2010–2019
Yaka, Landa Ngai
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Yaka, Landa Ngai

Yesu Klisto abendisi biso mpo na kokamata nzela ya boyokani kozonga na ndako epai ya Baboti na biso ya Lola mpe kozala elongo na baye tolingaka.

Bandeko ba ngai ya bolingo mibali mpe bandeko basi, mwasi na ngai Wendi mpe ngai tozali kosepela na kozala elongo na bino na ntongo ya Saba oyo. Mingi eleki uta likita linene na biso eleki. Batempelo ya sika ebulisami na Concepción, Chile; Barranquilla, Colombia; mpe Rome na Italie. Toyokaki bosopani ya kofuluka ya Molimo na makambo oyo ya bule.

Napesi longonia na basi mingi (mpe mibali) oyo kala te batangi Buku ya Mormon mpe bakuti esengo mpe bomengo ebombama. Nafulami na koyoka nsango etali makamwi ezwami.

Nasepeli na elenge mobali ya mibu 11 oyo, sikoyo diakona, na bolongobani azali kolekisa elambo eyenga nyonso. Bazali kokende elongo na elenge mwasi na biso ya mibu 11, oyo azali sikoyo koyekola mpe kosala na mposa mpenza lokola Banzoi. Bango mibale bilenge mibali mpe bilenge basi bazali koteya bosolo ya nsango malamu na polele mpe bondimi.

Nasepeli na bana mpe bilenge oyo bazali kosala mpo na koteya nsango malamu na bandako ntango bazali kosala elongo na baboti na bango mpo na kolanda mwango ya ndako na katikati, na lisungi ya Eklezia.

Tozwaki foto oyo ya Blake ya mibu minei, oyo, ntongontongo moko ya mitano na ntongo, akamataki Buku na ye ya Eklezia mpe agangaki, “nasengeli koIeisa molimo na ngai!”

Elilingi
Blake koleisaka molimo na ye

Blake, tozali na esengo mpenza na yo mpe basusu oyo baponi koleisa milimo na bango na kosalaka limpati na babosolo ya nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto. Mpe toyoki nsai na koyebaka ete mingi bazali kozwa nguya ya Nzambe na bomoi na bango na kokumbamelaka mpe kosalaka na tempelo.

Lokola mingi na bino boyebi, libota na biso eyokaki bokabwani ya bolingo sanza misato moleki ntango mwana na biso Wendy alongwaki na bomoi oyo ya kufa. Na mikolo na ye ya nsuka ya bitumba na kanser, napambolamaki na libaku ya lisolo ya tata-mwana ya mbote ya nsuka .

Nasimbaki maboko ma ye mpe nalobaki na ye motindo kani nalingaki ye mpe motindo kani nazalaki na botondi mpo na kozala tata na ye. Nalobaki: “Obalaki na tempelo mpe okumisaki mayokani na yo. Yo mpe mobali na yo boyambaki na malamu bana nsambo na kati na nndako na bino mpe bokolisaki bango mpo na kozala bayekoli ya komipesa ya Yesu Kliisto, mpe bandimi ya mpiko ya Eklezia, mpe bana mboka ya ntina. Mpe baponaki balongani ya ndenge wana kaka. Tata na yo azali mpenza, mpenza na lokumu na yo. Bomemeli ngai esengo mingi!”

Na kimia azongisaki, “Natondi yo, Papa.”

Ezalaki ngonga ya bolingo, ya mpizoli mpo na biso. Na mibu na ye 67, tosalaki mosala elongo, mpe mbala mingi tosakanaki elongo na galasi. Kais mpokwa wana, tolobelaki makambo maleki na motuya, lokola mayokani, makuli, botosi, bondimi, libota, boboto, bolingo, mpe bomoi ya seko.

