2010–2019
Nguya ya Kosimbaka Bondimi
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Nguya ya Kosimbaka Bondimi

Na kotombolaka loboko na yo likolo mpo na kosimba, yo opesi elaka na Nzambe, oyo basali na ye bazali, ete okosimba bango.

Bambala mingi nayokaka bakambi ya bonganganzambe kotondaka mpo na kosimbama ya bondimi ya baye bango bazali kosunga. Uta na koyoka na mingongo na bango, bino boyebi botondi ezali mozindo mpe ya solo. Ntina na ngai lelo oyo ezali komema bosepeli ya Nkolo mpo na kosimbaka na bino basali na Ye na Eklezia na Ye. Mpe yango ezali lisusu mpo na kopesa bino makasi ya kosalela mpe kokola na nguya yango ya kosimba basusu na bondimi na bino.

Yambo bino bobotama, bino bomonisaki lolenge ya nguya yango. Zongisa makanisi nsima na oyo toyebi etali mokili ya molimo yambo ya bokufi. Tata na biso ya Lola alakisaki mwango moko mpo na bana na Ye. Biso tozalaki kuna. Lusifelo ndeko na biso ya mobali ya molimo, atelemelaki mwango oyo ekokaki kopesa biso nzela ya kopona na bonsomi. Yova, Mwana wa Bolingo ya Tata na Lola, asimbaki mwango yango. Lusifelo amemaki botomboki. Mongongo ya kosimbaka ya Jehovah elekaki likolo, mpe Ye asalaki ya ofele mpo na lozala Mobikisi na biso.

Likambo ete bino bozala kati ya kibokufi sikoyo endimisi biso ete bino bosimbaki Tata mpe Mobikisi. Esengaki bondimi na Yesu Klisto mpo na kosimba mwango ya esengo mpe esika ya Yesu Klisto na yango ntango bino boyebaki muke mpenza na mikakatano oyo bokokutana na yango na bokufi.

Bondimi na bino ya kosimba basali ya Nzambe ezalaki na motema ya esengo na bino na bomoi oyo mpe lokola. Ntango bino bondimaki momekano ya misionele ya kobondela mpo na koyeba ete Buku ya Mormon ezalaki liloba ya Nzambe, bino bozwaki bondimi ya kosimba mosali ya Nkolo. Ntango bino bondimaki libiangi ya kobatisama, bosimbaki mosali ya Nzambe.

Ntango otikaki moto moko atia maboko na moto na yo mpe aloba, “Yamba Molimo Mosantu,” osimbaki ye lokola mosimbi moko ya Bonganganzambe ya Melekisedeke.

Wuta mokolo wana, bino, na kosalaka na bondimi nyonso, bosimbi moko na moko oyo apesi bonganganzambe likolo na yo mpe moko na moko oyo akulisi yo na office moko ya bonganganzambe.

Na ebandela ya mayele na bino ya kibonganganzambe, kosimba moko na moko ezalaki molulu moko ya pete ya kolikiaka na mosali na Nzambe. Sikawa, ebele na bino bakendaki na esika moko wapi kosimba esengami makasi.

Bino boponi ata ndenge nini kosimba baye nyonso Nkolo abiangi—ata esika nini Nkolo abengi bango. Boponi wana eyaka na makita na mokili mobimba. Yango ekomaki na moko oyo. Na mayangani ya ndenge oyo, bakombo ya mibali mpe basi—basali ya Nzambe—batangami, mpe bino bobiangami kotomboloa loboko likolo mpo na kondima. Bino bokoki kobomba mpo na bino moko boponi na bino ya kosimba, to bokoki kolaka kosimba bondimi. na kotombolaka loboko na yo likolo mpo na kondima, yo opesi elaka. Yo opesi elaka na Nzambe, oyo basali na ye bazali, ete okosimba bango.

Bango bazali bato bazangi bobongi nie, lokola bino bozali. Kobomba bilaka na bino ekobomba bondimi na bino koningana te ete Nkolo abengaki bango. Kobomba bilaka yango ekomema lisusu esengo ya libela. Kozanga kobomba yango ekomemela bino mawa mpe na baoyo bolingaka—mpe kutu kobungisa nsima nguya ya kokanisa.

Bokokaki kosengama, to bokotunama, soki bosimbi episikopo na bino, mokambi ya likonzi, Bakambi banene, mpe Bayangeli Banene ya Eklezia. Ekoki kosalama ntango bosengami kosimba bayangeli mpe bakambi kati na likita moko. Ntango mosusu ekozala lisolo na episikopo to mokambi ya likonzi.

Toli na ngai ezali ete otuna bamituna oyo na yo moko yambo, na makanisi ya bokebi mpe ya libondeli. Soki bosali boye, bino bosengeli kotala nsima na makanisi na bino, maloba, mpe misala. Meka kokanisa mpe bongisa biyano bino bokopesa ntango Nkolo asololi na yo, koyebaka ete mokolo mosusu akosala. Okoki komilengela na komitunaka mituna lokola oyo elandi:

  1. Ekanisaki ngai to esololaki ngai mpo na bolembu ya bato na nasengamaki kosimba?

  2. Etalaki ngai mpo na eloko elakisi ete Nkolo azali kotambwisaka bango?

  3. Elandaki na makanisi mpe bosolo mpenza bokambi na bango?

  4. Esololaki ngai oyo etali elembo emonani na miso nakoki komona ete bango bazali basali ya Nzambe?

  5. Ebondelaka ngai mpo na bango mingimingi na nkombo mpe elongo na mayoki ya bolingo?

Mituna wana ekoki, mpo na mingi na biso, komema na bamingi kobanga mpe bosenga moko ya koyambola. Topesamaki motindo na Nzambe ya kosambisa basusu te na bozangi bosembo, kasi na esaleli, biso tomoni ezali mpasi mpo na kotika. Pene na eloko nyonso tozali kosala na kosalaka elongo na bato ememi biso kotalaka bango. Mpe pene na lolenge ya babomoi na biso, tokokanisaka bisomoko na basusu. Tokoki kosala bongo mpo na bantina ebele, mingi kati na yango ezali malamu, kasi mingimingi yango ememi biso na botuki.

Mokambi George Q. Canon apesaki likebisi moko oyo napesi epai na bino lokola ya ngaimei. Nandimi ete ye alobaki bosolo: “Nzambe aponaka basali na Ye. Nasakoli yango lokola libaku na ye ya kopesa bango etumbu, soki bango basengeli na etumbu. Ye apesaki yango na biso te moto se yemoko kolakela mpe kopesa bango etumbu. Nzokande, moto moko te ata azali makasi na bondimi, atako azali likolo kati na Bonganganzambe, akoki koloba mabe ya bapakolami ya Nkolo mpe komona mbeba na bakambi ya Nzambe na mabele kozangaka komitia na kozangisa Ye esengo. Molimo Mosantu ekolongua yango moko na moto moko ya lolenge wana, mpe ye akokende na kati ya molili. Soki ekozala bongo, emoni bino te boniboni yango ezali motuya ete tosengeli kokeba?”1

Bomoni na ngai ezali ete bandimi ya Eklezia na mokili mobimba bazali mpenza sembo na moko mpe mosusu mpe na baoyo bazali kokamba likolo na bango. Nzokande, ezali na babokobi oyo tokoki mpe tosengeli kosala. Tokoki kotombola likolo makasi nguya na biso ya kosunga moko mpe mosusu. Yango ekosenga bondimi mpe makasi. Awa ezali na makanisi minei nakanisi mpo na biso kosala yango na liyangani oyo.

  1. Tokoki koyeba misala moko na moko balobi batindi mpe babandi lelo komema yango. Soki tosali, nguya na biso ya kosimba bango ekokola.

  2. Biso tokoki kobondela mpo na bango lokola bango ntango bazali koloba ete Molimo Mosantu ekomema maloba na bango kati na mitema ya moto moko na moko oyo tolingaka . Ntango toyekoli ete mabondeli na biso eyanolamaki, nguya na biso ya kosimba bakambi yango ekokola.

  3. Tokoki kobondela ete balobi moko na moko bakopambolama mpe kobulisama lokola ntango bazali kopesa bitinda na bango. Ntango totali ete bango bakobulisama, tokokolisa bondimi na biso mpo na kosimba bango, mpe yango ekokoba.

  4. Tokoki koyoka bitinda uta na balobeli oyo eyei lokola eyano moko na libondeli ya moto na moto ya kosunga. Ntango biyano eyei, mpe yango ekoya, biso tokokola na bondimi na biso ya kosimba basali na Nzamne nyonso.

Mpo na kobakisa kobongisaka kosimba baoyo bazali kosala na Eklezia, tokoyekola ete ezali na libongisi mosusu na yango tokoki kokolisa lolenge ya nguya oyo. Kuna, ekoki komema kutu mapamboli minene koleka epai na biso. Yango ezali kati na ndako mpe libota.

Nalobi na mokumbi bonganganzambe ya elenge oyo azali na ndako moko elongo na tata ye . Tika ngai nayebisa yo uta na mayele na ngai moko nini elakisi mpo na tata moko koyoka bosimbi na yo ya bondimi. Ye akoki koluka kiboninga na yo. Kasi ye azali liboso ya mikakatano koleka oyo yo oyebi. Ntango mosusu ye akoki te komona nzela epai wapi makambo liboso na ye.

Bosepeli na yo mpo na ye ekosalisa ye mingi. Bolingo na yo mpo na ye ekosunga ye kutu koleka. Kasi eloko oyo ekosunga koleka ezali maloba ya solo lokola oyo: “Tata, nabondelaki mpo na yo, mpe nayokaki ete Nkolo akosunga yo. Makambo nyonso ekotambola malamu. Nandimi yango ekosalema.”

Maloba lokola oyo ezali na nguya na nzela mosusu, tata epai ya mwana mobali. Ntango mwana moko ya mobali asali mbeba moko ya makasi, ntango mosusu na likambo moko ya molimo, akoki komiyoka ete akweyi. Lokola tata na ye, na ngonga wana, okoki kokamwa ntango, nsima yo kobondela mpo na koyeba nini kosala, Molimo Mosantu atie maloba oyo na monoko na yo: “Mwana mobali, nazali na yo molongo mobimba. Nkolo alingi bino. Elongo na lisungi na Ye, okoki kozongisa yango nsima. Nayebi ete bino bokoki mpe ete bokokoka. Nalingi bino.”

Kati ya bonganganzambe mpe kati na libota, kokolisa bondimi ya kosimba moko mpe mosusu ezali nzela ya kotonga Siona Nkolo alingi biso tosala. Elongo na lisalisi na Ye, biso tokoki mpe tokokoka. Yango ekozwa boyekoli ya kolinga Nkolo elongo na mitema na biso nyonso, nguya, makanisi, mpe makasi mpe kolinga moko mpe mosusu lokola tomilingaka biso moko.

Soki tokoli na kati ya bolingo wana ya peto ya Klisto, mitema na biso ekokoma pio. Bolingo wana ekokitisa biso mpe ekotinda biso koyambola. Elikia na biso na Nkolo mpe na moko mpe mosusu ekokola. Mpe boye tokokende liboso kokomaka moko, lokola Nkolo alakaki biso tokoki.2

Natatoli ete Tata ya Lola ayebi mpe alingi biso. Yesu azali Klisto ya bomoi. Oyo ezali Eklezia na Ye. Tozali na bonganganzambe na Ye. Ye akokumisa makasi na biso ya kokola na nguya na biso ya kosalela yango mpe kosimba moko mpe mosusu. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Makomi

  1. Gospel Truth: Discourses and Writings of President George Q. Cannon, ed. Jerreld L. Newquist (1974), 1:278.

  2. Tala Doctrine et Alliances 35:2.

Bimisa na lokasa