Likita Linene
“Mibeko ya Nsango Malamu na Ngai”
Likita linene ya sanza ya minei 2021


15:0

“Mibeko ya Nsango Malamu na Ngai”

Doctrine et Alliances 42:12

Mobeko ya nsango malamu ezali malako ya bokambi ewuti na malongi mpo na bosaleli na bosembo ya bonsomi ya kopona na bomoi oyo ya kufa.

Na likita linene ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na sanza ya zomi 1849, Mpaka John Taylor ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale abiangamaki mpo na kofungola ekolo ya France mpo na kosakola nsango malamu ya Yesu Klisto. Moko ya misala na ye ezalaki kokoma zulunale ya yambo ya Eklezia na ekolo wana. Mpaka Taylor abongisaki mpe abimisaki nkomamoko na 1851 ayanolaki mituna ya mbala ebele miye mitunamaka ye na ntina ya Eklezia. Mpe na nsima ya mokanda wana, Mpaka Taylor amikundolaki likambo oyo:

“Mwa mibu eleki na Nauvoo, nayokaki na matoyi elenge mobali, moko ya lisanga ya Badepite, atunaki Joseph Smith lolenge nini ye azalaki na makoki ya koyangela bato ebele, mpe kobatela limemia malamu; komonaka na ntango se moko wana ete ezalaki mpasi mpo na bango basala yango epai mosusu. Tata Smith amonaki ete ezalaki pete mpenza mpo na kosala yango. ‘Lolenge nini?’ elenge mobali ayanolaki; ‘mpo na biso ezali mpasi mpenza.’ Tata Smith ayanolaki, ‘Nateyaka bango mibeko ya bosembo, mpe bamiyangelaka bango moko.’”1

Nasambeli ete Molimo Mosantu akoteya mpe akolakisa moko na moko kati na biso ntango nazali kobeta nsete na mosala ya ntina ya mibeko na kati ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto.

Mibeko

Nkolo abimisaki epai ya Profeta Joseph Smith ete “bampaka, banganganzambe mpe bateyi ya eklezia oyo bakoteya mibeko ya nsango malamu na ngai, oyo ezali na kati ya Biblia mpe Buku ya Mormon, na kati na yango nde litondi ya nsango malamu ezali.”2 Alobaki lisusu ete Basantu ba Mikolo mya Nsuka basengeli “koteyama na bobongi nie na liteya, na mabongi, na malongi, na mobeko ya nsango malamu, na makambo manso oyo matali bokonzi bwa Nzambe, maye malongobani mpo na bino kososola.”3

Alobaki na mokuse, mobeko ya nsango malamu ezali malako ya bokambi ewuti na malongi mpo na bosaleli na bosembo ya bonsomi ya kopona na bokufi. Mibeko ewuti na bosolo monene koleka ya nsango malamu mpe epesaka bokambami mpe mabongi ntango tozali kokende liboso na nzela ya liyokani.

Ndakisa, Biteni ya Bondimi misato ya yambo etalisi ndenge ya motuya ya malongi ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto: lolenge ya Bonzambe na eteni ya bondimi ya yambo, misala ya Bokweyi ya Adama mpe Ewa na kati ya eteni ya bondimi ya mibale, mpe mapamboli maye mapesami na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto na kati ya eteni ya bondimi ya misato.4 Mpe eteni ya bondimi ya minei elimboli mibeko ya yambo—malako ya bokambi ya kosalela bondimi na Yesu Klisto mpe koyambola—mpe makuli ya yambo ya bonganganzambe oyo epesaka makoki na Bomikabi ya Yesu Klisto ezala makasi na bomoi na biso.5

Liloba ya Bwania ezali ndakisa mosusu ya mobeko lokola lilako ya bokambi. Nasengi boyekola milongo miye ya boyingisi na eteni ya 89 ya Doctrine et Alliances.

“Lipesami lokola mobeko moko elongo na elaka, likokani na makoki ma bato na bolembu mpe na bato ya bolembu koleka banso ya basantu banso, baye bazali to bakoki kobiangema basantu.

“Tala, solo, boye elobi Nkolo epai na bino: Na ntina ya mabe mpe bikokolo biye bizali mpe bikozala na mitema mya bato oyo basalaka bikokolo o mikolo mya nsuka, ngai nakebisi bino liboso ete mbeba esalema, na kopesaka epai na bino liloba lya bwania liye o nzela ya emoniseli.”6

Likebisi efulama eye elandi boyingisi oyo ezali kopesa bokambami elenda mpo na nyonso mibale ya kozala malamu na nzoto mpe molimo mpe etatoli mapamboli elongobani eye eyekami na bosembo na biso na mobeko.

Koyekola, kososola, mpe kosalela mibeko ya nsango malamu elendisaka bondimi na biso na Mobikisi, ekubisaka bomipesi na biso epai na Ye, mpe ebengisaka mapamboli ndenge na ndenge mpe makabo ya molimo na kati ya bomoi na biso. Mibeko ya boyengebene esungaka biso lisusu totala likolo ya bamposa na biso mpe bosenga na biso moko na kopesaka emoneli malamu koleka ya bosolo ya seko ntango tozali kokutana na mabaku, mimekano, mikano, mpe makambo ekeseni ya nkufa.

Bandakisa ya Eleko eye ya Koteya Mibeko ya Malamu

Esakola ya Profeta Joseph Smith na maye matali koteya mibeko malamu ezali ntango mosusu moko ya mateya na ye ya ntango nyonso mpenza. Mpe tozwaka bandakisa ya makasi ya lolenge eye efulama ya likebisi na masakoli ya basali bapesama likoki ya Nkolo lelo.

Mobeko ya bobateli limemia

Mokambi Dallin H. Oaks alobaki na likita linene ya 1998 na ntina ya mikumba ya Banganganzambe ya Alona etali bolengeli mpe boyangeli elambo. Atalisaki mobeko ya bobateli limemia mpe alakisaki ete mosimbi Bonganganzambe ya Alona akolinga te eloko songolo na miso na ye to ezalela mpo na kozangisa limemia epai ya mondimi ya Eklezia na bokumbameli na ye mpe bozongisi sika mayokani. Mokambi Oaks abetaki lisusu nsete na mibeko ya kimia, bopeto, limemia mpe bolongobani.

Likambo ya motuya, Mokambi Oaks apesaki te bilenge mibali molongo ya makambo basengeli kosala mpe makambo basengeli kosala te. Kasi, alimbolaki mobeko na likanisi ete bilenge mibali mpe baboti na bango mpe bateyi basengeli kosalela na bososoli na bangomei mpe bofulami mpo na kolanda malako ya bokambi.

Alimbolaki: “Nakopesa ndimbola ya makambo ebele te, mpo ete mabaku na bapalwasi mpe bitape mingi na Eklezia na biso na mokili mobimba ezali mpenza ya kokesena ete mobeko songolo moye momonani lokola mosengami na palwasi songolo ekoki kozala malamu te mpo na palwasi mosusu. Na yango, nakopesa mobeko moyekami na malongi. Soki banso basosoli mobeko oyo mpe basaleli yango na bosembo, bosenga ekozala moke mpo na mibeko. Soki mibeko to toli esengami na makambo ya moto na moto, bakambi ya bituka to palwasi bakoki kopesa yango, engebene na malongi mpe mibeko na yango.”7

Mobeko ya Saba lokola Elembo

Na likita linene ya sanza ya minei 2015, Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso ete “Saba ezali mokolo ya esengo.”8 Alimbolaki lisusu lolenge nini ayaki yemei kososola mobeko ya ntina na oyo etali botosi ya mokolo ya Saba:

“Lolenge nini biso tosantisaka mokolo ya Saba? Na mibu na ngai ya bolenge koleka, nayekolaki mosala ya basusu oyo bakomaki milongo ya makambo basengelaki kosala mpe oyo basengelaki te kosala na mokolo ya Saba. Ewumelaki te naye koyekola na kati ya makomi ete lolenge mpe ezalela na ngai na mokolo ya Saba ezalaki elembo kati na ngai mpe Tata na ngai ya Lola. Na bososoli wana, nazalaki lisusu na mposa ya milongo ya makambo ya kosala mpe oyo ya kosala te. Ntango nasengelaki kozwa mokano soki to te mosala ebongaki mpo na Saba, namitunaki, ‘Elembo nini elingi ngai kopesa na Nzambe Motuna wana ekomisaki maponi na ngai na oyo etali mokolo ya Saba polele mpenza.”9

Motuna ya pete kasi ya motuya ya Mokambi Nelson ebeti nsete na oyo etali mobeko oyo ezali kolongola ntembe nyonso oyo etali ndimbola mpe nini tosengeli kosala mpo na kotosa mokolo ya Saba. Motuna na ye elimboli malako ya bokambi mpe mobeko oyo ekoki kopambola banso kati na biso na mabaku na biso nyonso ya ndenge na ndenge.

Mobeko ya Bolingi ya Kotika Nzambe Akamba

Basanza motoba eleki na likita linene, Mokambi Nelson atalisaki esengo na ye ntango akambamaki na bomoni ya sika na ntina ya ndimbola ya liloba Yisalaele Ayebisaki biso ete molimo na ye esepelaki ntango ayekolaki ete “nkombo oyo ya Yisalaele elakisi moto oyo azali na bolingi ya kotika Nzambe akamba bomoi na ye.”10 Mokambi Nelson nsima atalisaki makambo ya motuya ebele maye mawuti uta na bomoni oyo.

Nsango na ye na oyo etali kozala na bolingi ya kotika Nzambe akamba ezali ndakisa ya koteya mibeko malamu mpo ete tokoka komiyangela. Mpe kaka lokola asalaki na mateya na ye na ntina ya kosala mokolo ya Saba mokolo ya esengo, Mokambi Nelson atunaki mituna miye miyekami na mibeko miye misungaka lokola mikambi mpe mibeko mpo na moko na moko na biso.

“Ezali yo na bolingi ya kotika Nzambe akamba bomoi na yo? Ezali yo na bolingi ya kotika Nzambe azala na nguya ya ntina koleka mpenza na kati ya bomoi na yo?”

Ye akobaki:

“Banza lolenge nini bolingi wana ekoki kopambola yo. Soki ozali monzemba mpe ozali koluka moninga ya seko, mposa na yo ya kozala moko ‘ya Yisalaele’ ekosunga yo ozwa mokano ya moto oyo olingi mpe lolenge nini.

“Soki obalani na moninga oyo abuki mayokani na ye, bolingi na yo ya kotika Nzambe akamba bomoi na yo ekopesa ndingisa na mayokani na yo na Nzambe etikala ngwi. Mobikisi akokangola motema na yo ezokisama. Balola ekofungwama ntango ozali koluka koyeba lolenge nini kokoba liboso. Osengeli te komitungisa to koluka.

Soki ozali na mituna ya solo na ntina ya nsango malamu to Eklezia, ntango oponi kotika Nzambe akamba, okokambama mpo na kozwa mpe kososola oyo ezali motuya, bosolo ya seko oyo ekokamba bomoi na yo mpe kosunga yo otikala ngwi na nzela ya liyokani.

Soki ozali kokutana na masenginya—ata kutu soki masenginya eyaka ntango olembi to omiyoki kozala yo moko to oyokameli te—banza nguya eye okoki kozwa ntango oponi kotika Nzambe akamba bomoi na yo mpe ntango ozali kobondela epai na Ye mpo na kolendisa yo.

“Ntango mposa na yo ya makasi mpenza ezali kotika Nzambe akamba, kozala eteni ya Yisalaele, mikano mingi ekomaka pete koleka. Mpe mikakatano mingi ekomaka ezanga mpasi! Oyebi malamu lolenge nini kobongisa yo moko. Oyebi nini kotala mpe kotanga, esika nini kolekisa ntango na yo, mpe na nani kosangana. Oyebi nini osengeli kokokisa. Oyebi lolenge ya moto oyo olingi mpenza kokoma.”11

Yeba lolenge nini mikano mpe makambo ya bomoi ekoki kopesama nguya na mobeko ya kozala na bolingi ya kotika Nzambe akonza: bobimi elongo na mwasi mpe mobali mpe libala, mituna ya nsango malamu mpe mitungisi, masenginya, bobongisami ya yomei, nini kotala mpe kotanga, esika nini kolekisa ntango, mpe na nani kosangana mpe ntango mingi, mingi koleka. Mituna efulama ya Mokambi Nelson ebeti nsete na mobeko moko ya pete oyo ekambaka makambo manso ya bomoi na biso mpe epesaka biso makoki ya komiyangela biso moko.

Yenda ya Moke Mpenza

Ntango Joseph Smith akangamaki na boloko ya Liberty, akomaki mikanda mpo na kokebisa bandimi mpe bakambi ya Eklezia mpe akundolaki bango ete “masuwa ya monene ebikaka mbala mingi na yenda ya moke na ntango ya mopepe makasi, na kotikalaka ngwi na mopepe mpe mbonge.”12

Yenda ya masuwa

“Yenda” ezali pine to ebaluselo mpe bisalelo mosusu biye bisalemaki mpo na kokamba masuwa to bwatu. Mpe “kosalela na mopepe mpe mbonge” elimboli kobalusa masuwa na ntina ete ekoka kotikala ngwi mpe ekoka kozinda te na ntango ya mopepe makasi.

Masuwa kobalukaka na mopepe makasi

Mibeko ya nsango malamu ezali mpo na ngai mpe yo oyo yenda ezali mpo na masuwa. Mibeko malamu epesaka biso makoki ya komona nzela na biso mpe kotelema ngwi, na bompikiliki, mpe koningana te mpo ete tokoka kobungisa te mpiko na biso mpe kokweya te na mipepe makasi ya molili ya mikolo mya nsuka mpe mobulungano.

Topambolami makasi na likita linene oyo koyekola oyo etali mibeko ya seko uta na basali bapesama likoki ya Nkolo. Sikawa, mokumba na biso moko na moko ezali ya komiyangela engebene na bosolo ya oyo batatolaki.13

Litatoli

Mokambi Ezra Taft Benson ateyaki, “Mpo na basanza motoba oyo ezali koya, bobimisi ya likita na bino ya [Liahonaesengeli kotiama penepene ya babuku endimama mpe kotangaka yango mbala na mbala.”14

Na bompikiliki nyonso ya molimo na ngai, nabengisi banso kati na bisotosalela, mpe tolinga mibeko ya boyengebene. Bobele bosolo ya nsango malamu nde ekoki kopesa biso makoki ya “kosala malamu makambo manso maye mazali na nguya na biso” mpo na kokende liboso na nzela ya liyokani mpe “kotala lobiko ya Nzambe, mpe mpo ete loboko na Ye emonisama.”15

Nayebi ete malongi mpe mibeko ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali motuya koleka mpe liziba se moko ya bokambi mpo na bomoi na biso mpe esengo ya libela na bomoi ya kufa mpe boseko. Mpe na eyenga oyo ya nkermbo ya Pasika,natatoli na esengo ete Mobikisi na biso na bomoi azali liziba epai wapi bosolo oyo ewutaka. Natatoli boye na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. John Taylor, na Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 284.

  2. Doctrine et Alliances 42:12.

  3. Doctrine et Alliances 88:78.

  4. Tala Biteni ya Bondimi 1:1–3.

  5. Tala Biteni ya Bondimi 1:4.

  6. Doctrine et Alliances 89:3–4.

  7. Dallin H. Oaks, “The Aaronic Priesthood and the Sacrament,” Liahona, Sanza ya yambo. 1999, 45–46.

  8. Tala Russell M. Nelson, “Saba Ezali Mokolo ya Esengo,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 129–32.

  9. Russell M. Nelson, “Saba Ezali Mokolo ya Esengo,” 130; Biso nde tobeti sete.

  10. Russell M. Nelson, “Tika ete Nzambe Akonza,”Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 92.

  11. Russell M. Nelson, “Tika ete Nzambe Akonza,” 94.

  12. Doctrine et Alliances 123:16.

  13. Mokambi Harold B. Lee (1899–1973) asengaki bandimi batika masikulu ya likita “ezala bokambi na etamboli mpe maloba na bango na basanza motoba ya nsima.” Alimbolaki, “Oyo ezali makambu ya motuya maye Nkolo amonaka malamu mpo na komonisa na bato na Ye na mikolo miye” (na Lapole ya Likita, Sanza ya minei. 1946, 68).

    Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985) abetaki lisusu nsete na ntina ya nsango ya likita linene. Alobaki, “Nkoma to mokanda moko te libanda ya babuku endimama ya Eklezia esengeli kozala na esika ya motuya na bisika ya ebombelo na yo ya mikanda—te mpo na malamu ya maloba to elobeli kitoko na yango ya bobimisi, kasi mpo na maloba oyo etalisi nzela ya bomoi ya seko” (Na kati ya World but Not of, Brigham Young University Speeches of the Year [Sanza ya mitano 14, 1968], 3).

    Mokambi Thomas S. Monson (1927–2018) azongelaki lisusu ntina ya boyekoli masikulu ya likita. Alobaki: “Tika tokoka komikundola ntango nyonso maye toyoki uta na likita linene liye. Bansango oyo epesamaki ekotiama na nkasa na bazulunale Ensign mpe Liahona ya sanza ya nsima. Nasengi bino boyekola yango mpe bomanyola mateya na bango” (“Until We Meet Again,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 106).

  14. Ezra Taft Benson, “Yaka Epai ya Klisto, mpe bobongisama nie na Ye,” Ensign, Sanza ya mitano 1988, 84.

  15. Doctrine et Alliances 123:17.