Tozangi mwana na biso ya mwasi mingi. Nzokande, na ntina ya nsango malamu ezongami ya Yesu Klisto, tozali na komitungisa te mpo na ye. Soki tokobi kokumisa mayokani na biso na Nzambe, tozali lelo na likanisi ya kozala elongo na ye lisusu. Uta sikoyo ti ntango wana, tozali kosalisa Nkolo awa mpe azali kosalisa Ye—na paladizo.1

Ya solo, tmwasi na ngai mpe ngai tokendeki kotala Paradise na ebandeli ya mobu oyo—Paradise na Californie, yango ezali. Ntango esalemaki, kotala ya manaka na biso na biso kuna esalemaki ngonga 40 nsima ya bolongwi ya mwana na biso ya mwasi Biso, elongo na Mpaka Kevin W. Pearson mpe mwasi na ye, June, balendisamaki na Basantu ya Likonzi ya Californie na Chico. Toyekolaki na bondimi na bango monene, mpe bikamwa oyo esalemaki oyo epesi kutu na ontei ya bobungisina moto ya zamba ya bobebisi koleka na mambi ma Californie.

Kuna, tolobaki ntango molai na elenge polisi moko, John, oyo azalaki moko ya bayanoli ya yambo ya mpiko. Akundolaki molili ya makasi oyo ekitelaki Paradise mokolo ya 8 sanza ya zomi na moko, ntango moto mpe fofolo esopanaki na mboka, komelaka ndako mpe bozwi lokola mfimbo kotikaka kaka maboke ye mputulu bingongolo ya babriki ya kotonda

Elilingi
Ndakonzambe nsima ya moto

Na ngonga ya 5, John akumbaki motuka na kati ya molili ya koleka te oyo etondaki nzube ya fofolo ya kobangisa ntango azalaki kosunga moto nsima ya moto, libota nsima ya liboota kokima na likama te—nyonso na likama ya bomoi na ye moko. Kasi na nsomo ya kowumela wana, nini ebangisaki ngai makasi ezalaki motuna ya ye ya kozukisa: “Wapi ezali ya ngai libota?” Nsima ya ngonga molai, ngonga ya kobangisa makasi ya nsomo, na nsuka ayokaki nsango ya kobika ya libota na ye na likama te.

Nsango ya kotungisama ya John mpo na libota na ye etindiki ngai mpo na koloba lelo na baye ya bino oyo akoki komituna ntango nsuka ya bomoi na bino ya kufa ebelemi, “Wapi ezali ya ngai libota?” Na mokolo ekoya ntango bokosilisa momekano na bino ya kufa mpe bokokota mokili ya milimo, bokomemama miso na miso na motuna wana ya koniokola motema: “Wapi ezali ya ngai libota?”

Yesu Klisto ateyi nzela ya kozonga na ndako na biso ya seko. Ye asosoli mwango ya Tata na biso ya Lola ya bokobi ya seko malamu koleka biso nionso. Nsima ya nyonso, Ye azali fungola ya yango nyonso. Ye azali Mosikoli na biso, mpe Libiki na biso, mpe Mobikisi na biso.

Ntango nyonso uta Adama mpe Ewa babenganaki bango na Elanga ya Edene, Yesu Klisto abonzi maboko na Ye ya nguya mpo na kosalisa banso oyo baponi kolanda Ye. Mbala na mbala, makomi ekundoli ete atako ndenge nyonso ya masumu uta na bato ya ndenge nyonso, maboko na Ye ezali ya kotandolama naino.2

Molimo ya moko na moko ya biso ezali kolula kowumela libela. Nzembo ya bolingo ewumisaka elikia ya lokuta ete bolingo ezali nyonso bosengeli na yango soki bolingi kozala lisanga libela. Mpe mingi na libunga bandimi ete Lisekwa ya Yesu Klisto ekopesaka elaka ete bato banso bakozala elongo na bolingami na bango nsima ya liwa.

Na solo, Mobikisi Yemei alakisaka yango polele mpenza ete na ntango Lisekwa na Ye ezali ya solo ete moto nyonso oyo azala na bomoi na ntembe te akosekwa mpe akozala na bomoi,3 mingi koleka esengami soki tolingi kozala na litomba ya likolo ya bonetwami. Lobiko ezali likambo ya moto na moto, bonetwami ezali likambo ya libota.

