Likita Linene
Bokoki Kosangisa Yisalaele!
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Bokoki Kosangisa Yisalaele!

Nandimisami mpenza ete bino bilenge bokoki kosala yango—mpo na eloko moko na ntina na bomoto na bino mpe na nguya monene oyo ezali kati na bino.

Esali pene na mibu misatu eleki, Mokambi Russell M. Nelson abiangisaki bilenge nyonso ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakomisa bankombo na “lisanga ya bilenge ya Nkolo mpo na kosangisa Yisalaele na ngambo nyonso mibale ya elamba.1 Alobaki, “Bosangisi wana ezali eloko moko ya ntina koleka nyonso oyo emonisami na mokili lelo.”1 Nandimisami mpenza ete bino bilenge bokoki kosala yango—mpe bosala yango malamu koleka—mpo na (1) eloko moko etali bomoto na bino mpe (2) nguya monene oyo ezali kati na bino.

Elilingi
Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Corbitt

Mibu ntuku minei na moko eleki, bamisionele mibale ya Eklezia na biso bayokaki etinda ya kokende na ndaku moko na New Jersey, na Etazini ya Amerika. Na nsima, na lolenge ya kokamwa, baboti mpe bana na bango nyonso zomi babatisamaki. Na maloba ya Profeta, “batikaki Nzambe akonza”2 bomoi na bango. Nasengeli koloba “bomoi na biso.” Nazalaki mwana ya misatu. Nazalaki na mibu 17 ntango nazwaki mokano ya kosala boyokani ya libela ya kolanda Yesu Klisto. Kasi sosola nini mosusu nasengelaki kosala? Nasengelaki kosala misio ya ntango mobimba te. Yango ezalaki ebele koleka. Mpe nakokaki kolikya yango te, bongo te? Nazalaki na ngai mondimi ya sika na Eklezia. Nazalaki na mbongo te. Mpe lisusu, nawutaki kosilisa kelasi na ngai ya humanite ya mpasi koleka na Westi ya Philadelphie mpe nakutanaki na mikakatano ya bobangi, na makanisi na ngai nazalaki kobanga kotika ndaku mpo nakende mibu mibale mobimba.

Elilingi
Libota ya Corbit

Bomoto na Yo ya Solo

Kasi nawutaki koyekola ete ngai mpe mokili mobimba tozalaki kofanda epai ya Tata na Lola lokola bana na Ye ya molimo ya basi mpe mibali yambo ya mbotama na biso. Basusu basengelaki koyeba, lokola nayebaki, ete Alingaki bana na Ye nyonso basepela na bomoi ya seko na Ye. Yango wana, yambo moto nyonso aya na mabele, Alakisaki epai ya banso mwango na Ye ya ebonga nie ya lobiko mpe esengo, na Yesu Klisto lokola Mobikisi na biso. Likambo ya mpasi koleka, Satana aboyaki mwango ya Nzambe.3 Engebene na buku ya Emoniseli, “etumba ebundamaki na lola”!4 Satana na mayele mabe akosaki eteni moko kati na misato ya bana ya molimo ya Tata na Lola ete akamba bango na esika ya Nzambe.5 Kasi bino te! Apostolo Yoane amonaki ete bolongaki Satana “na liloba ya litatoli na [bino].”6

Lokola nayebi bokitoli na ngai ya solo, oyo esungaki na lipamboli ya bonkoko, epesaki ngai mpiko mpe bondimi ya kondima libiangi ya Mokambi Spencer W. Kimball ya kosangisa Yisalaele.7 Ekozala lolenge moko mpo na bino, baninga na ngai ya bolingo. Lokola nayebi ete bolongaki Satana na liloba na bino ya litatoli liboso ekosunga bino “bolinga, bokabola, mpe bobengisa”8 sikoyo mpe ntango nyonso—kobengisa basusu baya mpe bamona, baya mpe basunga, mpe baya mpe bakoma, lokola etumba wana kaka moko ya milimo ya bana ya Nzambe ezali kolandana.

Elilingi
Mpaka Corbit

Bondimi ya Nguya mpenza kati na Bino

Nini na oyo etali nguya monene oyo ezali kati na bino? Bokanisa na ntina na yango: bogangaki na esengo9 mpo na koya na mokili oyo ekweyisama epai wapi biso nyonso tosengeli kokutana na liwa ya nzoto mpe ya molimo. Tokokaki kozala na makoki ata mokolo moko te ya kolonga to na makasi na biso moko. Tokonyokwama kaka mpo na masumu na biso te kasi mpo na masumu ya basusu mpe. Mokili elingaki koyeba makanisi ya ndenge na ndenge ya bobuki mpe boyokisi mpasi10—banso na elamba ya bobosani na kati ya makanisi na biso mpe monguna ya mabe ya mokili oyo azali kokoba kokengela mpe kosenginya biso. Elikya nyonso mpo na bozongi lisusu ya mosekwi mpe peto na miso ya Nzambe ya bule ezali mobimba nyonso likolo ya Moto moko oyo azalaki na elikya na Ye.11

Nini epesi bino ndingisa ya kokende liboso? Mokambi Henry B. Eyring ateyaki, “Esengaki bondimi epai ya Yesu Klisto mpo na kosunga mwango ya esengo mpe esika ya Yesu Klisto na kati na yango ntango boyebaki mwa moke ya mikakatano oyo bokokaki na yango na bokufi.”12 Ntango Yesu Klisto alakaki ete Asengelaki koya na bokufi mpe kopesa bomoi na Ye mpo kosangisa13 mpe kobikisa biso, bondimelaki Ye kaka mpamba te. Bino “milimo ya lokumu”14 bozalaka “na bondimi makasi koleka” oyo bomonaki elaka na Ye lokola solo.15 Akokaki kokosa te, mpo bomonaki Ye kaka lokola asilaka kosopa makila na Ye mpo na bino, kala yambo Ye abotama.16

Na maloba ya elembo ya Yoane, bino “bolongaki [Satana] na makila ya Mwana na mpate.”17 Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki ete na mokili wana “[bino] bomonaki nsuka uta ebandeli.”18

Kanisa mokolo moko liboso okende kelasi, moko ya baboti na yo apesi yo elaka ya solo ya kolambela yo elubu olingaka mingi ntango okozonga ndaku! Ozali na esengo mpenza! Ntango ozali na kelasi ozali kokanisa kolya bilei wana, mpe osili komeka yango. Mpamba te okabolaka nsango na yo ya malamu na basusu. Kotalaka liboso mpo na kokende ndaku ekosepelisa yo mpe mimekano mpe mikakatano ya kelasi emonisami kozala pepele. Eloko moko te ekoki kolongola esengo na yo to kotya yo ntembe mpo na lolenge nini elaka ezali solo! Lolenge moko, yambo ete bino “milimo ya lokumu” bobotama, boyekolaki komona bilaka ya Klisto na lolenge ya solo oyo, mpe bomekaki ndambo ya lobiko na Ye.19. Bondimi na bino monene ezali lokola misuni oyo ezali kokoma makasi mpe minene ntango bozali kosalela yango, kasi esili kozaaa kati na bino.

Lolenge nini bokoki kolamusa bondimi na bino monene na Klisto mpe kosalela yango mpo na kosangisa Yisalaele sikawa mpe kolonga Satana lisusu? Na koyekolaka lisusu kotala liboso mpe komona na bosolo wana elaka ya Nkolo mpo na kosangisa mpe kobikisa lelo. Mingimingi Asaleli Buku ya Mormon mpe baprofeta na Ye mpo na koteya biso lolenge nini. Mosika te liboso ya Klisto, baprofeta ya “Banefi, mpe … banganganzambe, mpe … bateyi … [bandimisaki bato] batala liboso epai ya Masiya, mpe bandimela Ye koya lokola kaka asilaki koya.”20 Profeta Abinadi ateyaki, “Mpe sikawa soko Klisto ayaka te o kati ya mokili, kolobaka makambo makoya lokola soko makomaka, ekokaki kozala bosikoli te.”21 Lokala Alma, Abinadi “atala[ki] liboso na liso ya bondimi”22 mpe amonaki elaka ya solo ya lobiko ya Nzambe lokola esilaki kokokisama. “Balongaki [Satana] na makila ya Mwana na mpate, mpe …liloba ya litatoli na bango” kala te liboso Klisto abotamaki, kaka se lokola bosalaki. Mpe Nkolo apesaki bango nguya ya kobengisa mpe kosangisa Yisalaele. Akosala lolenge moko epai na bino na ntango bozali kotala liboso na bondimi, komona Yisalaele esangana—na mobimba mpe na “mangomba na bino moko”23—mpe kobengisa bato nyonso!

Bankama ya bamisionele bayekami na bondimi na bango ya nguya na Klisto ya bomoi ya yambo ya kufa na kokanisaka baoyo bakutanaki na bango to bateyaki balatisami bilamba ya libatisi mpe bilamba ya tempelo. Na liteya moko na nkombo ya “Banda na Nsuka na Makanisi,”24 Mokambi Nelson akabolaki ndakisa na ye ya kosalaka yango mpe ateyaki bakambi ya misio bateya bamisionele na biso basala lolenge moko. Koyebaka ete basalelaki bondimi monene kati na Yesu Klisto na mokili yambo ya kufa esungaki makasi bamisionele na biso ya bolingo na “koyoka Ye”25 mpe kosalela bondimi na bango monene mpo na kosangisa Yisalaele lokola Nkolo alakaki.

Ya solo, bokanisa lokuta ebebisaka bondimi.26 Baninga na ngai, bokanisa to botala na bokebi makambo oyo ebebisi oyo bino bozali mpenza, mingimingi bilili ya mabe, ekolembisa bondimi na bino na Klisto mpe, na bozangi boyamboli, ekoki kobebisa yango. Nasengi bosalela makanisi na bino mpo na kokolisa bondimi kati na Klisto, kasi bobebisa yango te.

Pologalami ya Bana mpe Bilenge

Pologalami ya Bana mpe Bilenge ezali esaleli ya boprofeta mpo na kosunga bino bilenge bolendisa bondimi na bino makasi. Mokambi Oaks ateyaki, “Manaka wana etiami mpo na kosunga bino bokoma mingi lokola Mobikisi na biso na makambo minei: na molimo, na bizaleli, na nzoto mpe na mayele.”27 Lokola bino bilenge bozali kokamba—kokamba—na kosalelaka nsango malamu, bozali kosunga basusu, bozali kobengisa bango nyonso bazwa nsango malamu, kosangisaka mabota mpo na seko, mpe kolengelaka milulu ya bosakani,28 bondimi monene kati na Klisto oyo bozalaki na yango na bomoi yambo ya kufa ekolendisa mpe ekopesa bino nguya ya kosala mosala na Ye na bomoi oyo!

Lisusu, mikano ya moto yemoko, “mingimingi mikano ya mikuse,”29 esungi bino kopelisa bondimi na bino ya nguya mingi. Ntango otye mokano moko ya malamu, ozali kotala liboso, lokola osalaki liboso, mpe kotalaka oyo Tata na yo na Lola alingi yo to moto mosusu akoma.30 Nsima obongisi mpe osali makasi ya kokokisa yango. Mpaka Quentin L. Cook ateyaki, “Komona mpamba te ntina ya kolengela mwango, kotya mikano … , mpe [kobengisaka basusu]—nyonso na lisu ya bondimi.”31

Liponi ezali ya Yo! Nkolo alobaki na ntina na bino, “Nguya [ya kopona] ezali kati na bango.”32 Mpaka Neil L. Andersen alimbolaki, “Bondimi na bino ekokola te kaka na libaku malamu, kasi na boponi.”33 Abakisaki, “mituna [Nyonso] ya bosembo [oyo bokoki kozala na yango] … ekoyanolama na motema ya kokita mpe na lisu ya bondimi.”34

Natatoli ete (1) booto na bino ya solo mpe (2) bondimi ya nguya monene mpenza epai ya Klisto kati na bino ekopesa bino nzela “bosungama na kolengela mokili mpo na bozongi ya Mobikisi na kobiangisaka bato nyonso baya epai ya Klisto mpe bazwa mapamboli ya Bomikabi na Ye.”35 Tika ete biso nyonso tokabola esengo ya elaka ya solo ya Buku ya Mormon:

“Bayengebene oyo bayokameli ba … profeta, mpe … batali liboso epai ya Klisto na bompikiliki … atako mimekano nyonso … bakopengwa te.

“Kasi [Klisto] … akobikisa bango, mpe bakozala na kimya elongo na Ye.”36

Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (worldwide youth devotional, June 3, 2018), HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org.

  2. Russell M. Nelson “Tika Ete Nzambe Akonza,” LiahonaSanza ya zomi na moko. 2020, 92.

  3. Tala Gospel Topics, “Mwango ya Lobiko,” topics.ChurchofJesusChrist.org; Henry B. Eyring, “Nguya ya Kosunga Bondimi,” Liahona, Sanza ya mitano 2019.

  4. Tala Emoniseli 12:7–8.

  5. Tala Doctrine et Alliances 29:36–37.

  6. Emoniseli 12:11.

  7. Tala Spencer W. Kimball, “It Becometh Every Man,” Ensign, Sanza ya zomi 1977, 2–7.

  8. Sharing the Gospel,” ChurchofJesusChrist.org/share.

  9. Tala Yobo 38:4–7.

  10. Tala Gospel Topics, “Mwango ya Lobikotala lisusu “Be Still, My Soul,” Hymnsno. 124, eteni 3.

  11. Tala Gospel Topics, “Mwango ya Lobikotala lisusu Dallin H. Oaks, “The Great Plan,” LiahonaSanza ya mitano 2020.

  12. Henry B. Eyring, “Nguya ya Kosunga Bondimi,” 58.

  13. See 3 Nefi 27:14

  14. Russell M. Nelson, “Hope of Israel,” HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org; see also Doctrine et Alliances 138:55–56.

  15. Tala Alma 13:2–4; tala lisusu Emoniseli 12:11; Biteni ya Bondimi 1:5. Buku ya Mormon elimboli polele ete baoyo bazali na “bondimi monene mpenza” tala Bilaka ya Nzambe lokola kaka esila kokokisama. Tala 1 Nefi 5:5; Moziya 3:11–13; 4:1–3; Alma 27:28; 28:12 (“bango bazali baye batelemaki na 77–76 BC; sete ebetami); tala lisusu Esode 3:13; Yisaya 53; Doctrine et Alliances 130:7; Mose 7:47.

  16. Tala 2 Nefi 31:15; Etele 3:6–9, 11–13. Bondimi mpo na komona eleka ya Klisto ya lobiko lokola kaka esila kokokisama esengi mpenza koyeba ete Klisto akoki kokosa te. Bondimi ya lolenge oyo ezali ezalela ya mpiko ya bayengebene yambo ya nkufa, mingimingi bilenge na biso. “Tata na biso ya Lola abombi ebele ya milimo na Ye ya lokumu—ntango mosusu, nakoki koloba, ekipi na Ye ya elikya—mpo na eleko oyo ya nsuka. Milimo ya lokumu wana—baye basani ya elikya, bilombe wana—ezali you!” (Russell M. Nelson, “Hope of Israel,” HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org). Tala lisusu Yoane 1:1; 14:6, 17.Tala 2 Nefi 1:1; 14:6.

  17. Bobimisi 12:11tala lisusu Etele 3:6–9

  18. Dallin H. Oaks, “Moango Monene,” 93.

  19. Tala Alma 36:24–26; tala lisusu Nzembo 34:8; Yakobo 3:2; Moziya 4:11

  20. Yalomi 1:11.

  21. Moziya 16:6.

  22. Alma 5:15.

  23. Tala “Gospel Living: Circles,” New Era, Sanza ya zomi. 2020, 15.

  24. Tala Russell M. Nelson, “Begin with the End in Mind” (liteya liteyamaki na seminele mpo na bakambi ya misio ya sika, Sanza ya motoba 22, 2014).

  25. Tala Russell M. Nelson, “Hear Him,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 88–92.

  26. Ndakisa, Alma alobelaki bato na ye na ntina ya kotala liboso na liso ya bondimi ntango bakotelema liboso ya Nzambe, kasi akebisaki bango ekoki kosalamela bango te na elikya mpe kimya bobele soki bayamboli masumu na bango te (tala Alma 5:15–17).

  27. Face à Face na Mokambi mpe Ndeko mwasi Oaks (worldwide youth broadcast, Sanza ya mibale 23, 2020), facetoface.ChurchofJesusChrist.org.

  28. Tala General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 1.2; 10.2.1.3; 11.2.1.3, ChurchofJesusChrist.org.

  29. Face to Face with President and Sister Oaks, facetoface.ChurchofJesusChrist.org.

  30. Tala Preach My Gospel: A Guide to Missionary Service (2018), 156, ChurchofJesusChrist.org; see also Alma 5:15–17.

  31. Quentin L. Cook, “Ntina mpe Bolengeli” (liteya liteyamaki na seminele mpo na bakambi ya sika ya misio, Sanza ya motoba 2019).

  32. Doctrine et Alliances 58:28.

  33. Neil L. Andersen, “Faith Is Not by Chance, but by Choice,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 66.

  34. Neil L. Andersen, “The Eye of Faith,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 36.

  35. Aaronic Priesthood Quorum Theme,” ChurchofJesusChrist.org.

  36. 2 Nefi 26:8–9.

Bimisa na lokasa