Likita Linene
Mpo na nini Nzela ya Liyokani
Likita linene ya sanza ya minei 2021


15:4

Mpo na nini Nzela ya Liyokani

Bokeseni ya nzela ya liyokani ezali se moko mpe monene libela na libela.

Na lotomo na ye mobimba, Mokambi Russel M. Nelson ayekoli mpe ateyi mayokani ya Nzambe na bana na Ye. Azali ye moko ndakisa ya kongenga ya moko oyo atamboli na nzela ya liyokani. Na liteya na ye ya yambo lokola Mokambi ya Eklezia, Mokambi Nelson alobaki:

Bomipesi na bino ya kolanda Mobikisi na kosalaka mayokani elongo na Ye mpe nsima kobatela mayokani yango ekofungola ekuke na lipamboli nyonso ya molimo mpe makoki epesama epai ya mibali, basi, mpe bana bisika nyonso.

“… Makuli ya tempelo mpe makuli tozali kosala kuna ezali fungola ya bolendisi bomoi na biso, libala mpe libota na biso, mpe likoki na biso mpo na kotelemela mimekano ya monguna. Masanzoli na bino na tempelo mpe mosala na bino kuna mpo na bankoko na bino ekopambola bino na emoniseli monene ya moto ye moko mpe kimia mpe ekolendisa bomipesi na bino mpo na kotikala na nzela ya liyokani.”1

Nzela ya liyokani ezali nini? Ezali nzela moko oyo ekambaka kino na bokonzi ya selesitiale ya Nzambe. Tokoti na nzela na ekuke ya libatisi mpe nsima,“tokeyi mbangu o boso na sikisiki na Klisto, kozalaka na bongengi bolamu bwa elikya, mpe bolingo bwa Nzambe mpe bwa bato banso [mitindo mibale ya minene] … kino na suka.”2 Na nzela ya liyokani (oyo, solo, ekei mosika koleka bomoi ya kufa), tozwi makuli mpe mayokani esengeli mpo na libiki mpe bonetoli.

Komipesa na liyokani na biso mobimba ezali kosala mokano ya Nzambe “mpe kozala na botosi na mibeko na makambo manso akotinda biso.”3 Kolandaka mabongi mpe mitindo ya nsango malamu ya Yesu Klisto mokolo na mokolo ezali liteya ya esengo mingi mpenza mpe esepelisaka mingi mpenza na bomoi. Mpo na eloko moko, moto moko amibateli na makambo minene ya mabe mpe mawa. Botika ngai na loba na lisese ya lisano. Na lisano ya tennisi, ezali na eloko moko ebengami libunga ya nko te. Ezali na makambo lokola kobeta ndembo na monyama to kosala mabunga mibale na mbala moko ntango ozali kosalela Nzambe. Mbeba esalemi na nko te ezwami lokola mbano ya mbeba ya mosani kasi mbano ya boyebi kobeta ya monguna te.

Mingi mingi makambo to mikakatano na biso eyaka na mabe na biso moko, mbano ya eponeli ya mabe to tokoki koloba ezali mbano ya mbeba esalemi na nko te. Ntango tozali kolanda na etingia nzela ya liyokani, tozali koboya mbala moko mabunga masalemi na nko te. Tokimaka lolenge nyonso ya kiboowumbu ya momesani mabe. Tokweisamaka te na libulu ya lokuta mpe na bizaleli ya bozangi sembo. Tolekaka likolo ya lubwaku ya bozangi kufa mpe bozangi boyengebene. Tokimaka bato mpe makambo oyo, atako endimami na bato ebele, ekoki kotia bozali malamu na biso ya Nzoto mpe molimo na kpokoso. Tokimaka bizaleli oyo ezali kotia basusu na mpasi na esika ete tozwa bizaleli ya komitambuisa malamu mpe ya misala.4

Mpaka J. Golden Kimball ntango mosusu alobaki, “nakokaki te kotambola [ntango nyonso] na nzela ya moke mpe nkaka, kasi ngai [na mekaka] kokatisa yango mbala mingi bo [ekoki] ngai.”5 Na ngonga ya motuya makasi, nayebi ya solo Ndeko mobali Kimball akondimela ngai ete kotikala na nzela, kokatisa yango kaka te, nzela ya liyokani ezali elikya na biso monene mpo na koboya mpasi ekoki koboyama na ngambo moko, mpe kolonga malamu mikakatano ya bomoi ekoki koboyama te na ngambo basusu.

Basusu bakoki koloba: “Nakoki kopona bolamu ata soki nazwi libatisi to te; nazali na mposa ya liyokani te mpo na kozala moto ya lokumu mpe elonga.” Nzokande, ezali na mingi baoyo, atako basali liyokani te, bazali kobika lolenge ezali kolakisa ete maponi mpe makambo na bango ezali ya baoyo bazali na nzela. Bokoki koloba bazali kozwa mapamboli na kotambolaka engebene na nzela ya “liyokani ya sikisiki”. Sikoyo, bokeseni ezali nini na nzela ya liyokani?

Solo, bokeseni ezali se moko mpe monene libela na libela. Ezali kosangisa lolenge ya botosi na biso, ezalela ya liyokani epai na biso, lisungi ya Nzambe oyo tozwi, mapamboli uta na bosangisi lokola bato na liyokani mpe ya motuya mingi mpenza libula na biso ya libela.

Botosi ya Komipesa

Yambo ezali lolenge ya botosi na biso epai na Nzambe. Mingi koleka kozala kaka na bamposa malamu ya kosala, tomipesaka na lokumu kobika liloba nyonso oyo ebimi na monoko ya Nzambe. Na yango, tolandaka ndakisa ya Yesu Klisto, oyo na kozwaka libatisi, “alakisaki epai ya bana ya bato ete, engebene na mosuni amikitisi liboso ya Tata, mpe atatoli epai ya Tata ete akozala na botosi epai ya ye na kobatelaka mitindo mya ye.”6

Na mayokani, totindami na mingi koleka koboya mabunga to kozala na angele na mikano na biso. Tomiyokaka bayanoli epai ya Nzambe na ntina ya maponi mpe bomoi na biso. Kokamata likolo na biso moko nkombo ya Klisto. Totiaka makanisi na Klisto—na kozalaka na mpiko na litatoli ya Yesu mpe na kokolisaka ezalela ya Klisto.

Na mayokani, botosi na mabongi ya nsango malamu ekomaka mosisa na molimo na biso mpenza. Namesana na babalani moko, na ntango ya libala na bango, mwasi azalaki molende te na Eklezia mpe mobali atikalaka kozala mondimi na Eklezia ata mokolo moko te. Nakolobela bango lokola Malia na Yoane, bankombo na bango ya solo te. Ntango bana bakotaki na makanisi na bango, Malia ayokaki mposa ya kokolisa bango lolenge makomi elobi, “Kati na bobokoli mpe likebisi ya Nkolo.”7 Yoane andimaki. Malia asalaki makasi ya kotikala na ndako mpo na koteya nsango malamu mbala nyonso. Ye ayebaki solo ete libota ebika mobimba bolamu ya makita mpe masano ya Eklezia. Malia mpe Yoane bakomaki baboti ya ndakisa, mpe bana na bango (bana mibali ya makasi) bakolaki na bondimi mpe komikaba na mabongi mpe mibeko ya nsango malamu.

Baboti ya Yoane, bankoko ya bana mibali, basepelaki na bomoi ya peto mpe makokisi ya bankoko na bango ya mike, kasi mpo na boyini ya Eklezia, balingaki kopesa elonga wana kaka na mayele ya kimooboti ya Yoane mpe Malia. Yoane, atako mondimi ya Eklezia te, atikaki te kotuya bana wana eleka bongo. Ye atatolaki na mbamba ete, bazalaki banzeneneke ya bambuma ya mateya ya nsango malamu—oyo mwana na bango ya mobali azwaki malamu mingi na eklezia lokola mpe maye mazalaki kosalema na ndaku.

Yoane ye moko atindikamaki na Molimo, bolingo mpe ndakisa ya mwasi na ye, mpe kotindikama ya bana na ye ya mibali. Ntango ngonga eyaki, abatisamaki, mingi na esengo ya bandimi ya palwasi mpe baninga.

Ntango bomoi ezalaki na mikakatano te mpo na bango mpe bana na bango ya mibali, Malia mpe Yoane na motema mobimba batatolaki ete liyokani ya nsango malamu ezali mosisa ya mapamboli na bango. Bamonaki maloba na Nkolo epai na Yilimia kokokisama na bomoi ya bana na bango lokola mpe ya bangomei: “Nakotia mobeko na ngai kati na bango, mpe nakokoma kati ya mitema na bango; mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.”8

Bakangami na Nzambe

Elilingi ya mibale se moko ya nzela ya liyokani ezali mokangano na biso na Bonzambe. Mayokani Nzambe apesaka bana na Ye esalaka mingi koleka kotambwisa biso. Ekangaka biso epai na Ye, mpe, ya kokangama na Ye, tokoki kolonga makambu nyonso.9

Natangaki mbala moko lisolo na zulunale moko eyebi mingi te oyo elimbolaki ete lolenge tosalaka libatisi mpo na bakufi ezali kozindisa liboke ya filme na mayi. Nsima, baoyo banso nkombo ekobima na filme bandimami lokola babatisami. Lolenge ya komonela wana elingaki ezala makasi, kasi ezali kobosana motuya ya molimo moko na moko mpe motuya ya liyokani ya moto ye moko na Nzambe.

“[Yesu] alobaki … : Bokota na ekuke eke, mpe nkaka ezali nzela eye ekambi o bomoi, mpe bake bazali baye bakuti yango.”10 Kosalelaka elilingi mpo na koloba, ekuke ezali mpenza moke ete ekopesa nzela kaka na moto moko kokota na mbala moko. Moko na moko asali liyokani ya yemei na Nzambe, mpe Nzambe asali liyokani na moko na moko, na nkombo, oyo tokoki kotanga na mokuse sikawa mpe libela na libela. Na makuli mpe mayokani, “nguya ya bonzambe elakisami” na bomoi na biso.11

Lisalisi ya Bonzambe

Yango etambwisaka biso nakondima lipamboli ya misatu ya kafukafu ya nzela ya liyokani. Nzambe abongisi likabo esosolami malamu te mpo na kosunga basali liyokani bazala babombi liyokani: likabo ya Molimo Mosantu. Likabo oyo ezali likoki ya kimoninga, kobatelama, mpe kotambwisama na Molimo Mosantu.12 Lisusu ayebani lokola Mobondisi, Molimo Mosantu “fatondisami na elikya mpe bolingo ya kokoka.”13 Ye “ayebi makambo nyonso, mpe atatoli mpo na Tata mpe mpo na Mwana.”14 oyo ya ye banzeneneke tomipesi kozala.15

Na nzela ya liyokani tozwaka mapamboli masengeli mpo na bolimbisi mpe bopetolami ya masumu. Yango ezali lisungi oyo ekoki koya kaka na nzela ya ngolu ya Nzambe, epesami na Molimo Mosantu. “Sikawa eye ezali motindo,” elobi Nkolo, “Yambolani, bino banso nsuka ya mabele, mpe yakani epai ya ngai, mpe babatisami na nkombo ya ngai, ete bokoka kosantisama na bozwi ya Molimo Mosantu, ete bokoka koteleme na bozangi mbindo liboso na ngai na mokolo ya nsuka.”16

Bosangana na Bato na Liyokani

Ya minei baye bazali kolanda nzela ya liyokani bazwaka mapaboli ya bokeseni na bosangani ya Nzambe ya ndenge na ndenge. Masakoli ya bosangani na nzoto ya bopanzani ya ntango molayi ya bikolo ya Yisalaele na mabele na bango ya libula ebimisami na nzela ya makomi.17 Bokokisami ya masakoli mpe bilaka ezali kokoba na bosangisami ya bato na liyokani kati na Eklezia, bokonzi ya Nzmbe na nse. Mokambi Nelson alimboli, “Ntango tozali kolobela kosangisa,tozali na pete koloba solo ya ebandeli oyo: moko na moko ya bana ya Tata na Lola … abongi mpo na koyoka nsango ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto.”18

Nkolo atindi bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Suka, batelema mpe bangenga, mpo ete mpole na bango ezala bendele mpo na bikolo; … yango bosangani na mabele ya siona, mpe na baetuka, ezala esika wapi mpo na kobatelama, mpe ebombamelo na ekumbaki, mpe na nkanda ntango ekosopana libanda na kosangisa-sangisa te likolo ya mabele.”19

Ezali lisusu bosangani ya poso na poso ya bato na liyokani na ndakonzambe na mokolo ya Nkolo, bongo tokoki “komibatela mobimba [biso moko] peto na makambo ya mokili.”20 Ezali lisanga mpo na kokabola limpa mpe mayi ya elambo na bokundoliya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe ngonga ya “kokila bilei mpe kosambela, mpe kolobelana etali bolamu ya milimo na [biso].”21 Ntango nazalaki elenge, nazalaki kaka mondimi ya Eklezia na kelasi ya secondaire. Nasepelaki na lisanga ya baninga malamu na eteyelo, nzoka nde nalingaki mingi likita ya eyenga poso nyonso mpo na kobondisa mpe kokomisa ngai moto ya sika na molimo mpe lisusu na mosuni. Lolenge kani toyokaki bobungisi ya bosangani ya iyokani mbala mingi na eleko ya bokono bobe ya sikoyo, mpe lolenge nini na motema moto moto tozali koluka ngonga ntango tokoki kosangana lisusu lokola liboso.

Bato ya liyokani basanganaka na tempelo, ndako na Nkolo, mpo na kozwa makuli, mapamboli, mpe limonisi oyo ezwamaka kaka kuna. Profeta Joseph Smith ateyaki: “Nini ezalaki bantina ya kosangisa … bato na Nzambe na bileko nyonso ya mokili? … Ntina ya monene ezalaki kotonga mpo na Nkolo ndako moko wapi Ye akoki kobimisa na bato na Ye makuli ya ndako na ye mpe nkembo ya bokonzi na Ye, mpe koteya bato nzela ya lobiko; mpo ezali na yoko makuli mpe mabongi oyo, ntango eteyami mpe esalemi, esengeli kosalema na esika to ndako moko etongama mpo na ntina wana.”22

Kosangola Bilaka ya Liyokani.

Na nsuka, ezali kaka na kolandaka nzela ya liyokani nde tokosangola mapamboli ya Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, mapamboli ya nsuka ya libiki mpe bonetoli maye kaka Nzambe nde apesaka.23

Maloba ya makomi oyo elobeli bato na liyokani mingi mingi elingi koloba bakitani ya Abalayama na nzoto bayebani lokola “Ndako ya Yisalaele.” Kasi bato na liyokani esangisi lisusu baoyo banso bayambi nsango malamu ya Yesu Klisto.24 Paulo alimbolaki:

“Mpo lokola mingi na bino bobatisami na kati ya Klisto bolati Klisto. …

“Mpe soki bozali ya Klisto, bongo bozali bana ya Abalayama, mpe bozali basangoli ya elaka.”25

Ba oyo bakozala sembo na mayokani na bango “bakobima na bosekwi ya bayengebene.”26 Bango “babongisami nie na nzela ya Yesu Klisto, Moyokanisi ya liyokani ya sika. … Ezali bango nde nzoto ezali ya selesitiale, oyo ya bango nkembo ezali oyo ya moi, ata lokola nkembo ya Nzambe, oyo ya likolo koleka nyonso.”27 “Yango wana, biloko nyonso ekomi ya bango, ezala bomoi to liwa, to makambo mazali, to makambo makoya, nyonso mazali ya bango mpe bazali ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.”28

Tika ete toyoka libiangi ya profeta ya kotikala na nzela ya liyokani. Nefi amonaki biso mpe eleko na biso mpe akomaki, “Ngai, Nefi, namonoki nguya ya Mwana ya Mpate ya Nzambe, ete ekitaki likolo ya basantu ba eklezia ya Mwana ya Mpate, mpe likolo ya bato ba liyokani ya Nkolo, oyo bapalanganisamaki likolo ya etando enso ya mabele; mpe balatisamaki na bibundeli ya bosembo mpe na nguya ya Nzambe na nkembo monene.”29

Na Nefi, “molimo mwa ngai mokosepela o mayokani ma Nkolo.”30 Na Eyenga ya Pasika oyo, napesi litatoli na ntina ya Yesu Klisto, oyo ya ye Lisekwa ezali elikya na biso mpe bondimi ya kowan ya manso oyo elakami etali mpe na nsuka ya nzela ya liyokani. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.