Boyokemela maloba oyo elobamaki na Nkolo Yesu Klisto na profeta na Ye: “Mayokani, makelemba, makangano, lotoma, ndai, misala, masolo, masanga, to mazilisi nyonso, oyo esalemi te mpe ekokisami te mpe ekangisami te na Molimo Mosantu ya elaka … ezangi mbano, makasi, to bokasi na mpe nsima ya lisekwa ya bawa; mpo makelemba nyonso oyo esalemi te na ntina oyo ezali na nsuka ntango bato bakufi.”4

Boye, nini esengami mpo libota moko enetolama libela? Tomikokisaka mpo na litomba wana na kosalaka mayokani na Nzambe, kobatelaka mayokani wana, mpe kozwaka makuli ya ntina.

Oyo ezali ya solo uta ebandeli ya ntango. Adama mpe Ewe, Nowa mpe mwasi na ye, Abalayama mpe Sala, Lehi mpe Sariah, mpe basusu bayekoli banso ya Yesu Klisto—uta mokili ekelamaki—basala mayokani wana kaka na Nzambe. Bazwa makuli wana kaka oyo biso, lokola bandimi ya Eklezia ezongisami ya Nkolo lelo, tozwi na libatisi mpe na kati ya tempelo.

Mobikisi abengisi banso kolanda Ye na kati ya mai na libatisi mpe, na ngonga ekoki, kosala mayokani ya kobakisa na Nzambe na kati ya Tempelo mpe kozwa mpe kozala mondimi na makuli wana ya ntina nsima. Nyonso oyo esengami soki tolingi konetolama elongo na mabota na biso elongo na Nzambe libela.

Nsomo ya motema na ngai ezali ete bato mingi oyo nalingaka, nalulaka, mpe na memiaka baboyi libengisi Ye. Baboyi mabondeli ya Yesu Klisto ntango abelelaki, “Yaka, Landa Ngai.”5

Nasosoli ntina nini Nzambe alelaka.6 Ngai lokola nalelaka mpo na baninga mpe bandeko ya boye. Bazali bato ya kitoko mibali mpe basi, bamipesa ma libota mpe mikumba na bango ya ekolo. Bapesaka na pete ntango, makasi, mpe makoki na bango. Mpe mokili ezali malamu mingi mpo na makasi na bango. Kasi baponi te kosala mayokani na Nzambe. Bazwi te makuli oyo ekonetola bango elongo na libota na bango mpe kokanga bango lisanga libela.7

Boniboni natombeli nakoka kotala bango mpe kobengisa bango mpo na kokanisa na lokengo mibeko ya ekokisaka ya Nkolo. Namituni nini nakoki koloba mpo ete bayoka mingi kani Mobikisi alingaka bango, bayeba mingi kani nalingaka bango, mpe baya koyeba boniboni basi mpe mibali ya kobatela mayokani bakoki kozwa “litondi ya esengo.”8

Basengeli kososola ete ntango ezali na moko esika mpo na bango nsima ya awa—elongo na mibali mpe basi ya kitoko oyo lokola baponi te kosala mayokani na Nzambe—Yango ezali te esika wapi mabota bakosangana lisusu mpe bakopesama litomba ya kozala mpe kokola libela. Wana esali te bokonzi esika bakozwa litondi ya esengo—ya bokoli mpe esengo ya kosuka mokolo moko te.9 Mapamboli wana ya koluta ekoki koya kaka na kozalaka na mokili moko ya selesitiale elongo na Nzambe, Tata na biso ya Seko; Mwana na Ye ya Mobali, mpe bayi libota na biso ya kolongobana mpe ya kokokisama.

Nayoki mposa ya koloba na baninga na ngai ya kotepatepa.

“Na bomoi oyo, boyokana mokolo moko te na oyo eleki malamu ya mibale na likambo moko te. Kasi, lokola bozali kotelemela mpenza koyamba nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto, bozali kopona koyokana mpo na oyo eleko malamu ya mibale.

“Mobikisi alobaki, ‘Na ndako ya Tata na ngai ezali bisika mingi.’10 Nzokande, lokola boponi te kosala mayokani na Nzambe, bozali koyokana mpo na ndako eleki mpamba likolo ya moto na bino na boseko nyonso.”

Nalingi lisusu kobondela baninga na ngai ya kotepatepa na kolobaka:

“Sopa motema na yo epai ya Nzambe. Tuna ye soki makambo oyo ezali ya solo. Zwa ntango mpo na koyekola maloba na Ye. Ya solo yekola! Soki ya solo bolingaka libota na bino mpe soki bozali na mposa ya konetolama elongo na bango na boseko mobimba, bofuta ntano sikoyo—mpo na koyeba bosolo oyo ya seko mpe nsima mpo na kowumela na yango.

“Soki oyebi na bosolo te soki kutu ondimalaka Nzambe, bandela wana. Sosola ete na kozanga bozalani na Nzambe, moto akoki kotia ntembe na bozali ya Nzambe. Boye, mitia na esika moko mpo na kobanda kozala na bozalani na Ye. Mikitisa Sambela mpo na kozala na miso ya komona loboko ya Nzambe na bomoi na yo mpe na mokili nzinganzinga na yo. Tuna Ye ayebisa yo soki Ye azali kuna—soki Ye ayebi yo. Tuna Ye soki Ye azali kokoyoka nini na ntina na yo. Mpe nsima, yokamela.”

Moninga na ngai moko ya boye azalaki na bozalani ya moke na Nzambe Kasi azalaki na mposa ya kozala elongo na mwasi na ye akufa. Yango wana asengaki ngai nasalisa ye. Nalendisaki ye akutana na bamisionele mpo na kososola malongi ya Klisto mpe koyekola mayokani, makuli, mpe mapamboli ya nsango malamu.

Asalaki yango. kasi amonaki nzela bapesaki ye toli elingaki kosenga asala mbongwana mingi na bomoi na ye. Ye alobaki, “Mitindo mpe mayokani ezali kaka ya mpasi mpo na ngai. Lisusu, nakoki ntango mosusu te kofuta moko na zomi, mpe nazali na ntango te mpo na kosalisa na Eklezia.” Nsima asengaki ngai, “Soki nakufi, nasengi yo osala mosala ya tempelo mpo na mwasi na ngai mpe ngai mpo ete tokoka kozala lisanga lisusu”

Natondi botondi, nazali te mosambisi ya moto oyo. Kasi natie ntembe na makasi ya mosala ya tempele ya kozwela mpo na moto moko oyo azalaka na libaku ya kobatisama na bomoi oyo—ya kokulisama na bonganganzambe mpe ya kozwa mapamboli ya tempeleo awa na bokufi—kasi oyo azwi mokano na koyebaka mpo na koboya nzela wana.

Bandeko na ngai ya bolingo mibali mpe bandeko basi, Yesu Klisto abendisi biso mpo na kokamata nzela ya boyokani kozonga na ndako epai ya Baboti na biso ya Lola mpe kozala elongo na baye tolingaka. Abengisi biso ete, “Yaka, landa ngai.”

Sikoyo, lokola Mokambi ya Eklezia, nabondeli bino oyo bokei bino moko mosika ya Eklezia mpe bino oyo boluki naino te mpo na koyeba ete Eklezia ya Yesu Klisto ezongisami. Bosala mosala ya molimo mpo na koyeba mpo na bino moko, mpe palado bosala yango sikoyo. Ngonga ezali kosila.

Natatoli ete Nzambe azali na bomoi. Yesu azali Klisto Eklezia na Ye mpe litondi ya nsango malamu ezongisami mpo na kopambola bomoi na esengo, awa mpe nsima ya awa. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa