Likita Linene
“Tala! Nazali Nzambe moko ya makamwisi”
Likita linene ya sanza ya minei 2021


“Tala! Nazali Nzambe moko ya makamwisi”

Makamwisi, bilembo, mpe bikamwa etondi beboo kati na bayekoli ya Yesu Klisto lelo, kati na bomoi na bino mpe na oyo ya ngai.

Bandeko na ngai mibali mpe basi ya bolingo, litomba nini ezali ya ngai mpo na kotelema liboso na bino lelo. Bomoko na baoyo basili koloba na likita oyo, natatoli na bino ete Yesu Klisto azali na bomoi. Azali kokamba Eklezia na Ye, Alobaka na profeta na Ye, Mokambi Russell M. Nelson, mpe Alingi bana nyonso ya Tata ya Lola.

Na Eyenga oyo ya Pasika tozali kokanisa Lisekwa ya Yesu Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli na biso,1 Nzambe ya Bokasi bonso, 2Mwana Mokonzi ya Kimya.2 Bomikabi na Ye, esuki na Lisekwa na Ye nsima ya mikolo misato na kati na nkunda ya kodefa, ezali lokola likamwisi monene koleka nyonso na lisolo ya bato. “Mpo tala,” Alobaki, “Nazali Nzambe; mpe Nazali Nzambe moko ya makamwisi.”3

“Makamwisi esili mpo ete Klisto amati na lola, mpe afandi na loboko la mobali ya Nzambe?”4 profeta Mormon atuni kati na Buku ya Mormon. Ayanoli, “Te; mpe banzelu basilisi kosalela bana ba bato te.”56

Nsima ya kobakama ya Yesu na ekulusu, anzelu moko ya Nkolo abimelaki Malia, oyo, na ndambu ya basi misusu, bakendaki na nkunda mpo na kopakola nzoto na Yesu mafuta. Anzelu alobaki:

“Mpo na nini bozali koluka moto na bomoi kati na bakufi?”6

“Azali awa te: mpo asekwi.”7

Abinadi profeta ya Buku ya Mormon asakolaki na ntina na likamwisi wana:

“Mpe soko Klisto asekwaka te uta o bakufi, … ekokaki kozala na lisekwa te.

“Kasi ezali lisekwa, yango wana lilita ezali na elonga te, mpe etengu ya liwa eminami nie na Klisto.”8

Misala ya kokamwa ya Yesu Klisto etindaki bayekoli ya liboso na koloba: “Lolenge nini moto oyo azali! mpo azali kopesa mitindo ata na mipepe na mai, mpe yango ezali kotosa ye ”9

Lokola Bapostolo ya liboso balandaki Yesu Klisto mpe bayokaki Ye koteya nsango malamu, batatolaki makamwisi mingi. Bamonaki “bato bakufa miso bazali komona, mpe bibosono bakotambola, mpe bakufi matoyi bakoyoka, mpe bato bakufa bazali kosekwa, mpe nsango malamu ezali kosakolama na babola.”10

Makamwisi, bilembo, mpe bikamwa etondi beboo kati na bayekoli ya Yesu Klisto lelo, kati na bomoi na bino mpe na oyo ya ngai. Makamwisi ezali misala ya bonzambe, mamonisi, mpe bandenge ya kolakisa nguya ya Nzambe ezanga ndelo mpe bondimami ete Azali “Se moko lobi , lelo, mpe libela.”11 Yesu Klisto, oyo akelaki bambu, akoki kolembisa yango, Ye oyo apesaki miso na bakufi miso akoki kotombola miso na biso na lola, Ye oyo apetolaki bato ya maba akoki kobikisa bamaladi na biso, Ye oyo abikisaki moto azangi makasi akoki kobenga biso mpo na kotelema na “Yaka, Landa ngai.”12

Ebele na bino batatola na ntina na makamwisi, koleka kutu bokososola. Ekoki komonana mike soki okokanisi yango na Yesu kotelemisaka bawa. Kasi bonene ya eloko esali likamwisi te, kaka se ewutaki na Nzambe. Basusu balobi makamwisi ezali makambo masalemi na kozangaka kobongisa to na libaku mpamba. Kasi profeta Nefi akweisaki baoyo “bakitisi nguya ya makamwisi ya Nzambe, mpe bamiteyi bwanya na bango moko mpe boyekoli na bango moko, ete bazwa matabisi.”13

Makamwisi esalemi na nguya ya bonzambe na Ye Oyo azali na “nguya ya kobikisa.”14 Makamwisi ezali biteni ya mwango ya seko ya Nzambe, makamwisi ezali nsinga ya bomoi uta na lola kino na mabele.

