Likita Linene
Oyo Ezali Ntango na Biso!
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Oyo Ezali Ntango na Biso!

Nzambe atindi biso awa mpenza, sikawa mpenza, na ntango oyo ya motuya ya lisitwale.

Na mobu 1976, nayekolaki kobeta ndembo na libanda ya masano moko ya batali 65.000. Liboso na ngai ezalaki na bambanda ebele ya minene oyo bamonanaki ete balingaki kotindika ngai. Ezalaki lisano na ngai ya yambo lokola moko ya katikati ya basani na National Football League, mpe tozalaki kosana Super Bowl champions. Mpo na kozala sembo, namitunaki soki nakokaki mpenza kosala na misio. Nazongaki nsima mpo na kobwaka ndembo epai ya moninga, mpe ntango ndembo etikaki maboko ma ngai, nabetaki makasi koleka lolenge nabetaka liboso. Na ntango wana, nalalaki na nse ya mopiku ya basani ya makasi, mpe namitungisaki nini nazalaki kosala kuna. Nasengelaki kozwa mokano. Elingaki ngai kotika ntembe na ngai kolonga ngai, to nalingaki koyika mpiko mpe makasi mpo na kotelema mpe kokoba kosala?

Elilingi
Koleka ya Yambo

Lingomba ya Babanzi Nsango Associated Press

Namonaki te ete na ngonga wana lolenge nini mayele oyo ekokaki kolengela ngai mpo mabaku ekoya. Nasengelaki koyekola ete nakokaki kozala na nkonzo mpe makasi liboso ya makambo ya mpasi.

Lisano ya ndembo ekoki kozala pene ya motuya te lokola mikakatano oyo ozali kokutana na yango. Na makambo mingi, ekoki te kozala libanda ya masano etondi na bato ebele kotalaka. Kasi mikano na yo ya mpiko mikozala na ntina moko ya libela.

Ntango mosusu tokoki koyoka lokola ete ntango inso tokoki te kolonga etumba. Kasi Tata na biso na Lola amonaka biso lokola batongi oyo babangaka te mpo na kotonga bokonzi na Ye. Tala ntina nini atindaki biso awa na eleko oyo ya mpasi ya lisitwale ya ya mokili. Oyo ezali ntango na biso!

Yoka oyo Mokambi Russell M. Nelson alobaki mwa moke nsima ya kokoma Mokambi ya Eklezia: “Mobikisi mpe Mosikoli wa biso, Yesu Kliso, akosala boko ya misala wa Ye ya nguya katikati ya sikawa mpe ntango Akoya lisusu. Tokomona makambo ya kokamwa ete Nzambe Tata mpe Mwana wa Ye, Yesu Klisto, bazali kokamba Eklezia oyo na nguya mpe nkembo” (“Revelation for the Church, Revelation for Our Lives,” Liahona, May 2018, 96).

Misala ya nguya? Makambo ya kokamwa? Yango ekoza lolenge nini? Mosala tozali kosala, mpe lolenge nini tokososola nini kosala? Nayebi biyano binso te, kasi nayebi ete Nkolo aesengi biso tozala ya kobongama! Kosalelaka nguya ya bonganganzambe na sembo ekotikala kozala motuya koleka.

Tondimaka profeta ya Nzambe? Ekoki biso komona mpe kokokisa lobi na biso? Iyo tokoki, mpe iyo tosengeli, mpo ete oyo ezali ntango na biso!

Ntango toyoki masolo ya basali ya nguya ya Nzambe oyo bayaki liboso na biso—lokola Mose, Maliya, Moroni, Alma, Esitele, Joseph, mpe misusu ebele—bamonani minene lokola koleka bomoi. Kasi bazalaki na bokeseni mpenza na biso te. Bazalaki bato lokola bato banso oyo bakutanaki na mikakatano. Balikyaki na Nkolo. Basalaki maponi bwa sembo na bantango ya ntina. Mpe, elongo na bondimi na Yesu Klisto, basalaki misala misengamaki na ntango na bango.

Elilingi
Profeta Yosua

Goodsalt

Kanisa elombe Joshua na Kondimana na Kala. Azalaki molandi moko amipesa wa Mose, moko bwa bakambi minene ya lisitwale. Nsima ya bokeyi ya Mose, ezalaki ntango ya Yoshua. Asengelaki kotambwisa bana bwa Yisalaele na mabele ya elaka. Lolenge nini akokaki kosala yango? Joshua abotamaki mpe akolaki na bowumbu na Egipito. Azalaki na buku to bavideo ya bolakisi mpo na kosunga ye te. Azalaki kutu ata na telefone ekoka te! Kasi azwaki elaka oyo uta na Nkolo:

“Lokola nazalaki na Mose, boye nakozala na yo: “Nakotika yo te, Nakosundola yo te.”

“Zala makasi mpe na mpiko ya malamu” (Joshua 1:5–6).

Ntango nazalaki moto ya sika mpe kozanga koyeba kati na Bantuku sambo, nazwaki mbela moko ya lombango na telefone uta na bilo ya Bokambi ya Yambo, kosengaka ngai soki nakokaki kozwa esika ya profeta na kotala elenge mobali moko na lopitalo—na lombango. Nkombo ya elenge mobali ezalaki Zach. Amilengelaki mpo na kokoma misionele kasi akutanaki na likama mpe anyokwamaki na pota ya monene na mutu.

Ntango nazalaki kokende na lopitalo, nakanisaki mbangombango. Kotindama ya profeta—ozali kosakana? Nini nakokutana na yango? Lolenge nini nakosunga elenge mobali oyo? Ezali ngai na bondimi ekoka? Libondeli lya makasi mpe boyebi oyo nazalaki na likoki lya bonganganzambe ya bule ekomaki makanisi ya kozwela kimya.

Ntango nakomaki, Zach alalaki na mbeto ya lopitalo. Lifulume moko azalaki pembeni ya kokumba ye na kisuku ya lipaso boye minganga bakokaki kosilisa botindiki na bongo na ye. Natalaki mama wa ye na mayi na miso mpe elenge mobali moko na bobangi atelemaki pembeni, mpe nayebaki na polele ete Zach azalaki na bosenga ya lipamboli lya bonganganzambe. Moninga wa ye awutaki kala te kozwa Bonganganzambe ya Melikisedeki, nde nasengaki ye kosalisa ngai. Nayokaki nguya ya bonganganzambe ntango na bomikitisi topesaki Zach lipamboli. Nsima akendaki na lombango mpo na lipaso, mpe liyoki moko ya kimya koleka emonisaki ete Mobikisi akosimba makambo engebene na bwanya bwa Ye.

Baminganga basalaki lisusu radio yambo ya lipasoli ya yambo. Bamonaki, na bokamwi na bango, ete lipaso moko te esengelamaki.

Nsima ya bangalasisi ebele, Zach ayekolaki kotambola mpe koloba lisusu. Asalaki etinda moko ya sikisiki mpe azali sikawa kokolisa libota moko ya kitoko.

Na bosolo, yango ezala ntango inso oyo ekosalema. Napesaki mapamboli mosusu ya bonganganzambe na bondimi ya ndenge moko wana kaka, mpe Nkolo apesaki te libiki mobimba na bomoi oyo. Totalelaki bantina na Ye mpe totikelaki Ye maye ekolanda. Tokoki te ntango inso kopona oyo ekoya na misala na biso, kasi tokoki kopona kozala ya kobongisama mpo na kosala.

Okosengisama ntango nyonso kutu te na Bakambi ya Yambo kozala ntoma na bango na ntango ya kobundisama na bomoi. Kasi tobiangemi kosala eloko ekobongola bomoi lokola basali ya Nkolo. Ye akosundola biso te. Oyo ezali ntango na biso!

Petelo, Apostolo mokambi ya Mobikisi, azalaki na bwato na ebale ntango amonaki Yesu kotambolaka na mayi. Alingaki kokende epai na Ye, mpe Mobikisi alobaki, “Yaka.” Na mpiko inso, mpe na likamwisi inso, Petelo atikaki bwato ezanga likama mpe abandaki kotambola epai ya Mobikisi. Kasi ntango Petelo atyaki makanisi na mopepe makasi, bondimi na ye ekweyaki. “Abangaki; mpe abandaki kodinda, agangaki, kolobaka, Nkolo, bikisa ngai. Mpe na mbala moko Yesu atandaki loboko na ye, mpe asimbaki ye” (tala Matai 14:22–33 (Tala Matai 14:22–33.)

Elilingi
Yesu azali kosalisa

Ntango mbonge ebetaka na bomoi na biso, esika nini totyaka makanisi na biso? Kundola, ezali ntango inso na liziba moko ya solosolo ya makasi mpe ya mpiko. Maboko bwa Yesu matandameli biso, kaka lokola matandamelaki Petelo. Soki tokeyi epai wa Ye, Akosunga biso na bolingo inso. Tozali bato bwa Ye. Alobaki, “Banga te: mpo ete nasikolaki yo, nabiangaki yo na nkombo na yo; ozali ya ngai” (Yisaya 43:1). Akosunga na bomoi na yo soki opesi Ye nzela. Boponi ezali ya Yo! (Tala Russell M. Nelson, “Tika Ete Nzambe Akonza,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 92–95.).

Na nsuka ya bomoi na ye, Joshua asololaki na bato ba ye, “Bopona mokolo oyo nani bokosalelaka; … kasi mpo na ngai na ndako na ngai, tokosalela Nkolo.” (Yosua 24:15). Mpo na maponi asalaki ya kosalela Nkolo, Yoshua akomaki motambwisi monene na ntango wa ye. Baninga ba ngai ba bolingo, oyo ezali ntango na biso! Mpe baboponi na biso ekomonisa lobi na biso (tala Thomas S. Monson, “Decisions Determine Destiny” [Brigham Young University fireside, Sanza ya zomi na moko. 6, 2005], speeches.byu.edu).

Ntango nazalaki kosala lokola episikopo, tozalaki na liloba moko na palwasi na biso: Maponi malamu ememaka esengo—ya libela na libela. Bilenge bakokaki kokutana na ngai na nzela kolobaka, “Episikopo, nazali kosala maponi malamu!” Ezali ndoto ya episikopo!

Nini olingi koloba na “maponi malamu”? Moto moko atunaki Yesu, “Mobeko nini eleki monene kati na Mibeko minso?” Ayanolaki:

“Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso.

“Oyo ezali mobeko ya yambo mpe ya monene.

“Mpe ya mibale oyo ezali mpe lokola yango, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko” (Matai 22:36–39).

Nayebi te na ntina na yo, kasi ntango natangi mitindo oyo mibale, na motindo ya misato, elobami na nse: komilinga yomoko.

Okanisi ata mokolo moko te komilinga yo moko lokola motindo? Ekoki biso ya solo mpenza kolinga Nzambe mpe kolinga bana ba Ye soki biso tomilingi bisomoko te?

Motambwisi moko ya bwanya kala te apesaki toli na mobali moko oyo amekaki kolekela mibu ebele ya maponi ya bobebisi. Mobali wana akendaki na soni mpe atyaki ntembe ete azalaki sembo na bolingo ya moto mosusu.

Mokambi na ye alobaki na ye, “Nkolo ayebi yo, alingi yo, mpe boye asepelaka [na] yo mpe nzela ya mpiko ozali kolanda.” Mpe nsima abakisaki, “[Yo] osengeli koyoka motindo ya komilinga yomoko boye okoki koyoka ya [Nzambe] bolingo mpe kolinga basusu.”

Ntango ndeko ya mobali oyo ayokaki toli yango, amonaki bomoi na miso ya sika. Alobaki mwa nsima, “nalekisaki bomoi na ngai mobimba komekaka koluka kimya mpe kondimisama. Nazalaki koluka biloko yango na bisika mabe ebele. Kaka na bolingo bwa Tata ya Lola mpe ya Mobikisi nakoki kozwa kimya. Nayebi Bango balingi ngai namilinga ngai moko; yango ezali solo nzela kaka moko nakoki koyoka bolingo na Bango mpo na ngai.”

Tata na biso na Lola alingi tomilinga biso moko—kokoma bato ya lofundu te to tomikanisa-kaka biso moko te, kasi boye ete tomimona biso moko lolenge Amonaka biso: lokola bana na Ye oyo alingaka mingi. Ntango bosolo oyo ekoti bozindo na motema na yo, bolingo na yo mpo na Nzambe ekokola. Soki tozali komitala na lilemia ya sembo, mitema na biso, ekofungwama mpo na kosalela basusu lolenge moko mpe. Mingi tondimi motuya na biso ya bonzambe, malamu mingi koleka tososoli bosolo oyo ya bonzambe: ete Nzambe atindaki biso mpenza awa, sikawa mpenza, na ntango oyo ya kokamwa ya lisitwale, mpo ete okoka kosala likoki monene ya bolamu koleka na batalanta mpe makabo tozali na yango. Oyo ezali ntango na biso! (Tala Russell M. Nelson, “Becoming True Millennials” [worldwide devotional for young adults, Jan. 10, 2016], broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.)

Joseph Smith ateyaki ete profeta nyonso, na ekeke inso, “atalaki liboso na esengo yambo mpo na mokolo oyo tozali kati; … bayembaki mpe bakomaki mpe basakolaki mpo na yango mikolo na biso oyo; … tozali bato balingami oyo Nzambe [aponaki] mpo na komema na ntina ya nkembo ya Mokolo ya nsuka” (Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 186).

Soki okutani na mikakatano na yo ya mokolo, kanisa bozangi bobangi oyo epesamaki na Mpaka Jeffrey R. Holland: “Makambo ebele mazali mikumba mya biso, kasi yango ekozala mayele moko ya nkembo mpe ya elonga koleka. … Elonga lizali momekano ya nsuka oyo elobama. Elonga lizali ya kokoma mpenza na babuku … , makomi!” (“Be Not Afraid, Only Believe” [address to Church Educational System religious educators, Feb. 6, 2015], broadcasts.ChurchofJesusChrist.org).

Na nsuka ya poso ya kitoko oyo ya Pasika, tika ete napesa libengisi ete banso tosambela mpo na koyeba mpe koyamba mikumba na biso ya moto na moto awa tozali komilengela mpo na mokolo ya nkembo ntango Nkolo akoya lisusu. Nkolo alingi biso mingi koleka ete tozali kososola yango, mpe Akoyanola nsambo na biso. Tozala na esika ya libanda ya ndembo, na kisuku ya lopitalo, to na ndako na biso moko, tokoki kozala eteni moko ya motuya wa yango—mpo ete yango ezali ntango na biso! Na nkombo wa Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa