Sanzola Nkombo na Ye
Ntina tozwaka bonganganzambe ezali mpo na kopesa biso nzela ya kopambola bato mpo na Nkolo, kosalaka bongo na Nkombo na Ye.
Bandeko balingami na ngai ya mibali, basali kati na bonganganzambe ya Nzambe, ezali lokumu mpo na ngai kolobela bino na mpokwa ya lelo. Bozwa limemia mpe botondi na ngai ya mozindo koleka. Ntango nazali koloba na bino mpe koyoka na ntina ya bondimi na bino monene, nandimisami ete nguya ya bonganganzambe ezali kobuta ntango nyonso na mokili, na lisanga ya bampaka ya makasi mingi ntango nyonso mpe basimbi bonganganzambe ya bosembo mingi ntango nyonso.
Na mwa ngonga na ngai elongo na bino na mpokwa ya lelo, nakolobela na baye na bino oyo balingi kozala kutu makasi mingi na mosala na bino moko ya bonganganzambe. Boyebi mpo na mokumba ete bosengeli kokumisa libiangi na bino ya kosala.1 Kasi bokoki komituna nini oyo kokokisa libiangi ekoki kolinga koloba mpo na bino.
Nakobanda na badiakona ya sika mingi mpenza mpo ete bazali komiyoka lokola bayebi te nini elingi koloba kokumisaka misala na bango ya bonganganzambe. Bampaka babulisami sika bakoki lisusu kolinga koyoka Mpe episikopo na baposo ya yambo na ye ya mosala akoki kozala na litomba a mpe ya koyoka.
Ezali malamu mpo na ngai kotala nsima na mikolo na ngai ntango nazalaki diakona. Natombeli kolinga ete moto moko ayebisa ngai na ntango wana maye na kopesela makanisi sikawa. Ekokaki kosunga na balotomo nyonso ya bonganganzambe oyo eyelaki ngai uta ntango wana—ata oyo nazwi na mikolo ya lelo.
Nakulisamaki diakona na etape moko ya moke mpenza ete nazalaki diakona se moko mpe ndeko na ngai ya mobali Ted moteyi se moko. Tozalaki libota se moko na etape. Etape mobimba ezalaki kosangana na ndako na biso. Mokambi ya bonganganzambe mpo na ndeko na ngai ya mobali mpe ngai azalaki mobongwani ya sika oyo awutaka kozwa sika bonganganzambe yemei. Nakanisaki na ntango wana ete mosala na ngai se moko ya bonganganzambe ezalaki kokabola elambo na kisuku ya masolo ya ngai moko.
Ntango libota na ngai ekendaki na Utah, namimonaki kati na palwasi monene elongo na badiakona mingi. Na liyangani ya elambo ya yambo kuna, natalaki badiakona—limpinga, emonanaki epai na ngai— kotambolaka sikisiki ntango bazalaki kokabola elambo lokola lisanga moko oyo batangisa malamu.
Nazalaki kobanga mpenza ete eyenga ya nsima nakendaki ntongo ntongo na etonga ya palwasi mpo na kozala ngai moko ntango moto moko te akokaki komona ngai. Namikundoli ete ezalaki Palwasi ya Yalecrest na Salt Lake City, mpe ezalaki na ekeko moko na mabele. Nakendaki nsima ya ekeko mpe nasambelaki makasi mpo na lisungi ya koyeba lolenge nini kosala mbeba te ntango nakozwa esika na ngai na kokabolaka elambo. Losambo wana eyanolamaki.
Kasi nayebi sikawa ete ezali na nzela malamu koleka ya kosambela mpe kokanisa ntango tozali komeka kokola na mosala na biso ya bonganganzambe. Ekomaki polele na bososoli na ngai mpo na nini bato bapesamaka bonganganzambe. Ntina tozwaka bonganganzambe ezali mpo na kopesa biso nzela ya kopambola bato mpo na Nkolo, kosalaka boye na Nkombo na Ye.2
Ezalaki mibu mingi nsima ya kozala diakona ntango nayekolaki nini yango elingi koloba mpenza. Ndakisa, lokola nganganzambe monene, napesamaki lotomo ya kokende kotala liyangani ya elambo na lopitalo. Basengaki ngai nakabola elambo. Na esika ya kokanisa lolenge to sikisiki ya lolenge ya kokabola elambo, natalaki na bilongi ya bato ya mikolo moko na moko. Namonaki mingi na bango kolelalela. Mwasi moko asimbaki loboko ya elamba na ngai, atalaki likolo, mpe alobaki makasi, “O, matondo na yo, matondo na yo.”
Nkolo apambolaki mosala na ngai, mosala epesama na nkombo na Ye. Mokolo wana nasambelaki mpo na likamwisi ya boye eya esika ya kosambelaka mpo na lolenge nini malamu nakokaki kosala eteni na ngai. Nasambelaki ete bato bayoka bolingo ya Nkolo na nzela ya mosala na ngai ya bolingo. Nayekolaki ete oyo ezali fungola mpo na kosala mpe kopambola basusu na nkombo na Ye.
Nayokaki likambo moko ya kala te oyo ekundolisaki ngai bolingo ya boye. Ntango mayangani nyonso ya Eklezia epekisamaki mpo na bokono bobe ya COVID-19, ndeko mobali moko mpo na kosalisa andimaki lotomo uta na mokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpo na kopambola mpe kopesa elambo na ndeko mwasi moko. Ntango abengaki ye mpo na koyebisa ye amema elambo, andimaki na koyimayima, koyinaka kobima na ndako na ye na ngonga moko ya mabe boye mpe lisusu kokanisaka ete makambo makozonga malamu nokinoki.
Ntango akomaki na ndako na ye na Eyenga wana na ntongo, azalaki na motuna moko. Ekokaki bango kotambola tii na ekuke elandi mpe lisusu kolia elambo elongo na mozalani ya penepene na ye ya mibu 87? Na ndingisa ya episikopo, andimaki.
Mpo naposo mingi, mingi, mpe na kozalaka mosika ya bato na bokebi mpenza mpe bameko mosusu ya bozangi likama, liboke moke ya basantu bazalaki kosangana eyenga moko na moko mpo na liyangani ya elambo moko ya muke. Kaka na mwa biteni ya mampa mpe bakopo ya mayi—kasi mpisoli ebele esopanaki mpo na bolamu ya Nzambe moko ya bolingo.
Nsima ya ngonga, ndeko mobali mpo na kosalisa, libota na ye, mpe ndeko mwasi asalisaka bazalaki na makoki ya kozongela eklezia. Kasi mokufeli mobali ya mibu 87, mpo na ebele ya ntina ya kozala na bokebi, asengalaki kotikala na ndako. Ndeko mobali mpo na kosalisa—amikundoli ete lotomo na ye ezali mpo na mozalani na ye ya penepene kasi te kutu mpo na ndeko mwasi oyo ya mukolo mpenza—kobanda mokolo yango azali koya na kimia na ndako na ye eyenga moko na moko, makomi mpe mwa eteni moko ya limpa kati na loboko, mpo na koleisa Elambo ya Nkolo.
Mosala na ye ya bonganganzambe, lokola ya ngai mokolo wana na lopitalo, epesami na bolingo. Solo, ndeko mobali mpo na kosalisa kala te atunaki episikopo na ye soki ezalaki na basusu kati na palwasi akokaki kobatela. Mposa na ye ya kokumisa mosala na ye ya bongannganzambe ekolaki ntango azalaki kosala na nkombo ya Nkolo mpe na lolenge moko eyebani bobele na Ye. Nayebi te soki ndeko mobali mpo na kosalisa asambelaki, lokola esalaki ngai, mpo na baye asalisaka mpo na koyeba bolingo ya Nkolo, kasi mpo ete mosala na ye ezalaki na Nkombo ya Nkolo, mbano ezalaki se moko.
Mbano yango kaka ya kafukafu eyaka ntango nasambelaka mpo na yango liboso napesa lipamboli ya bonganganzambe epai ya moto moko oyo azali kobela to na ngonga ya bosenga. Esalemaki mbala moko na lopitalo moko ntango badokotolo ya bakoni batindaki ngai noki—bapesaki ngai motindo ya—kosala noki mpee kolongwa na lombangu na nzela ete bakoka kosala mosala na bango, na esika ya kopesa ngai libaku ya kopesa lipamboli ya bonganganzambe. Natikalaki, mpe napesaki solo lipamboli yango. Mpe elenge mwana mwasi napambolaki mokolo wana, oyo baminganga bakanisaki akokufa, abikaki. Natondi na botondi sikawa ete mokolo wana, natikaki te mayoki ya motema ezwa esika kasi nayokaki ete Nkolo alingaki ete mwana mwasi ya moke wana azwa lipamboli. Mpe nayebaki lipaboli yango ezalaki nini: Napamboalki ye mpo ete abika. Mpe abikaki.
Esalamaki mbala mingi ntango nazalaki kopesa lipamboli na moto moko oyo azalaki lokola pene ya liwa, elongo na bandeko na ye ya libota nzinganzinga ya mbeto, kolikyaka lipamboli ya lobiko. Ata soki nazali bobele na ngonga moke, nasambelaka mpo na koyeba lipamboli nini Nkolo abombi oyo nakoki kopesasa na nkombo na Ye. Mpe nasengaka mpo na koyeba lolenge nini Alingi kopambola moto wana kasi te oyo ngai to bato kotelemaka mpembeni tolingi. Boyebi na ngai ezali ete ata ntango lipamboli ezali te oyo basusu baliingi mpo na bango moko to balingami na bango, Molimo esimbaka mitema na bango mpo na koyeba bondimami mpe libondi na esika ya mawa.
Bouli se moko eyaka ntango batata bakilaka bilei mpe basambelaka mpo na bokambami mpo na kopesa lipamboli Nkolo azali na yango mpo na moto moko. Lisusu, Nayoki mapamboli epesama oyo ekamwisaki ngai mpe lisusu ekamwisaki moto kozwaka lipamboli yango. Na polele, lipamboli yango ezalaki uta na Nkolo—nyonso mibale makebisi oyo ezali na yango lokola mpe bilaka ekabolami na nkombo na Ye. Losambo mpe bokili bilei ya Tata epesamaki mbano na Nkolo.
Lokola episikopo, nayekolaki ntango nazalaki kokamba masolo ya bolongobani kosambela mpo ete Nkolo atika ngai nayoka maye Ye alingaki mpo na moto yango, kobatelaka bofuli nyonso na molimo Ye akopesa ebombama te na bosambisi to mokano na ngai moko. Wana ezali mpasi soki Nkolo, na bolingo, akoki kolinga kopamboli moto moko na bopameli. Esengaka bokasi mpo na kokesenisa maye Nkolo alingi na maye yo mpe moto mosusu bokoki kolinga.
Nandimi ete tokoki kokumisa mosala na biso ya bonganganzambe na ntango ya bomoi na biso mpe ntango mosusu koleka yango. Yango ekotala etingia na biso na komekaka koyeba bolingi ya Nkolo mpe makasi na biso mpo na koyoka mongongo na Ye mpo ete tokoka koyeba malamu koleka maye Ye alingi mpo na moto oyo tozali kosalisa mpo na Ye. Boyei monene yango ekoya na biteni mike mike. ekoki koya malembe malembe, kasi ekoya. Nkolo alaki yango epai na biso:
“Mpo ete baoyo nyoso bazali bosembo bazwi babonganganzambe yango mibale oyo nalobeli, mpe bakumisi mabiangi na bango, basantisami na Molimo mpo na kokomisa sika banzoto na bango.
“Bakomi bana mibali ya Mose mpe ya Alona mpe nkona ya Abalayama, mpe eklezia mpe bokonzi, mpe baponami ya Nzambe.
“Mpe lisusu banso oyo bazwi bonganganzambe oyo bayambi ngai, elobi Nkolo.”3
Ezali litatoli na ngai ete bafungola ya bonganganzambe ezongisamaki epai ya Profeta Joseph Smith. Basali ya Nkolo babimelaki uta na likolo mpo na kozongisa bonganganzambe mpo na makambo minene oyo eyebisamaki mpe oyo ekosalama mikolo ekoya. Yisalaele ekosangisama. Bato ya Nkolo bakolengelama mpo na Boyei na Ye ya Mibale ya nkembo. Bozongisi ekokoba. Nkolo akomonisa mingi ya bolingi na Ye epai ya basali na Ye baprofeta.
Okoki komiyoka moke soki okokokisa yango na mamonisi ya motuya mpe bambongwana ya maye Nkolo akosala. Soki omiyoki, nasengi yo otuna na losambo lolenge nini Nkolo amonaka yo. Ayebi yo mpenza, Apesaki bonganganzambe likolo na yo, mpe botomboli mpe bokumisi bonganganzambe na yo ezali motuya mpo na Ye mpo ete Alingi yo mpe Atalelaka yo mpo na kopambola bato na nkombo na Ye.
Napamboli bino sikawa mpo ete bozala na makoki ya koyoka bolingo na Ye mpe bozala bato na ye ya motema na nkombo ya Yesu Klisto, amene.