Na eleko ya molunge eleki Mwasi na ngai Rasband mpe ngai moko tozalaki na nzela na biso kokendaka na mboka Goshen, Utah, mpo na likambo monene ya bopanzi-nsango na bato koleka 600.000 na bankota 16 ekesena.15 Pologalamu etalaki mingi makambo ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, na mituna epesamaki na bilenge bakoli na mokili mobimba. Ndeko Mwasi Rasband mpe ngai moko totalelaki mituna; epesaki biso libaku ya kotatola na ntina ya Joseph Smith lokola profeta ya Nzambe, nguya ya emoniseli na bomoi na biso, Bozongisi oyo ezali kokoba ya nsango malamu ya Yesu Klisto, mpe bosolo mpe mitindo oyo tozwaka na motuya. Ebele toyokaka lelo ezalaki eteni ya likambo wana ya kokamwa.

Na ebandeli bopanzi-nsango esengelaki kowuta na Zamba ya Bule na engumba oyo ezalaki likolo ya New York, epai wapi Joseph Smith atatolaki: “Namonaki Bato mibale, baoyo ya bango bongengi mpe nkembo ekoki kolimbolama te, kotelemaka likolo na ngai na mopepe. Moko na bango alobaki na ngai, kobengaka ngai na nkombo mpe alobaki, kolakisaka mosusu—Oyo azali Mwana wa Ngai wa Bolingo. Yokela Ye!18 Wana, bandeko mibali mpe basi, ezalaki likamwisi.

Elilingi
Yelusaleme etyamaki na Goshen, Utah

Bokono ya mokili mobimba esengisaki biso kokende esika mosusu na Goshen, Utha, epai wapi Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ebongisaki lisusu, mpo kozwa bilili, ya eteni ya Yelusaleme ya kala. Mwasi na ngai Rasband mpe ngai moko tozalaki bantaka moke na Goshen mokolo ya Eyenga wana na mpokwa ntango tomonaki molinga monene kowutaka na nzela tozalaki kokende. Moto ya zamba ezalaki kopela makasi na esika yango, mpe tomitungisaki ete bopanzi-nsango ekokaki kozala na likama. Esalemaki ete, na miniti zomi na mibale mpo na komona motoba, ya kobanda ntango ya bopanzi-nsango, lotiliki ekendaki na ndako monene mobimba. Lotiliki ezali te! Bopanzi-nsango ezali te. Ezalaki na masini moko ya lotiliki oyo tokokaki kosalela, kasi tozalaki na bondimi te ete ekokoka bisaleli ya makasi tozalaki na yango.

Elilingi
Molinga ewuti na moto

Biso nynso na pologalamu wana, bakisa balobi, bayembi, mpe bato ya tekiniki—kutu bilenge bakoli 20 ya libota na ngamei, bamipesaki mpenza na oyo elingaki kosalema. Nabendanaki mwa mosika ya bilelo mpe mobulungano na bango mpe nabondelaki Nkolo mpo na likamwisi. “Tata ya Lola,” Nasambelaki, “Esalemaka mingi te nasenga likamwisi, kasi nakosenga moko sikawa. Likita oyo esengeli kosalema mpo ya bilenge bakoli nyonso ya mokili. Tozali na mposa ya lotiliki ezonga soki ezali bolingi na Yo.”

Miniti nsambo nsima ya motoba, lotiliki ezongaki na lobangu mpenza ndenge ekendeki. Biloko nyonso ebandaki kosala, kobanda na miziki mpe bamikro to bavideo mpe bisaleli nyonso ya bopanzi-nsango. Tobandaki mosala. Tomonaka likamwisi.

Elilingi
MIziki ebetamaki liboso na biso na ntango ya likambo wana.

Ntango Ndeko mwasi Rasband na ngai tozalaki na motuka kozonga ndako na nsima ngonga na mpokwa wana, Mokambi Nelson mpe mwasi na ye bakomelaki biso nsango oyo ya mokuse: “Ron, tolingi boyeba ete kala te toyokaki lotiliki ekendaki, tosambelaki mpo na likamwisi.”

Na makomi ya mikolo mya nsuka ekomami, “Mpo Ngai, Nkolo nasembolaki loboko na ngai mpo na komonisa banguya ya lola; bokoki komona yango sikawa te, kasi na ntango moke mpe bokomona yango, mpe bokoyeba ete Nazali, mpe Nakoya mpe Nakoyangela na bato na ngai.”17

Wana ezali oyo esalemaki mpenza. Nkolo asembolaki loboko na Ye, mpe lotiliki eyaki.

Makamwisi esalaka na nguya ya bondimu, lokola eteyaki Mokambi Nelson biso na nguya nyonso na liyangani ya nsuka. Profeta Moroni alendisaki bato, “soko ezali bondimi te o ntei ya bana ya bato Nzambe akoki kosala likamwisi te o ntei ya bango; yango wana, amilakisaki te kina nsima ya bondimi na bango.”

Ye akobaki:

“Tala, ezalaki bondimi ya Alma mpe Amuleki oyo esalaki ete boloko ekweya na mabele.

“Tala, ezalaki bondimi ya Nefi mpe Lehi oyo esalaki mbongwana likolo ya Balamani, ete babatisama na moto mpe na Molimo Mosantu.

“Tala, ezalaki bondimi bwa Amona mpe bandeko babali ba ye basalaki likamwisi lyoko linene boye o ntei ya Balamani. …

“Mpe na ntango yoko te bato basali makamwisi kina nsima ya bondimi na bango; yango wana yambo bandimaki na Mwana Mobali wa Nzambe.”18

Nakoki kobakisa na eteni wana ya makomi, “Ezalaki bondimi ya bilenge bakoli oyo balenda malamu, oyo bayebi mosala ya bopanzi-nsango, bakambi mpe bandimi ya Eklezia, Apostolo moko, mpe profeta moko ya Nzambe oyo alukaka makasi mpenza likamwisi ete lotiliki ezongisamaki na filme moko na mosika na Goshen, Utah.”

Makamwisi ekoki koya lokola biyano na losambo. Ezali te ntango nyonso oyo tosengi to oyo tokanisi, kasi ntango tolikye na Nkolo, Akozala wana, mpe Akozala sembo. Akobongisa likamwisi na ngonga tozali na yango mposa.

Nkolo akosala makamwisi mpo na kokundolisa biso mpo na nguya na Ye, bolingo na Ye mpo na biso, nguya na Ye kati na bomoi na biso, mpe mposa na Ye ya koteya na ntina ya oyo ezali motuya mpenza koleka. “Oyo azali na bondimi na ngai ya kobikisama, “Alobaki na Basantu na 1831, mpe elaka ekobi lelo, “mpe aponami akokufa te, akobikisama.”19 Ezali na mibeko etyami na lola, mpe tozali ntango nyonso kotosa yango.

Ezali na bantango tolikyaka mpo na likamwisi ya kobikisa molingami moko, kobongola mosala moko ya bozangi sembo, to kolembisa molimo ya moto ya mpasi to oyo azangi esengo. Nakotalaka makambo na miso ya bokufi, tolingi Nkolo akotela biso, mpo kobongisa oyo ebukani. Na nzela ya bondimi, likamwisi ekoya, atako na ntango na biso te to na eyano tozali na yango mposa te. Yango elakisi tozali na bosembo ekoka te to tosengeli Asalisa biso te? Soki moke te. Tozali bana balingami ya Nkolo. Apesaki bomoi na Ye mpo na biso, Bomikabi na Ye ekobi kosikola biso na mikumba mpe lisumu ntango toyamboli mpe tobelami pene na Ye.

Nkolo akundolisi biso, “Banzela na bino ezali ya ngai te.”20 Ye asengi ete, “Boya liboso na ngai, bino banso bojali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino”21—bopemi uta na mitungisi, nsoni, bobangi, bozangi botosi, kotungisama mpo na baye alingaki, mpo na baoyo obungisaki, oyo bandoto ekokisamaki te. Kimya na kati ya bobulungano to mawa ezali likamwisi. Kundola maloba ya Nkolo, “Epesaki ngai kimya na mayele na yo mpo na likambo yango te? Litatoli monene nini okoki kozwa soki ewuti na Nzambe te?”22 Likamwisi ezali ete Yesu Klisto, Yehowa Monene, Mwana wa Ye oyo Aleki Likolo, ayanoli na kimya.

Bobele lokola abimelaki Malia na elanga, kobengaka ye na nkombo, Abengisi biso na kosalela bondimi na biso. Malia alukaki kosalela Ye mpe kosunga Ye. Lisekwa na Ye ezalaki oyo azalaki kozela te, kasi ezalaki engebene na mwango monene ya Esengo.

“Kita na ekulusu,”23 ebele ya bapagano basekaki Ye na Kalivari. Akokaki kosala likamwisi moko ya boye. Kasi Ayebaki nsuka uta ebandeli, mpe Akanaki kozala sembo na mwango ya Tata na Ye. Tosengeli kobungisa ndakisa oyo te.

Alobi na biso na bantango ya momekano, “Botala bampota oyo etoboli mopanzi na ngai, mpe lisusu bilembo ya bansete na maboko na ngai mpe makolo; bozala na kondima, botosa mitindo na ngai, mpe bokokota na bokonzi ya lola.”24 Wana, bandeko mibali mpe basi, ezali likamwisi elakamaki na biso nyonso.

Na Eyenga oyo ya Pasika lokola tokokumisa likamwisi ya Lisekwa ya Nkolo na biso, lokola Apostolo ya Yesu Klisto, na bomikitisi mpenza nasambeli ete bokososola nguya ya Mosikoli kati na bomoi na bino, ete mabondeli na bino na Tata na bino na Lola ekoyanolama na bolingo mpe komipesa Yesu Klisto alakisaki na mosala na Ye mobimba. Napamboli bino botelema ngwi na bondimi mpe sembo na maye manso makoya. Napamboli bino ete makamwisi ekosalema mbala na mbala na bomoi na bino lokola tomonaki na Goshen—soki ezali bolingi ya Nkolo. Boluka mapamboli oyo etindami na lola na bomoi na bino ntango “boluki Yesu na ntina na oyo baprofeta mpe bapostolo bakomaki, ete ngolu ya Nzambe Tata, mpe lisusu Nkolo Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu, oyo apesi litatoli ya bango, bakoka kozala mpe kofanda na bino libela.”25 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa