Likita Linene
Yesu Klisto: Monganga ya Molimo na Biso
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Yesu Klisto: Monganga ya Molimo na Biso

Ntango tozali kobongola motema mpenza na masumu na biso, tozali kotika libonza ya bomikabi ya Klisto ekoma mobimba ya solo na bomoi na biso.

Bandeko na ngai mibali mpe basi ya bolingo, na ntongo oyo ya esengo ya Pasika motema na ngai esepeli na kokundolaka mosala ya malamu koleka mpenza, ya lokumu koleka mpenza, mpe ya monene koleka mpenza oyo esalemaki na lisolo ya bato—libonza ya bomikabi ya Nkolo na biso, Yesu Klisto. Maloba minene ya profeta Yisaya ekumisi monene mpe bomipima ya bokonde mpe libonza ya Mobikisi mpo na bana nyonso ya Nzambe:

“Na ntembe te akumbi mpasi na biso, mpe amemi mawa ma biso; nzonkande tomonoki ye aniokwami, abetemi na Nzambe, mpe atungisami.

“Kasi azokisamaki mpota mpo ya bobuki mobeko bwa biso, akatamaki mpota mpo ya mabe ma biso; etumbu ya kimya ya biso ezalaki likolo na ye; mpe na mapipi ma ye tobikisami.”1

Na bolingi nyonso azwi likolo na Yemei masumu ya bato nyonso, abakamaki makasi na ekulusu, mpe alongaki liwa na mokolo ya misato,2 Yesu apesaki ntina ya bule koleka na molulu ya Pasika oyo apesaki Yisalaele na bantango ya kala.3 Na kokokisama lisakoli, Ye apesaki nzoto na Ye moko mpe makila ya motuya lokola libonza ya monene mpe ya nsuka,4 na ntina ya bilembo ya bonkoko bisalemaki na feti ya Pasika ya Nkolo.5 Nakosalaka bongo, Klisto anyokwamaki na nzoto mpe na molimo oyo motema ya moto ekoki kososola te. Mobikisi Yemei alobaki:

“Mpo tala, Ngai, Nzambe, nanyokwami mpasi ya makambo nyonso oyo mpo na bino nyonso, …

“Minioko wana esalaki ngaimei, kutu Nzambe, monene koleka banso, koningana likolo ya mpasi, mpe kotanga makila na lidusu moko na moko ya nzoto, mpe konyokwama na nyonso mibale na nzoto mpe na molimo—mpe nalingaki ete nakoka komela kopo ya bololo te, mpe natikaki—

“Atako bongo, nkembo ezala na Tata, nalyaki mpe nasilisaki bomilengeli na ngai na bana ya bato.”6

Klisto na boboto nyonso akokisaki bolingi ya Tata7 na nzela ya libonza na Ye ezanga ndelo mpe ya mawa. Alongaki esweli ya liwa ya nzoto mpe ya molimo,8 akotisaki na mokili na nzela ya Bokweyi,9 kopesaka biso makoki ya lokumu ya libiki ya seko.10

Yesu azalaki Mozali bobele se moko oyo akokaki mpo kokokisa libonza oyo ya seko mpe ebonga nie mpo na biso nyonso.11 Aponamaki mpe akulisamaki yambo na Likita Linene na Lola, kutu yambo mokili ebongisamaki.12 Lisusu, abotamaki na mwasi ya kufa, Ye asangolaki liwa ya nzoto, kasi uta na Nzambe, lokola Mwana se Moko ya Tata, Ye asangolaki nguya ya kopesa bomoi na Ye moko mpe nsima ya kozwa yango lisusu.13 Lisusu, Klisto abikaki bomoi moko ya bobongi nie oyo ezangaki mbeba mpe, yango wana, alongolamaki na masenginia ya boyengebene ya bonzambe.14 Na mabaku mosusu profeta Joseph Smith ateyaki ete:

“Libiki ekokaki koya na mokili te longola se na nzela ya boyokanisi ya Yesu Klisto.

“Nzambe … alengelaki libonza na likabo ya Mwana na Ye moko, oyo asengelamaki kotindama na ntango elongobani mpo … kofungola ekuke na nzela ya oyo moto akokaki kokota na liboso na Nkolo.”15

Atako na nzela ya libonza na Ye Mobikisi alongolaki kozanga mindondo. misala ya liwa ya nzoto,16 Alongolaki mokumba na biso moko te mpo koyambola masumu tosalaka.17 Na esika, Ye apesaki biso libiangisi ya bolingo mpo koyokana na Tata na biso ya Seko. Na nzela ya Yesu Klisto mpe libonza na Ye ya bomikabi, tokoki koyeba mbongwana ya makasi ya molimo mpe motema, komemaka lolenge ya sika, na nyonso mibale na Nzambe mpe na bomoi mobimba.18 Ntango toyamboli ya solosolo masumu na biso mpe topesi mitema mpe bolingi na biso na Nzambe mpe mitindo na Ye, tokoki kozwa bolimbisi mpe koyoka nguya ya Molimo Mosantu na Ye na lolenge ya mingi koleka. Na mawa nyonso, tozali kokima koyeba mozindo ya mpasi Mobikisi ayikelaki mpiko.19

Likabo ya boyamboli ezali liloba ya boboto ya Nzambe epai ya bana na Ye, mpe ezali ndimbola ya nguya na Ye oyo eleki nyonso mpo kosalisa biso kolonga masumu tosalaka. Ezali lisusu bosolo ya bompikiliki mpe motema molai Tata na biso ya bolingo azali na yango mpo na bolembu mpe babotau na biso ya nzoto. Mokambi Russell M. Nelson, profeta na biso ya bolingo, azalaki kolobela likabo oyo lokola.“fungola ya esengo mpe kimya ya motema.”20

Baninga na ngai ya bolingo, natatoli na bino ete ntango toyamboli masumu na biso,21 topesi ndingisa na likabo ya bomikabi ya Klisto ekoma mobimba ya solo na bomoi na biso.22 Tokokoma bansomi na bowumbu ya masumu na biso, tokozwa esengo na mobembo na biso na mabele, mpe tokokoma baponami mpo kozwa libiki ya seko, oyo elengelamaki uta ebandeli ya mokili mpo na baoyo nyonso bandimeli Yesu Klisto mpe bayei epai na Ye.23

Longola likabo ya lokumu ya libiki, Mobikisi apesi biso lisungi mpe libondisi ntango tokutanaka na bampasi, masenginia, mpe bolembu ya bomoi ya kufa, sangisa makambo toyebi kala te na bokono ya mikolo oyo. Nakoki koloba na bino solosolo ete Klisto ayebaka mikakatano tozali komona na bomoi ya kufa. Ayebi boyinani, mpasi ya liwa, mpe mpasi nyonso ya nzoto lokola mpe mikakatano ya mayoki mpe ya molimo tokutanaka na yango. Misopo ya Mobikisi etondisami na mawa, mpe Ye azali ntango nyonso pene mpo kosalisa biso. Ekoki kosalema boye mpo ete Ye moko ayebaki mpe azwaki likolo na Yemei na nzoto mpasi ya bolembu mpe bambeba na biso.24

Na bosokemi mpe bomikitisi ya motema, Ye akitaki na nse ya biloko nyonso mpe andimaki kotiolama, kobwakisama, mpe kosambwisama na moto, kozokisama mpo na masumu mpe mabe na biso. Anyokwamaki biloko nyonso oyo mpo na biso nyonso, kozwaka likolo na Yemei masumu ya mokili,25 Na bongo kokoma monganga na biso ya nsuka ya molimo.

Ntango tobelemi pene na Ye, kozingamaka biso moko na molimo ya bokebi na Ye, tokokoka kozwa likolo na biso moko bozito na Ye oyo ezali pete, mpe mokumba na Ye, oyo ezali pole, boye kozwa libondisi mpe bopemi wana elakamaka. Lisusu, tokozwa makasi oyo biso nyonso tozali na yango mposa mpo kolonga bampasi, bolembu, mpe mawa ya bomoi, oyo ezali mpasi makasi mpo ya koyika mpiko longola se lisalisi mpe nguya na Ye ya kobikisa.26 Makomi eteyaka biso mpo na “komema mikumba na biso na Nkolo, mpe akosunga biso.”27 “Mpe na nsima Nzambe akoki kosala epai ya [biso] ete mikumba mya [biso] mikoka kozala pepele, na nzela lya bosepeli bwa Mwana Mobali wa ye.”28

Elilingi
Regina mpe Mario Emerick

Pene ya nsuka ya mbula eleki, nayekolaki na liwa ya babalani ya bolingo, Mario mpe Regina Emerick, baoyo bazalaki sembo na Nkolo mpe bakufaki mikolo minei moko nsima ya mosusu uta na bampasi ya COVID-19.

Moko ya bana na bango ya mibali, oyo azali sikawa kosala lokola episikopo na Brezil, alobelaki ngai oyo elandi: “Ezalaki bongo mpasi mpo na komona baboti na ngai kolongwa mokili oyo na lolenge wana, kasi nakokaki koyoka na polele loboko ya Nkolo na bomoi na ngai kati na liwa oyo, mpo ete nazwaki makasi mpe kimya oyo ekatisaki bososoli na ngai. Na nzela ya bondimi na ngai na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, nazwaki lisalisi ya bonzambe mpo na kolendisa mpe kobondisa bandeko na ngai ya libota mpe baoyo nyonso basalisaki biso na ntango ya likambo oyo. Atako likamwisi oyo moto nyonso azalaki kolikya esalemaki te, ngai moko nazali nzeneneke ya nbongwana oyo esalemaki na bomoi na ngai moko mpe na bomoi ya bandeko na ngai ya libota. Nayokaki kimya oyo nakoki kolimbola te oyo ekotaki na bozindo ya motema na ngai, kopesaka ngai elikya mpe bondimi na bolingo ya Mobikisi mpo na ngai mpe na mwango ya esengo ya Nzambe mpo na bana na Ye. Nayekolaki ete na mikolo ya kotondisama na mpasi makasi, maboko ya bolingo ya Mobikisi ezali ntango nyonso ya kosembolama ntango tolukaka Ye na motema mobimba, nguya, molimo, mpe makasi.”

Elilingi
Libota ya Emerick

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi ya bolingo, na Eyenga oyo ya Pasika, napesi litatoli na ngai ete Yesu Klisto asekwaki na bawa mpe ete Ye azali na bomoi. Natatoli na bino ete na nzela na Ye mpe ya libonza ya bomikabi na Ye ezanga ndelo, Mobikisi apesaki biso nzela ya kolonga liwa, nyonso mibale ya nzoto mpe ya molimo. Longola mapamboli oyo ya minene, Ye apesi biso libondisi mpe litondi ya kondima mpenza na bantango ya mpasi. Nandimisi bino ete lokola tolikye na Yesu Klisto mpe bomikabi na Ye ya motuya makasi, koyikaka mpiko na bondimi na biso kino nsuka, tokosepela bilaka ya Tata na biso ya Lola ya bolingo, oyo asalaka eloko nyonso na nguya na Ye mpo kosalisa biso tozonga na liboso na Ye mokolo moko. Oyo ezali mosala na Ye mpe nkembo na Ye!29 Natatoli na bino ete Yesu azali Klisto, Mosikoli ya mokili, Masiya alakama, Lisekwi mpe Bomoi.30 Mpe nakaboli bosolo oyo na bino na nkombo na Ye ya bule, Mwana se moko ya Tata, Nkolo na biso, Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa