, to bokangi ya mabota).
Sanza eleki, toyokaki uta na baprofeta, bamoni, mpe babimisi na likita linene. Bansango nini efulamaki yo? Nini okosala ndenge mosusu na kotalela makambo oyo oyekolaki? Bamoni ya Nkolo balobaki nini mpo na “makambo oyo ekoya”? (Mosiya 8:17).
Tala lisusu Mito ya makambo ya Nsango Malamu, “Baprofeta,” Bibiloteke ya Nsango Malamu.
Nakoki kotelemela mikakatano na ngai “na bokasi ya Nkolo.”
Zenifi andimaki ete mabunga na ye etyaki bato na ye na likambo ya mpasi. Kasi nsima, ntango akendaki kobunda na Balamani, asungaki bato na ye batelemela mikakatano na bango na bondimi na Nkolo. Ntango ozali kotanga Mosiya 9–10, luka maye bato ya Zenifi basalaki mpo na kolakisa bondimi na bango. Lolenge nini Nzambe alendisaki bango? Lolenge nini alendisaki yo? Elimboli nini epai na yo kokende “na bokasi ya Nkolo”? (Mosiya 9:17; 10:10–11).
Maponi na ngai ekoki kozala na bopusi na bankola.
Ntango ozali kotanga Mosiya 10:11–17, lakisa lolenge nini misala mpe bizaleli ya bankola ya kala ya Balamani ezalaki na bopusi na bankola oyo elandaki. Yango epesi likanisi nini na ntina na lolenge nini maponi na yo ekoki kozala na bopusi likolo na basusu—mpo na malamu to mabe—ata mpe bato oyo babotami naino te?
Makanisi mpo na Koteya Bana
Elobamaki kati na makomi ete Nzambe asalisaki bato, mpe Ye akoki kosalisa ngai.
-
Ntango bato na ye bazalaki na mpasi, Mokonzi Limiyi akabolaki makomi mpo na kotonga bondimi na bango. Tuna bana na yo na ntina ya masolo ya makomi to bato oyo basalisaka bango bazala na bondimi. Na nsima, okokaki kotangela bango Mosiya 7:19 mpe kozongela masolo oyo elobelami na eteni oyo (tala “Pasika” mpe “Bayisalaele na Esobe” na Masolo ya Kondimana na Kala, 70–76). Mbala mosusu bana na yo bakolinga kosala yango masano Lolenge nini Nkolo asungaki bato na masolo oyo? Lolenge nini Ye asungaka biso?
-
Mpo na bandakisa mingi ya lolenge Nkolo asungaka biso, pona mwa biteni ya “Masolo ya Buku ya Mormon” to “Mpiko ya Nefi” (Children’s Songbook, 118–19, 120–21) mpo na koyemba elongo na bana na yo. Sunga bango bayeba lolenge nini Nkolo asungaka bato na Buku ya Mormon—mpe lolenge nini Ye akoki kosunga biso.
Nzambe apesi biso baprofeta, bamoni, mpe babimisi.
-
Lolenge moko ya koteya na ntina ya bamoni ezali ya kokokanisa bango na biloko oyo esalisaka biso tomona malamu, lokola maneti, jumelles, to mikroskope. Nsima ntango ozali kotanga Mosiya 8:17 na bana na yo, bakokaki kotia maboko na bango kino na miso na bango lokola bazali kotala na jumelles mbala nyonso oyo bayokaka liloba “momoni” (tala lisusu Mose 6:35–36). Solola na bango na ntina ya makambo oyo Nkolo asungaka baprofeta “bamona” oyo tokoki te. Nini baprofeta to bamoni na biso, lokola Joseph Smith, babimiseli biso?
-
Nsima ya kotanga Mosiya 8:16–18 elongo na bana na yo, okoki kosunga bango bakanisa ndenge ya kosilisa liloba lokola Momoni azali lokola … oyo asalisaka biso … . Na ndakisa, momoni azali lokola elembo ya nzela oyo ezali kolakisa biso epai ya Yesu.
-
Okoki mpe kosala bilembo ya makolo ya lonkasa mpe kobengisa bana na yo koyema bililingi likolo na yango ya makambo oyo baprofeta, bamoni, mpe babimisi bapesaki biso toli mpo na kosala. Tia bilembo ya makolo na nzela moko zingazinga ya kisuku, mpe tika bana na yo batambola na bilembo wana ya makolo. Ndenge nini momoni akoki kozala “litomba monene” mpo na biso? (tala Mosiya 8:17–18).
Ntango nazali na bolembu, Nkolo akoki kolendisa ngai.
-
Ntango bana bakutani na mikakatano, ntango mosusu bamiyokaka ete bazali na bolembu mpe bazali na likoki te ya kosala eloko. Ndenge nini okosunga bana na yo batia motema na bokasi ya Nkolo? Okoki kotuna bango nini tosalaka mpo na kozala bokasi na nzoto. Kozala na “bokasi ya bato” elimboli nini? (tala Mosiya 10:11). Kozala na “bokasi ya Nkolo” elimboli nini? (tala Mosiya 9:17–18; 10:10). Lolenge nini tozwaka bokasi ya Nkolo? Bana na yo bakokaki koyema elilingi ya makambo oyo esalisaka bango bazwa bokasi ya Nkolo.